Mpo na nini kotosa ngonga?
Mpo na nini kotosa ngonga?
KOTOSA ngonga to kokóma na esika moko na ntango oyo esengeli ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Makambo mingi ekoki kopekisa biso tótosa ngonga, na ndakisa nzela molai, mituka ekangami na nzela mpe kozala na makambo ebele ya kosala. Atako bongo, kotosa ngonga ezali na ntina mingi. Na ndakisa, na mosala bamonaka ete moto oyo atosaka ngonga abongi kotyelama motema mpe ete azali mosali ya molende. Nzokande, moto oyo ayaka na retare akoki kobebisa mosala ya basusu mpe biloko oyo bazali kosala. Retare ekoki kozangisa mwana kelasi mateya mosusu mpe kozongisa ye nsima. Koya na retare epai ya monganga ekoki kosala ete asalisa biso na ndenge esengeli te.
Nzokande, na bisika mosusu, bamonaka mpenza te ntina ya kotosa ngonga. Na bisika ya ndenge wana, okoki noki kozwa momeseno ya kokóma na retare. Soki ezali bongo, tosengeli kolona mposa ya kotosa ngonga. Soki toyebi ntina ya kotosa ngonga, ekosalisa biso tózala bato oyo batosaka ngonga. Wapi mwa bantina ya kotosa ngonga? Ndenge nini okoki kolonga makambo oyo epekisaka biso tótosa ngonga? Matomba nini okozwa soki ozali kotosa ngonga?
Yehova—Nzambe oyo atosaka ngonga
Ntina ya libosoliboso oyo tolingi kozala bato oyo batosaka ngonga ezali ete tolingi komekola Nzambe na biso. (Ef. 5:1) Yehova azali ndakisa oyo eleki malamu na oyo etali kotosa ngonga. Azalaka na retare te. Alandaka na likebi programɛ na ye ya kokokisa mikano na ye. Na ndakisa, ntango azwaki ekateli ya koboma mokili ya bato mabe na mpela, ayebisaki Noa boye: “Salá masuwa na mabaya ya nzete ya gofere.” Ntango amonaki ete ntango elingi ekoka, Yehova alobaki na Noa akɔta na masuwa mpe ayebisaki ye boye: “Etikali kaka mikolo nsambo nanɔkisa mbula na mabele mikolo ntuku minei (40) butu moi; mpe nakolongola eloko nyonso oyo ezali na bomoi, oyo nasalaki na etando ya mokili.” Mpe na ntango oyo esengelaki, “mikolo nsambo na nsima, esalemaki boye: mpela eyaki likoló ya mabele.” (Eba. 6:14; 7:4, 10) Kanisá ndenge oyo Noa ná libota na ye balingaki kosuka soki bázalaka na masuwa te na ngonga oyo esengelaki. Lokola Nzambe oyo bazalaki kosambela, basengelaki kotosa ngonga.
Mbula soki 450 nsima ya Mpela, Yehova ayebisaki Abrahama ete akozwa mwana mobali oyo na nzela na ye Momboto oyo alakamaki akoya. (Eba. 17:15-17) Nzambe alobaki ete Yisaka akobotama “na ntango ya boye na mbula ekoya.” Esalemaki bongo? Biblia elobi boye: “Sara azwaki zemi mpe na nsima, abotelaki Abrahama mwana mobali na bobange na ye, na ntango oyo etyamaki, oyo Nzambe alobelaki ye.”—Eba. 17:21; 21:2.
Biblia etondi na masolo oyo emonisi ete Nzambe atosaka ngonga. (Yir. 25:11-13; Dan. 4:20-25; 9:25) Biblia eyebisi biso tózela mokolo ya kosambisa ya Yehova oyo ezali koya. Ata soki na miso ya bomoto emonani lokola ezali ‘koumela,’ toyebi mpenza ete “ekokóma nsima ya ngonga te.”—Hab. 2:3.
Kotosa ngonga ezalaka na ntina na losambo
Mibali Bayisraele nyonso basengelaki kokóma na ntango oyo esengeli na esika oyo eponami mpo na “bafɛti ya Yehova na bileko oyo etyami.” (Lev. 23:2, 4) Nzambe atyaki mpe ntango oyo bambeka mosusu esengelaki kopesama. (Kob. 29:38, 39; Lev. 23:37, 38) Yango emonisi te ete Nzambe alingi basaleli na ye batosaka ngonga na losambo na bango?
Na ekeke ya liboso, ntango ntoma Paulo apesaki bakristo ya Korinti mitindo mpo na ndenge makita ya lisangá esengelaki kotambwisama, alendisaki bango boye: “Makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.” (1 Ko. 14:40) Na yango, makita ya bokristo esengelaki kobanda na ntango oyo etyami. Ndenge oyo Yehova atalelaka likambo ya kotosa ngonga ebongwani te. (Mal. 3:6) Boye, tosengeli kosala nini mpo tókómaka na makita ya lisangá na ngonga oyo esengeli?
Ndenge ya kosala mpo na kotosa ngonga
Bato mosusu bamoni ete kobongisa makambo liboso esalisaka mingi. (Mas. 21:5) Na ndakisa, soki tolingi kokende mosika mpo na kokóma na ntango oyo etyami, ebongi nde tózwa kaka ntango oyo ekosalisa biso tókóma kuna na ngonga mpenza oyo etyami? Ekozala malamu te tóbakisa mwa miniti mosusu mpo tókóma na retare te ata soki tokutani na “makambo oyo ekanami te” na nzela? (Mos. 9:11) José *, elenge mobali oyo atosaka ngonga, alobi boye: “Eloko oyo ekoki kosalisa moto azala na retare te ezali nde koyeba ntango boni ekosɛnga ye akóma esika azali kokende.”
Mpo na bandeko mosusu, ekoki kosɛnga kozwa bibongiseli mpo na kolongwa na mosala mwa moke liboso mpo na kokóma na makita na ntango malamu. Yango nde Motatoli moko na Éthiopie asalaki ntango amonaki ete programɛ na ye ya mosala ekobanda kokómisa ye na makita ya lisangá na retare ya miniti 45. Ayokanaki na moninga na ye ya mosala mpo ayaka kolongola ye mwa moke liboso na bampokwa ya makita. Mpe ndeko yango andimaki kosalela moninga na ye ngonga nsambo na ngala na ye.
Soki ozali na bana mike, kokóma na makita na ntango malamu ezali mpenza etumba. Mbala mingi, bakitelaka mama mokumba ya kobongisa bana, kasi bato mosusu ya libota bakoki mpe basengeli kosalisa. Esperanza, mama moko na Mexique, abɔkɔli bana mwambe ye moko. Bazali sikoyo na mbula banda 5 tii 23. Esperanza alimboli ndenge libota na ye basalaka mpo na kotosa ngonga; alobi boye: “Bana na ngai ya basi ya mikóló basalisaka ngai na kobongisa baleki na bango. Epesaka ngai ntango ya kosilisa misala ya ndako mpe ya komibongisa mpo tólongwa na ntango oyo totyá mpo na kokende na makita.” Libota yango ezali na ntango oyo batyá mpo na kolongwa na ndako, mpe basalisanaka bango nyonso mpo na kotosa yango.
Matomba ya kokóma liboso makita ebanda
Kokanisa mapamboli oyo tokozwa soki tozali kokóma na makita ya bokristo liboso ebanda ekoki kolendisa mposa mpe ekateli na biso ya kosala nyonso oyo tokoki mpo na kotosa ngonga. Elenge mokristo moko na nkombo Sandra, oyo akolisaki momeseno ya kokóma na makita na ngonga ya malamu, alobi boye: “Nalingaka mingi kokóma liboso makita ebanda mpo nazalaka na libaku ya kopesa bandeko mibali mpe bandeko basi mbote, kosolola na bango, mpe koyeba bango malamu.” Soki tokómi na Ndako ya Bokonzi liboso makita ebanda, tokoki kozwa libaku ya koyoka masolo Ebr. 10:24, 25.
ya bandeko mosusu oyo bayikaki mpiko mpe batikalaki sembo na mosala ya Nzambe. Ntango toyei na makita mpe tozali kosolola masolo ya kolendisa, bandeko na biso ya mibali mpe ya basi bakoki kosepela mpe tokoki ‘kolendisa bango mpo bázala na bolingo mpe básala misala ya malamu.’—Loyembo mpe libondeli oyo ezalaka na ebandeli ya makita ezali na ntina mingi na losambo na biso. (Nz. 149:1) Banzembo na biso ekumisaka Yehova, ekundwelaka biso bizaleli oyo tosengeli kolona, mpe elendisaka biso tósakola na esengo. Bongo libondeli ya ebandeli? Na ntango ya kala, Yehova abengaki tempelo na ye “ndako ya mabondeli.” (Yis. 56:7) Lelo, tosanganaka na makita na biso mpo na kobondela Nzambe. Libondeli ya ebandeli ezali kaka te mpo na kosɛnga litambwisi mpe elimo santu ya Yehova, kasi mpe mpo na kobongisa makanisi mpe mitema na biso mpo ekanga makambo oyo tokoyekola. Tosengeli kozwa ekateli ya kokóma na makita liboso ya loyembo mpe ya libondeli ya ebandeli.
Ntango alobelaki ntina oyo akómaka na makita liboso ebanda, Helen, oyo azali na mbula 23, alobi boye: “Namonaka ete ezali lolenge ya komonisa Yehova ete nalingaka ye, mpo ye nde apesaka makambo nyonso oyo toyekolaka kuna, ata mpe banzembo mpe libondeli ya ebandeli.” Biso mpe tosengeli komona makambo ndenge wana te? Ɛɛ, esengeli kozala bongo. Yango wana, tósala makasi tókóma na momeseno ya kotosa ngonga na makambo nyonso oyo tozali kosala, mingimingi na makambo oyo etali losambo na biso epai ya Nzambe ya solo.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 12 Bankombo mosusu ezali ya bango te.
[Elilingi na lokasa 26]
Omibongisa malamu liboso
[Elilingi na lokasa 26]
Tiká ntango mpo na “makambo oyo ekanami te”
[Bililingi na lokasa 26]
Zwá matomba ya kokóma liboso makita ebanda