Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libyangi mpo na moto nyonso!

Libyangi mpo na moto nyonso!

Libyangi mpo na moto nyonso!

LIBYANGI ya nini? Mpo na kokende kotala biro moko ya Batatoli ya Yehova, oyo eyebani mingi na nkombo Betele. Babetele ezali 118 na mokili mobimba. Mbala mingi, bato oyo bayaka kotala yango bamonisaka ete basepeli mingi na makambo oyo ezali kosalema na Betele.

Nsima ya komona ndenge bato ebele bazalaki kosalela Yehova mosala makasi na esengo na Betele ya Mexique, elenge mobali moko oyo azalaki moyekoli ya Biblia asepelaki mingi mpe atunaki ete: “Nasala nini mpo nakóma kosala awa?” Bayebisaki ye boye: “Ya liboso, osengeli kozwa batisimo. Na nsima, ekozala malamu ozala mobongisi-nzela​—mosakoli ya bokonzi ya ntango nyonso.” Elenge yango alandaki batoli yango, mpe mbula mibale na nsima babengaki ye na Betele ya Mexique, epai asali sikoyo mbula 20.

Betele ezali nini?

Na monɔkɔ ya Ebre, “Betele” elimboli “Ndako ya Nzambe.” (Eba. 28:17, 19) Bandako ya babiro ya filiale ndenge na ndenge ezalaka mpo na konyata mpe kokabola Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe kopesa lisalisi ya elimo na masangá koleka 100 000 ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Pene na bandeko 20 000 oyo basalaka na Betele​—mibali mpe basi oyo bauti na bamboka mpe mimeseno ekeseni—​basalelaka Yehova mpe bandeko na bango ya elimo ntango nyonso kozanga koluka matomba na bango moko. Baoyo balekisi bambula mingi na mosala yango bazali kosala elongo na bilenge oyo bazali naino makasi. Na bampokwa mpe na bawikende, bandeko ya Betele basanganaka na bandeko ya masangá ya pembenipembeni na makita mpe na mosala ya kosakola. Basalelaka mpe ntango oyo bazali na mosala te mpo na koyekola Biblia, kominanola, mpe kosala makambo na bango moko.

Sanza na sanza, bapesaka bandeko ya Betele mwa mbongo moke mpo bákokisa bamposa na bango ya mikemike. Bazalaka na bilei ya malamu mpe bafandaka na bandako ya pɛto, mpe ya malamu. Balukaka te ete bashambrɛ ya Betele ezala lokola bandako ya mbongo. Kasi, ekokisaka bamposa ya bafandi na yango. Bato oyo bayaka kotala Betele bakamwaka kaka te mpo na bandako oyo ebatelami malamu mpe ndenge mosala ezali kosalema na molɔngɔ, kasi mpe ndenge mosala ezali kosalema na bomoko mpe na boboto. Moto nyonso asalaka na molende, kasi ata soki bazali na mosala mingi ndenge nini bazangaka ntango ya komonisa boboto te. Na Betele bamatisaka moto te mpo na mosala oyo asalaka mpe moto moko amiyokaka te ete aleki basusu mpo asalaka mosala moko boye. Mosala nyonso ezali na ntina, ezala ya kopɛtola, ya kobongisa bafololo, kolamba, to kosala na imprimerie to na biro. Bandeko oyo basalaka na Betele basalaka na bomoko mpo na kosunga mosala ya Batatoli ya Yehova.​—Kol. 3:23.

Talá bandeko mosusu ya Betele

Tólobela naino bandeko oyo basali libota ya Betele na mokili mobimba. Nini etindaki bango bándima kosala na Betele? Tózwa ndakisa ya Mario. Ntango akómaki Motatoli ya Yehova, Mario azalaki na mosala oyo ezalaki kofuta ye mbongo mingi na kompanyi moko monene oyo esalaka mituka na Allemagne mpe azalaki na libaku ya komata grade. Mwa moke nsima ya kozwa batisimo, andimaki kosala na Betele ya mboka yango mpo na pɔsɔ moko. Batindaki ye apesa mabɔkɔ na esika oyo banyataka mikanda. Mario amonaki bokeseni oyo ezali kati na baninga na ye ya mosala na Betele ná baninga na ye ya mosala ya mosuni. Na yango, asɛngaki mpo asala na Betele ntango nyonso. Atako baninga na ye mingi ya mosala bazalaki komona ekateli na ye mabe, Mario azali sikoyo kosala na esengo na Betele ya Allemagne.

Mingi bakɔtaka na Betele kozanga kozwa formasyo moko ya sikisiki na kelasi to koyeba mosala moko boye ya sikisiki. Ezalaki bongo mpo na Abel, oyo asali mbula 15 na Betele ya Mexique. Alobi boye: “Betele ezali mpenza eteyelo na ngai. Nayekoli kosalela masini ya konyata mikanda oyo ezalaka mpasi kosalela. Nayebi ete boyebi wana ekoki kopesa ngai mbongo ebele libándá ya Betele, kasi nakoki te kozwa nyonso oyo nazali kozwa awa​—bomoi moko ya kimya mpe ya esengo, oyo ezangi mitungisi ná kowelana, makambo oyo ezalaka na bisika mingi ya misala. Nayokaka ete nazwá formasyo ya moko malamu koleka, oyo esalisaki ngai nakola na elimo mpe nazala moto ya mayele. Nakokaki kozwa matomba ya ndenge wana te, ata na iniversite ya malamu ndenge nini.”

Kotala Betele ekoki kolendisa

Kokende kotala Betele ekoki kosalisa moto abongisa boyokani na ye na Nzambe. Ezalaki bongo mpo na Omar, na Mexique. Mama na ye ateyaki ye solo ya Biblia. Kasi ntango akómaki na mbula 17, Omar atikaki koyangana na makita ya bokristo mpe kobima mosala ya kosakola. Nsukansuka amikɔtisaki na makambo ya mabe mpe na bomoi ya koluka biloko ya mokili. Na nsima, ntango azalaki kosala na kompanyi moko ya batelefone, Omar azalaki kati na bato oyo kompanyi etindaki na Betele ya Mexique mpo na kolakisa biloko na bango. Omar alobi boye: “Nsima ya kolakisa biloko na biso, bandeko oyo bayambaki biso batambwisaki biso mpo tótala bandako ya Betele. Makambo oyo namonaki mpe ndenge oyo bamoniselaki ngai boboto etindaki ngai nakanisa ndenge bomoi na ngai ezalaki, mosika na Yehova. Na mbala moko, nazongelaki koyangana na makita mpe koyekola Biblia. Sanza motoba nsima ya kotala Betele, nazwaki batisimo. Napesaka Yehova matɔndi mpo na elendiseli oyo nazwaki na ndenge nakendaki kotala Betele.”

Masahiko, na Japon, akolaki mpe na libota ya Batatoli. Kasi, abandaki kokanisa ete bomoi ya mokristo ezali nkaka mingi. Akómaki komipesa mingi na makambo ya kelasi mpe atikaki koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola. Masahiko alobi boye: “Mokolo moko, libota na biso ná bandeko mosusu bakristo bazwaki ekateli ya kokende kotala Betele. Lokola libota na ngai batyaki ngai mbamba, nakendaki na bango. Ntango totalaki Betele, nalendisamaki na ndenge oyo nayoká naino te. Kozala elongo na bakristo mosusu na ntango ya mobembo epesaki ngai esengo oyo naino nayoká te na baninga na ngai oyo bazali Batatoli te. Nakómaki na mposa ya kozala na bomoi ya mokristo, mpe nazwaki ekateli ya kosɛnga boyekoli ya Biblia.” Lelo, Masahiko azali mosakoli ya ntango nyonso na lisangá na bango.

Motatoli moko ya France akendaki mosala na Moscou. Kuna azalaki kokutana na Batatoli lisusu te mpe alɛmbaki na elimo. Abandaki kosala makambo ya mabe mpe nsukansuka abalaki mobali oyo azali Motatoli te. Na nsima, Motatoli moko ya mwasi oyo autaki France ayaki kotala ye, mpe bango mibale bakendaki na Saint-Pétersbourg, na Russie, kotala Betele. Akomi boye: “Na Betele bayambaki biso malamu, mpe esimbaki motema na ngai. Ezalaki mpenza na kimya. Nayokaki ete elimo ya Yehova ezali kosala. Ndenge nini nakokaki mpenza kosala libunga ya ndenge wana, kokende mosika ya ebongiseli ya Yehova? Nsima ya kotala Betele, nabondelaki Yehova asalisa ngai mpe nabandaki koteya bana na ngai Biblia na molende koleka.” Longola lisalisi mosusu nyonso oyo mbala mosusu Motatoli wana oyo alɛmbaki na elimo azwaki, kokende oyo akendeki kotala Betele elendisaki ye mingi, mpe na nsima akendaki liboso na elimo.

Bongo bato oyo bayebi Batatoli ya Yehova malamu te, kokende kotala Betele ekoki kosala bango nini? Na 1988, Alberto, oyo azalaki komipesa mpenza na makambo ya politiki, akendaki kotala Betele na Brésil. Bopɛto, ndenge makambo ezalaki na molɔngɔ, mpe mingimingi ndenge mosala ezalaki kosalema polele esimbaki motema na ye. Mwa moke liboso ya kokende kotala Betele, Alberto akendaki kotala seminɛrɛ moko epai sɛmɛki na ye azalaki sango. Alberto amonaki bokeseni. Alobi boye: “Makambo nyonso ezalaki kosalema na kobombana.” Mwa moke nsima ya kotala Betele, andimaki koyekola Biblia, atikaki makambo ya politiki, mpe azali lelo nkulutu na lisangá.

Yaká kotala Betele!

Bato mingi basalaki milende mingi mpo na kokende kotala Betele ya mboka na bango. Na ndakisa, na Brésil, Paulo ná Eugenia, babombaki mbongo na boumeli ya mbula minei mpo na kosala mobembo ya mikolo mibale na bisi, kilomɛtrɛ 3 000, mpo na kotala Betele ya mboka yango. Balobi boye: “Milende wana ebongaki mpenza. Sikoyo toyebi malamu ebongiseli ya Yehova. Ntango tolimbolelaka bato oyo toyekolaka na bango Biblia mosala oyo esalemaka na Betele, mbala mosusu batunaka biso ete: ‘Bosilá kokóma kuna?’ Sikoyo tokoki koloba ɛɛ.”

Biro moko ya filiale mpe Betele ezalaka na mboka ya bino to na mboka oyo ezali pene na bino? Tosɛngi yo okende kotala Betele. Bakoyamba yo mpenza malamu mpe okozwa matomba na elimo soki okei kotala Betele.

[Elilingi na lokasa 18]

Mario

[Elilingi na lokasa 18]

Abel

[Elilingi na lokasa 18]

Allemagne

[Elilingi na lokasa 18]

Japon

[Elilingi na lokasa 18]

Brésil