Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kampanye monene na Bulgarie elongaki

Kampanye monene na Bulgarie elongaki

Kampanye monene na Bulgarie elongaki

“Mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.”​—MAT. 9:37, 38.

LIKAMBO yango oyo Yesu alobaki ekokani mpenza na oyo ezali na Bulgarie, mboka kitoko ya bangomba na sudi ya Mpoto! Ezali na mposa makasi ya basali mpo na komema nsango malamu epai ya bato koleka milio nsambo oyo bafandaka na ekólo yango. Bulgarie ezali na basakoli soki 1 700, kasi bazali kokoka te kosakola na teritware yango mobimba. Yango wana na 2009, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki bábengisa Batatoli oyo bafandi na mikili mingi ya Mpoto mpe balobaka monɔkɔ ya Bulgare, báya kosala kampanye moko monene. Kampanye yango esengelaki kosalema pɔsɔ nsambo na eleko ya molunge, mpe kosila na liyangani ya etúká “Bósɛnzɛlaka!” oyo esengelaki kosalema na engumba Sofia, na mokolo ya 14-16 Augusto 2009.

Bandeko ebele mpenza bandimi

Bandeko ya Betele ya Sofia bazalaki komituna soki bandeko boni na Allemagne, na Espagne, na France, na Grèce, na Italie, mpe na Pologne bakondima koya. Ekosɛnga básala mobembo na Bulgarie na mbongo na bango moko mpe bálekisa konje na bango na kosakola. Ezalaki mpenza esengo komona ete pɔsɔ na pɔsɔ, motángo ya bandeko oyo bazalaki kosɛnga koya ezalaki kobakisama tii ekómaki bato 292! Lokola bandeko ebele boye bandimaki koya, likoki ezalaki ya kotinda bango na bingumba misato ya Bulgarie: Kazanlak, Sandanski, mpe Silistra. Bakɛngɛli ya zongazonga na Bulgarie basɛngaki babongisi-nzela mpe basakoli ya ekólo yango bápesa mabɔkɔ mpe na kampanye yango. Nsukansuka, bandeko 382 bamipesaki mpo na kosakola na bateritware wana epai nsango malamu esakolamaki naino mpenza te.

Batindaki bandeko ya masangá ya pembeni bákende liboso mpo na koluka bisika ya kofanda. Bafutelaki baapartema mpe balukaki baotɛlɛ oyo ezalaki ntalo moke. Bandeko yango basalaki mosala makasi mpo na kosalisa bandeko oyo bazalaki koya bázwa bisika ya kofanda mpe na nsima, bákokisa bamposa na bango. Na bingumba nyonso misato, bazalaki kofutela bisika ya koyangana. Bazwaki bibongiseli mpo bandeko oyo bayaki bátambwisaka makita ya lisangá. Ezalaki esengo mingi komona ete na bisika yango oyo ata Motatoli moko te azalaki kofanda, basakoli 50 bazalaki kosala makita mpo na kokumisa Yehova.

Molende ya bandeko oyo bautaki na mikili mosusu mpe bayaki mpo na kampanye ezalaki mpenza kokamwisa. Na eleko ya molunge, molunge na Bulgarie ekoki kokóma makasi (koleka 40°C). Kasi, eloko moko te epekisaki bandeko wana ya molende. Na pɔsɔ misato ya liboso, bapesaki litatoli malamumalamu na Silistra, engumba ya bato koleka 50 000 oyo ezali na Ebale Danube. Yango wana, bandeko basakolaki mpe na bamboka ya pembeni, bakómaki ata na Tutrakan, oyo ezali na kilomɛtrɛ 55 na wɛsti ya Silistra. Mbala mingi bazalaki kobanda mosala na ntɔngɔ, na ngonga ya 9:30. Nsima ya kopema mpe kolya mwa eloko na midi, bazalaki kokoba tii na ngonga ya 19:00 to koleka na mpokwa. Ndenge moko mpe, lokola bandeko oyo basalaki kampanye na Kazanlak mpe na Sandanski bazalaki na molende makasi, basakolaki tii na bamboka mpe na bingumba mosusu ya pembeni.

Mosala nini esalemaki?

Litatoli monene epesamaki na boumeli ya pɔsɔ yango nsambo. Ndenge ezalaki na mikolo ya bantoma, bato ya bingumba yango bakokaki koloba ete, ‘Botondisi engumba na biso na mateya na bino.’ (Mis. 5:28) Batatoli oyo basalaki kampanye yango bakabolaki bazulunalo soki 50 000 mpe babandaki koyekola Biblia na bato 482. Likambo ya esengo, banda na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ 2009, lisangá moko esalemaki na Silistra mpe bituluku esalemi na Kazanlak mpe na Sandanski. Ezali esengo komona ndenge bato oyo bayokaki nsango malamu mpo na mbala ya liboso na kampanye yango bazali kokende liboso na elimo.

Na pɔsɔ ya liboso ya kampanye, mobongisi-nzela monene moko ya mwasi oyo alobaka monɔkɔ ya Bulgare mpe autaki na Espagne ateyaki Karina, mwasi moko ya Silistra oyo azalaki kotɛka bazulunalo na balabala. Karina asepelaki mpe ayaki na likita moko. Andimaki mbala moko koyekola Biblia. Lokola mobali na ye andimaka te ete Nzambe azalaka, Karina asɛngaki báyekolaka Biblia na parkɛ moko. Bana na ye mibale ya basi mpe bazalaki kosangana na boyekoli yango. Daniela, mwana na ye ya mokóló, asepelaki mingi mpenza na solo ya Biblia. Atángaki buku Biblia eteyaka na pɔsɔ moko mpe abandaki mbala moko kosalela makambo oyo Biblia elobi na ntina etali bililingi na losambo. Na nsima, abandaki koyebisa baninga na ye solo ya Biblia. Pɔsɔ misato mpamba nsima ya koyangana na makita ya lisangá mpo na mbala ya liboso, ayebisaki ndeko mwasi oyo azalaki koyekola na ye Biblia boye: “Nazali komimona lokola moko na bino. Nasala nini mpo ngai mpe nabanda kosakola?” Daniela azali kokoba kokende liboso, ndenge moko mpe mama na ye mpe leki na ye ya mwasi.

Na Kazanlak, ndeko moko ya Bulgarie na nkombo Orlin, oyo autaki na Italie mpe ayaki mpo na kampanye, autaki mosala ya kosakola mpe azalaki kozonga esika oyo azalaki kofanda. Na nzela, Orlin ateyaki bilenge mibali mibale oyo bafandaki na bakiti na parkɛ moko. Apesaki bango buku Biblia eteyaka mpe bayokanaki mpo azongela bango mokolo elandi. Ntango azongelaki bango, Orlin abandaki koyekola Biblia na Svetomir mpe bayekolaki lisusu mokolo oyo elandaki. Nsima ya mikolo libwa, Orlin ayekolaki ná Svetomir mbala mwambe. Svetomir alobaki na Orlin boye: “Mikolo mibale liboso nakutana na yo, nabondelaki Nzambe asalisa ngai nayeba ye. Mpe nalakaki ye ete soki asalisi ngai, nakomipesa mobimba epai na ye.” Ntango Orlin azongaki na Italie, bandeko ya Bulgarie bakobaki koyekola na Svetomir, mpe azali kosalela makambo oyo azali koyekola.

Baoyo bamonisi elimo ya komipimela bapambwami mingi

Bandeko oyo basalelaki mikolo na bango ya konje mpe basalaki mibembo na mbongo na bango moko mpo na kosakola nsango malamu na ekólo mosusu bazali koyoka ndenge nini? Nkulutu moko na Espagne akomaki boye: “Kampanye esalisaki bandeko oyo basakolaka na monɔkɔ ya Bulgare na Espagne bákóma na boyokani makasi. Esalisaki mpenza bandeko oyo basalaki kampanye yango.” Mobali moko ná mwasi na ye ya Italie bakomaki boye: “Ezalaki sanza moko oyo eleki kitoko na bomoi na biso!” Babakisaki boye: “Kampanye ebongolaki bomoi na biso! Sikoyo tokómi bato mosusu.” Mobali yango ná mwasi na ye bakómaki kokanisa mpenza soki bakoki kokende kofanda libela na Bulgarie mpo na kosala esika oyo mposa ezali mingi. Carina, ndeko mwasi moko ya monzemba mpe mobongisi-nzela ya sanza na sanza, oyo autaki na Espagne asanganaki mpe na kampanye oyo esalemaki na Silistra. Na nsima, atikaki mosala na ye na Espagne mpe akendaki kofanda na Bulgarie mpo na kopesa mabɔkɔ na lisangá oyo esalemaki na engumba yango. Abombaki mbongo oyo ekoki mpo na kofanda na Bulgarie mbula mobimba. Carina alobi boye: “Nazali na esengo mingi ndenge Yehova apesi ngai nzela nasala awa na Bulgarie, mpe nazali na elikya ete nakokoka kotikala awa ntango molai. Sikoyo nazali koyekola Biblia na bato mitano, mpe misato na bango bazali koyangana na makita.”

Ndeko mwasi moko na Italie alingaki kosangana na kampanye, kasi lokola autaki kobanda mosala ya sika, azalaki na mikolo ya konje te. Atako bongo, asɛngaki akende sanza moko mpe báfuta ye te mpe alobaki ete akolongwa mosala soki baboyi kopesa ye nzela. Likambo ya kokamwa, patrɔ na ye alobaki boye: “Malamu, kasi nakosɛnga kaka likambo moko: Okotindela ngai carte postale ya Bulgarie.” Ndeko mwasi yango amonaki mpenza ete Yehova ayanolaki mabondeli na ye.

Stanislava, elenge mwasi moko ya Varna, engumba moko ya Bulgarie, oyo azalaki kosala mikolo nyonso tii mpokwa na mosala moko ya mbongo mingi, azwaki konje mpo na kosangana na kampanye na Silistra. Ntango amonaki ndenge babongisi-nzela oyo bautaki mosika mpo na kosakola nsango malamu na ekólo yango bazalaki na esengo, alelaki. Abandaki kokanisa ndenge azalaki kosalela bomoi na ye, komipesa na mosala ya mosuni. Ntango azongaki na ndako nsima ya pɔsɔ mibale, alongwaki mosala mpe akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Sikoyo azali na esengo mpenza mpo azali kokanisa Mozalisi na ye na bolenge na ye.​—Mos. 12:1.

Kosalela Yehova ezali mpenza lipamboli. Okoki kosala eloko mosusu te ya malamu koleka kopesa ntango mpe makasi na yo na mosala ya ntina mingi ya koteya mpe kosakola nsango malamu. Ezali nde na makambo oyo yo mpe okoki kosala mpo omipesa mingi lisusu na mosala oyo ebikisaka bato? Mbala mosusu na ekólo na bino ezali na bisika oyo mposa ya basakoli ezali mingi. Okoki nde kokende kofanda na esika moko ya ndenge wana? To mbala mosusu okoki kokanisa koyekola monɔkɔ mosusu mpo na kosalisa bato ya ekólo na bino, oyo bazali na mposa ya solo ya Biblia. Ata soki osali mbongwana nini mpo omipesa mingi na mosala ya kosakola, yebá ete Yehova akopambola yo mingi.​—Mas. 10:22.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 32]

Mokolo oyo etiká nsango

Bandeko mingi oyo bautaki na mikili mosusu ya Mpoto mpo na kopesa mabɔkɔ na kampanye monene oyo esalemaki na Bulgarie bakanaki mpe koyangana na liyangani ya etúká “Bósɛnzɛlaka!” na Sofia. Bandeko ya Bulgarie balendisamaki mingi ndenge bazalaki elongo na bandeko basi mpe mibali mingi mpenza oyo bautaki na mikili mosusu. Bayangani nyonso 2 039 basepelaki mpenza ntango Ndeko Geoffrey Jackson ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi alakisaki Biblia mobimba Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Bulgare! Bato nyonso oyo bazalaki na mokolo ya mitano bamonisaki ete basepeli na motema moko mpe babɛtaki mabɔkɔ ntango molai. Mingi kutu babimisaki mpisoli. Libongoli yango ya sikisiki mpe oyo ezali na elobeli ya pɛtɛɛ ekosalisa bato ya mitema sembo na Bulgarie báyeba Yehova.

[Karte na nkasa 30, 31]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

BULGARIE

SOFIA

Sandanski

Silistra

Kazanlak

[Bililingi na lokasa 31]

Litatoli monene epesamaki na boumeli ya pɔsɔ wana nsambo