Bomoko ezali elembo ya losambo ya solo
Bomoko ezali elembo ya losambo ya solo
“Nakotya bango na bomoko, lokola bibwɛlɛ na lopango.”—MIKA 2:12.
1. Ndenge nini biloko oyo Nzambe akelá emonisaka bwanya na ye?
MOKOMI moko ya nzembo ayembaki boye: “Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza ebele! Osalá yango nyonso na bwanya. Mabele etondi na biloko oyo obimisaki.” (Nz. 104:24) Bwanya ya Nzambe emonanaka na bomoko oyo ezalaka kati na mitindo ndenge na ndenge ya banzete, nyamankɛkɛ, banyama, mpe bikelamu mosusu ya mikemike oyo ezali na bomoi na mabele. Lisusu, na nzoto na yo, misala ndenge na ndenge esalemaka, banda na binama ya minene tii na biteni mikemike ya baselile na yo; nyonso esalaka na bomoko mpo ozala moto mobimba ndenge ozali mpe na nzoto kolɔngɔnɔ.
2. Ndenge elilingi ya lokasa 13 emonisi yango, mpo na nini tokoki koloba ete bomoko ya bakristo ezalaki likamwisi?
2 Yehova akelá bato mpo básalisanaka. Bato bazali ndenge na ndenge, bakeseni bomoto, mpe makoki. Longola yango, ntango Nzambe akelaki bato ya liboso, apesaki bango bizaleli lokola oyo ya ye mpo bázala na likoki ya kosala na bomoko mpe ya kosalisana. (Eba. 1:27; 2:18) Nzokande, bato mingi na mokili lelo bazali mosika na Nzambe, mpe naino balongá te kosala na bomoko. (1 Yoa. 5:19) Yango wana, soki tokanisi ndenge lisangá ya bokristo ya ekeke ya liboso esangisaki bato ya ndenge na ndenge, na ndakisa baombo oyo bazalaki Baefese, basi Bagrɛki oyo bazalaki bato minene, Bayuda oyo batángaki kelasi mingi, mpe bato oyo bazalaki liboso kosambela bikeko, tokoki koloba ete bomoko na bango ezalaki mpenza likamwisi.—Mis. 13:1; 17:4; 1 Tes. 1:9; 1 Tim. 6:1.
3. Ndenge nini Biblia elobeli bomoko ya bakristo, mpe tokotalela nini na boyekoli oyo?
3 Losambo ya solo esalisaka bato básala na bomoko ndenge binama ya nzoto na biso esalaka. (Tángá 1 Bakorinti 12:12, 13.) Na lisolo oyo tokotalela mwa mituna oyo: Ndenge nini losambo ya solo esangisi bato? Mpo na nini kaka Yehova nde akoki kosangisa bamilio ya bato ya bikólo nyonso? Makambo nini oyo epekisaka bomoko Yehova asalisaka biso tólonga? Na oyo etali bomoko, ndenge nini bokristo ya solo ekeseni na bokristo ya lokuta?
Ndenge nini losambo ya solo esangisi bato?
4. Ndenge nini losambo ya solo esangisi bato?
4 Bato oyo bazali na losambo ya solo bayebi ete lokola Yehova akelaki biloko nyonso, ye nde azali na lotomo ya kozala Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba. (Em. 4:11) Yango wana, atako bakristo ya solo bafandaka na bikólo ekeseni mpe bazalaka na bomoi ndenge moko te, bango nyonso batosaka mibeko moko ya Nzambe mpe balandaka mitinda moko ya Biblia. Na yango, basambeli nyonso ya solo babengaka Yehova “Tata.” (Yis. 64:8; Mat. 6:9) Bango nyonso bazali bandeko ya elimo mpe bakoki kosepela na bomoko kitoko oyo mokomi ya nzembo alobelaki ete: “Talá! Ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo ete bandeko báfanda na bomoko!”—Nz. 133:1.
5. Ezaleli nini esalisaka mpe basambeli ya solo bázala na bomoko?
5 Atako bakristo ya solo bazali bato ya kozanga kokoka, basambelaka bango nyonso na bomoko mpo bayekolá kolingana. Yehova azali koteya bango kolinga; moto mosusu akoki kosala yango te. (Tángá 1 Yoane 4:7, 8.) Liloba na ye elobi boye: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai. Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo. Kasi, longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Kol. 3:12-14) Ekanganeli yango ya kokoka mpo na bomoko—bolingo—ezali elembo ya libosoliboso ya bakristo ya solo. Yo moko omoná naino te ete bomoko yango ezali elembo ya losambo ya solo?—Yoa. 13:35.
6. Ndenge nini elikya ya Bokonzi esalisaka biso tózala na bomoko?
6 Basambeli ya solo bazali mpe na bomoko mpo bamonaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato. Bayebi ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekolongola baguvɛrnema ya bato mpe ekopambola bato ya botosi; ekopesa bango kimya ya solosolo mpe ya libela. (Yis. 11:4-9; Dan. 2:44) Na yango, bakristo batosaka makambo oyo Yesu alobaki mpo na bayekoli na ye ete: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoa. 17:16) Bakristo ya solo bakɔtaka na kowelana ya politiki ya mokili oyo te; yango wana bazalaka na bomoko ata ntango bato oyo bazali zingazinga na bango bazali na bitumba.
Mateya na bango eutaka esika moko
7, 8. Na ndenge nini mateya ya Biblia esalisaka mpo bomoko ezala?
7 Bakristo ya ekeke ya liboso bazalaki na bomoko mpo bango nyonso bazalaki kozwa bilendiseli oyo ezalaki kouta esika moko. Bazalaki kondima ete Yesu azalaki koteya mpe kotambwisa lisangá na nzela ya lisangani ya mikóló-bakambi, oyo esangisaki bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme. Mibali yango ya sembo bazalaki kolanda Liloba ya Nzambe mpo na kozwa bikateli mpe bazalaki kotinda bakɛngɛli-batamboli mpo na koyebisa malako na bango na masangá oyo ezalaki na mikili ndenge na ndenge. Mpo na bakɛngɛli yango, Biblia elobi boye: “Wana bazalaki koleka na bingumba, bazalaki kopesa baoyo bazalaki kuna mitindo oyo bantoma ná bankulutu oyo bazalaki na Yerusaleme bakamataki mpo bátosa yango.”—Mis. 15:6, 19-22; 16:4.
8 Ndenge moko mpe lelo, Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo esalami na bakristo oyo batyami mafuta na elimo esalisaka lisangá ya mokili mobimba mpo ezala na bomoko. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebimisaka mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ mingi mpo na kolendisa bato. Bilei yango ya elimo eutaka na Liloba ya Nzambe. Na yango, makambo oyo bateyaka eutaka na bato te kasi na Yehova.—Yis. 54:13.
9. Ndenge nini mosala oyo Nzambe apesi biso esalisaka biso tózala na bomoko?
9 Bakɛngɛli bakristo mpe balendisaka bomoko na ndenge bakambaka mosala ya kosakola. Boyokani oyo esangisaka bato oyo bazali kosala elongo na mosala ya Nzambe eleki mosika boyokani oyo bato ya mokili bazalaka na yango ntango bakutani na libaku moko boye. Lisangá ya bokristo esalemaki te mpo ezala Rom. 1:11, 12; 1 Tes. 5:11; Ebr. 10:24, 25) Yango wana, ntoma Paulo alobaki mpo na bakristo ete: “Bozali kotɛlɛma ngwi na elimo kaka moko, na molimo kaka moko bozali kobunda elongo mpo na kondima ya nsango malamu.”—Flp. 1:27.
esika ya kokutana na mabaku moko boye, kasi nde mpo na kokumisa Yehova mpe mpo mosala esalema—kosakola nsango malamu, kokómisa bato bayekoli, mpe kolendisa lisangá. (10. Mpo na makambo nini biso basaleli ya Nzambe tozali na bomoko?
10 Na yango, biso basaleli ya Yehova tozali na bomoko mpo tondimi boyangeli ya Yehova, tolingaka bandeko na biso, totyaka elikya na Bokonzi ya Nzambe, mpe tomemyaka baoyo Nzambe azali kosalela mpo na kokamba biso. Yehova asalisaka biso tólongola bizaleli oyo, mpo na kozanga kokoka na biso, ekoki kobebisa bomoko na biso.—Rom. 12:2.
Tólongola lolendo mpe zuwa
11. Mpo na nini lolendo ekabolaka, mpe ndenge nini Yehova asalisaka biso tólonga yango?
11 Lolendo ekabolaka. Moto ya lolendo alingaka komimona ete aleki basusu mpe mbala mingi ayokaka esengo soki azali komikumisa. Kasi, mbala mingi yango epekisaka bomoko; bato oyo bazali koyoka moto azali komikumisa bakoki koyokela ye zuwa. Moyekoli Yakobo ayebisi biso polele ete: “Komikumisa nyonso ya ndenge wana ezali mabe.” (Yak. 4:16) Komonisa ete toleki basusu ezali kozanga bolingo. Kutu, Yehova azali ndakisa ya komikitisa mpo andimaka kozala na boyokani na bato ya kozanga kokoka lokola biso. Davidi akomaki boye: “Komikitisa na yo [Nzambe] nde ezali kokómisa ngai moto monene.” (2 Sa. 22:36) Liloba ya Nzambe ezali kosalisa biso tólonga lolendo na ndenge eteyaka biso tózala na makanisi ya malamu. Elimo ya Nzambe etindaki Paulo atuna boye: “Nani akesenisi yo na mosusu? Ɛɛ, eloko nini ozali na yango oyo bapesaki yo kopesa te? Nzokande, soki mpenza bapesaki yo yango kopesa, mpo na nini ozali komikumisa lokola nde bapesaki yo yango kopesa te?”—1 Ko. 4:7.
12, 13. (a) Mpo na nini ezali mpasi te koyokela moto zuwa? (b) Nini ekosalema soki tozali kotalela basusu ndenge Yehova atalelaka bango?
12 Zuwa ezali eloko mosusu oyo epekisaka bomoko. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tozalaka na “makanisi ya likunya,” mpe ata mokristo oyo aumeli mingi na lisangá akoki mbala mosusu koyokela basusu zuwa mpo na makambo, biloko, mikumba to mpe makoki na bango. (Yak. 4:5) Na ndakisa, tata moko ya libota akoki koyoka zuwa mpo na mikumba oyo ndeko moko oyo azali na mosala ya ntango nyonso azali kozwa; kasi azali kobosana ete mbala mosusu ndeko oyo azali na mosala ya ntango nyonso akoki mpe koyokela ye mwa zuwa mpo azali na bana. Ndenge nini tokoki kopekisa zuwa ya ndenge wana ebebisa bomoko na biso?
13 Mpo tókoka koboya zuwa, tóbosana te ete Biblia ekokanisi bakristo oyo batyami mafuta na elimo ná binama ya nzoto. (Tángá 1 Bakorinti 12:14-18.) Na ndakisa, atako liso emonanaka polele, kasi motema emonanaka te, binama yango nyonso mibale ezali na ntina, boye te? Ndenge moko mpe, Yehova azwaka moto nyonso ya lisangá na motuya ata soki na bantango mosusu, bato mosusu bakoki komonana koleka basusu mpo na mikumba na bango. Na yango, tótalelaka bandeko na biso ndenge Yehova atalelaka bango. Na esika tóyokela basusu zuwa, tokoki komonisa ete tomibanzabanzaka mpenza mpo na bango. Soki tozali kosala bongo, tokosala ete bokeseni emonana kati na bakristo ya solo ná mangomba ya bokristo ya lokuta.
Bokristo ya lokuta ezali na bokabwani makasi
14, 15. Ndenge nini nsukansuka bokristo ya lipɛngwi ekabwanaki?
14 Bomoko ya losambo ya solo ekeseni makasi na bokabwani oyo ezalaka na mangomba ya bokristo ya lokuta. Na ekeke ya minei, bokristo ya lipɛngwi epalanganaki mingi tii amperɛrɛ moko ya Roma oyo azalaki mopakano akómaki kokamba yango, mpe na ndenge yango bokristo ya lokuta ekolaki. Na nsima, ekómaki kokabwanakabwana mpe bikólo mingi etikaki kosangana na Roma mpe esalaki biklezia ya bikólo na bango moko.
15 Bikólo yango mingi ya bokristo ebundaki yango na yango na boumeli ya bikeke. Na ekeke ya 17 mpe ya 18, bato ya États-Unis, ya France, mpe ya Grande-Bretagne balendisaki bato bákangama na bikólo na bango; yango wana bolingo ya ekólo eyaki kokóma lokola losambo. Na ekeke ya 19 mpe ya 20, bolingo ya ekólo ekómaki kotambwisa makanisi ya bato mingi. Nsukansuka, mangomba ya bokristo ya lokuta ebimisaki mwa mangomba mikemike, oyo mingi na yango endimaka bolingo ya ekólo. Bato oyo bakendaka ndako-nzambe bakendaki kutu na etumba mpo na kobundisa baninga bandimi ya ekólo mosusu. Lelo, bokristo ya lokuta ekabwani mpo ezali na bindimeli ekeseni mpe mpo na bolingo ya ekólo.
16. Makambo nini ezali kokabola bato ya mangomba ya bokristo?
16 Na ekeke ya 20, na bankama ya mangomba ya bokristo, mosusu ekómaki kosala milende mpo mangomba yango esangana. Kasi, nsima ya kosala milende bambula mingi, kaka mangomba moke esanganaki, mpe bandimi bazali kaka na boyokaki te na makambo lokola evolisyo, kosopa zemi, kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, mpe kokómisa basi basango. Mpo na koluka kosangisa bato ya mangomba ndenge na ndenge, bakonzi ya mangomba mosusu ya bokristo balɛmbisaka mateya oyo ezalaki liboso kokabola bango. Nzokande, kolɛmbisa mateya ekitisaka kondima ya bato mpe na ntembe te, ezali kosangisa te mangomba ya bokristo oyo ekabwaná.
Etombwani likoló koleka bolingo ya ekólo
17. Esakweli nini elobaki ete losambo ya solo ekosangisa bato “na eleko ya nsuka ya mikolo”?
17 Atako lelo bato ya mokili bakabwani na ndenge moko ya nsɔmɔ koleka, basambeli ya solo bazali na bomoko. Mika asakolaki boye: “Nakotya bango na bomoko, lokola bibwɛlɛ na lopango.” (Mika 2:12) Mika asakolaki ete losambo ya solo ekotombwana koleka losambo nyonso, ezala ya banzambe ya lokuta to ya bolingo ya ekólo. Akomaki boye: “Ekosalema mpenza boye na eleko ya nsuka ya mikolo: ngomba ya ndako ya Yehova ekopikama makasi likoló koleka nsɔngɛ ya bangomba, mpe ekotombwama mpenza likoló koleka bangomba mike; mpe bato ya bikólo bakosopana kuna. Mpo bato ya bikólo nyonso, ɛɛ bango, bakotambola moto na moto na nkombo ya nzambe na ye; kasi biso, ɛɛ biso, tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso.”—Mika 4:1, 5.
18. Losambo ya solo esalisi biso tósala mbongwana nini?
Mika 4:2, 3) Bato oyo bazali kotika losambo ya banzambe oyo bato basalá to losambo ya ekólo mpo na koya na losambo ya Yehova bazali kokɔta na bomoko. Nzambe azali koteya bango na banzela ya bolingo.
18 Mika alobelaki mpe ndenge losambo ya solo ekosangisa bato oyo bazalaki liboso banguna. “[Bato ya] bikólo mingi bakokende mpenza mpe bakoloba ete: ‘Bóya, tómata na ngomba ya Yehova mpe na ndako ya Nzambe ya Yakobo; mpe akolakisa biso banzela na ye, mpe tokotambola na banzela na ye.’ . . . Mpe bakotula mipanga na bango ete ekóma bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango ete ekóma makwangola ya kokata matiti. Bakotombola mopanga te, ekólo moko mpo na kobunda na ekólo mosusu, mpe bakoyekola etumba lisusu te.” (19. Bomoko ya bamilio ya bato na losambo ya solo emonisi nini?
19 Bomoko oyo ezali kati na bakristo ya solo na mokili mobimba lelo ezali elembo kaka moko ya polele ete Yehova azali kokoba kotambwisa bato na ye na nzela ya elimo na ye. Bato ya bikólo nyonso bazali kosangana na ndenge oyo emonaná naino te na mokili. Yango ezali mpenza kokokisa makambo oyo emonisami na Emoniseli 7:9, 14, mpe komonisa ete mosika te baanzelu ya Nzambe bakofungola “mipɛpɛ” oyo ekobebisa ebongiseli mabe ya ntango oyo. (Tángá Emoniseli 7:1-4, 9, 10, 14.) Kozala na bomoko na lisangá ya bandeko na mokili mobimba ezali lipamboli, boye te? Ndenge nini mokomoko na biso akoki kolendisa bomoko yango? Tokolobela yango na lisolo elandi.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini losambo ya solo esangisi bato?
• Ndenge nini tokoki kopekisa zuwa ebebisa bomoko na biso?
• Mpo na nini bolingo ya ekólo ekaboli basambeli ya solo te?
[Mituna mpo na boyekoli]
[Elilingi na lokasa 13]
Bakristo ya ekeke ya liboso bazalaki kala na bomoi ekeseni
[Bililingi na lokasa 15]
Ndenge nini kopesa mabɔkɔ na misala ya Ndako ya Bokonzi elendisaka bomoko?