Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Nani ayebi makanisi ya Yehova?”

“Nani ayebi makanisi ya Yehova?”

“Nani ayebi makanisi ya Yehova?”

“‘Nani ayebi makanisi ya Yehova, mpo alakisa ye?’ Kasi biso tozali na makanisi ya Kristo.”​—1 KO. 2:16.

1, 2. (a) Mokakatano nini bato mingi bakutanaka na yango? (b) Likambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali makanisi na biso ná makanisi ya Yehova?

ESILÁ kokómela yo omona ete ezali mpasi mpo ososola ndenge oyo moto moko azali kokanisa? Mbala mosusu outi kobala, mpe ozali komona te ndenge oyo okoyeba mpenza makanisi ya molongani. Ya solo, mibali ná basi bakanisaka, mbala mosusu kutu balobaka, ndenge moko te. Kutu, na bisika mosusu, mibali ná basi bazalaka na elobeli ekeseni mpenza, ata na monɔkɔ moko. Longola yango, bato oyo bazali na mimeseno mpe monɔkɔ ekeseni, bakoki kozala na lolenge ya kokanisa mpe na etamboli ekeseni. Nzokande, soki ozali koyekola koyeba basusu malamu, okozala mpe na likoki ya koyeba ndenge na bango ya kokanisa.

2 Yango wana, tosengeli kokamwa te ete ndenge na biso ya kokanisa ekeseni mosika na oyo ya Yehova. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova ayebisaki Bayisraele ete: “Makanisi na bino ezali makanisi na ngai te, mpe banzela na ngai ezali banzela na bino te.” Na nsima, mpo na komonisa yango, Yehova abakisaki boye: “Mpo ndenge likoló etombwani mosika koleka mabele, ndenge mpe banzela na ngai etombwani mosika koleka banzela na bino, mpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino.”​—Yis. 55:8, 9.

3. Wapi makambo mibale oyo tokoki kosala mpo na kokóma ‘baninga ya motema ya Yehova’?

3 Yango elingi nde koloba ete tosengeli kutu te komeka koyeba makanisi ya Yehova? Te. Atako tokoki soki moke te koyeba mpenzampenza makanisi nyonso ya Yehova, Biblia elendisi biso tókóma ‘baninga ya motema ya Yehova.’ (Tángá Nzembo 25:14; Masese 3:32.) Likambo moko oyo tokoki kosala mpo na kopusana penepene na Yehova ezali kotya likebi na misala na ye, ndenge ekomami na Liloba na ye Biblia. (Nz. 28:5) Likambo mosusu ezali koyeba “makanisi ya Kristo,” oyo azali “elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te.” (1 Ko. 2:16; Kol. 1:15) Soki tozali kozwa ntango ya koyekola masolo ya Biblia mpe komanyola yango, tokoki kobanda kososola bizaleli mpe makanisi ya Yehova.

Tókeba na momeseno moko ya mabe

4, 5. (a) Momeseno nini ya mabe tosengeli kokeba na yango? Limbolá. (b) Bayisraele bakómaki na makanisi nini ya mabe?

4 Ntango tozali komanyola misala ya Yehova, tosengeli kokeba na momeseno ya kosambisa Nzambe na kolanda mibeko ya bato. Momeseno yango nde emonisami na maloba ya Yehova oyo ezali na Nzembo 50:21 ete: “Okanisaki ete ngai nakokóma mpenza lokola yo.” Ezali ndenge moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobaki eleki sikoyo mbula koleka 175 ete: “Bato balingaka kosambisa Nzambe na kolanda mibeko na bango moko, mpe kokanisa ete ye mpe alandaka kaka mibeko oyo bato basengeli kolanda.”

5 Tosengeli kokeba ete ndenge oyo tomonaka Yehova elanda te mibeko mpe bamposa na biso moko. Mpo na nini ezali na ntina? Ntango tozali koyekola Makomami, tokoki komona lokola misala mosusu ya Yehova ezali sembo te, na kolanda makanisi na biso ya mokuse, ya kozanga kokoka. Bayisraele ya kala bamonaki makambo ndenge wana mpe bakanisaki mabe mpo na ndenge oyo Yehova azalaki kosalela bango makambo. Yehova ayebisaki bango boye: “Bokoloba mpenza ete: ‘Nzela ya Yehova ezali sembo te.’ Nabondeli bino, bóyoka, Ee ndako ya Yisraele. Nzela na ngai nde ezali sembo te? Banzela na bino nde ezali sembo te, boye te?”​—Ezk. 18:25.

6. Likambo nini Yobo ayekolaki, mpe yango ekoki kosalisa biso na nini?

6 Mpo na kokima motambo ya kosambisa Yehova na kolanda mibeko na biso moko, tosengeli kondima ete ndenge na biso ya kotalela makambo ezalaka na ndelo mpe na bantango mosusu, ezalaka na libunga monene. Yobo asengelaki koyekola likambo yango. Ntango azalaki konyokwama, Yobo azangaki elikya mpe akómaki kotalela kaka makambo na ye moko. Abosanaki makambo oyo elekaki minene. Kasi, na bolingo nyonso, Yehova asalisaki ye afungola makanisi na ye. Na nzela ya mituna koleka 70 oyo atunaki Yobo, oyo Yobo akokaki koyanola ata moko te, Yehova amonisaki ete Yobo ayebaki makambo nyonso te. Yobo amikitisaki mpe abongisaki ndenge na ye ya kotalela makambo.—Tángá Yobo 42:1-6.

Ndenge ya kozwa “makanisi ya Kristo”

7. Mpo na nini kotalela misala ya Yesu esalisaka biso tóyeba makanisi ya Yehova?

7 Yesu amekolaki Tata na ye na ndenge ya kokoka na makambo nyonso oyo asalaki mpe oyo alobaki. (Yoa. 14:9) Yango wana, kotalela misala ya Yesu esalisaka biso tóyeba ndenge oyo Yehova akanisaka. (Rom. 15:5; Flp. 2:5) Na yango, tótalela masolo mibale oyo ezali na Baevanzile.

8, 9. (a) Ndenge ekomami na Yoane 6:1-5, nini etindaki Yesu atuna Filipe motuna? (b) Mpo na nini Yesu atunaki motuna yango?

8 Kanisá naino likambo oyo. Esalemaki mwa moke liboso ya Elekeli ya mobu 32 T.B. Bantoma ya Yesu bautaki na mobembo moko monene ya kosakola na Galile mobimba. Lokola balɛmbaki mpo na mosala wana, Yesu amemaki bango na esika oyo bato bazalaki te, na bokula ya nɔrdi-ɛsti ya Mbu ya Galile. Kasi, bankóto ya bato balandaki bango kuna. Nsima ya kobikisa ebele yango ya bato mpe koteya bango makambo mingi, mokakatano moko ebimaki. Ndenge nini bato nyonso wana bakozwa eloko ya kolya na esika ya ndenge wana? Ntango amonaki likambo yango, Yesu atunaki Filipe, oyo azalaki moto ya kuna, ete: “Epai wapi tokosombela bato oyo mampa mpo bálya?”​—Yoa. 6:1-5.

9 Mpo na nini Yesu atunaki Filipe motuna wana? Yesu azalaki nde komituna soki akosala nini? Te. Makanisi na ye ezalaki mpenza nini? Ntoma Yoane, oyo azalaki mpe wana, alobi boye: “[Yesu] azalaki koloba bongo mpo na komeka ye, mpo ye moko ayebaki eloko oyo alingaki kosala.” (Yoa. 6:6) Awa, Yesu azalaki komeka bayekoli na ye mpo ayeba soki bakómaki na kondima makasi. Na motuna wana, abendaki likebi na bango na likambo yango mpe apesaki bango libaku ya komonisa kondima na bango na makambo oyo azalaki na likoki ya kosala. Kasi, basimbaki libaku yango te mpe bamonisaki ndenge makanisi na bango ezalaki mpenza mokuse. (Tángá Yoane 6:7-9.) Na nsima, Yesu amonisaki bango ete akoki kosala eloko moko oyo bakanisaki ata kokanisa te. Asalaki likamwisi ya koleisa bankóto yango ya bato oyo bazalaki na nzala.​—Yoa. 6:10-13.

10-12. (a) Mpo na nini mbala mosusu Yesu asalelaki mwasi Mogrɛki na mbala moko te likambo oyo asɛngaki? Limbolá. (b) Tokotalela nini sikoyo?

10 Lisolo yango ekoki kosalisa biso tóyeba makanisi ya Kristo na libaku mosusu. Mwa moke nsima ya koleisa ebele wana ya bato, Yesu mpe bantoma na ye basalaki mobembo na nɔrdi, bakatisaki bandelo ya Yisraele mpe bakendaki pene na Tire mpe Sidone. Ntango bazalaki kuna, bakutanaki na mwasi Mogrɛki moko oyo asɛngaki Yesu abikisa mwana na ye ya mwasi. Na ebandeli, Yesu akipaki mwasi yango te. Kasi lokola azalaki kaka kotya ye mbamba, Yesu alobaki na ye boye: “Tiká bana bátonda naino, mpo ezali malamu te kokamata mampa ya bana mpe kobwakela yango bana ya mbwa.”​—Mrk. 7:24-27.

11 Mpo na nini Yesu aboyaki naino kosalisa mwasi yango? Yesu azalaki nde komeka mwasi yango, ndenge amekaki Filipe, mpo na komona ndenge akosala, mpe na ndenge yango kopesa ye libaku ya komonisa kondima na ye? Lolenge oyo mongongo ya Yesu ebimaki, atako lisolo elobeli yango te, elɛmbisaki mwasi yango te. Yesu asalelaki liloba moko mpo na mbwa, oyo na minɔkɔ ya ebandeli oyo bakomaki na yango Biblia, elɛmbisaki mwa moke maloba na ye ntango abengaki bato ya ekólo ya mwasi yango “bana ya mbwa.” Na yango, mbala mosusu Yesu azalaki kosala lokola moboti oyo andimi na motema ete akopesa mwana eloko oyo asɛngi kasi aboyi komonisa ete akopesa ye yango, mpo atala soki mwana azali mpenza na mposa ya eloko yango. Ezala bongo to te, ntango mwasi wana amonisaki kondima na ye, Yesu andimaki kosalela ye likambo oyo asɛngaki.—Tángá Marko 7:28-30.

12 Masolo wana mibale ya Baevanzile esalisi biso tóyeba malamu “makanisi ya Kristo.” Tótala sikoyo ndenge masolo yango ekoki mpe kosalisa biso tósosola malamu makanisi ya Yehova.

Ndenge Yehova asalaki na Moize

13. Koyeba malamu makanisi ya Yesu ezali kosalisa biso na nini?

13 Koyeba malamu makanisi ya Yesu ezali kosalisa biso tókanga ntina ya bavɛrsɛ mosusu oyo ekoki kozala mpasi na kokanga ntina. Na ndakisa, tótala maloba oyo Yehova alobaki na Moize nsima ya Bayisraele kosala ekeko ya mwana-ngɔmbɛ mpo na kosambela yango. Alobaki boye: “Natali bato oyo mpe namoni ete bazali bato moko ya motó makasi. Bongo sikoyo tiká ngai, mpo nkanda na ngai engalela bango mpe nasilisa bango nyɛɛ, mpe nakómisa yo ekólo moko monene.”​—Kob. 32:9, 10.

14. Moize asalaki nini ntango ayokaki maloba ya Yehova?

14 Lisolo yango ebakisi boye: “Moize abandaki kokitisa motema ya Yehova Nzambe na ye mpe alobaki ete: ‘Ee Yehova, mpo na nini nkanda na yo engalela bato na yo oyo obimisaki na mokili ya Ezipito na nguya monene mpe na nguya ya lobɔkɔ na yo? Mpo na nini Baezipito báloba ete: “Ye abimisaki bango nde na makanisi ya mabe mpo na koboma bango na kati ya bangomba mpe kosilisa bango nyɛɛ na mabele”? Tiká nkanda na yo ya kongala mpe yoká mawa mpo na mabe oyo olingi koyeisela bato na yo. Kanisá Abrahama, Yisaka mpe Yisraele basaleli na yo, baoyo olapelaki ndai na nkombo na yo moko, na ndenge olobaki na bango ete: “Nakokómisa momboto na bino mingi lokola minzoto ya likoló, mpe mokili nyonso oyo nalakisi, nakopesa yango momboto na bino, mpo bázwa yango mpenza mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”’ Mpe Yehova abandaki koyoka mawa mpo na mabe oyo alobaki ete akosalela bato na ye.”​—Kob. 32:11-14. *

15, 16. (a) Libaku nini epesamaki na Moize mpo na makambo oyo Yehova alobaki? (b) Na ndenge nini Yehova ‘ayokaki mawa’?

15 Ezalaki mpenza kosɛnga ete Moize asembola makanisi ya Yehova? Soki moke te! Atako Yehova amonisaki makambo oyo alingaki kosala, ezalaki ekateli na ye ya nsuka te. Yehova azalaki nde komeka Moize, kaka ndenge mpe na nsima, Yesu amekaki Filipe ná mwasi Mogrɛki. Apesaki Moize libaku ya komonisa makanisi na ye. * Yehova atyaki Moize moyokanisi kati na ye ná Yisraele, mpe Yehova azalaki komemya mokumba yango oyo apesaki Moize. Lisusu, Yehova alingaki koyeba soki Moize akotika nkanda etambwisa ye mpe soki akosalela libaku yango mpo na kotinda Yehova abosana Yisraele mpe akómisa bakitani na ye Moize ekólo monene.

16 Eyano ya Moize emonisaki ete azalaki na kondima mpe azalaki kotya motema na bosembo ya Yehova. Eyano na ye emonisaki ete azalaki koluka kaka matomba na ye moko te, kasi azalaki komibanzabanza mpo na nkombo ya Yehova. Alingaki te ete nkombo yango efingama. Moize amonisaki ete ayebaki “makanisi ya Yehova” na likambo yango. (1 Ko. 2:16) Esukaki ndenge nini? Lokola Yehova azwaki naino ekateli ya nsuka mpenza te mpo na oyo akosala, lisolo yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu elobi ete “abandaki koyoka mawa.” Na Ebre, maloba yango ekoki kolimbola kaka ete Yehova abimisaki lisusu te mpasi oyo alobaki ete alingi kobimisela ekólo yango mobimba.

Ndenge Yehova asalaki na Abrahama

17. Ndenge nini Yehova amonisaki motema molai ntango Abrahama azalaki kobimisa makanisi na ye?

17 Ndakisa mosusu oyo emonisi ndenge Yehova apesaka basaleli na ye libaku ya komonisa kondima mpe ete batyelaka ye motema ezali ntango Abrahama asɛngaki likambo moko mpo na Sodoma. Na lisolo yango, Yehova amonisaki motema molai mpenza na ndenge atikaki Abrahama atuna mituna mwambe mobimba. Na esika moko na lisolo yango, Abrahama abimisaki makanisi ya motema na ye mpenza ete: “Ekoki kokanisama ata moke te mpo na yo ete osala ndenge wana: oboma moyengebene elongo na moto mabe, bongo ekómela moyengebene ndenge ekómelaka moto mabe! Ekoki kokanisama bongo ata moke te mpo na yo. Mosambisi ya mabele mobimba akosala nde oyo ezali sembo te?”​—Eba. 18:22-33.

18. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Yehova asalaki na Abrahama?

18 Lisolo yango eteyi biso nini mpo na makanisi ya Yehova? Yehova azalaki mpenza na mposa Abrahama asolola na ye mpo asalisa ye azwa ekateli ya malamu? Te. Ya solo, Yehova akokaki kaka koyebisa ye bantina ya ekateli na ye banda na ebandeli. Kasi na nzela ya mituna yango, Yehova atikelaki Abrahama ntango ya kondima ekateli oyo ezwamaki mpe ya koyeba makanisi na Ye. Esalisaki mpe Abrahama ayeba bozindo ya motema mawa mpe bosembo ya Yehova. Ya solo, Yehova asalaki na Abrahama lokola na moninga.​—Yis. 41:8; Yak. 2:23.

Mateya mpo na biso

19. Ndenge nini tokoki komekola Yobo?

19 Toyekoli nini mpo na “makanisi ya Yehova”? Tosengeli kotika Liloba ya Nzambe esalisa biso tóyeba malamu makanisi ya Yehova. Tosengeli soki moke te kosambisa Yehova kolanda mibeko mpe makanisi na biso oyo ezali na ndelo. Yobo alobaki boye: “[Nzambe] azali moto lokola ngai te mpo nazongisela ye maloba, mpo ngai ná ye tóya esika moko mpo tósamba.” (Yobo 9:32) Lokola Yobo, ntango tobandi koyeba makanisi ya Yehova, tokozanga te kokamwa ete: “Talá! Wana nde ebandeli ya banzela na ye, mpe oyo nde mwa nungunungu ya likambo bayoki mpo na ye! Kasi nkake na ye ya nguya, nani akomonisa ete akangi ntina na yango?”​—Yobo 26:14.

20. Tosengeli kosala nini soki tokutani na mokapo moko oyo ezali mpasi kokanga ntina?

20 Ntango tozali kotánga Biblia, tosengeli kosala nini soki tokutani na mokapo moko oyo ezali mpasi kokanga ntina, mingimingi na oyo etali makanisi ya Yehova? Soki nsima ya kosala bolukiluki tozwi eyano ya polele kaka te, tótalela yango lokola likambo moko oyo ezali komeka biso mpo tómonisa soki totyelaka Yehova motema. Tóbosana te, na bantango mosusu, bavɛrsɛ mosusu epesaka biso libaku ya komonisa kondima na biso na bizaleli ya Yehova. Tóndima na komikitisa nyonso ete toyebi te makambo nyonso oyo Ye ayebi. (Mos. 11:5) Yango ekotinda biso tóndima maloba ya ntoma Paulo oyo: “Ee bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali mingi mpenza! Bikateli na ye ya lisambisi ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki koyebana te! Mpo ‘nani ayebi makanisi ya Yehova, to nani akómá mopesi-toli na ye?’ To, ‘Nani akabelá ye liboso, mpo azongisela ye?’ Mpo biloko nyonso euti na ye mpe na nzela na ye mpe mpo na ye. Azala na nkembo libela na libela. Amen.”​—Rom. 11:33-36.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 14 Lisolo mosusu ya ndenge wana ezali na Mitángo 14:11-20.

^ par. 15 Bato mosusu ya mayele balobaka ete maloba ya Ebre oyo ebongolami na “tiká ngai” na Kobima 32:10 ekoki kozala libyangi, kopesa Moize nzela ya koloba mpo na ekólo, to ya ‘kotɛlɛma katikati’ ya Yehova ná ekólo Yisraele. (Nz. 106:23; Ezk. 22:30) Ezala bongo to te, emonani ete Moize abangaki te komonisa Yehova likanisi na ye polele.

Ozali koyeba lisusu?

• Nini ekosalisa biso tókima momeseno ya kosambisa Yehova na kolanda mibeko na biso moko?

• Na ndenge nini kokanga ntina ya misala ya Yesu ekoki kosalisa biso tókóma ‘baninga ya motema ya Yehova’?

• Mateya nini ozwi na masolo ya Yehova ná Moize mpe ná Abrahama?

[Mituna ya boyekoli]

[Bililingi na lokasa 5]

Toyekoli nini na ntina etali makanisi ya Yehova na ndenge asalaki na Moize mpe Abrahama?