Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozalaka moto ya liboso na kopesa bandeko bakristo lokumu?

Ozalaka moto ya liboso na kopesa bandeko bakristo lokumu?

Ozalaka moto ya liboso na kopesa bandeko bakristo lokumu?

“Na bolingo ya bondeko bólinganaka na motema. Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.”​—ROM. 12:10.

1, 2. (a) Toli nini Paulo apesaki na mokanda na ye epai ya Baroma? (b) Mituna nini tokotalela?

NA MOKANDA na ye epai ya Baroma, ntoma Paulo amonisaki ntina oyo biso bakristo tosengeli komonisa bolingo na kati ya lisangá. Akundwelaki biso ete bolingo na biso esengeli kozala “na bokosi te.” Alobelaki mpe “bolingo ya bondeko” mpe amonisaki ete mpo na komonisa bolingo ya ndenge wana, tosengeli ‘kolingana na motema.’​—Rom. 12:9, 10a.

2 Ya solo, kozala na bolingo ya bondeko esuki kaka te na kosepela na basusu. Tosengeli komonisa yango na misala. Kutu, moto akoyeba te ete tolingaka ye mpe tosepelaka na ye soki tomonisi ye yango te. Yango wana Paulo abakisaki toli oyo: “Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.” (Rom. 12:10b) Kopesa moto lokumu esɛngaka nini? Mpo na nini ezali na ntina tózala bato ya liboso na kopesa bandeko bakristo lokumu? Ndenge nini tokoki kosala yango?

Limemya mpe lokumu

3. Na minɔkɔ ya kala ya Biblia, liloba “lokumu” ezali na ndimbola nini?

3 Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “lokumu” elimboli mpenzampenza “kilo.” Kopesa moto lokumu elakisi komona ete azali na kilo to na valɛrɛ. Na Biblia, liloba yango ya Ebre ebongolamaka mpe mbala mingi na “nkembo,” liloba oyo emonisi limemya makasi oyo epesami na moto oyo bapesi lokumu. (Eba. 45:13) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “lokumu” na Biblia epesaka likanisi ya kozala na ntina mingi, na valɛrɛ, mpe na motuya mingi. (Luka 14:10) Ya solo, bato oyo topesaka lokumu bazali na motuya, na valɛrɛ na miso na biso.

4, 5. Na ndenge nini kopesa lokumu mpe limemya ezali na boyokani? Pesá ndakisa.

4 Kopesa basusu lokumu esɛngaka nini? Ebandaka na limemya. Kutu, mbala mingi maloba “lokumu” mpe “limemya” esalelamaka nzela moko mpo ezali na boyokani makasi. Kopesa ndeko moko lokumu elimboli komonisa, to kobimisa polele limemya oyo tozalaka na yango mpo na ye. Na maloba mosusu, limemya ezali mingimingi lolenge oyo totalelaka ndeko na biso, kasi lokumu ezali nde lolenge oyo tosalelaka ye makambo.

5 Ndenge nini mokristo akoki kopesa bandeko na ye bakristo lokumu ya solo soki na motema na ye azali na limemya te mpo na bango? (3 Yoa. 9, 10) Mpo molona ekola malamu mpe ekufa te esengeli kopika misisa makasi na mabele ya malamu; ndenge moko mpe mpo tópesa moto lokumu ya solosolo mpe oyo ekoumela, tosengeli kozala na limemya mpo na moto yango. Nzokande, soki lokumu oyo tozali kopesa basusu euti na limemya ya solosolo te, nsukansuka lokumu yango ekokita. Yango wana, tokoki kokamwa te ete liboso Paulo apesa toli ya kopesana lokumu, alobaki polele ete: “Bolingo na bino ezala na bokosi te.”​—Rom. 12:9; tángá 1 Petro 1:22.

Pesá lokumu na baoyo bakelamá “na elilingi ya Nzambe”

6, 7. Mpo na nini tosengeli kozala na limemya mpo na basusu?

6 Lokola esɛngaka kozala na limemya ya solosolo mpo na kopesa basusu lokumu, tosengeli soki moke te kobosana bantina oyo Biblia epesi, oyo mpo na yango tosengeli kopesa bandeko na biso nyonso limemya. Na yango, tótalela bantina mibale.

7 Na bokeseni ya bikelamu mosusu awa na mabele, bato bakelamá “na elilingi ya Nzambe.” (Yak. 3:9) Yango wana, tozalaka na bizaleli ya Nzambe lokola bolingo, bwanya, mpe bosembo. Talá eloko mosusu oyo Mozalisi na biso apesá biso. Mokomi ya nzembo alobi boye: “Ee Yehova . . . , yo oyo lokumu ezali kolobelama kuna na likoló! . . . Mpe osalaki [moto] mwa moke na nse ya baanzelu, mpe olatisaki ye motole ya nkembo mpe ya lokumu.” (Nz. 8:1, 4, 5; 104:1) * Tokoki koloba ete Nzambe alatisá bato nyonso motole, to apesá bango mwa ndambo ya lokumu, mpe ya nkembo. Na yango, ntango topesi moto lokumu, tozali nde kondima Yehova, Ye oyo apesá bato lokumu. Soki tozali na bantina malamu mpenza ya kopesa bato nyonso lokumu, tokoloba boni mpo na bandeko na biso bakristo? Tosengeli te kopesa bango limemya mingi koleka?​—Yoa. 3:16; Gal. 6:10.

Tozali bato ya libota moko

8, 9. Paulo alobelaki ntina nini oyo tosengeli kopesa bandeko bakristo limemya?

8 Paulo atángaki ntina mosusu oyo tosengeli kopesana limemya. Mwa moke liboso apesa toli ya kopesa basusu lokumu, alobaki boye: “Na bolingo ya bondeko bólinganaka na motema.” Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kolingana na motema’ elobelaka boyokani makasi oyo esangisaka bandeko ya libota moko oyo balinganaka mpe basalisanaka. Na yango, ntango asalelaki maloba wana, Paulo amonisaki ete na kati ya lisangá, tosengeli kozala na boyokani makasi mpe kolingana lokola bato ya libota oyo ezali na bomoko makasi. (Rom. 12:5) Lisusu, tóbosana te ete Paulo akomaki maloba yango mpo na bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo, oyo Tata na bango nyonso ezalaki Yehova mpo akómisamaki bango nyonso bana na ye. Na yango, bazalaki mpenza libota moko. Yango wana, bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo na ntango ya Paulo bazalaki na ntina monene ya kopesana limemya. Ezali mpe bongo mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo lelo.

9 Bongo mpo na baoyo bazali “bampate mosusu”? (Yoa. 10:16) Atako Nzambe akómisi bango naino bana na ye te, bakoki mpe kobengana ndeko mobali to ndeko mwasi mpo bazali libota moko ya bandeko na mokili mobimba. (1 Pe. 2:17; 5:9) Na yango, soki baoyo bazali bampate mosusu bayebi mpenza ntina oyo babenganaka “ndeko,” bango mpe bazali na ntina ya kopesa bandeko na bango bakristo limemya oyo euti na motema.​—Tángá 1 Petro 3:8.

Mpo na nini ezali na ntina mingi?

10, 11. Mpo na nini kozala na limemya mpe kopesana lokumu ezali na ntina mingi?

10 Mpo na nini kozala na limemya mpe kopesana lokumu ezali na ntina mingi? Mpo na ntina oyo: Ntango tozali kopesa bandeko basi mpe bandeko mibali lokumu, tozali kopesa mabɔkɔ mpo lisangá mobimba ezala malamu mpe na bomoko.

11 Ya solo, toyebi ete kozala na boyokani malamu na Yehova mpe lisalisi ya elimo santu nde epesaka biso bakristo ya solo makasi mingi mpenza. (Nz. 36:7; Yoa. 14:26) Kasi, soki mpe bandeko bakristo bamonisi biso ete bazali kozwa biso na valɛrɛ, elendisaka biso mingi. (Mas. 25:11) Ntango moto alobi to asali likambo oyo emonisi ete azali kopesa biso limemya ya solo, toyokaka ete batomboli biso. Ebakiselaka biso makasi ya kokoba kotambola na esengo mpe na molende na nzela ya bomoi. Na ntembe te, yo mpe osilá koyoka ndenge wana.

12. Ndenge nini mokomoko na biso akoki kosalisa mpo bolingo mpe esengo ezala na lisangá?

12 Lokola Yehova ayebi ete tobotamá na mposa ya kozwa limemya, yango wana alendisi biso na nzela ya Liloba na ye ete “tózala na mposa makasi ya komoniselana limemya.” (Rom. 12:10, Today’s English Version; tángá Matai 7:12.) Bakristo nyonso oyo batyaka likebi na toli yango oyo esilaka ngala te, basalisaka mpo bolingo mpe esengo ezala kati na bandeko bakristo. Na yango, ekozala malamu tómituna boye: ‘Mbala ya nsuka oyo namonisaki ndeko moko ya lisangá, na maloba to na misala, ete nazali na limemya makasi mpo na ye ezalaki mokolo nini?’​—Rom. 13:8.

Ezali mokumba ya moto nyonso

13. (a) Banani basengeli kozala bato ya liboso mpo na kopesa basusu lokumu? (b) Maloba ya Paulo oyo ezali na Baroma 1:7 emonisi nini?

13 Banani basengeli kozala bato ya liboso mpo na kopesa basusu lokumu? Biblia elobi ete bankulutu basengeli kozala “bandakisa” mpo na lisangá. (1 Pe. 5:3) Ya solo, bankulutu bapesaka biso ndakisa na makambo mingi. Na yango, lokola bazali bakɛngɛli ya etonga, basengeli mpenza kozala bato ya liboso mpo na kopesa bandeko bakristo lokumu​—ata mpe baninga na bango bankulutu. Na ndakisa, ntango bankulutu bakutani mpo na kotalela bamposa ya lisangá, bakopesana lokumu soki bazali koyoka na likebi makambo oyo moninga na bango nkulutu azali koloba. Lisusu, bakopesana lokumu soki bazali kotalela makanisi mpe maloba ya bankulutu nyonso liboso bázwa ekateli. (Mis. 15:6-15) Kasi, tosengeli kobosana te ete mokanda ya Paulo epai ya Baroma ekomamaki kaka mpo na bankulutu te kasi mpo na lisangá mobimba. (Rom. 1:7) Na yango, toli yango ya kozala bato ya liboso mpo na kopesa basusu lokumu etali mpe biso nyonso lelo.

14. (a) Pesá ndakisa oyo emonisi bokeseni kati na kopesa lokumu mpe kozala moto ya liboso mpo na kopesa basusu lokumu. (b) Motuna nini tokoki komituna?

14 Tótala mpe likambo mosusu oyo ezali na toli yango ya Paulo. Alendisaki bakristo ya Roma kaka bápesa basusu lokumu te, kasi bázala bato ya liboso mpo na kopesa bango lokumu. Yango ekeseni na nini? Kanisá naino ndakisa oyo. Molakisi akoki kolendisa bana-kelasi oyo bayebi kotánga ete báyekola kotánga? Te, mpo bayebi kotánga. Kasi, molakisi akoki kosalisa bana-kelasi yango bátángaka malamu koleka. Ndenge moko mpe, biso bakristo topesanaka lokumu, mpamba te bolingo, oyo ezali elembo ya bakristo ya solo, etindaka biso tópesana lokumu. (Yoa. 13:35) Nzokande, kaka ndenge bana-kelasi oyo bayebi kotánga bakoki kotánga malamu mingi koleka soki babongisi lisusu ndenge na bango ya kotánga, biso mpe tokosala malamu koleka soki tozali bato ya liboso mpo na kopesa basusu lokumu. (1 Tes. 4:9, 10) Mokumba yango epesami na mokomoko na biso. Tokoki komituna boye: ‘Nasalaka yango​—nazalaka moto ya liboso mpo na kopesa basusu lokumu na lisangá?’

Pesá lokumu na ‘bato oyo bazangá’

15, 16. (a) Ntango tozali kopesa basusu lokumu, banani tosengeli kobosana te, mpe mpo na nini? (b) Nini ekoki komonisa ete tozali mpenza na limemya mpo na bandeko na biso nyonso ya mibali mpe ya basi?

15 Ntango tozali kopesa basusu lokumu, banani tosengeli kobosana te na lisangá? Liloba ya Nzambe elobi ete: “Ye oyo amoniselaka moto oyo azangá boboto azali kodefisa Yehova, mpe Ye akozongisela ye ndenge na ye wana ya kosala.” (Mas. 19:17) Ndenge nini etinda oyo ezali na maloba yango esengeli kosalisa biso ntango tozali kosala milende mpo tózala bato ya liboso mpo na kopesa basusu lokumu?

16 Ntembe ezali te ete, oyebi ete bato mingi balingaka kopesa lokumu na bato oyo baleki bango, kasi kaka bato yango bakoki kosalela bato oyo bango bamoni ete bazali na nse na bango makambo na limemya mpenza te to mpe na kozanga limemya. Nzokande, Yehova azali ndenge wana te. Alobi boye: “Baoyo bazali kokumisa ngai nakokumisa bango.” (1 Sa. 2:30; Nz. 113:5-7) Yehova apesaka lokumu na bato nyonso oyo basalelaka ye mpe bakumisaka ye. Abosanaka te “moto oyo azangá.” (Tángá 1 Samwele 2:8; 2 Nt. 16:9) Ya solo, tozali na mposa ya komekola Yehova. Yango wana, soki tolingi koyeba soki topesaka basusu lokumu ya solosolo, ezali malamu tómituna boye: ‘Makambo ya ndenge nini nasalelaka baoyo bayebani mingi te, to oyo bazali na mikumba te, to na esika ya lokumu te na lisangá?’ (Yoa. 13:14, 15) Eyano oyo tokopesa na motuna wana ekomonisa soki tozali mpenza na limemya mpo na basusu.​—Tángá Bafilipi 2:3, 4.

Mpo na kopesa basusu lokumu, tópesaka bango ntango na biso

17. Wapi lolenge moko ya malamu oyo tokoki kozala bato ya liboso mpo na kopesa basusu lokumu, mpe mpo na nini ezali bongo?

17 Wapi lolenge moko ya malamu oyo tokoki kozala bato ya liboso mpo na kopesa bato nyonso lokumu na lisangá? Ezali ya kopesa bango ntango na biso. Mpo na nini tolobi bongo? Biso bakristo tozali na mingi ya kosala, mpe kokokisa misala ndenge na ndenge ya lisangá ezwaka biso ntango mingi. Yango wana, tomonaka ete ntango na biso ezali na motuya mingi. Tomoni mpe ete tosengeli te kosɛnga bandeko na biso bápesa biso ntango na bango mingi koleka. Ndenge moko mpe, tosepelaka soki bandeko mosusu na lisangá bamoni ete basengeli te kosɛnga biso ntango mingi koleka.

18. Ndenge emonisami na elilingi na lokasa 18, ndenge nini tokoki komonisa ete tondimi kopesa mwa ntango na bandeko na biso bakristo?

18 Nzokande, biso nyonso (mingimingi baoyo bazali bakɛngɛli na lisangá) toyebi mpe ete kondima kokata misala na biso mpo na kopesa bandeko bakristo mwa ntango emonisaka ete tozali na limemya mpo na bango. Na ndenge nini? Soki tokati misala na biso mpo na kopesa ndeko na biso mwa ntango, tozali nde koloba na ye ete: ‘Ozali na valɛrɛ mingi na miso na ngai na boye ete eleki malamu nalekisa mwa ntango elongo na yo na esika nakoba kosala makambo oyo nazali kosala.’ (Mrk. 6:30-34) Nzokande, soki mpe tozali koboya kokata misala na biso mpo na kopesa mwa ntango na ndeko na biso, tokoki mbala mosusu kotinda ye amona ete azali na valɛrɛ te na miso na biso. Ya solo, toyebi ete ezali na bantango mosusu oyo tokoki kozala na misala oyo tokoki kokata te. Atako bongo, kondima​—to koboya—​kopesa basusu mwa ntango emonisaka mpenza soki na motema na biso tozali na limemya makasi mpo na bandeko na biso bakristo.​—1 Ko. 10:24.

Zwá ekateli mpo na kozala bato ya liboso

19. Longola kopesa bango ntango na biso, ndenge nini mosusu tokoki kopesa bandeko na biso bakristo lokumu?

19 Ezali na bandenge mosusu ya malamu oyo tokoki kopesa bandeko na biso bakristo lokumu. Na ndakisa, ntango tozali kopesa bango ntango na biso, tosengeli mpe kotyela bango likebi. Awa mpe Yehova apesi biso ndakisa. Davidi, mokomi ya nzembo alobi boye: “Miso ya Yehova ezali epai ya bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.” (Nz. 34:15) Tosalaka makasi ya komekola Yehova ntango tozali kotya miso mpe matoi na biso​—likebi na biso mobimba—​epai ya bandeko na biso, mingimingi baoyo bayei kosɛnga biso lisalisi. Soki tosali bongo, tokopesa bango lokumu.

20. Makambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali kopesa basusu lokumu?

20 Ndenge tomoni yango, tolingi kobosana te bantina oyo mpo na yango tosengeli kozala na limemya ya solosolo mpo na bandeko na biso bakristo. Longola yango, tolingi koluka mabaku ya kozala bato ya liboso ya kopesa bato nyonso lokumu, ata mpe baoyo bazangá. Soki tosali nyonso wana, tokokolisa bolingo ya bondeko mpe bomoko na kati ya lisangá. Yango wana, biso nyonso tókoba kaka kopesana lokumu te, kasi mingimingi tózala bato ya liboso mpo na kopesana lokumu. Ozali na ekateli ya kosala bongo?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 8 ezali mpe esakweli, elobeli Yesu Kristo, moto ya kokoka.​—Ebr. 2:6-9.

Ozali koyeba lisusu?

• Boyokani nini ezali kati na lokumu ná limemya?

• Tozali na bantina nini ya kopesa bandeko na biso bakristo lokumu?

• Mpo na nini ezali na ntina tópesanaka lokumu?

• Ndenge nini tokoki kopesa bandeko na biso bakristo lokumu?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 18]

Ndenge nini tokoki kopesa bandeko na biso bakristo lokumu?