Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mpo na nini Yesu ayebisaki mwasi oyo ayebanaki ete azali mosumuki ete masumu na ye elimbisami?​—Luka 7:37, 48.

Ntango Yesu azalaki kolya na mesa ya Mofarisai moko na nkombo Simo, mwasi moko ‘amityaki na nsima na makolo ya Yesu.’ Apɔlisaki makolo na ye na mpisoli na ye mpe apangwisaki yango na nsuki ya motó na ye. Na nsima, apwɛpwaki makolo na ye na boboto mpe apakolaki yango mafuta ya nsolo kitoko. Evanzile elobi ete mwasi yango “ayebanaki na engumba wana ete azali mosumuki.” Ya solo, moto nyonso ya kozanga kokoka azali mosumuki, kasi mbala mingi, Biblia esalelaka liloba yango mpo na kolobela moto oyo masumu na ye eyebaná to oyo akendá nsango ete asalaka masumu. Mbala mosusu, mwasi yango azalaki ndumba. Ezalaki na moto ya ndenge wana nde Yesu alobaki boye: “Masumu na yo elimbisami.” (Luka 7:36-38, 48) Yesu alingaki koloba nini? Lokola mbeka ya lisiko epesamaki naino te, ndenge nini masumu yango ekokaki kolimbisama?

Ntango mwasi wana asilisaki kosokola makolo ya Yesu mpe kotya yango mafuta, kasi liboso Yesu ayebisa ye ete masumu na ye elimbisami, Yesu apesaki ndakisa moko mpo na komonisa Simo, nkolo-ndako yango, likambo moko ya ntina. Yesu akokanisaki lisumu na nyongo moko monene oyo esengeli kofutama, mpe alobaki na Simo boye: “Bato mibale bazalaki na nyongo ya modefisi moko boye; moko azalaki na nyongo ya denari nkama mitano (500), kasi mosusu ya ntuku mitano (50). Lokola bazalaki na eloko ya kozongisa te, alimbisaki bango nyonso mibale na motema moko. Sikoyo, nani na kati na bango akolinga ye mingi koleka?” Simo azongisaki ete: “Nakanisi ezali moto oyo ye alimbisaki nyongo ya monene koleka na motema moko.” Yesu azongisaki boye: “Okati likambo yango malamu.” (Luka 7:41-43) Biso nyonso tozali ya nyongo ya kotosa Nzambe; na yango ntango totosi ye te mpe tosali lisumu, tofuti te nyongo oyo tosengelaki kofuta ye. Na ndenge yango, tobakisi nyongo. Kasi, Yehova azali lokola modefisi oyo alingaka kolimbisa banyongo na biso. Ezali mpo na ntina yango nde Yesu alendisaki bayekoli na ye bábondelaka Nzambe mpe básɛnga ete: “Limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo bazali na nyongo na biso.” (Mat. 6:12) Luka 11:4 emonisi ete banyongo yango ezali nde masumu.

Nini ezalaki kotinda Nzambe alimbisa masumu na ntango ya kala? Bosembo na ye ya kokoka esɛngaka ete etumbu ya lisumu ezala liwa. Na yango, Adama afutaki bomoi na ye mpo na lisumu na ye. Nzokande Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele elobaki ete moto oyo asali lisumu akokaki kolimbisama soki apesi Yehova mbeka ya nyama. Ntoma Paulo alobaki boye: “Biloko pene na nyonso epɛtolamaka na makila na kolanda Mibeko, mpe soki makila esopami te bolimbisi ezali te.” (Ebr. 9:22) Bayuda bayebaki likambo mosusu te oyo na nzela na yango Nzambe akokaki kolimbisa masumu. Na yango, ezali likambo ya kokamwa te soki bato oyo bazalaki wana na ntango ya Yesu bayokaki mabe mpo na makambo oyo alobaki na mwasi wana. Bato oyo bafandaki ná Yesu na mesa balobaki na mitema na bango ete: “Moto oyo azali nani mpo alimbisa ata masumu?” (Luka 7:49) Na yango, nini ekokaki kosala ete masumu ya mwasi wana elimbisama?

Esakweli ya liboso mpenza oyo ebimaki ntango mwasi ná mobali ya liboso batombokaki elobelaki mokano ya Yehova ya kobimisa “momboto” moko oyo Satana ná “momboto” na ye basengelaki koswa na litindi. (Eba. 3:15) Koswama yango esalemaki ntango banguna ya Nzambe babomaki Yesu. (Gal. 3:13, 16) Makila oyo Yesu asopaki ezali lisiko oyo ezali kolongola bato na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Lokola eloko moko te ekoki kopekisa Yehova akokisa makambo oyo akani kosala, ntango kaka maloba ya Ebandeli 3:15 elobamaki, na miso ya Nzambe, lisiko efutamaki. Akokaki bongo kolimbisa bato oyo bazalaki komonisa kondima na bilaka na ye.

Liboso Yesu aya na mabele, Yehova atángaki bato ebele bayengebene. Kati na bango, tokoki kotánga Enoka, Noa, Abrahama, Rahaba, mpe Yobo. Na kondima, bazalaki kozela bilaka ya Nzambe ekokisama. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Abrahama andimelaki Yehova, mpe batángaki ye moyengebene.” Mpo na Rahaba, Yakobo alobaki boye: “Ndenge moko mpe Rahaba mwasi ya ndumba atángamaki moyengebene mpo na misala na ye . . . te?”​—Yak. 2:21-25.

Davidi, mokonzi ya Yisraele ya kala, asalaki masumu mingi ya minene kasi azalaki na kondima makasi epai ya Nzambe ya solo mpe ntango nyonso, abongolaki mpenza motema. Longola yango, Biblia elobi boye: “Nzambe akabaki [Yesu] azala likabo ya kozipa masumu na nzela ya kondima na makila na ye. Asalaki bongo mpo na kolakisa boyengebene na ye moko, mpo azalaki kolimbisa masumu oyo esalemaki kala ntango Nzambe azalaki kokanga motema; mpo na kolakisa boyengebene na ye moko na eleko oyo, mpo azala moyengebene ata ntango azali kotánga moto oyo andimelaka Yesu ete azali moyengebene.” (Rom. 3:25, 26) Lokola atalelaki mbeka ya lisiko ya Yesu oyo esengelaki kopesama na mikolo ekoya, Yehova akokaki kolimbisa masumu ya Davidi kozanga abuka masɛngami na ye moko na oyo etali bosembo.

Emonani ete likambo ya mwasi wana oyo atyaki Yesu mafuta na makolo ezalaki kaka bongo. Azalaki kosala masumu, kasi abongolaki motema. Andimaki ete azali na mposa ya kosikolama na masumu mpe amonisaki na misala na ye ete azalaki mpenza na botɔndi mpo na moto oyo Yehova asaleli mpo na kosikola bato. Atako esengelaki kopesama nsima, mbeka yango ezalaki mpenza solo, na boye ete Nzambe akokaki kosalela motuya na yango mpo na kolimbisa masumu ya bato lokola mwasi wana. Yango wana, Yesu ayebisaki ye ete: “Masumu na yo elimbisami.”

Ndenge lisolo oyo emonisi yango polele, Yesu akimaki bato ya masumu te. Asalelaki bango makambo ya malamu. Longola yango, Yehova alingaka kolimbisa basumuki oyo babongoli motema. Likambo yango esengeli mpenza kobɔndisa biso bato ya kozanga kokoka mpe kokitisa biso motema!

[Elilingi na lokasa 7]

Batángamaki bayengebene