Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kozala ekɛngɛ ebotaka mbuma malamu

Kozala ekɛngɛ ebotaka mbuma malamu

Kozala ekɛngɛ ebotaka mbuma malamu

OLUKAKA na ekɛngɛ mabaku ya kosakola,oyo ekoki komonana na teritware ya lisangá na bino? Bandeko na biso ya Turku, engumba moko ya kala na Finlande mpe oyo ezalaka na libongo, basalaki bongo, mpe bokɛngi na bango ebotaki mbuma malamu.

Eleki mwa ntango, bandeko ya Turku bamonaki ete etuluku moko ya bato oyo bautaki Azia bayaki na engumba yango mpo na kosilisa kotonga masuwa moko monene na esika oyo batongaka bamasuwa na engumba yango. Na nsima, ndeko mobali moko amonaki baotɛlɛ oyo bapaya yango bazalaki kofanda. Ayokaki mpe ete babisi ezalaki koya kozwa bato yango ya mosala ntɔngɔntɔngɔ na baotɛlɛ na bango mpo na komema bango na libongo. Na mbala moko, ndeko yango ayebisaki bandeko ya lisangá ya Lingelesi na Turku.

Bankulutu ya lisangá yango bamonaki ete lokola bapaya bayei ebele ndenge wana na mboka na bango, ezali libaku malamu mpo na koyebisa bango nsango ya Bokonzi, mpe bazwaki nokinoki bibongiseli mpo na kosala kampanye monene mpo na kosakwela bango. Na mokolo ya lomingo ya pɔsɔ yango, basakoli zomi bakutanaki na ntɔngɔ, na ngonga ya 7, pene na esika oyo bisi etɛlɛmaka. Na ebandeli, ata mosali moko te ayaki. Bandeko bamitunaki boye: ‘Toyei na retare to ndenge nini? Bato yango balongwe na Turku?’ Kasi na nsima, mosali moko ayaki wana, alataki bilamba ya mosala. Mosali mosusu ayaki, mpe na nsima bakómaki ebele. Eumelaki te, basali ebele mpenza batondaki wana pene na esika oyo bisi etɛlɛmaka. Bandeko babandaki kosakola, bazalaki kolakisa basali yango mikanda ya Lingelesi. Likambo ya esengo, ezwaki pene na ngonga mobimba liboso basali nyonso bázwa bisika ya kofanda na babisi yango, mpe yango epesaki bandeko ntango oyo ekoki mpo na kosolola na bato mingi kati na bango. Ntango babisi ekendaki, basali yango bamemaki mwa babuku 126 mpe bazulunalo 329!

Mbuma malamu oyo bandeko yango bazwaki elendisaki bango bábandela lisusu kampanye na pɔsɔ oyo elandaki, ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayaki na lisangá na bango. Mokolo moko oyo mbula ezalaki kobɛta, mokɛngɛli ya zongazonga atambwisaki likita mpo na mosala ya kosakola na ngonga ya 6:30, mpe basakoli 24 bakendaki na esika oyo bisi etɛlɛmaka. Na mbala oyo, bamemaki mpe mikanda na monɔkɔ ya Tagalog mpo bamonaki ete mingi kati na bapaya yango bautaki na ekólo Philippines. Na ntɔngɔ yango, ntango babisi ememaki bango na libongo, basali yango bazwaki babuku 7, mwa babuku 69, mpe bazulunalo 479. Kanisá esengo mpe nsai ya bandeko mibali mpe bandeko basi wana oyo basalaki kampanye yango!

Liboso basali yango bázonga na bikólo na bango, bandeko bakendaki kotala mingi kati na bango na baotɛlɛ oyo bazalaki kofanda mpe balimbwelaki bango nsango ya Bokonzi malamumalamu. Basali mosusu balobaki ete basilá kosolola na Batatoli liboso na mikili mosusu. Basali yango balobaki ete basepeli mingi ndenge bandeko wana bazwaki bibongiseli mpo na kosolola na bango na ntango oyo bazalaki na Finlande.

Olukaka na ekɛngɛ mabaku ya kosakola,oyo ekoki komonana na teritware ya lisangá na bino? Ozwaka bibongiseli mpo na kosolola na bato oyo bauti na bisika ndenge na ndenge? Soki ozali kosala bongo, yo mpe okoki kokutana na makambo ya esengo lokola oyo bandeko ya Turku bakutanaki na yango.

[Karte/​Elilingi na lokasa 32]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

FINLANDE

HELSINKI

Turku

[Eutelo ya bafɔtɔ]

STX Europe