Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Mobeko ya motema boboto” ebatela lolemo na yo

“Mobeko ya motema boboto” ebatela lolemo na yo

“Mobeko ya motema boboto” ebatela lolemo na yo

“Afungoli monɔkɔ na ye na bwanya, mpe mobeko ya motema boboto ezali na lolemo na ye.”​—MAS. 31:26.

1, 2. (a) Basambeli ya Yehova basengeli kolona ezaleli nini? (b) Lisolo oyo ekolobela nini?

MALOBA ya kilo oyo mama ya Lemuele, mokonzi moko ya ntango ya kala, ayebisaki ye elobelaki mpe likambo moko ya ntina mingi mpo na mwasi ya malamu. Ayebisaki ye boye: “Afungoli monɔkɔ na ye na bwanya, mpe mobeko ya motema boboto ezali na lolemo na ye.” (Mas. 31:1, 10, 26) Ezali malamu motema boboto ezala na lolemo ya mwasi ya bwanya, ata mpe na lolemo ya bato mosusu nyonso oyo balingaka kosepelisa Yehova Nzambe. (Tángá Masese 19:22.) Motema boboto esengeli komonana na maloba ya basambeli nyonso ya solo.

2 Motema boboto ezali nini? Tosengeli komonisa yango epai ya nani? Nini ekosalisa biso tótya “mobeko ya motema boboto” na lolemo na biso? Ndenge nini kosala bongo ekoki kobongisa masolo na biso na bandeko ya libota mpe ya lisangá?

Boboto oyo euti na bolingo ya sembo

3, 4. (a) Motema boboto ezali nini? (b) Na ndenge nini motema boboto ekeseni na boboto mpamba, to motema malamu?

3 Motema boboto esangisi bizaleli mibale: bolingo mpe boboto. Ezali na boboto, elingi koloba kotyela basusu likebi mpe komonisa yango na misala mpe na maloba ya malamu mpo na kosalisa bango. Lokola ezali mpe na bolingo, komonisa motema boboto elimboli mpe koluka bolamu ya basusu mpo na bolingo oyo tozali na yango mpo na bango. Kasi, na monɔkɔ ya Ebre, liloba oyo ebongolami na motema boboto elimboli kaka te boboto oyo euti na bolingo. Kozala na motema boboto elimboli komonisela moto boboto na motema moko mpe na bosembo tii mokano oyo tomoniseli ye boboto yango ekokokisama.

4 Motema boboto ekeseni mpe na boboto ya mpamba na ndenge mosusu. Boboto mpamba, to motema malamu, tokoki komonisa yango ata epai ya bato oyo toyebi te. Ntango ntoma Paulo ná bato mosusu 275 bazindaki na masuwa, bamoniselaki bango boboto ya ndenge wana epai ya bato ya esanga Malta​—bato oyo bakutanaki na bango te liboso. (Mis. 27:37–28:2) Nzokande, motema boboto etalelaka nde boyokani ya sembo oyo ezalaka kati na bato oyo bayebaná banda kala. * Yango nde Bakeni bamoniselaki “bana nyonso ya Yisraele . . . na ntango oyo bazalaki kouta na Ezipito.”​—1 Sa. 15:6.

Komanyola mpe kobondela ezali na ntina mingi

5. Nini ekosalisa biso tópekisa lolemo na biso?

5 Komonisa motema boboto na maloba na biso ezali pɛtɛɛ te. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Moto moko te akoki kosala ete lolemo etosa ye. Ezali eloko mabe oyo moto akoki kopekisa te, etondi na ngɛngɛ oyo ebomaka.” (Yak. 3:8) Nini ekoki kosalisa biso tópekisa enama yango oyo ezalaka mpasi mpo na kopekisa? Makambo oyo Yesu alobaki na bakonzi ya mangomba ya ntango na ye epesi biso likanisi. Alobaki boye: “Monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.” (Mat. 12:34) Mpo motema boboto ebatela lolemo na biso, tosengeli kolona ezaleli yango na kati ya motema na biso. Tótala ndenge komanyola mpe kobondela ekoki kosalisa biso tósala yango.

6. Mpo na nini tosengeli komanyola na botɔndi misala ya motema boboto ya Yehova?

6 Biblia elobi ete Yehova Nzambe “atondi na motema boboto.” (Kob. 34:6) Mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Ee Yehova, motema boboto na yo etondisi mabele.” (Nz. 119:64) Biblia ezali na masolo mingi oyo emonisi ndenge Yehova amoniselaki basambeli na ye motema boboto. Soki tozwi ntango ya komanyola na botɔndi ‘misala ya Yehova,’ tokoki kolona mposa ya komonisa ezaleli yango oyo esepelisaka Nzambe.​—Tángá Nzembo 77:12.

7, 8. (a) Likambo nini ya motema boboto Yehova asalaki mpo na Lota ná libota na ye? (b) Ndenge nini Davidi ayokaki ntango Nzambe amoniselaki ye motema boboto?

7 Na ndakisa, kanisá ndenge Yehova abikisaki Lota, mwana ya ndeko ya Abrahama ná libota na ye, ntango abomaki engumba Sodoma, epai bazalaki kofanda. Lokola ntango ya koboma engumba yango epusanaki, baanzelu oyo bayaki epai ya Lota balendisaki ye azwa libota na ye mpe bábima na engumba yango nokinoki. Biblia elobi boye: “Lokola azalaki koumela, mpo na motema mawa oyo Yehova amoniselaki ye, [baanzelu] basimbaki lobɔkɔ na ye mpe lobɔkɔ ya mwasi na ye mpe mabɔkɔ ya bana na ye mibale ya basi mpe babimisaki ye mpe batyaki ye na libándá ya engumba.” Kokanisa likambo wana oyo Yehova asalaki mpo na kobikisa Lota, ezali te kosimba motema na biso mpe kotinda biso tómona ete Nzambe amoniselaki ye motema boboto?​—Eba. 19:16, 19.

8 Tótala mpe ndakisa ya Davidi, mokonzi ya Yisraele ya kala, oyo ayembaki boye: “[Yehova] azali kolimbisa libunga na yo mobimba, azali kobikisa yo na minyoko na yo nyonso.” Na ntembe te, Davidi asepelaki mingi ndenge Nzambe alimbisaki ye mpo na lisumu na ye ná Bate-Sheba! Akumisaki Yehova na maloba oyo: “Se ndenge likoló etombwaná koleka mabele, motema boboto na ye epai ya baoyo bazali kobanga ye eleki monene.” (Nz. 103:3, 11) Soki tomanyoli lisolo wana mpe masolo mosusu, mitema na biso ekotonda na botɔndi mpo na motema boboto ya Yehova, mpe ekotinda biso tókumisa ye mpe tópesa ye matɔndi. Soki motema na biso ekómi na botɔndi mingi, ekotinda biso mpe tómekola Nzambe ya solo.​—Ef. 5:1.

9. Nini esengeli kotinda basambeli ya Yehova bámonisaka motema boboto na bomoi na bango ya mokolo na mokolo?

9 Bandakisa oyo ezali na Biblia emonisi ete Yehova amonisaka motema boboto, to bolingo ya sembo, epai ya bato oyo ye andimi mpe oyo bazali na boyokani malamu na ye. Ezali boni mpo na bato oyo bazali na boyokani ya ndenge wana te na ye? Yehova azalaka motema makasi mpe amoniselaka bango boboto te? Ezali bongo te. Luka 6:35 elobi boye: “[Nzambe] asalelaka bato oyo bazangi botɔndi mpe bato mabe makambo na boboto.” “Abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.” (Mat. 5:45) Liboso tóyekola solo mpe tóyokanisa bomoi na biso na solo yango, Nzambe azalaki komonisela biso boboto oyo amoniselaka bato nyonso. Nzokande, lokola tokómi basambeli na ye, azali komonisela biso bolingo ya sembo​—motema boboto na ye oyo ebongwanaka te. (Tángá Yisaya 54:10.) Tózala mpenza na botɔndi mpo na yango! Mpe esengeli mpenza kotinda biso tómonisa motema boboto na maloba na biso mpe na makambo mosusu ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo!

10. Mpo na nini libondeli ezali na ntina mingi soki tolingi motema boboto ekɔta na bomoto na biso?

10 Eloko mosusu ya ntina oyo ekoki kosalisa biso tókolisa motema boboto ezali libondeli. Ezali bongo mpo bolingo mpe boboto​—bizaleli oyo ezali na kati ya motema boboto—​ezali biteni ya mbuma ya elimo santu ya Yehova. (Gal. 5:22) Tokoki kolona motema boboto na mitema na biso soki totiki elimo yango etambwisa biso. Ndenge ya kozwa elimo santu ya Yehova na mbala moko ezali kosɛnga yango na libondeli. (Luka 11:13) Ebongi mpenza tóbondelaka mbala na mbala mpo na kosɛnga elimo ya Nzambe mpe tóndima litambwisi na yango. Ya solo, komanyola mpe kobondela ezali na ntina mingi soki tolingi mobeko ya motema boboto ezala na lolemo na biso.

Na lolemo ya babalani

11. (a) Ndenge nini toyebi ete Yehova asɛngaka mibali bámonisela basi na bango motema boboto? (b) Na ndenge nini mobeko ya motema boboto ekoki kosalisa mobali abatela lolemo na ye?

11 Ntoma Paulo alendisi mibali ete: “Bókoba kolinga basi na bino, ndenge Kristo mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.” (Ef. 5:25) Paulo akundwelaki bango mpe makambo oyo Yehova ayebisaki Adama ná Eva. Akomaki boye: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakokóma mosuni moko.” (Ef. 5:31) Tomoni polele ete Yehova asɛngaka mibali bázala sembo epai ya basi na bango; bámonisela bango ntango nyonso motema boboto. Mobali oyo lolemo na ye etambwisami na bolingo ya sembo alobelaka mabunga ya mwasi na ye na miso ya bato te; akitisaka mpe ye te. Asepelaka nde kokumisa ye. (Mas. 31:28) Soki ntango mosusu matata ebimi kati na bango, motema boboto ekotinda mobali apekisa lolemo na ye mpo asambwisa mwasi na ye te na maloba.

12. Ndenge nini maloba ya mwasi ekoki komonisa ete mobeko ya motema boboto ezali kotambwisa lolemo na ye?

12 Mobeko ya motema boboto esengeli mpe kotambwisa lolemo ya mwasi. Maloba na ye esengeli te komonisa elimo ya mokili. Lokola azali na “limemya makasi epai ya mobali na ye,” akoloba malamu mpo na ye na miso ya bato mpe ekoki kobakisa limemya oyo bato bapesaka mobali na ye. (Ef. 5:33) Lokola alingi te kokitisa limemya oyo bana bapesaka tata na bango, mwasi akoboya kotɛmɛla mobali na ye to koboya makanisi na ye na miso ya bana. Akosilisa makambo ya ndenge wana ntango bazali kaka bango mibale. Biblia elobi boye: “Mwasi ya bwanya mpenza atongi ndako na ye.” (Mas. 14:1) Ndako na ye ezali esika ya esengo mpe ya kimya mpo na libota mobimba.

13. Mobeko ya motema boboto esengeli kozala mingimingi wapi, mpe ndenge nini ekoki komonana?

13 Ata ntango bazali bango moko na ndako, babalani basengeli kokoba kosalela lolemo na bango na ndenge oyo ekomonisa ete bazali kopesana limemya. Paulo akomaki boye: “Bólongola makambo oyo nyonso mosika na bino: nkɛlɛ, nkanda, mabe, maloba ya kofinga, mpe maloba ya nsɔni na monɔkɔ na bino.” Abakisaki boye: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai. . . . Bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Kol. 3:8, 12-14) Soki bana bameseni koyoka maloba ya boboto mpe oyo etondi na bolingo na ndako, bakokola malamu mpe bakoki kolinga komekola elobeli ya baboti na bango.

14. Ndenge nini batata ya mabota bakoki kosalela lolemo na bango mpo na kobɔndisa bato ya mabota na bango?

14 Mokomi ya nzembo akomaki mpo na Yehova ete: “Tiká motema boboto na yo ezala mpo na kobɔndisa ngai.” (Nz. 119:76) Yehova abɔndisaka basaleli na ye mingimingi na ndenge alendisaka bango mpe atambwisaka bango. (Nz. 119:105) Ndenge nini ndakisa ya Tata na biso ya likoló ekoki kosalisa batata ya mabota mpe ndenge nini bakoki kosalela lolemo na bango mpo na kobɔndisa bato ya mabota na bango? Bakoki kosala bongo soki bazali kotambwisa mpe kolendisa mabota na bango. Losambo na libota epesaka libaku ya komona makambo ya motuya oyo ezali na Biblia!​—Mas. 24:4.

Moniselá bandeko bakristo bolingo ya sembo

15. Ndenge nini bankulutu ná bakristo oyo bakɔmɛli na elimo bakoki kosalela lolemo na bango mpo na kobatela bandeko ya lisangá?

15 Mokonzi Davidi abondelaki boye: “Motema boboto na yo mpe bosolo na yo ebatela ngai ntango nyonso.” (Nz. 40:11) Ndenge nini bankulutu ya lisangá mpe bandeko mosusu oyo bakɔmɛli na elimo bakoki komekola Yehova na likambo yango? Na ntembe te, kosalela lolemo mpo na kobenda likebi na makambo oyo Biblia elobi ezali ndenge ya komonisa motema boboto.​—Mas. 17:17.

16, 17. Ndenge nini tokoki komonisa ete maloba na biso etambwisami na mobeko ya motema boboto?

16 Tosengeli kosala nini soki tomoni ete mokristo moko azali kolanda nzela oyo eyokani te na mitinda ya Biblia? Motema boboto esengeli te kotinda biso tósalela lolemo na biso mpo na koluka kosembola ye? (Nz. 141:5) Soki toyoki ete ndeko mokristo moko asali lisumu moko ya monene, bolingo ya sembo ekotinda biso tólendisa mosali-mabe yango “abenga bankulutu ya lisangá” mpo bákoka ‘kobondela mpo na ye, bápakola ye mafuta na nkombo ya Yehova.’ (Yak. 5:14) Soki moto yango aboyi koyebisa bankulutu, mpe biso tofandi kaka nyɛɛ, ekozala bolingo te, boboto mpe te. Basusu kati na biso bakoki kolɛmba nzoto, koyoka ete bazali kaka bango moko, konyokwama mpo bazali komimona ntina te, to kotungisama makasi mpo bakosi bango. Ndenge malamu ya komonisa ete mobeko ya motema boboto ezali na lolemo na biso ezali ya ‘koloba na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi.’​—1 Tes. 5:14.

17 Tosengeli kosala nini soki banguna ya Nzambe batambwisi nsango ya mabe mpo na bandeko na biso bakristo? Na esika tóbɛtela bosembo ya bandeko na biso ntembe, tosengeli kobwaka makambo yango kozanga koyanola, to soki moto oyo azali kotambwisa yango azali na makanisi ya malamu, kotuna ye soki azali mpenza na bantina ya koloba bongo. Soki banguna na biso baluki koyeba esika bandeko na biso bakristo bazali mpo básala bango mabe, bolingo ya sembo mpo na bandeko na biso ekopekisa biso tóyebisa bango.​—Mas. 18:24.

Moto ya “motema boboto akozwa bomoi”

18, 19. Mpo na nini mobeko ya motema boboto esengeli te kolongwa na lolemo na biso na boyokani na biso na bandeko na biso bakristo?

18 Bolingo ya sembo esengeli komonana na makambo nyonso oyo tozali kosalela bandeko na biso bakristo. Ata na ntango ya mpasi, mobeko ya motema boboto esengeli te kolongwa na lolemo na biso. Ntango motema boboto ya Bayisraele ekómaki “lokola mamwɛ oyo elimwaka na ntɔngɔntɔngɔ,” Yehova asepelaki te. (Hos. 6:4, 6) Nzokande, Yehova asepelaka soki basaleli na ye bazali ntango nyonso na motema boboto. Talá ndenge apambolaka baoyo basalaka bongo.

19 Masese 21:21 elobi boye: “Ye oyo azali kolanda boyengebene mpe motema boboto akozwa bomoi, boyengebene mpe nkembo.” Moko ya mapamboli ya moto yango ezali ete akozwa bomoi​—bomoi ya mokuse te kasi bomoi ezangi nsuka. Yehova asalisaka ye ‘asimba makasi bomoi ya solosolo.’ (1 Tim. 6:12, 19) Yango wana, tókoba ‘komoniselana motema boboto.’​—Zek. 7:9.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 4 Mpo na komona malamu ndenge motema boboto ekeseni na bosembo, bolingo, mpe boboto mpamba, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2002, nkasa 12-13, 18-19.

Okoki kolimbola?

• Motema boboto elimboli nini?

• Nini ekosalisa biso tózala na mobeko ya motema boboto na lolemo na biso?

• Ndenge nini babalani bakoki komonisa bolingo ya sembo na maloba na bango?

• Nini emonisaka ete tozali na mobeko ya motema boboto na lolemo na biso na boyokani na biso na bandeko na biso bakristo?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 23]

Davidi akumisaki motema boboto ya Yehova

[Elilingi na lokasa 24]

Bosalaka Losambo na libota pɔsɔ na pɔsɔ?