Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Esalisaka ngai nasimba mitema ya bato”

“Esalisaka ngai nasimba mitema ya bato”

“Esalisaka ngai nasimba mitema ya bato”

ELEKI mwa mikolo, likita moko oyo esangisaki bato ya mikili ndenge na ndenge mpo na kolobela makambo etali bomoi ya bato esalemaki na Porto Alegre, engumba moko na sudi ya Brésil. Bankóto ya bato oyo bautaki na mikili 135 bakɔtaki na likita yango. Na ntango ya bopemi, etuluku moko ya Batatoli ya lisangá moko na Porto Alegre basololaki na bato mingi oyo bautaki na mikili mosusu mpo na koyebisa bango nsango ya Bokonzi oyo ezali na Biblia. Basololaki na bango ndenge nini?

Mobongisi-nzela moko na nkombo Elizabete alobi boye: “Tosalelaki mwa buku Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations.” Abakisaki boye: “Bato mingi oyo bautaki na mikili mosusu bayoká naino nsango malamu ya Bokonzi ata mbala moko te, kasi basepelaki na nsango na biso. Tosololaki na bato oyo bautaki na Bolivie, na Chine, na France, na Inde, na Israël, mpe na Nigeria. Topesaki basusu kati na bango mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ na bango, mpe bazwaki yango na esengo.”

Na Mexique mpe, mobongisi-nzela moko na nkombo Raúl asalelaka mwa buku yango mpe ebotaka mbuma malamu. Eleki mwa mikolo, asololaki na Moarabe moko oyo azalaki na mbula 80 mpe mwasi na ye autaki kokufa. Ntango mobali yango atángaki na lokasa ya mwa buku yango oyo ezali na nsango ya Bokonzi na monɔkɔ ya Arabe, atangisaki mpisoli ya esengo. Mpo na nini? Elaka ya Nzambe ete liwa ekozala lisusu te, oyo ezali na Emoniseli 21:3, 4, esimbaki mpenza motema na ye ntango atángaki yango na monɔkɔ ya mboka na ye. Mokolo mosusu, ntango azalaki kosakola na libaku malamu, Raúl akutanaki na mobali moko oyo alobaka monɔkɔ ya Portugais. Mobali yango mpe akufelaki moto moko oyo azalaki kolinga​—mwana na ye ya mobali. Raúl apesaki ye mwa buku yango atánga na lokasa oyo bakomá na monɔkɔ ya Portugais. Nsima ya kotánga yango, mobali yango alobaki ete alingi koyeba makambo mosusu ya Biblia, mpe andimaki koyekola Biblia.

Raúl asilá kosalela mwa buku Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations mpo na kosolola na bato oyo balobaka monɔkɔ ya Allemand, Anglais, Arménien, Chinois, Coréen, Français, Hindi, Mixe, Persan, Russe, mpe Zapotèque. Alobi boye: “Namoni ete ezali mpenza na ntina kosalela mwa buku yango na mosala ya kosakola. Esalisaka ngai nasimba mitema ya bato, ata soki nalobaka monɔkɔ na bango te.”

Lokola bato mingi mpenza bazali kosala mibembo to mpe kokende kofanda na mikili mosusu, tozali na mabaku mingi koleka ya kokutana na baoyo balobaka monɔkɔ mosusu. Tokolonga koyebisa bango nsango ya Bokonzi soki tozali kosalela mwa buku Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations. Omemaka yango ntango nyonso?

[Bililingi na lokasa 32]

Raúl asimbi mwa buku oyo esalisaka ye asimba mitema ya bato