Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nazali kosala mingi na kati ya ebongiseli ya Yehova

Nazali kosala mingi na kati ya ebongiseli ya Yehova

Nazali kosala mingi na kati ya ebongiseli ya Yehova

Lisolo ya Vernon Zubko

NAKOLÁ na ferme moko pene na Stenen, mboka moko na etúká ya Saskatchewan, na Canada. Baboti na ngai, Fred ná Adella, bazalaki kosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya mosuni mpe ya elimo mpo na ngai ná yaya na ngai ya mwasi Aurellia, mpe mpo na baleki na ngai, Alvin, Allegra, mpe Daryl. Tii lelo, tozalaka na botɔndi epai ya baboti na biso mpo bateyaki biso solo.

Tata na ngai azalaki mokristo oyo etyamá mafuta na elimo mpe azalaki kopalanganisa nsango malamu na mpiko. Azalaki kosala mosala makasi mpo na koleisa libota, kasi azalaki mpe kosala nyonso mpo bato báyeba ete azali Motatoli. Azalaki ntango nyonso kolobela solo. Nabosanaka te molende mpe mpiko na ye. Mbala mingi azalaki koyebisa ngai ete: “Zaláká na mingi ya kosala na kati ya ebongiseli ya Yehova, mpe okokima mikakatano mingi.”

Mbala mingi, tozalaki kosakola na balabala na Stenen mpe na mwa bamboka ya pembenipembeni. Mpo na ngai, ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Mboka nyonso ezalaki na bato ya mobulu, oyo bazalaki koya epai ya biso bana mpe kosɛka biso. Mokolo moko, ntango nazalaki na mbula mwambe, natɛlɛmaki esika moko oyo babalabala ekutani nasimbi Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe etuluku moko ya bilenge ezingaki ngai. Balongolaki ngai ekɔti na ngai ya sika na motó mpe batyaki yango na likonzí moko oyo ezalaki pembeni na ngai. Nzokande, ndeko moko ya mokóló oyo azalaki kobatela ngai amonaki makambo oyo ezalaki koleka. Apusanaki mpe atunaki boye: “Vern, likambo nini?” Bana mibali yango balimwaki na mbala moko. Atako likambo yango etungisaki ngai mwa moke, eteyaki ngai ete moto oyo azali kosakola na balabala, asengeli kotambolatambola kasi te kotɛlɛma lokola likonzí. Formasyo ya ndenge wana oyo nazwaki ntango nazalaki kokola epesaki ngai mpe mpiko oyo esengeli mpo na mosala ya kosakola na ndako na ndako.

Ngai ná Alvin tozwaki batisimo na sanza ya Mai 1951. Nazalaki na mbula 13. Nabosanaka te ete Ndeko Jack Nathan, oyo asalaki lisukulu ya batisimo, alendisaki biso tólekisa ata sanza moko te kozanga koloba mpo na Yehova. * Na libota na biso, tozalaki komona ete mosala ya mobongisi-nzela ezali mosala oyo eleki malamu na bomoi ya moto. Yango wana na 1958, ntango nasilisaki kelasi, nakendaki kofanda na engumba Winnipeg, na etúká ya Manitoba, mpo na kosala lokola mobongisi-nzela. Atako Tata azalaki kosepela ndenge nazalaki kosala mosala ya kobongisa mabaya elongo na ye na kompanyi ya libota na biso, ye ná mama balendisaki ngai mingi nasala mosala ya mobongisi-nzela mpe bandimaki nakende na Winnipeg.

Teritware ya sika mpe moninga ya sika

Na 1959, biro ya filiale esɛngaki ete ndeko nyonso oyo akoki kokende, akende na etúká ya Québec, epai mposa ya basakoli ezalaki makasi. Nakendaki kosala lokola mobongisi-nzela na engumba Montréal. Ezalaki mbongwana monene mpenza! Nabandaki bomoi ya sika mpo nazalaki koyekola koloba monɔkɔ ya Lifalanse mpe komesana na mimeseno ya kuna. Mokɛngɛli ya zongazonga na biso ayebisaki ngai boye: “Koloba ata mokolo moko te ete: ‘Epai na biso tozalaki kosala yango boye.’” Toli yango ezalaki malamu mingi.​—1 Ko. 9:22, 23.

Ntango nakendaki na Québec, nazalaki na moninga te ya mobongisi-nzela lokola ngai. Kasi, ndeko mwasi moko ya elenge na nkombo Shirley Turcotte, oyo nakutanaki na ye liboso na Winnipeg, akómaki moninga na ngai ya libela ntango tobalanaki na sanza ya Febwali 1961. Ye mpe akolaki na libota oyo bazalaki kolinga Yehova. Atako nayebaki yango mpenza te na ntango wana, ayaki kokóma moto mpenza oyo apesaki ngai makasi mpe alendisaki ngai mingi na boumeli ya bambula.

Totamboli na Gaspésie mobimba mpo na kosakola

Mbula mibale nsima ya libala na biso, tokómaki babongisi-nzela monene na Rimouski, na etúká ya Québec. Na eleko ya prɛnta ya mbula yango, biro ya filiale esɛngaki biso tósala mobembo mpo na kosakola na bamboka nyonso ya Gaspésie, pembenipembeni ya bokula ya ɛsti ya Canada. Mokumba na biso ezalaki ya kosala nyonso mpo tólona mboto mingi ya solo. (Mos. 11:6) Tomemaki bazulunalo koleka 1 000 mpe babuku pene na 400 na motuka na biso, mpe mwa biloko ya kolya ná bilamba, mpe tobandaki mobembo ya kosakola mpe oyo eumelaki sanza moko. Tosakolaki na mwa mboka mokomoko ya Gaspésie. Radio ya Gaspésie ekebisaki bato ete Batatoli bazali koya mpe eyebisaki bango bándima mikanda na biso te. Kasi, bato mingi bayokaki liyebisi yango malamu te mpe bakanisaki ete ezalaki kosala piblisite ya mikanda na biso, yango wana bandimaki mikanda yango.

Na bambula wana, Leta autaki kopesa bonsomi ya kosakola na bingumba mosusu ya Québec, yango wana mbala mingi polisi ezalaki kotɛlɛmisa biso. Esalemaki bongo na engumba moko ntango tozalaki kokabola bazulunalo na ndako na ndako. Polisi moko ayebisaki biso tólanda ye na biro ya polisi, mpe tolandaki ye. Nayaki koyeba ete zuzi ya engumba abimisá mobeko mpo na kopekisa biso tósakola. Lokola mokonzi ya polisi azalaki te na mokolo yango, nalakisaki zuzi mokanda ya biro ya filiale ya Toronto oyo elimbolaki malamumalamu lotomo na biso ya kosakola. Nsima ya kotánga mokanda yango, zuzi alobaki mbala moko ete: “Talá, nalingi makambo te. Sango ya parwasi nde alobaki na ngai napekisa bino.” Lokola tolingaki te ete bato ya teritware bámona ete tozalaki kosala mosala oyo Leta apekisá, tozongaki mbala moko na esika oyo polisi ekangaki biso mpe tokobaki kosakola.

Na ntɔngɔ oyo elandi, ntango tozongaki kotala mokonzi ya polisi, asilikaki ntango ayokaki ete bakangaki biso. Bosengelaki koyoka ndenge azalaki koloba na zuzi na telefone! Ayebisaki biso ete soki tozwi likambo moko, tosengeli kobenga ye mpenza mpe akosilisa yango. Atako tozalaki bapaya mpe tozalaki koloba Lifalanse malamu te, bato bazalaki na boboto mpe bazalaki koyamba biso. Kasi tozalaki komituna boye: ‘Bakoyeba mpenza solo mokolo mosusu?’ Tozwaki eyano bambula na nsima ntango tozongaki mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi na Gaspésie. Tomonaki ete bato mingi oyo tosakwelaki bakómaki sikoyo bandeko na biso. Ya solo, Yehova nde moto akolisaka.​—1 Ko. 3:6, 7.

Tozwi libula

Mwana na biso ya mwasi, Lisa, abotamaki na 1970. Libula yango oyo eutaki na Yehova ebakisaki esengo mingi na bomoi na biso. Shirley ná Lisa basalaki elongo na ngai na bisika mingi epai tozalaki kotonga Bandako ya Bokonzi. Ntango Lisa asilisaki kelasi, alobaki boye: “Sikoyo, Papa ná Mama, lokola bokataki naino mosala ya ntango nyonso mpo na ngai, nakokóma mobongisi-nzela mpo nameka kobongisa likambo yango.” Esali sikoyo mbula koleka 20, Lisa azali kaka mobongisi-nzela, kasi sikoyo azali kosala yango elongo na mobali na ye Sylvain. Bango mibale bazwaki libaku ya kosala mosala ya kotonga na mikili mingi. Mokano ya libota na biso ezali ya kotikala ya bomoi ya pɛpɛlɛ mpe ya komipesa mpo na kosala mosala ya Yehova. Nabosanaka te makambo oyo Lisa alobaki ntango abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Kutu, alendisaki ngai nazongela mosala ya ntango nyonso na 2001, mpe banda wana nazali mobongisi-nzela. Mosala yango ezali kokoba koteya ngai natyelaka Yehova motema na makambo nyonso oyo nazali kosala mpe kozala na bomoi ya pɛpɛlɛ kasi, oyo epesaka esengo.

Mosala ya kotonga esɛngaka bolingo mpe bosembo

Yehova ateyi ngai ete soki tozali komipesa mpe kondima mokumba nyonso oyo apesi biso, tokozwa mapamboli mingi. Kosala na Komite ya kotonga mpe kotonga Bandako ya Bokonzi elongo na bandeko mibali mpe basi na Québec mobimba mpe na bisika mosusu ezali libaku moko monene.

Atako bandeko mosusu basalaka masukulu ya kitoko te na estrade, na bisika oyo bazali kotonga Bandako ya Bokonzi, bandeko yango bangɛngaka lokola minzoto. Bandeko yango batyaka motema na bango na mosala, mpe makoki na bango emonanaka. Na nsuka, mosala na bango ebimisaka ntango nyonso ndako moko kitoko mpo na losambo ya Yehova.

Bato batunaka ngai ete: “Bizaleli nini ya malamu koleka moto asengeli kozala na yango na esika ya kotonga Ndako ya Bokonzi?” Ndenge namonaka, moto asengeli libosoliboso kolinga Yehova mpe Mwana na ye, mpe kolinga bandeko. (1 Ko. 16:14) Ya mibale, asengeli kozala sembo. Soki makambo etamboli te ndenge oyo tolingi etambola​—mpe ekozanga te kosalema bongo—​moto ya sembo akokoba kolanda litambwisi ya ebongiseli ya Yehova. Yango ekotinda ye andima kosala na bisika mosusu ya kotonga.

Matɔndi mingi na Yehova

Atako tata akufaki na 1985, toli oyo apesaki ngai ete nazalaka ntango nyonso na mingi ya kosala na kati ya ebongiseli ya Yehova etikalá na motó na ngai. Ndenge moko na bandeko na ye oyo bazwá mikumba na bango na eteni ya likoló ya ebongiseli ya Yehova, na ntembe te azali na mingi ya kosala. (Em. 14:13) Mama azali sikoyo na mbula 97. Lokola maladi moko ebɛtaki ye na bɔɔngɔ, alobaka malamu lisusu te; atako bongo, ayebi Biblia na ye kaka. Atyaka maloba ya bavɛrsɛ na mikanda na ye mpe alendisaka biso tókoba kosalela Yehova na bosembo. Biso bana tozali mpenza na esengo ndenge tozwaki baboti ya ndenge wana!

Nazali mpe na botɔndi epai ya Yehova mpo na Shirley, mwasi mpe moninga na ngai ya sembo. Abosanaka te toli oyo mama na ye apesaki ye ete: “Vern akozala kaka na mingi ya kosala na kati ya solo, mpe yo osengeli koyekola kokabola ye na basusu.” Ntango tobalanaki, eleki sikoyo mbula 49, tokanaki ete tokonuna elongo, tokosalela Yehova, mpe soki biso mibale tokufi te ntango ebongiseli oyo ekosuka, tokokóma bilenge elongo mpe kokoba kosalela Yehova libela na libela. Ya solo, tozwá “mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.” (1 Ko. 15:58) Kasi Yehova, ye abatelaki biso mpenza mpe asalaki ete tózanga eloko moko te ya malamu ata mokolo moko.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 6 Lisolo ya bomoi ya Jack Halliday Nathan ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1990, nkasa 10-14 (na Lifalanse).

[Elilingi na lokasa 31]

“Mokano ya libota na biso ezali ya kotikala na bomoi ya pɛpɛlɛ mpe ya komipesa mpo na kosala mosala ya Yehova”