Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kotika makanisi ya bato etambwisa yo te

Kotika makanisi ya bato etambwisa yo te

Kotika makanisi ya bato etambwisa yo te

MAKANISI ya bato mpo na makambo oyo ebongi to oyo ebongi te mpe mpo na makambo ya malamu to ya mabe ezalaka ndenge moko te na bisika nyonso. Mpe makanisi yango ebongwanaka soki mikolo eleki. Yango wana, ntango tozali kotánga masolo ya Biblia oyo elobeli makambo oyo esalemaki na ntango ya kala, tosengeli kotala soki bato ya ntango yango bazalaki kotalela makambo ndenge nini, na esika tómityela mitinda na biso moko na makambo oyo totángi.

Na ndakisa, tótala makanisi mibale oyo elobelami mingi na Makomami ya Grɛki ya bokristo: lokumu mpe nsɔni. Mpo tókanga malamu ntina ya bavɛrsɛ oyo elobeli lokumu mpe nsɔni, tosengeli koyeba ndenge bato ya ntango wana bazalaki komona yango.

Ndenge bato bazalaki kotalela makambo na ekeke ya liboso

Moto moko ya mayele alobaki boye: “Bagrɛki, Baroma, mpe Bayuda, bango nyonso bazalaki komona ete lokumu mpe nsɔni ezali makambo ya ntina mingi na mimeseno na bango. Mibali bazalaki kosala makambo mpe kondima kokufa mpo na kozwa lokumu, kokende nsango, koyebana, kondimama na bato mpe kozwa limemya.” Makambo ya ndenge wana ezalaki kotinda bango bátyaka likebi mingi na makanisi ya bato mosusu.

Bonene ya moto, mosala na ye, mpe lokumu na ye ezalaki na ntina mingi na ntango wana oyo bato bazalaki koyeba malamu esika ya moto na mboka, banda na bankumu tii na baombo. Lokumu ezalaki valɛrɛ oyo moto azali na yango kaka na miso na ye moko te, kasi mpe na miso ya basusu. Kopesa moto lokumu elakisaki kondima polele ete moto yango amitambwisi na ndenge oyo esengeli. Elimbolaki mpe komonisa polele ete okamwe mpo na bomɛngo, mosala, mpe bonene ya moto yango mpe na bongo opesi ye limemya oyo esengeli na ye. Moto akokaki kokóma na lokumu soki azali kosala misala ya malamu to soki aleki bato mosusu. Nzokande, moto azalaki koyoka nsɔni, to kozanga lokumu ntango basambwisi ye to batyoli ye na miso ya bato. Moto azalaki kopɔla na nsɔni kaka ye moko boye te to soki lisosoli etungisi ye; ezalaki nde soki bato ya mboka bakweiseli ye likambo.

Ntango Yesu alobaki ete bakoki kobenga moto afanda “na esika oyo eleki lokumu” to “na esika ya nsuka mpenza” na fɛti, alingaki kolobela likambo etali lokumu to nsɔni na kolanda mimeseno ya ntango wana. (Luka 14:8-10) Mbala koleka mibale, bayekoli ya Yesu baswanaki mpo na koyeba soki “nani na kati na bango amonani ete aleki bango nyonso.” (Luka 9:46; 22:24) Bamonisaki likambo oyo bato ya ntango wana bazalaki komitungisa mingi mpo na yango. Kaka na ntango yango, bakonzi ya mangomba ya Bayuda oyo bazalaki na lolendo mpe na elimo ya kowelana bamonaki ete mateya ya Yesu ekobebisa lokumu mpe bokonzi na bango. Kasi, milende na bango mpo na komonisa ete baleki ye ntango bazalaki kotyana na ye ntembe liboso ya bato esimbaki te.​—Luka 13:11-17.

Likanisi mosusu oyo ezalaki mingi epai ya Bayuda, Bagrɛki, mpe Baroma ya ekeke ya liboso ezalaki nsɔni ya “kokangama mpe kofundama liboso ya bato ete osali likambo moko ya mabe.” Kokangama nsinga to kotyama na bolɔkɔ ezalaki kokitisa moto lokumu. Likambo ya ndenge wana ezalaki kofingisa moto na miso ya baninga, libota, mpe bato mosusu​—ezala asalaki mabe yango to te. Na yango, kokende nsango mabe ndenge wana ekokaki kotinda moto amiyoka ete asili valɛrɛ mpe kobebisa boyokani na ye na basusu. Nsɔni ya koleka kokangama na nsinga ezalaki nde kolongolama bilamba to kobɛtama fimbo. Likambo ya ndenge wana ezalaki kotinda basusu báboya moto to bátyola ye; ezalaki kosilisa moto lokumu.

Koboma moto na nzete ya mpasi ezalaki nsuka ya nsɔni. Martin Hengel, moto moko ya mayele, alobi ete kobomama ya ndenge wana ezalaki “etumbu ya baombo. Ezalaki kosambwa ya nsuka koleka, nsɔni mpe monyoko.” Bato bazalaki kotinda libota mpe baninga ya moto oyo basambwisi ndenge wana báwangana ye. Na yango, lokola Kristo akufaki ndenge wana, bato nyonso oyo balingaki kozala bakristo na ekeke ya liboso T.B. basengelaki kondima kotyolama na miso ya bato. Mbala mosusu, bato mingi bazalaki komona ete ezali bozoba moto aloba ete azali moyekoli ya moto oyo babakaki na nzete. Ntoma Paulo akomaki boye: “Biso tozali nde kosakola Kristo abakami na nzete, likambo oyo ezali kobɛtisa Bayuda libaku kasi ezali bozoba epai ya bikólo.” (1 Ko. 1:23) Bakristo ya liboso basalaki nini liboso ya mokakatano yango?

Ndenge mosusu ya kotalela makambo

Bakristo ya ekeke ya liboso bazalaki kotosa mibeko mpe kosala nyonso mpo na kokima nsɔni oyo euti na etamboli ya mabe. Ntoma Petro akomaki boye: “Moko te na kati na bino anyokwama mpo azali mobomi-bato to moyibi to mosali-mabe to mpo azali moto oyo amikɔtisaka na makambo ya bato.” (1 Pe. 4:15) Nzokande, Yesu asakolaki ete bayekoli na ye bakonyokwama mpo na nkombo na ye. (Yoa. 15:20) Petro akomaki boye: “Soki [moto] azali konyokwama mpo azali mokristo, ayoka nsɔni te, kasi akoba nde kopesa Nzambe nkembo.” (1 Pe. 4:16) Soki moto ayoki nsɔni te ntango anyokwami mpo azali moyekoli ya Kristo, azalaki komonisa ete alandi te makanisi ya bato ya ntango wana.

Bakristo bakokaki te kotika makanisi ya bato etambwisa bango. Bato ya ekeke ya liboso bazalaki komona ete ezali bozoba kondima moto oyo babakaki na nzete ete azali Masiya. Likanisi ya ndenge wana ekokaki kotinda bakristo bálanda ndenge oyo bato nyonso bazalaki kokanisa. Kasi, lokola bandimaki ete Yesu azali Masiya, basengelaki kolanda ye, ata soki bato bazalaki kosɛka bango. Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali koyoka nsɔni mpo na ngai mpe mpo na maloba na ngai na libota oyo ya ekobo mpe ya masumu, Mwana ya moto mpe akoyoka nsɔni mpo na ye ntango akoya na nkembo ya Tata na ye elongo na baanzelu basantu.”​—Mrk. 8:38.

Lelo, tokoki kokutana na makambo oyo ezali kotinda biso tótika losambo ya bokristo. Makambo yango ekoki kouta epai ya bana-kelasi, baninga ya kartye, to ya mosala oyo bazali koluka kotinda biso na pite, tózanga bosembo, to tósala makambo mosusu ya mabe. Bato yango bakoki kosala ete tóyoka nsɔni mpo tozali kosimba mitinda ya sembo. Tosengeli kosala nini?

Tómekola bato oyo batyolaki nsɔni

Mpo na kobatela bosembo na ye epai ya Yehova, Yesu abomamaki na ndenge moko ya nsɔni koleka. “Ayikelaki nzete ya mpasi mpiko, atyolaki nsɔni.” (Ebr. 12:2) Banguna ya Yesu babɛtaki ye bambata, babwakelaki ye nsoi, balongolaki ye bilamba, babɛtaki ye fimbo, babakaki ye na nzete, mpe batyolaki ye. (Mrk. 14:65; 15:29-32) Atako bongo, Yesu atyolaki nsɔni oyo balingaki kolatisa ye. Ndenge nini? Aboyaki kozonga nsima liboso ya makambo yango. Yesu ayebaki ete lokumu na ye ekitaki te na miso ya Yehova, mpe na ntembe te alukaki nkembo epai ya bato te. Atako Yesu akufaki liwa ya moombo, Yehova apesaki ye lokumu na ndenge asekwisaki ye mpe atyaki ye na esika ya lokumu koleka, esika ya mibale nsima na Ye. Bafilipi 2:8-11 elobi boye: “[Kristo Yesu] amikitisaki mpe atosaki tii liwa, ɛɛ, liwa na nzete ya mpasi. Yango wana mpe Nzambe atombolaki ye likoló koleka mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso, mpo, na nkombo ya Yesu, mabɔlɔngɔ nyonso ya baoyo bazali na likoló mpe ya baoyo bazali na mabele mpe ya baoyo bazali na nse ya mabele egumbama, mpe monɔkɔ nyonso endima polele ete Yesu Kristo azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.”

Yesu akokaki mpe koyoka nsɔni ya kobomama ndenge abomamaki. Mwana ya Nzambe azalaki komitungisa mpo na nsɔni oyo ekokaki koyela Tata na ye na ndenge bakokatela ye etumbu mpo ete afingi Nzambe. Yesu asɛngaki Yehova alongolela ye nsɔni ya ndenge wana. Abondelaki boye: “Longolelá ngai kɔpɔ oyo.” Kasi, Yesu atosaki mokano ya Nzambe. (Mrk. 14:36) Atako bongo, Yesu alongaki mikakatano nyonso oyo eyelaki ye mpe atyolaki nsɔni. Kutu, kaka bato oyo bazalaki kondima makanisi oyo ezalaki na ntango wana nde bakokaki koyoka nsɔni na makambo yango. Emonani polele ete Yesu azalaki kolanda makanisi yango te.

Bayekoli ya Yesu mpe bakangamaki mpe babɛtamaki fimbo. Likambo yango ekitisaki bango lokumu na miso ya bato mingi. Bamonaki bango mpamba mpe batyolaki bango. Atako bongo, balɛmbaki te. Bayekoli ya solo batikaki te makanisi ya bato etambwisa bango mpe batyolaki nsɔni. (Mat. 10:17; Mis. 5:40; 2 Ko. 11:23-25) Bayebaki ete basengeli ‘komema nzete na bango ya mpasi mpe kolanda Yesu ntango nyonso.’​—Luka 9:23, 26.

Bongo biso lelo? Makambo oyo mokili emonaka ete ezali bozoba, ezali ya bolɛmbu, mpe ya mpambampamba, Nzambe amonaka ete ezali ya bwanya, ya nguya, mpe ya lokumu. (1 Ko. 1:25-28) Soki tozali kolanda makanisi nyonso ya bato ekozala bozoba te mpe tokomonisa te ete tozangi komona mosika?

Moto nyonso oyo alingi lokumu asengeli kozwa makanisi ya mokili na valɛrɛ mingi. Epai mosusu, ndenge moko na Yesu mpe bayekoli na ye ya ekeke ya liboso, tolingi Yehova azala moninga na biso. Yango wana, eloko oyo ezali na lokumu na miso na ye ekozala mpe na lokumu na miso na biso mpe eloko ya nsɔni mpo na ye, ekozala mpe bongo mpo na biso.

[Elilingi na lokasa 4]

Yesu alandaki makanisi ya mokili te na oyo etali nsɔni