Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bilenge—Bótɛmɛla bopusi ya baninga

Bilenge—Bótɛmɛla bopusi ya baninga

Bilenge​—Bótɛmɛla bopusi ya baninga

“Liloba na bino . . . eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto mokomoko eyano.”​—KOL. 4:6.

1, 2. Bilenge mingi bakanisaka nini na oyo etali kokesana na basusu, mpe mpo na nini?

NA NTEMBE te, oyoká kaka na nsango te ete baninga bazalaka na bopusi makasi, kasi yo moko oyebi yango malamu mpo okutaná na yango. Mbala mosusu moto moko atyaki yo mbamba osala likambo moko oyo oyebi ete ezali mabe. Oyokaka ndenge nini soki esalemi bongo? Christopher oyo azali na mbula 14 alobi boye: “Na bantango mosusu, nayokaka lokola nalimwa ata kolimwa, to mpe nazala kaka lokola baninga mosusu ya kelasi na bongo nakokesana na basusu te.”

2 Olandaka mingi makanisi ya baninga na yo? Soki ɛɛ, ezali mpo na nini? Ekoki nde kozala mpo olingi bándima yo? Mposa yango ezalaka ntango nyonso mabe te. Kutu, mikóló mpe balingaka baninga na bango bándima bango. Moto moko te, ezala elenge to mokóló, asepelaka báboya ye. Nzokande, osengeli koyeba ete basusu bakosepela na yo te soki ozali kokangama na oyo ezali malamu. Ata Yesu akutanaki na likambo yango. Kasi, Yesu asalaki ntango nyonso oyo ezali malamu. Bato mosusu balandaki ye mpe bakómaki bayekoli na ye; kasi basusu batyolaki Mwana ya Nzambe mpe ‘bamonaki ye mpamba.’​—Yis. 53:3.

Kosala lokola baninga ezalaka na nguya mpenza!

3. Mpo na nini kolanda makambo ya baninga ezali libunga?

3 Na bantango mosusu, okoki komona malamu olanda makanisi ya baninga na yo kaka mpo báboya yo te. Kosala bongo ekozala libunga. Bakristo basengeli te kozala “bana mike . . . oyo bazali kotindikama lokola na mbonge.” (Ef. 4:14) Bana mike balandaka makambo ya baninga mpambampamba. Kasi, yo ozali elenge mpe etikali moke okóma mokóló. Na yango, soki ondimi ete mitinda ya Yehova ezali mpo na bolamu na yo, okozwa matomba mingi soki olandi yango. (Mib. 10:12, 13) Soki osali bongo te, ekozala lokola otiki bomoi na yo na mabɔkɔ ya bato mosusu. Likambo ya solo ezali ete soki ozali kosala makambo mpo basusu batindi yo osala yango, okómi kaka lokola mwana-popi na bango.​—Tángá 2 Petro 2:19.

4, 5. (a) Ndenge nini Arona akweaki na bopusi ya baninga, mpe likambo yango ekoki koteya biso nini? (b) Baninga bakoki kosalela mayele nini mpo na kotinda yo osala makambo ya mabe?

4 Mokolo moko, Arona, ndeko ya Moize, asalaki makambo mpo basusu batyaki ye mbamba. Ntango Bayisraele batindaki ye asalela bango nzambe, asalelaki bango. Arona azalaki bibangabanga te. Mwa moke liboso, akendaki elongo na Moize epai ya Farao, moto oyo azalaki na nguya koleka na Ezipito, mpe alobaki na ye. Na mabaku yango, Arona alobaki na mpiko, ayebisaki Farao nsango oyo Nzambe atindelaki ye. Kasi ntango baninga Bayisraele batyaki ye mbamba, Arona akweaki. Bopusi ya basusu ekoki kozala na nguya mpenza! Arona alongaki kotɛmɛla mokonzi ya Ezipito kasi alongaki te kotɛmɛla baninga na ye.​—Kob. 7:1, 2; 32:1-4.

5 Ndenge ndakisa ya Arona emonisi yango, bopusi ya baninga etali kaka bilenge te; ezali mpe te kaka likambo ya bato oyo balingaka kosala mabe. Bopusi ya baninga ekoki kokweisa ata baoyo balingaka mpenza kosala oyo ezali malamu, ata mpe yo. Mpo na kotinda yo osala makambo ya mabe, baninga na yo bakoki kobangisa, kofunda, to mpe kotyola yo. Ezala ndenge nini, ezalaka mpasi kotɛmɛla bopusi ya baninga. Mpo na kolonga kotɛmɛla yango, osengeli naino koyekola kotyela makambo oyo ondimaka motema.

“Bókoba kotala soki bozali ndenge nini”

6, 7. (a) Mpo na nini ezali na ntina ondima bindimeli na yo, mpe ndenge nini okoki kokolisa kondima yango? (b) Mituna nini okoki komituna mpo na kokómisa kondima na yo makasi?

6 Mpo na kolonga bopusi ya baninga, osengeli libosoliboso kondimisa ete bindimeli mpe mitinda oyo olandaka ezali malamu. (Tángá 2 Bakorinti 13:5.) Komindimisa ndenge wana ekosalisa yo ozala na mpiko, ata soki ozalaka moto ya nsɔninsɔni. (2 Tim. 1:7, 8) Kasi ata soki moto azalaka na mpiko, ekoki kaka kozala mwa mpasi asala likambo oyo andimaka na motema moko mpenza te. Na yango, mpo na nini te kotala soki mateya ya Biblia oyo bateyá yo ezali mpenza solo? Bandá na mateya ya moboko. Na ndakisa, ondimaka ete Nzambe azali mpe oyokaka basusu bazali koloba bantina oyo bango bandimaka ete Nzambe azali. Sikoyo, omituna boye: ‘Nini endimisaka ngai ete Nzambe azali?’ Ntina ya motuna wana ezali te ya kobimisa ntembe na motema na yo, kasi ya kokómisa kondima na yo makasi. Ndenge moko mpe, omituna boye: ‘Ndenge nini nayebi ete Makomami ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe?’ (2 Tim. 3:16) ‘Nini endimisaka ngai ete tozali na “mikolo ya nsuka”?’ (2 Tim. 3:1-5) ‘Nini endimisaka ngai ete mibeko ya Yehova ezali mpo na bolamu na ngai?’​—Yis. 48:17, 18.

7 Okoki kokakatana komituna mituna wana, mpo ozali kobanga ete okozwa biyano te. Kasi soki osali bongo, okozala lokola motambwisi-motuka oyo azali kobanga kotala likɔnga oyo elakisaka ndenge esansi ezali na motuka, mpo azali kobanga noki likɔnga yango elakisa ete esansi esili. Soki esansi esili, osengeli koyeba yango mpo otala soki okoki kosala nini. Ndenge moko mpe, ezali malamu oyeba esika oyo kondima na yo ezali makasi te mpe oluka kokómisa yango makasi.​—Mis. 17:11.

8. Limbolá ndenge oyo okoki kokóma kondima mpenza ete etinda oyo Nzambe apesi ya kokima pite ezali ya bwanya.

8 Tozwá ndakisa. Biblia elendisi yo ‘okima pite.’ Omituna boye: ‘Mpo na nini kotosa etinda wana ezali likambo ya mayele?’ Kanisá bantina oyo baninga na yo basalaka yango. Kanisá mpe mpo na nini moto oyo azali kosala pite “azali kosalela nzoto na ye moko lisumu.” (1 Ko. 6:18) Sikoyo talelá bantina yango, mpe omituna boye: ‘Etamboli nini eleki malamu? Kosala pite ezali na litomba mpenza?’ Kanisá likambo yango malamumalamu; omituna boye: ‘Nakoyoka ndenge nini soki nasali pite?’ Mbala mosusu okosepelisa baninga na yo, kasi okomiyoka ndenge nini na nsima, ntango okozala na baboti na yo to na bandeko bakristo na Ndako ya Bokonzi? Ndenge nini okomiyoka ntango okolinga kobondela Nzambe? Sikoyo, okolinga mpenza komikómisa mbindo na miso ya Nzambe kaka mpo na kosepelisa baninga na yo ya kelasi?

9, 10. Ndenge nini kotyela bindimeli na yo motema ekosalisa yo ozala na mpiko ntango ozali na baninga?

9 Soki ozali elenge, ozali na eleko ya bomoi oyo ‘makoki na yo ya kokanisa’ ezali kokola mingi mpenza. (Tángá Baroma 12:1, 2.) Na eleko yango, kanisá malamumalamu mpo na nini kozala Motatoli ya Yehova ezali na ntina mpo na yo. Komanyola ya ndenge wana ekosalisa yo otyela bindimeli na yo motema. Na nsima, soki okutani na bopusi ya baninga, okokoka kopesa eyano mbala moko mpe na mpiko. Okoyoka lokola elenge mwasi mokristo moko oyo alobi ete: “Soki natɛmɛli bopusi ya baninga, nasalisaka bato báyeba soki nazali mpenza nani. Ezali kaka te likambo ya ‘lingomba moko boye.’ Esimbi nde makanisi na ngai mpenza, mikano na ngai, bizaleli na ngai, mpe bomoi na ngai mobimba.”

10 Ya solo, esɛngaka milende mpo na kokangama na oyo oyebi ete ezali malamu. (Luka 13:24) Mpe okoki komituna soki ezali na ntina oboma nzoto ndenge wana. Kasi kobosana likambo oyo te: Soki osali lokola ozali kosɛnga bolimbisi to mpe ozali koyoka nsɔni mpo na ekateli na yo ya kosala oyo ezali malamu, baninga bakomona yango mpe mbala mosusu bakobakisa mitungisi mosusu. Nzokande soki ozali koloba na mpiko, mbala mosusu ekoumela te, okomona baninga na yo bakotika kotya yo mbamba.​—Talá mpe Luka 4:12, 13.

‘Manyolá mpo na koyanola’

11. Komibongisa mpo na bopusi ya baninga ekoki kosalisa yo na nini?

11 Likambo mosusu ya ntina oyo okoki kosala mpo na kotɛmɛla bopusi ya baninga ezali nde komibongisa. (Tángá Masese 15:28.) Komibongisa elimboli kokanisa liboso makambo nini ekoki kokómela yo. Mbala mosusu kokanisa liboso ekoki kosalisa yo okima kowelana makasi na baninga na yo. Na ndakisa, kanisá ete omoni na mosika etuluku moko ya baninga na yo ya kelasi bazali komɛla likaya. Na ntembe te, bakozanga te kopesa yo likaya. Soki omoni ete likambo ekoki kobima, okoki kosala nini? Masese 22:3 elobi boye: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” Soki ozwi nzela mosusu, okoki kokima kokutana na bango. Wana ezali bibangabanga te; ezali nde likambo ya bwanya.

12. Ndenge nini okoki koyanola soki moto atumoli yo?

12 Bongo soki mwaye ya kokima likambo ezali te? Na ndakisa, soki moninga moko atuni yo na lityo ete: “Nzokande oyebi naino mibali te?” Malamu osalela toli oyo ezali na Bakolose 4:6 ete: “Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto mokomoko eyano.” Ndenge vɛrsɛ oyo emonisi yango, eyano oyo okopesa na motuna ya ndenge wana ekolanda ndenge makambo ezali. Ezali na ntina te ete osala lisukulu molaimolai ya Biblia. Mbala mosusu okoki kosuka kaka na eyano moko ya polele mpe oyo epesami na mpiko. Na ndakisa, soki batuni soki oyebi naino mibali to basi te, ntango ozali kopesa eyano, okoki kaka koloba ete: “Naino te,” to, ete “Wana etali ngai moko.”

13. Bososoli ezali na ntina nini ntango ozali koyanola motuna ya moninga oyo atumoli yo?

13 Mbala mingi Yesu azalaki kopesa eyano kaka ya mokuse soki amoni ete eloko moko ya malonga ekobima te soki alobi mingi. Kutu, ntango Erode atunaki ye, Yesu ayanolaki eloko moko te. (Luka 23:8, 9) Kofanda nyɛɛ ezalaka mbala mingi lolenge ya malamu ya koyanola mituna ya mpambampamba. (Mas. 26:4; Mos. 3:1, 7) Nzokande, okoki mpe komona ete moto oyo azali komitungisa mpo na etamboli na yo​—na ndakisa na oyo etali makambo ya kosangisa nzoto​—alobi na bosembo ata soki na ebandeli, moto yango atyolaki yo. (1 Pe. 4:4) Soki ezali bongo, ekoki kozala malamu olimbolela ye malamu bindimeli na yo oyo euti na Biblia. Na ntango wana, kotika kobanga ezongisa yo nsima te. ‘Omibongisa ntango nyonso mpo na koloba.’​—1 Pe. 3:15.

14. Na bantango mosusu, ndenge nini okoki kozongisa mbamba na mayele?

14 Na bantango mosusu, okoki mpe kozongisela bango mbamba. Kasi, osengeli kosala yango na mayele. Na ndakisa, soki moninga moko ya kelasi atingami kaka apesa yo likaya, okoki koloba, “Te, limbisá” mpe kobakisa ete: “Nakanisaki ete ozalaka moto moko ya mayele oyo akoki te komɛla likaya!” Omoni ndenge ozongiseli ye yango? Na esika obanda kolimbola ntina oyo omɛlaka likaya te, moninga na yo akokanisa ntina oyo ye moko amɛlaka yango. *

15. Ntango nini ebongi kolongwa na esika oyo baninga bazali kotya yo mbamba, mpe mpo na nini?

15 Okosala nini soki baninga bazali kaka kotungisa yo atako osali milende nyonso wana? Na ntango wana, malamu kaka olongwa wana. Soki otikali wana, okoki kokwea. Yango wana, longwá na esika yango. Soki olongwe wana, koyoka te ete balongi yo. Kutu, yo nde olongi. Okómaki te mwana-popi ya baninga na yo, mpe osepelisi motema ya Yehova.​—Mas. 27:11.

Zalá na ‘myango oyo ememaka na litomba’

16. Na ndenge nini bato mosusu oyo balobaka ete bazali bakristo bakoki kopusa biso na makambo ya mabe?

16 Na bantango mosusu, bilenge oyo balobaka ete bazali basaleli ya Yehova nde bakoki kopusa yo osala likambo moko ya mabe. Na ndakisa, okosala nini soki okómi na fɛti moko oyo elenge ya ndenge wana abongisi mpe okuti ete ata mokóló moko te azali wana mpo na kotambwisa makambo? To soki elenge moko oyo alobaka ete azali mokristo amemi masanga na fɛti, nzokande na kolanda mibeko ya Leta, yo ná bilenge mosusu oyo bazali wana bokokisi naino mbula ya komɛla masanga te? Okoki kokutana na makambo mingi oyo ekosɛnga olanda lisosoli na yo oyo eteyami na Biblia. Elenge mokristo moko alobi boye: “Ngai ná leki na ngai ya mwasi tokendaki kotala filme moko, kasi tobimaki mpo etondaki na maloba ya mabe. Bilenge mosusu oyo tozalaki na bango bazwaki ekateli ya kotikala. Baboti na biso bakumisaki biso mpo tobimaki. Kasi, bilenge mosusu wana basilikelaki biso mpo tobimisaki bango bana mabe.”

17. Ntango okei fɛti moko, bibongiseli nini okoki kozwa mpo na kotosa mitinda ya Nzambe?

17 Ndenge ndakisa oyo touti kolobela emonisi yango, bato mosusu bakoki komona mabe mpo olandi lisosoli na yo oyo eteyami na Biblia. Kasi kangamá na oyo ondimi ete ezali nzela ya malamu. Omibongisaka. Soki ozali kokende na fɛti moko, yebá ndenge okobima soki makambo etamboli te ndenge okanisaki. Bilenge mosusu bayokanaka na baboti na bango ete soki kaka babengi na telefone, báya kozwa bango mpo na kozongisa bango noki na ndako. (Nz. 26:4, 5) ‘Myango ya ndenge wana ememaka na litomba.’​—Mas. 21:5.

‘Sepelá na bolenge na yo’

18, 19. (a) Mpo na nini okoki kondima ete Yehova alingi ozala na esengo? (b) Nzambe ayokaka ndenge nini mpo na bato oyo batɛmɛlaka bopusi ya baninga?

18 Yehova akelaki yo na likoki ya kosepela na bomoi, mpe alingi ozala na esengo. (Tángá Mosakoli 11:9.) Kobosana te ete oyo baninga na yo mingi bayokaka ezali kaka “esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu.” (Ebr. 11:25) Nzambe ya solo alingi ozwa eloko moko ya malamu koleka oyo wana. Alingi ozala na esengo libela na libela. Na yango, ntango okutani na komekama ya kosala likambo moko oyo oyebi ete ezali mabe na miso ya Nzambe, kobosana te ete ata ndenge nini, makambo oyo Yehova asɛngaka yo ezalaka kaka mpo na bolamu na yo.

19 Elenge, osengeli koyeba ete ata soki baninga na yo bandimi yo lelo, nsima ya bambula, mbala mosusu mingi kati na bango bakoyeba lisusu ata nkombo na yo te. Kasi, soki otɛmɛli bopusi ya baninga, Yehova azali komona, mpe akobosana yo mpe bosembo na yo ata mokolo moko te. ‘Akofungwela yo baporte ya mai ya likoló mpe akosopela yo lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te.’ (Mal. 3:10) Longola yango, Yehova akopesa elimo santu na ye mingi mpo na kosalisa yo na esika oyo omoni ete okokoka te. Ya solo, Yehova akoki kosalisa yo otɛmɛla bopusi ya baninga na yo!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 14 Talá etanda “Ndenge ya kotɛmɛla bopusi ya baninga” na buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, nkasa 132 mpe 133 (na Lifalanse).

Ozali koyeba lisusu?

• Bopusi ya baninga ekoki kozala na nguya nini?

• Kondimisa ezali na ntina nini mpo na kotɛmɛla bopusi ya baninga?

• Ndenge nini okoki komibongisa mpo na kotɛmɛla bopusi ya baninga?

• Ndenge nini oyebi ete Yehova apesaka motuya na bosembo na yo?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 8]

Mpo na nini Arona andimaki kosala mwana-ngɔmbɛ ya wolo?

[Elilingi na lokasa 10]

Omibongisa​—yebá makambo oyo okoloba