Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Salisá bana bámesana na ebongiseli ya Yehova

Salisá bana bámesana na ebongiseli ya Yehova

Salisá bana bámesana na ebongiseli ya Yehova

BANA balingaka koyekola. Kanisá mituna oyo mbala mosusu bana ya Bayisraele bamitunaki na Ezipito na butu ya Elekeli ya liboso: ‘Mpo na nini mwana ya mpate asengelaki kokufa?’ ‘Mpo na nini tata azali kopakola makila na libaya oyo esimbaka makonzí ya porte?’ ‘Tokei wapi?’ Mitindo oyo Yehova apesaki batata Bayisraele emonisi polele ete Yehova asepelaki na mituna ya ndenge wana. Na oyo etali milulu ya Elekeli na bambula ekoya Yehova ayebisaki bango boye: “Ntango bana na bino bakoloba na bino ete: ‘Molulu oyo ya losambo elimboli nini mpo na bino?’ bongo bosengeli koloba ete: ‘Ezali mbeka ya elekeli mpo na Yehova, oyo alekaki likoló ya bandako ya bana ya Yisraele na Ezipito ntango abɛtaki Baezipito na bolɔzi, kasi abikisaki bandako na biso.’” (Kob. 12:24-27) Na nsima, Yehova akundwelaki baboti Bayisraele ntina ya koyanola mituna ya bana na oyo etali “malako mpe bikateli ya lisambisi” oyo apesaki bango mitindo.​—Mib. 6:20-25.

Ya solo, Yehova alingaki ete bana bázwa biyano ya malamu na mituna etali losambo ya solo​—biyano oyo ekotinda bango bálinga Yehova lokola Nzambe mpe Mobikisi na bango. Lelo oyo mpe Yehova alingi bongo mpo na bana na biso. Ndenge oyo baboti bakoki kokɔtisa malamumalamu na mitema ya bana na bango bolingo mpo na Yehova mpe mpo na basaleli na ye ezali nde na kosalisa bango bámesana na ebongiseli ya Yehova mpe báyeba matomba nini bazali kozwa na makambo oyo ebongiseli ya Yehova ezali kosalela biso. Na yango, tótalela mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kosalisa bana báyeba makambo mingi na oyo etali ebongiseli ya Nzambe.

Lisangá na bino

Bana basengeli koyeba lisangá na bino malamu. Mpo na yango, bino baboti bosengeli komemaka bana na bino na makita nyonso ya bokristo. Na ndenge yango, bokolanda ndakisa oyo Yehova apesaki baboti Bayisraele, ntango apesaki bango mitindo ete: “Yanganisá bato, mibali, basi ná bana mike . . . , mpo báyoka mpe mpo báyekola, mpo basengeli kobanga Yehova Nzambe na bino mpe kokeba ete bákokisa maloba nyonso ya mobeko oyo. Mpe bana na bango oyo bayebaki te basengeli koyoka, mpe basengeli koyekola kobanga Yehova Nzambe na bino.”​—Mib. 31:12, 13.

Bana bakoki kobanda koyeba Liloba ya Nzambe banda bomwana mpenza. Ntoma Paulo alobaki mpo na Timote ete: “Banda bomwana na yo mpenza oyebi makomi mosantu.” (2 Tim. 3:15) Na makita na Ndako ya Bokonzi, ata bana mike babandaka kokanga ntina ya makambo oyo ezali koteyama kuna mpe bamesenaka na banzembo ya Bokonzi. Kuna, bayekolaka kosalela mpe komemya Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. Lisusu, na makita bakomona ezaleli oyo emonisaka bayekoli ya solosolo ya Kristo​—bolingo ya solosolo. Yesu alobaki boye: “Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka bino na bino. Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:34, 35) Bolingo ya solosolo mpe kimya oyo emonanaka na Ndako ya Bokonzi ekosimba mitema ya bana mpe ekosalisa bango bátikala na momeseno ya koyangana na makita na bomoi na bango.

Soki okómi na momeseno ya koya na Ndako ya Bokonzi liboso makita ebanda mpe kotikala mwa moke na nsima, bana na yo bakozala na libaku ya kozwa baninga. Na esika otika bango bámesana kaka na bana lokola bango, mpo na nini te kolakisa bango bandeko mibali mpe basi oyo bakeseni na bambula? Soki bayebani na bandeko ya mikóló, bana na yo ya mike bakomona ete mikóló yango bakutaná na makambo mingi ya kitoko mpe bazali na bwanya mingi. Kaka ndenge Zekaria ya ntango ya kala, oyo azalaki “molakisi oyo azalaki koteya ndenge ya kobanga Nzambe ya solo” asalisaki Uzia, mokonzi ya Yuda, asala oyo ezali malamu, ndenge moko mpe baoyo bazali kosalela Yehova na bosembo banda bambula mingi bakoki kosalisa bilenge. (2 Nt. 26:1, 4, 5) Ntango bozali na Ndako ya Bokonzi, okoki kolimbolela bana mosala ya bibliotɛkɛ, ya etanda ya mayebisi mpe biloko mosusu.

Ebongiseli ya Yehova na mokili mobimba

Bana basengeli koyeba ete lisangá na bino ezali na kati ya ebongiseli moko oyo ezali na mokili mobimba mpe oyo esangisi masangá koleka 100 000. Limbolá makambo oyo etali ebongiseli yango, ndenge ezali kotambola, mpe makambo oyo bana bakoki kosala mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya bokonzi. Lakisá bango ntina oyo ozelaka mayangani ya zongazonga, mayangani ya etúká, mpe koya ya mokɛngɛli ya zongazonga.​—Talá etanda  “Makambo ya kotalela na Losambo na libota,” na lokasa 28.

Soki libaku ezwami, bengisáká bakɛngɛli ya zongazonga, bamisionɛrɛ, bandeko ya Betele, mpe bandeko mosusu oyo bazali na mosala ya ntango nyonso na ndako na bino mpo bólya elongo. Kokanisá te ete bazalaka na ntango te mpo na bana mike. Basali wana ya ntango nyonso basalaka makasi ya komekola Yesu, oyo azalaki ntango nyonso koyamba bana mpe kosolola na bango. (Mrk. 10:13-16) Soki bayoki basaleli wana ya Yehova bazali kolobela makambo oyo bakutaná na yango mpe soki bamoni esengo oyo bazali na yango na mosala mosantu, mbala mosusu bana na yo mpe bakomityela mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso.

Likambo nini mosusu okoki kosala mpo na kosalisa bana na yo bámesana makasi na ebongiseli ya Yehova? Talá mwa makanisi: Bómityela mokano ya koyekola buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu na libota na bino. Monisá ndenge basaleli ya Yehova bamipesaki na motema moko na mosala na ye, komikitisa mpe bosembo oyo bamonisaki. Monisá ndenge Yehova asalelaki bango mpo na kopalanganisa nsango malamu na mokili mobimba. Salelá bavideo oyo ebongiseli ya Yehova ebimisá mpo na kopesa mateya oyo euti na makambo oyo esalemá na ntango ya kala mpe na ntango na biso. Soki likoki ezali, bokende kotala biro ya filiale mpe Betele na mboka na bino to mbala mosusu ata na mikili mosusu. Kokende kotala bisika yango ekosalisa bana na yo báyeba ndenge eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele, oyo etambwisami na moombo ya sembo, ebongisami mpo na kopesa bilei mpe litambwisi ya elimo na bandeko ya mokili mobimba, ndenge ezalaki na ekeke ya liboso T.B.​—Mat. 24:45-47; Mis. 15:22-31.

Teyá mwana mokomoko na kolanda makoki na ye

Ntango ozali koteya bana na yo, kobosana te ndenge oyo Yesu ateyaki bantoma na ye. Mokolo moko ayebisaki bango boye: “Nazali naino na makambo mingi ya koloba na bino, kasi bokoki komema yango sikoyo te.” (Yoa. 16:12) Yesu atondisaki bayekoli na ye na mateya ebeleebele te kaka na mbala moko. Kasi, ateyaki bango mokemoke mateya ya ntina mpo bákoka kokanga ntina na yango malamu. Ndenge moko mpe, kotondisa bana na mateya ebeleebele te na mbala moko. Soki ozali koteya bango mokemoke, kasi mbala na mbala, ndenge oyo ebongiseli ya Yehova ezali kotambola, okokoba kobenda likebi ya bana na yo mpe okotinda bango básepela koyekola na ntina etali lisangá ya bokristo. Na kolanda ndenge bamposa ya bana na yo ezali kobongwana, okoki kozongela mpe kobakisa mateya mosusu likoló ya oyo bayebi.

Lisangá ya bokristo ezali esika monene ya kozwa lisalisi mpo na kolendisa boyokani ná Nzambe, mpe bana oyo bamipesaka mingi na misala ya lisangá bazalaka na makoki mingi mpo na kotɛmɛla bopusi ya mokili ya Satana. (Rom. 12:2) Tozali kotya motema ete koyoka esengo mingi na kosalisa bana na yo bámesana na ebongiseli ya Yehova. Na lipamboli ya Yehova, tiká ete bana bátikala sembo na ebongiseli yango mpe na Nzambe ya bolingo oyo tosalelaka.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 28]

 Makambo ya kotalela na losambo na libota

Talá makambo mosusu oyo etali ebongiseli ya Yehova, oyo bokoki kotalela na mpokwa ya Losambo na libota.

▪ Bólobela ebandeli ya lisangá na bino. Ntango nini mpe ndenge nini esalemaki? Esalelaki Bandako ya Bokonzi nini? Mpo na lisolo yango, mpo na nini te kosɛnga ndeko moko ya lisangá oyo aumeli mingi aya na ndako na bino mpo ayanola mituna ya bana na yo?

▪ Limbolá ntina ya makita oyo tosalaka na lisangá mpe ya mayangani ya minene, mpe matomba oyo bana bakoki kozwa na mabaku yango.

▪ Bólobela ntina ya biteyelo ndenge na ndenge oyo esalemaka na ebongiseli ya Yehova. Pesá bandakisa oyo emonisi matomba oyo ezali komonana mpo na mosala ya bandeko oyo bakɔtaki bakelasi yango.

▪ Salisá bana bámona ete ezali na ntina mingi kokóma mosakoli oyo asakolaka nsango malamu sanza nyonso. Monisá bango ndenge lapolo na bango ekoki kokɔta na lapolo ya mokili mobimba oyo ebimaka na Annuaire des Témoins de Jéhovah.

▪ Bólobela mitindo ndenge na ndenge ya mosala ya ntango nyonso oyo bilenge bakoki kosala na ebongiseli ya Yehova. Mokapo 10 ya buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova epesi makanisi ya malamu.

▪ Salisá bana bámona ntina oyo lisangá esalaka boye to boye na makambo mosusu. Limbolá ntina oyo basengeli te koboya kolanda ebongiseli ya Yehova, ata na makambo mikemike. Monisá bango ndenge oyo bakoki kosalisa mpo makambo esalemaka na molɔngɔ na lisangá soki bazali kolanda litambwisi ya bankulutu.

[Elilingi]

Bana na yo bakozwa matomba soki basali boninga na bato oyo baumeli na mosala ya Nzambe

[Bililingi na lokasa 26]

Ndenge ezalaki na Yisraele ya kala, lelo mpe baboti basalaka makasi mpo na kopesa bana biyano ya malamu ntango batuni bango mituna oyo etali ebongiseli ya Yehova