Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Salisá bana na yo bálinga kotánga mpe koyekola

Salisá bana na yo bálinga kotánga mpe koyekola

Salisá bana na yo bálinga kotánga mpe koyekola

KOSALA milende mpo na koteya bana na yo báyeba kotánga mpe koyekola ezali moko ya makambo ya ntina mingi oyo okoki kosala mpo na kobongisa avenire na bango. Mpe makambo yango ekoki kopesa esengo mingi! Moko ya makambo oyo esepelisaka bato mosusu mingi soki bakanisi bomwana na bango ezali ntango oyo baboti na bango bazalaki kotángela bango. Kotánga yango moko ekoki kosepelisa, ndenge moko mpe mbuma na yango. Ezali bongo mingimingi mpo na basaleli ya Nzambe, koyekola Biblia esalisaka mingi mpo moto akola na elimo. Tata mokristo moko alobi boye: “Makambo oyo tolingaka mingi ezali makambo oyo etali kotánga mpe koyekola.”

Soki bana na yo bazali na mimeseno malamu ya koyekola, bakoki kokóma na boyokani makasi na Nzambe. (Nz. 1:1-3, 6) Atako koyeba kotánga ezali lisɛngami te mpo na lobiko, Biblia emonisi ete kotánga ememaka mapamboli minene ya elimo. Na ndakisa, Emoniseli 1:3 elobi boye: “Esengo na moto oyo azali kotánga na mongongo makasi mpe na baoyo bazali koyoka maloba ya esakweli oyo.” Longola yango, ntina ya kotya makanisi nyonso, likambo oyo esalemaka ntango moto azali kotánga, emonisami polele na toli ya Biblia oyo ntoma Paulo apesaki Timote ete: “Okanisaka malamu mpenza makambo yango.” Mpo na nini? “Mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.”​—1 Tim. 4:15.

Ya solo, elingi koloba te ete soki moto ayebi kotánga mpe koyekola, makoki yango ekosalisa ye kaka. Bato mingi oyo bayebi kotánga mpe koyekola basalelaka makoki yango mpenza te; kasi, balekisaka ntango na bango nde na makambo ezangi ntina. Na yango, ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bákoma na mposa ya kozwa boyebi oyo ekosalisa bango?

Bolingo mpe ndakisa na yo

Bana bayekolaka malamu soki boyekoli ezali kosalema na bolingo. Bakristo mibale, Owen ná mwasi na ye Claudia, bakanisi ntango bana na bango bazalaki mike; balobi boye: “Bazalaki kozela mpenza ntango ya boyekoli mpo ezalaki ntango moko ya ntina mingi​—bazalaki koyoka ete babatelami mpe bazali na kimya. Bakómaki komona ete ntango ya koyekola ezali ntango ya esengo.” Ata soki bana babandi kokóma bilenge, eleko oyo ekoki kozala na mikakatano mingi, komonisa bolingo na ntango ya boyekoli na libota ekokoba kosalisa bango básepela na boyekoli. Bana ya Owen ná Claudia bazali lelo babongisi-nzela mpe bolingo ya kotánga mpe koyekola, oyo baboti bakɔtisaki kati na bango, ezali kokoba kopesa bango matomba.

Eloko mosusu ya makasi oyo ekendaka nzela moko na bolingo ezali ndakisa. Mbala mingi, bana oyo bamonaka baboti na bango bazali kotánga mpe koyekola bayaka komona ete ezali makambo oyo bango mpe basengeli kosalaka. Kasi, ndenge nini yo moboti okoki kozala ndakisa soki osepelaka mpenza na kotánga te? Ekoki kosɛnga obongola makambo oyo otyaka na esika ya liboso to ndenge na yo ya kotalela kotánga. (Rom. 2:21) Soki ozali na momeseno ya kotánga mokolo na mokolo, ekosimba mpenza mitema ya bana na yo. Molende na yo​—mingimingi na kotánga Biblia, kobongisa makita, mpe boyekoli na libota—​ekomonisa bango polele ete makambo yango ezali mpenza na ntina.

Na yango, bolingo mpe ndakisa na yo ezali na ntina mingi mpo na kosalisa bana na yo bakóma kolinga kotánga. Kasi, okoki mpenza kosala nini mpo na kolendisa bango?

Bolingo oyo ebandaka na kotánga

Wapi mwa makambo ya ntina oyo osengeli kosala mpo na kosalisa bana na yo bálingaka kotánga? Bana bázala na babuku ya kotánga banda bomwana. Nkulutu ya lisangá moko, oyo baboti na ye basalisaki ye akóma kolinga kotánga, apesi toli oyo: “Tiká bana na yo báyeba kosalela mikanda. Na ndenge yango, bakomesana na mikanda mpe bakobanda kolinga yango.” Na ndenge wana, bakobanda kolinga mingi mikanda oyo elimbolaka Biblia, na ndakisa Yekolá epai ya Moteyi Monene mpe Mokanda mpo na masolo ya Biblia, liboso kutu báyeba ata kotánga. Soki ozali kotánga mikanda yango ná bana na yo, ozali kolakisa bango kaka monɔkɔ te, kasi mpe “makambo ya elimo” to “maloba ya elimo.”​—1 Ko. 2:13.

Tángáká na mongongo makasi. Zwá momeseno ya kotángelaka bana na yo mikanda mokolo na mokolo. Soki ozali kosala bongo, okoteya bango ndenge ya kobenga maloba mpe kosalisa bango bátángaka. Ndenge oyo ozali kotánga ezali mpe na ntina. Soki ozali kotánga na esengo, bango mpe bakozala na esengo. Kutu, mbala mosusu bana na yo bakosɛnga yo ozongela kotánga lisolo moko mbala na mbala. Salá ndenge basɛngi. Nsima ya mikolo, bakozala na mposa ya koyeba mpe masolo ya sika. Kasi kebá, kotindika bana na makasi te mpo bátánga. Yesu atikaki ndakisa na ndenge azalaki koteya bayoki na ye kaka “na meko oyo bakokaki koyoka.” (Mrk. 4:33) Soki ozali kotindika bana na yo na makasi te, bakobanda kozela na mposa makasi ntango ya kotánga, mpe ekosalisa yo okokisa malamu mokano na yo ya kosalisa bango bálingaka kotánga.

Lendisá bango báloba mpe bósolola makambo oyo botángi. Okosepela mpo mosika te, bana na yo bakobanda koyeba, kobenga mpe kokanga ntina ya maloba mingi. Kosolola makambo oyo botángi ekoki kosalisa bango bákende liboso. Buku moko oyo elobeli ndenge ya kosalisa bana báyeba kotánga malamu, elobi ete kosolola esalisaka bana “báyekola maloba oyo bakoya komona mpe kokanga ntina na yango ntango bakobanda kotánga.” Mokanda yango ebakisi boye: “Mpo na bana mike, lokola bɔɔngɔ na bango ezali kobunda mpo na koyeba kotánga ntango ezali kokola, kosolola ezalaka na ntina mingi. Kasi, kosolola makambo ya ntina mingi . . . eleki malamu.”

Sɛngá bana bátángelaka yo, mpe lendisá bango bátunaka mituna. Okoki mpe kotuna mituna yo moko mpe kosɛnga bango bápesa biyano. Na ndenge yango, bana bakomona ete bakoki koyekola makambo mingi na kati ya mikanda mpe ete maloba oyo bazali kotánga ezali na bandimbola. Kosala bongo ekosalisa mingimingi ntango bozali kotánga mikanda oyo elimbolaka Biblia, buku ya ntina mingi koleka.​—Ebr. 4:12.

Kasi, kobosana te ete koyeba kotánga ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Esɛngaka ntango mpe komekameka mpo na koyeba yango malamu. * Na yango, wana bolingo na bango mpo na kotánga ezali kokola, lendisá yango na kopesáká bango longonya mbala na mbala. Soki ozali kopesa bana na yo longonya, okolendisa bango bálingaka kotánga.

Kotánga ezali na ntina mpe epesaka esengo

Koteya bana na yo ndenge ya koyekola ekomonisa bango ntina ya kotánga. Koyekola esɛngaka koluka koyeba makambo mpe koyeba boyokani oyo ezali kati na yango. Esɛngaka kotya makambo na molɔngɔ, komikundola, mpe kosalela makambo oyo oyekoli. Soki mwana ayebi ndenge ya koyekola mpe akómi komona ndenge boyekoli ekoki kosalisa ye, na ntango wana nde boyekoli ekokóma na ntina mpo na ye mpe ekopesa ye esengo.​—Mos. 10:10.

Lakisá bango soki koyekola elimboli nini. Losambo na libota, kotalela mokapo ya mokolo, mpe makambo mosusu ya ndenge wana epesaka mabaku ya malamu mingi mpo na koteya bana na yo ndenge ya koyekola. Kozala na momeseno ya kofanda na bana na yo mpe kotalela likambo moko na mozindo mpo na mwa ntango ekosalisa bango bátya makanisi nyonso, mpe yango ezali na ntina na ntango ya boyekoli. Okoki mpe kolendisa mwana na yo ya mobali ayebisa yo ndenge makambo oyo bouti koyekola eyokani na oyo ayebaki liboso. Yango ekosalisa ye ayeba kokokanisa makambo. Mpo na nini te kosɛnga mwana na yo ya mwasi aloba na mokuse, na maloba na ye moko, makambo oyo auti kotánga? Yango ekosalisa ye ayeba ndimbola na yango mpe abosana yango te. Bozongeli, elingi koloba, koloba na ndenge mosusu lisolo moko oyo bouti kotánga, ezali likambo mosusu oyo okoki kolakisa bango mpo esalisa bango bákangaka makambo. Okoki koteya ata bana mike ndenge ya kokoma mwa makanisi ntango bozali koyekola na ndako to na makita ya lisangá. Yango ekoki kosalisa bango bátya makanisi nyonso na boyekoli! Mayele wana ya ntina mingi ekokómisa boyekoli na bino elɛngi mpe ekozala na ntina mpo na yo mpe mpo na bana na yo.

Bóbongisa makambo mpo boyekoli ezala malamu. Esika oyo ezali na molunge te mpe oyo ezali na mwinda ya malamu, oyo ezali na makɛlɛlɛ te mpe ezali malamu, esalisaka mpo na kotya makanisi nyonso na boyekoli. Ya solo, ndenge oyo baboti batalelaka boyekoli ezali na ntina. Mama moko alobi boye: “Ezali na ntina mingi yo moko otya ntango ya kotánga mpe koyekola mpe otosa yango. Yango ekosalisa bana na yo báyeba kosala makambo na molɔngɔ. Bakomona ete likambo oyo to oyo wana esengeli kosalema na ntango boye to boye.” Baboti mingi balingaka kosala makambo mosusu te na bangonga ya boyekoli. Mokanda moko elobi ete kosala bongo esalisaka mingi mpo na koteya bana bázala na mimeseno malamu ya koyekola.

Monisá ete koyekola ezali na ntina mingi. Salisá mpe bana na yo bámona matomba ya koyekola. Soki bazali kosalela makambo oyo bayekoli, ekosalisa bango bámona mpenza ntina ya boyekoli. Elenge mobali moko alobi boye: “Soki nazali komona mpenza te ndenge likambo yango ekosalisa ngai, ezalaka mpasi nandima koyekola yango. Kasi soki ngai moko nakoki kosalela yango, nalukaka koyeba yango mpenza.” Ntango bilenge bazali komona ete boyekoli ekosalisa bango bákokisa mokano moko ya ntina, bakomipesa na yango. Bakobanda kozela ntango ya boyekoli, ndenge moko mpe ntango ya kotánga.

Mbano oyo eleki monene

Tokokoka te kotánga matomba nyonso ya kosalisa bana bálinga kotánga. Mwa matomba yango ezali ete bakozala mayele na kelasi, na mosala, na boyokani na bango na basusu, bakoyeba kotalela mokili oyo tofandi, mpe bakosala boyokani malamu na baboti na bango. Tóbosana mpe te esengo oyo kotánga mpe koyekola ekomemela bango.

Longola nyonso wana, kolinga koyekola ekoki kosalisa bana bázala makasi na elimo. Kolinga koyekola ekosalisa bango báfungola makanisi mpe mitema na bango mpo na kososola “bonene mpe bolai mpe bosanda mpe bozindo” ya mateya ya Biblia. (Ef. 3:18) Ya solo, baboti bakristo bazali na makambo mingi ya koteya bana na bango. Ntango baboti bazali kopesa bana na bango ntango mpe kotyela bango likebi mpe bazali kosala nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa bango bázala na bomoi ya malamu, bakoki kozala na elikya ete nsukansuka bana na bango bakopona kokóma basambeli ya Yehova. Kosalisa bana na yo bázala na mimeseno malamu ya koyekola ekosalisa bango bázala malamu na elimo mpe bákóma na boyokani malamu na Nzambe. Na yango, bondelá Yehova apambola yo wana ozali kosala milende mpo na kosalisa bana na yo bálinga kotánga mpe koyekola.​—Mas. 22:6.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 14 Kotánga mpe koyekola ekoki kozala mpasi mingi mpo na bana oyo bazali na mokakatano ya koyekola mpo na maladi. Mpo na koyeba oyo yo moboti okoki kosala mpo na kosalisa bango, talá Lamuká! ya 22 Febwali 1997, nkasa 3-10, na Lifalanse.

[Etanda/​Bililingi na lokasa 26]

Kotánga . . .

• Bana bázala na babuku

• Tángáká na mongongo makasi

• Lendisá bango báloba

• Bósolola makambo oyo botángi

• Sɛngá bana bátángelaka yo

• Lendisá bana bátunaka mituna

Koyekola . . .

• Pesá ndakisa malamu

• Lakisá bana báyeba . . .

○ kotya makanisi nyonso

○ kokokanisa

○ koloba na mokuse

○ kozongela

○ kokoma mwa makanisi

• Bóbongisa makambo mpo boyekoli ezala malamu

• Monisá ntina ya koyekola