Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Kobá komipesa . . . na koteya”

“Kobá komipesa . . . na koteya”

“Kobá komipesa . . . na koteya”

“BOBENGAKA ngai, ‘Moteyi,’ mpe, ‘Nkolo,’ mpe ezali solo, mpo nazali bongo.” (Yoa. 13:13) Yesu ayebisaki bayekoli na ye maloba wana mpo na komonisa mokumba na ye ya moteyi. Na nsima, mwa moke liboso amata na likoló, Yesu apesaki bayekoli na ye etinda oyo: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” (Mat. 28:19, 20) Na nsima, ntoma Paulo mpe amonisaki ntina ya kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe. Ayebisaki Timote, oyo azalaki nkulutu na lisangá ete: “Kobá komipesa na kotánga liboso ya bato nyonso, na kolendisa, na koteya. . . . Okanisaka malamu mpenza makambo yango; omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.”​—1 Tim. 4:13-15.

Ndenge ezalaki na ntango wana, koteya ezali likambo moko ya ntina mingi lelo, ezala na mosala ya kosakola to na makita na biso. Ndenge nini tokoki kokoba komipesa na koteya, mpe ndenge nini yango ekoki kosalisa biso tókende liboso na oyo etali kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe?

Tómekola Moteyi Monene

Lolenge oyo Yesu azalaki koteya esepelisaki bayoki na ye mingi. Talá ndenge maloba na ye esalaki bato oyo bayaki na sinagoga na Nazarete. Evanzile ya Luka elobi boye: “Bango nyonso babandaki kopesa litatoli ya malamu mpo na ye mpe kokamwa na maloba kitoko oyo ezalaki kobima na monɔkɔ na ye.” (Luka 4:22) Bayekoli ya Yesu balandaki lolenge oyo Nkolo na bango azalaki kosakola. Kutu, ntoma Paulo alendisaki bakristo mosusu ete: “Bókóma bamekoli na ngai, ndenge ngai mpe nazali momekoli ya Kristo.” (1 Ko. 11:1) Lokola amekolaki mayele oyo Yesu azalaki kosalela mpo na koteya, Paulo akómaki makasi na mosala ya ‘koteya na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako.’​—Mis. 20:20.

Koteya na “zando”

Ndakisa moko monene oyo emonisi ete Paulo ayebaki mpenza koteya na bisika ya bato nyonso ezali na mokanda ya Misala mokapo 17. Elobeli mobembo oyo asalaki na Atene, na Grɛsi. Esika nyonso oyo Paulo azalaki kotala na engumba yango​—na babalabala, na bisika ya bato nyonso—​bikeko ezalaki. Na ntembe te Paulo atungisamaki mingi! Atako bongo, azangaki komipekisa te. Nzokande, “na sinagoga, abandaki kosolola . . . mpe mokolo na mokolo, na zando, elongo na baoyo bazalaki wana.” (Mis. 17:16, 17) Oyo nde ndakisa malamu mpo na biso! Soki tozali kosolola na bato oyo bazali na mimeseno mosusu na ndenge ya kosambisa bango te, kasi na limemya, tokoki kobongisa nzela mpo basusu kati na bango báyoka biso mpe nsukansuka bálongwa na boombo ya mangomba ya lokuta.​—Mis. 10:34, 35; Em. 18:4.

Paulo akutanaki na bato ya matata na zando yango. Basusu kati na bato oyo bazalaki koyoka ye, bazalaki bato ya filozofi oyo makanisi na bango ezalaki koyokana te na makambo ya solo oyo Paulo azalaki kosakola. Ntango batyaki ntembe, Paulo azangaki te kotya likebi na makambo oyo bazalaki koloba. Bamosusu babengaki ye “esopa” (oyo elimboli “mododi mbuma”). Bato mosusu balobaki boye: “Emonani lokola ete azali mosakoli ya banzambe ya bapaya.”​—Mis. 17:18.

Kasi, Paulo alɛmbaki nzoto te mpo na maloba wana ya kotyola. Kutu, ntango batunaki ye na ntina na mateya na ye, Paulo asimbaki libaku yango mpo na kosala lisolo moko ya mayele oyo emonisaki malamu makoki na ye ya moteyi. (Mis. 17:19-22; 1 Pe. 3:15) Tótalela makambo oyo alobaki na lisolo na ye mpe tózwa mateya oyo ekoki kosalisa biso tóbongisa ndenge na biso ya koteya.

Luká makambo oyo bino nyonso bokondima

Paulo alobaki boye: “Mibali ya Atene, na ndenge natali, na makambo nyonso bomonani ete bomipesá na kobanga banzambe koleka bato mosusu nyonso. Na ndakisa, ntango nazalaki . . . kotala na likebi mpenza biloko na bino ya losambo, namonaki mpe etumbelo moko oyo likoló na yango ekomamá ete: ‘Epai ya Nzambe oyo ayebani te.’ Na yango, ye oyo bino bokangami na ye atako boyebi te, ye nde nazali kosakwela bino.”​—Mis. 17:22, 23.

Paulo atalaki na likebi biloko oyo ezalaki zingazinga na ye. Nsima ya kotala biloko yango, ayebaki makambo mingi na ntina na bato oyo azalaki kosolola na bango. Biso mpe tokoki koyeba mwa makambo oyo etali moto oyo tozali kosolola na ye soki toyebi kosalela miso. Na ndakisa, ba-jouet oyo ezali na lopango to bilembo oyo ezali na porte ya ndako ekoki komonisa biso makambo mingi. Soki toyebi mwa moke makambo ya moto oyo tozali kosolola na ye, tokoki kopona malamu makambo oyo tokoloba mpe ndenge oyo tokoloba yango.​—Kol. 4:6.

Paulo alobaki na ndenge ya kosambisa bato te. Kasi, amonaki ete bato ya Atene ‘bakangamaki’ na Nzambe, kasi bazalaki na boyebi ya solosolo te. Paulo amonisaki polele ndenge bakokaki kosambela Nzambe ya solo. (1 Ko. 14:8) Ezali mpenza na ntina tólobaka polele mpe na ndenge ya kosambisa bato te ntango tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi!

Tózala na mayele mpe tópona bilongi te

Paulo akobaki boye: “Nzambe oyo asalá mokili mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango, lokola azali​—ndenge Ye oyo azali—​Nkolo ya likoló mpe ya mabele, afandaka te na batempelo oyo esalemi na mabɔkɔ, mpe asalelamaka mosala na mabɔkɔ ya bato te lokola nde akelelaka na eloko, mpo ye moko moto apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.”​—Mis. 17:24, 25.

Awa, Paulo alobelaki Yehova lokola ye oyo azali Mopesi ya bomoi; alobaki yango na mayele mpenza na ndenge abengaki ye “Nkolo ya likoló mpe ya mabele.” Ezali mpenza lokumu monene kosalisa bato ya mitema sembo ya mangomba mpe mimeseno ekeseni bámona ete bomoi nyonso euti nde na Yehova Nzambe!​—Nz. 36:9.

Na nsima Paulo alobaki boye: “Mpe na moto moko asalaki bikólo nyonso ya bato, . . . mpe atyaki bantango oyo etyamá mpe bandelo oyo etyamá ya esika oyo bato bafandi, mpo báluka Nzambe, soki esengeli báluka ye na komekameka epai na epai mpe bázwa ye mpenza, atako, ya solo, azali mosika te na mokomoko na biso.”​—Mis. 17:26, 27.

Lolenge na biso ya koteya ekoki komonisa soki tozali kosambela Nzambe ya ndenge nini. Kozanga kopona bilongi, Yehova apesi bato ya bikólo nyonso nzela “báluka ye na komekameka epai na epai mpe bázwa ye mpenza.” Biso mpe toponaka bilongi te; tosololaka na moto nyonso oyo tokutani na ye. Tolukaka kosalisa baoyo bandimaka ete Mozalisi azali básala na ye boninga oyo ekoki komema na mapamboli ya seko. (Yak. 4:8) Kasi, ndenge nini tosalisaka baoyo bandimaka te ete Nzambe azali? Tolandaka ndakisa ya Paulo. Talá makambo oyo alobaki na nsima.

“Na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali, ndenge bamosusu kati na bapowɛti na bino balobá: ‘Mpo tozali mpe libota na ye.’ Na yango, lokola tozali libota ya Nzambe, tosengeli kokanisa te ete Nzambe azali lokola wolo to palata to libanga.”​—Mis. 17:28, 29.

Mpo básepela mpe bándima makambo oyo alobaki, awa Paulo atángaki maloba ya bapowɛti oyo bato ya Atene bayebaki malamu mpe bazalaki kondimela. Biso mpe tolukaka koyokana ná boyoki na biso mpe tolobelaka makambo oyo toyebi ete bango mpe bakondima. Na ndakisa, na mokanda na ye epai ya Baebre, Paulo apesaki ndakisa moko oyo endimisaka mpe bato lelo; alobaki boye: “Ndako nyonso etongamaka na moto, kasi oyo atongá biloko nyonso ezali Nzambe.” (Ebr. 3:4) Soki tosalisi bayoki na biso bákanisa mwa ndakisa wana, ekoki kosalisa bango bándima ete makambo oyo tozali koyebisa bango ezali solo. Na lisolo na ye, Paulo asalelaki mayele mosusu oyo emonisaka ete moto azali moteyi malamu​—kosimba motema.

Monisá ete mikolo etikali ya kotánga

Paulo alobaki boye: “Ya solo, Nzambe akangi miso mpo na bantango wana ya kozanga boyebi, nzokande sikoyo azali koyebisa bato na bisika nyonso ete basengeli bango nyonso kobongola motema. Mpamba te atye mokolo moko oyo akani kosambisa na boyengebene mabele oyo bato bafandi na nzela ya moto moko oyo ye aponi, mpe apesi bato nyonso ndanga ndenge asekwisi ye uta na bakufi.”​—Mis. 17:30, 31.

Ndenge Nzambe atiki nzela na mabe epesi biso nyonso libaku ya komonisa ye nini ezali mpenza na mitema na biso. Ezali na ntina tómonisa ete mikolo etikali ya kotánga mpe tólobelaka na ndenge ya kondimisa mapamboli oyo tokozwa na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ekoya mosika te.​—2 Tim. 3:1-5.

Bato bayambaka nsango ndenge moko te

“Ɛɛ, ntango bayokaki likambo ya lisekwa ya bakufi, bamosusu babandaki kotyola, wana bamosusu balobaki ete: ‘Tokoyoka yo na likambo wana ata mbala mosusu.’ Na yango, Paulo abimaki na kati na bango, kasi bato mosusu basanganaki elongo na ye mpe bakómaki bandimi.”​—Mis. 17:32-34.

Bato mosusu bandimaka mateya na biso na mbala moko; basusu bakoki kozala na mposa ya ntango mwa mingi liboso bándima mateya na biso. Kasi, soki ndimbola ya polele mpe ya pɛtɛɛ esalisi ata moto moko azwa boyebi ya sikisiki ya Yehova, tokosepela mpenza ndenge Nzambe asaleli biso mpo na kobenda bato epai ya Mwana na ye!​—Yoa. 6:44.

Mateya oyo tokoki kozwa

Soki tokanisi lisolo ya Paulo, tokoki koyekola makambo mingi na oyo etali ndenge ya kolimbwela basusu mateya ya Biblia. Soki tozwaka mabaku ya kosala masukulu ya bato nyonso na lisangá, tokoki kosala makasi mpo tómekola Paulo mpe tósalelaka maloba ya mayele oyo ekosalisa moto oyo azali mondimi te akanga ntina ya mateya ya Biblia mpe andima yango. Tolingi koyebisa bato mateya ya solo na ndenge ya polele, kasi tokokeba ete tótyola ata endimeli ya moto moko te oyo ayei na makita. Ndenge moko mpe na mosala na biso ya kosakola, tokosala makasi tóloba na ndenge ya kondimisa mpe na mayele. Soki tosali bongo, tokolanda mpenza toli ya Paulo ya ‘komipesa na koteya.’

[Elilingi na lokasa 30]

Paulo azalaki koteya na ndenge ya polele, ya pɛtɛɛ, mpe na mayele

[Elilingi na lokasa 31]

Tokomekola Paulo soki tozali kotya likebi na mayoki ya bato oyo tozali kosakwela