Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Makambo oyo asalaki elandi ye’

‘Makambo oyo asalaki elandi ye’

‘Makambo oyo asalaki elandi ye’

THEODORE JARACZ, ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, asilisaki bomoi na ye awa na mabele na mwa misato 9 Yuni 2010 na ntɔngɔ. Azalaki na mbula 84 mpe atikaki mwasi na ye Melita, oyo basalaki na ye mbula 53 ya libala. Atikaki mpe yaya na ye ya mwasi oyo azali na bana misato, moko ya mobali mibale ya basi.

Ndeko Jaracz abotamaki na mokolo ya 28 Sɛtɛmbɛ 1925, na Pike County, na etúká ya Kentucky, na États-Unis mpe azwaki batisimo mpo na komonisa komipesa na ye epai ya Yehova na mokolo ya 10 Augusto 1941, ntango azalaki na mbula 15. Mbula mibale na nsima, ntango akómaki na mbula 17, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza; yango ezalaki ebandeli ya mosala ya ntango nyonso oyo asalaki ntango molai, mbula pene na 67.

Na 1946, ntango akómaki na mbula 20, Ndeko Jaracz akɔtaki na kelasi ya mbala ya nsambo ya Gileade, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Nsima ya kozwa diplome, Ndeko Jaracz atindamaki mpo na kosala lokola mokɛngɛli-motamboli na Cleveland, na etúká ya Ohio, na États-Unis. Na 1951, atindamaki na filiale ya Australie, epai asalaki lokola mokɛngɛli ya filiale. Annuaire des Témoins de Jéhovah 1983 elobi ete Ndeko Jaracz “alendisaki bandeko na ekólo yango mobimba na molende na ye mpo na ebongiseli ya Nzambe mpe ndakisa na ye malamu na mosala ya kosakola.”

Nsima ya kozonga na États-Unis, Ndeko Jaracz abalaki Melita Lasko na mokolo ya 10 Desɛmbɛ 1956. Babandaki bomoi na bango na libala na mosala ya mokɛngɛli-motamboli, basalaki na molende na bazongazonga mpe bitúká oyo ezalaki na eteni monene ya États-Unis. Na nsuka ya 1974, babengaki Ndeko Jaracz akɔta na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova.

Bato bakokanisa Ndeko Jaracz mingi na ndenge azalaki mosaleli ya Yehova ya molende mpe ya sembo, oyo atyaki motema na ye mobimba na makambo ya Nzambe. Azalaki mobali oyo azalaki kolinga mpe kobatela mwasi na ye malamu, mpe moto ya elimo oyo azalaki kotya matomba ya basusu liboso ya oyo ya ye moko. (1 Ko. 13:4, 5) Likebi makasi oyo azalaki kotyela basusu ezalaki komonana na ndenge azalaki kolinga mpenza ete básalela moto nyonso makambo na bosembo mpe na motema mawa. Longola yango, bolingo mpe komibanzabanza na ye ya makasi mpo na bato ezalaki komonana na molende na ye na mosala ya kosakola.

Atako toyoki mawa mingi na liwa ya mosali wana ya molende, moto oyo libota ya Betele mpe bandeko ya mokili mobimba balingaki mingi, tozali na esengo mpo na mosala ya sembo oyo Ndeko Jaracz asaleli Yehova bambula nyonso wana. Tozali na ntembe te ete ‘azalaki sembo ata tii na liwa, mpe azwi motole ya bomoi.’ (Em. 2:10) Tondimi mpe ete ‘makambo oyo asalaki elandi ye.’​—Em. 14:13.