Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Koluka komilongisa—Ndenge nini Yehova atalelaka yango?

Koluka komilongisa—Ndenge nini Yehova atalelaka yango?

Koluka komilongisa​—Ndenge nini Yehova atalelaka yango?

MOBALI alobaki boye: “Mwasi oyo opesaki ete azala elongo na ngai, apesaki ngai mbuma ya nzete yango, na bongo nalyaki.” Mwasi azongisaki ete: “Nyoka​—akosaki ngai, bongo nalyaki.” Maloba yango, oyo baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, bayebisaki Nzambe, ezali ebandeli ya momeseno ya koluka komilongisa oyo bato bazwá banda kala.​—Eba. 3:12, 13.

Etumbu oyo Yehova akatelaki Adama ná Eva na ndenge babukaki mibeko na nko emonisi polele ete andimaki te bantina oyo bapesaki mpo na koluka komilongisa. (Eba. 3:16-19) Tosengeli nde koloba ete bantina nyonso oyo moto apesi mpo na koluka komilongisa ezalaka kaka mabe na miso ya Yehova? To andimaka bantina mosusu? Soki ezali bongo, ndenge nini tokoki koyeba bokeseni na yango? Mpo na kozwa eyano, tótala naino soki koluka komilongisa ezali nini.

Koluka komilongisa ezali kopesa ntina mpo na komonisa mpo na nini osali likambo boye to boye, mpo na nini osali yango te, to mpe mpo na nini okosala yango te. Koluka komilongisa ekoki mpe kolimbola kopesa ntina oyo olongaki te kosala likambo moko mpe kozala likambo mpenza oyo ekoki kotinda báyokela yo mawa to bálimbisa yo. Kasi, ndenge ezalaki mpo na Adama ná Eva, koluka komilongisa ekoki kozala kopesa ntina moko ya lokuta mpo na kobomba ntina mpenza ya likambo. Lokola mbala mingi komilongisa ezalaka ya ndenge wana, bato mingi batalelaka yango na ndenge na mabe.

Ntango tozali koluka komilongisa​—mingimingi na oyo etali mosala ya Nzambe—​tosengeli kokeba noki ‘tómikosa na makanisi ya lokuta.’ (Yak. 1:22) Tótalela sikoyo mwa bandakisa mpe mitinda ya Biblia oyo ekosalisa biso ‘tókoba koluka koyeba malamu mpenza eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.’​—Ef. 5:10.

Oyo Nzambe asɛngi biso tósala

Na kati ya Liloba ya Nzambe tozali na mitindo ya sikisiki oyo biso basaleli ya Yehova tosengeli kotosa. Na ndakisa, mosala oyo Kristo apesaki ya ‘kokende mpe kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso’ ezali etinda oyo etali mpe bayekoli ya solo nyonso ya Kristo lelo. (Mat. 28:19, 20) Kutu, lokola kokokisa etinda yango ezali na ntina mingi, ntoma Paulo alobaki boye: “Mawa na ngai soki nasakoli nsango malamu te!”​—1 Ko. 9:16.

Nzokande, bato mosusu oyo toyekolaka na bango Biblia banda kala bazali naino kokakatana kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Mat. 24:14) Bamosusu oyo bazalaki liboso kosakola batiká kosakola. Wapi mwa bantina oyo bato oyo babimaka mosala ya kosakola te bapesaka? Yehova asalaki ndenge nini na bato oyo bakakatanaki kotosa mitindo na ye ya sikisiki na ntango ya kala?

Koluka komilongisa oyo Nzambe andimaka te

“Eleki makasi.” Mingimingi bato oyo bazalaka nsɔninsɔni bakoki komona ete kobima mosala ya kosakola ezali mosala moko makasi mpenza. Kasi, tótala liteya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Yona. Azwaki mokumba oyo amonaki ete eleki makasi​—Yehova ayebisaki ye akende kosakola likama oyo elingaki koyela Ninive. Ezali mpasi te tómona ntina oyo Yona abangaki kokokisa mokumba yango. Ninive ezalaki mboka-mokonzi ya Asiri, mpe bato ya Asiri bakendaki nsango ete bazalaki bato ya mabe mpenza. Mbala mosusu Yona amitunaki ete: ‘Nakosala ndenge nini epai ya bato yango? Bakosala ngai nini?’ Eumelaki te, akimaki. Nzokande, Yehova andimaki te ntina oyo Yona akimaki. Kasi, Yehova atindaki ye lisusu akende kosakola epai ya bato ya Ninive. Na mbala oyo, Yona akokisaki mokumba na ye na mpiko, mpe Yehova apambolaki mosala na ye.​—Yona 1:1-3; 3:3, 4, 10.

Soki okanisi ete mokumba ya kosakola nsango malamu eleki makasi, kobosana te ete “makambo nyonso ekoki kosalema mpo na Nzambe.” (Mrk. 10:27) Okoki kondima ete Yehova akopesa yo makasi soki okobi kosɛnga ye lisalisi mpe ete akopambola yo soki osali milende mpo ozwa mpiko ya kobima mosala ya kosakola.​—Luka 11:9-13.

“Nalingi nde te.” Okoki kosala nini soki motema na yo ezali na mposa ya kosakola te? Kobosana te ete Yehova akoki kosala na kati na yo mpe kolamwisa mposa na yo. Paulo alobaki boye: “Nzambe nde moto oyo, ndenge asepeli kosala, azali kosala na kati na bino mpo bino bólinga mpe bósala.” (Flp. 2:13) Na yango, okoki kosɛnga Yehova asalisa yo olinga kosala mokano na ye. Yango nde Mokonzi Davidi asalaki. Asɛngaki Yehova boye: “Tambwisá ngai na solo na yo.” (Nz. 25:4, 5) Yo mpe okoki kosala yango soki ozali kobondela Yehova na etingya ete asalisa yo olinga kosala makambo oyo esepelisaka ye.

Ya solo, ntango tolɛmbi na nzoto to na makanisi, ekoki kosɛnga na bantango mosusu tóbunda mpenza mpo na kokende na makita na Ndako ya Bokonzi to mpo na kobima na mosala ya kosakola. Soki ezali bongo, tosengeli nde koloba ete tolingaka mpenza Yehova te? Soki moke te. Basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe ya ntango ya kala mpe basengelaki kobunda mpo na kosala mokano ya Nzambe. Na ndakisa, Paulo alobaki ete ‘azalaki kobɛtabɛta nzoto na ye,’ na ndenge ya elilingi, mpo akoka kotosa mibeko ya Nzambe. (1 Ko. 9:26, 27) Na yango, ata soki tosengeli kobunda mpo na kokokisa mosala ya kosakola, tokoki kotya motema ete Yehova akopambola biso. Mpo na nini? Mpo tosali milende mpo na kosala mokano ya Nzambe na ntina oyo ebongi​—mpo tozali kolinga Yehova. Soki tosali bongo, tozali kopesa eyano na ntembe oyo Satana abimisaki ete basaleli ya Nzambe bakowangana Ye soki bazali na kati ya komekama.​—Yobo 2:4.

“Nazali na misala mingi.” Soki obimaka mosala ya kosakola te mpo omonaka ete ozali na misala mingi, osengeli mpenza kotala lisusu makambo nini otyaka na esika ya liboso. Yesu alobaki ete: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi.” (Mat. 6:33) Mpo na kolanda etinda wana, ekoki kosɛnga oyeisa bomoi na yo pɛpɛlɛ to ozwa ntango oyo olekisaka na kominanola mpe osalela yango mpo na kobima mosala ya kosakola. Ya solo, kominanola mpe makambo mosusu ya biso moko ezali mpe na esika, kasi ezali te makambo oyo esengeli kotinda biso tózongisa mosala ya kosakola nsima. Mosaleli ya Nzambe atyaka matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na ye.

“Nabongi mpenza na mosala yango te.” Okoki komona ete obongi te mpo na kozala moteyi ya nsango malamu. Na ntango ya kala, basaleli mosusu ya sembo ya Yehova bamonaki ete babongi te mpo na kokokisa mikumba oyo Yehova apesaki bango. Tózwa ndakisa ya Moize. Ntango Yehova apesaki ye mokumba moko, Moize alobaki boye: “Limbisá ngai, Yehova, kutu ngai nalobaka malamu te, ezala banda lobi to banda liboso na yango to mpe banda ozali koloba na mosaleli na yo, mpo nazali monɔkɔ kilo mpe lolemo kilo.” Atako Yehova akitisaki ye motema, Moize azongisaki ete: “Limbisá ngai, Yehova, nabondeli yo, tindá na lobɔkɔ ya moto oyo yo okotinda.” (Kob. 4:10-13) Yehova asalaki nini?

Yehova alongolaki Moize mokumba yango te. Kasi, Yehova aponaki Arona mpo asalisa Moize na kokokisa mokumba yango. (Kob. 4:14-17) Lisusu, na bambula oyo elandaki, Yehova asalisaki Moize mpe apesaki ye nyonso oyo asengelaki na yango mpo alonga kokokisa mikumba oyo Nzambe apesaki ye. Lelo oyo, okoki kolikya ete Yehova akotinda mpe bandeko na yo bakristo oyo bayebi mosala básalisa yo na mosala ya kosakola. Likambo oyo eleki ntina, Liloba ya Nzambe eyebisi biso polele ete Yehova akopesa biso makoki ya kosala mosala oyo asɛngi biso tósala.​—2 Ko. 3:5; talá etanda  “Bambula ya esengo mingi koleka na bomoi na ngai.”

“Moto moko azokisi motema na ngai.” Bato mosusu batikaka kosakola mpe koyangana na makita ya lisangá mpo mitema na bango ezoki mpe bakanisaka ete Yehova akondima mpenza likambo yango lokola ntina oyo batiki komipesa na makambo ya elimo. Atako moto nyonso akoki kosilika soki bazokisi ye, wana ezali mpenza ntina ya kotika kosangana na misala ya bokristo? Ekoki kozala ete nsima ya matata oyo ebimisaki “koswana makasi” kati na bango, Paulo ná ndeko na ye mokristo Barnabasi bazokaki na mitema. (Mis. 15:39) Kasi, moko na bango atikaki mosala ya kosakola mpo na likambo yango? Ata moke te!

Ndenge moko mpe, soki ndeko moko azokisi yo, kobosana te ete monguna na yo ezali te ndeko na yo mokristo oyo azali moto ya kozanga kokoka, kasi nde Satana, oyo azali koluka alya yo. Nzokande, Zabolo akolonga te soki ‘otɛmɛli ye, ozali makasi na kondima.’ (1 Pe. 5:8, 9; Gal. 5:15) Soki ozali na kondima ya ndenge wana, “okoyoka nsɔni” soki moke te.​—Rom. 9:33.

Soki makambo mosusu ezali kopekisa yo osala mingi

Mwa bandakisa oyo touti kotalela emonisi polele ete ntina moko te endimami na Makomami mpo tóboya kotosa mitindo ya sikisiki oyo Yehova apesá, na ndakisa oyo ya kosakola nsango malamu. Nzokande, ekoki mpenza kozala na bantina ya solosolo oyo ekoki kopekisa biso tósala mingi na mosala ya kosakola. Kokokisa mikumba na biso mosusu oyo Makomami epesi biso ekoki kokitisa ntango oyo tokoki kolekisa na mosala ya kosakola. Lisusu, na bantango mosusu tokoki kolɛmba mingi na nzoto to kobɛla mpe ekoki kopekisa biso tósala mingi ndenge tokolinga kosala na mosala ya Yehova. Nzokande, Liloba ya Nzambe eyebisi biso ete Yehova ayebi mposa ya motema na biso mpe ayebi makambo oyo ekoki kopekisa biso.​—Nz. 103:14; 2 Ko. 8:12.

Na yango, tosengeli kokeba mpo tómisambisa te mpe tósambisa basusu te na makambo yango. Ntoma Paulo akomaki boye: “Yo nani mpo osambisa mosali ya ndako ya moto mosusu? Nkolo na ye moko nde atɛlɛmisaka ye to akweisaka ye.” (Rom. 14:4) Na esika tókokanisa bomoi na biso ná oyo ya basusu, tosengeli kobosana te ete “mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.” (Rom. 14:12; Gal. 6:4, 5) Ntango tozali kobondela Yehova mpo na kopesa ye bantina mpo na komilongisa, mokomoko na biso asengeli kosala yango na “lisosoli ya sembo.”​—Ebr. 13:18.

Ntina oyo kosalela Yehova epesaka biso esengo

Biso nyonso tokoki kosalela Yehova na esengo ya solosolo mpo masɛngami na ye ezalaka makasimakasi te mpe moto akoki kokokisa yango, ata soki makambo ya bomoi na ye ezali ndenge nini. Mpo na nini tokoki koloba bongo?

Liloba ya Nzambe elobi boye: “Koboya te kosala malamu na baoyo basengeli na yango, ntango lobɔkɔ na yo ezali na nguya ya kosala yango.” (Mas. 3:27) Likambo nini osimbi na lisese yango na oyo etali masɛngami ya Nzambe? Yehova azali kotinda yo te osala makasi mpo na kokokana na nguya ya lobɔkɔ ya ndeko na yo kasi nde osalela Ye na oyo ‘ezali na nguya ya lobɔkɔ na yo.’ Ya solo, biso nyonso​—ezala lobɔkɔ na biso elɛmbá ndenge nini to ezali na nguya ndenge nini—​tokoki kosalela Yehova na motema mobimba.​—Luka 10:27; Kol. 3:23.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 14]

 “Bambula ya esengo mingi koleka na bomoi na ngai”

Ata soki tozali na mokakatano makasi na nzoto to na makanisi na biso, tosengeli te koloba nokinoki ete ekopekisa biso tomipesá mingi na mosala ya kosakola. Mpo na komonisa yango, tózwa ndakisa ya makambo oyo ekómelaki Ernest, ndeko mokristo moko na Canada.

Ernest azalaki na mokakatano ya koloba mpe azalaki nsɔninsɔni mingi. Abukanaki mokɔngɔ, mpe mpo na yango asengelaki kotika mosala na ye ya kotonga bandako. Atako akómaki ebɔsɔnɔ, yango epekisaki ye te alekisaka ntango mingi na mosala ya kosakola. Elendiseli oyo bapesaki na makita ya lisangá mpo na mosala ya mobongisi-nzela mosungi esimbaki motema na ye. Kasi, amonaki te ete akokoka kosala mosala yango.

Mpo na kondima mpenza ete akokoka te kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, asɛngaki asala lokola mobongisi-nzela mosungi mpo na sanza moko. Akamwaki mpenza ndenge amonaki ete alongi kokokisa mosala yango. Na nsima akanisaki boye: ‘Nayebi ete nakokoka kosala yango lisusu soki moke te.’ Mpo na kondima yango, asɛngaki mosala yango mpo na mbala ya mibale​—mpe mbala oyo lisusu, akokisaki yango.

Ernest asalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbula mobimba, kasi alobaki ete: “Nayebi solo ete nakokoka te kozala mobongisi-nzela ya sanza na sanza.” Lisusu, mpo na kondima likambo yango, asɛngaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Akamwaki mpenza ntango amonaki ete alongaki kokokisa mbula na ye ya liboso ya mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Azwaki ekateli ya kokoba na mosala yango mpe azwaki esengo ya kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza mbula mibale, kino mpasi na ye ezwaki bomoi na ye. Kasi liboso akufa, azalaki mbala mingi koyebisa, na mpisoli na miso, bato oyo bazalaki koya kotala ye ete: “Bambula oyo nasaleli Yehova lokola mobongisi-nzela ezalaki bambula ya esengo mingi koleka na bomoi na ngai.”

[Elilingi na lokasa 13]

Tokoki kolonga likambo nyonso oyo ekoki kopekisa biso tósala mosala ya kosakola

[Elilingi na lokasa 15]

Yehova asepelaka ntango tozali kosalela ye na molimo mobimba na kosaláká nyonso oyo bomoi na biso epesi biso nzela