Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Yesu ayebisaki bayoki na ye boye: “Bosengeli kozala bato ya kokoka, ndenge Tata na bino ya likoló azali moto ya kokoka.” Ndenge nini bato bakoki lelo “kozala bato ya kokoka”?​—Mat. 5:48.

Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tosengeli koyeba ndenge Biblia esaleli maloba “ya kokoka” mpe “kokoka.” Na biloko oyo Makomami elobi ete ezali “ya kokoka,” nyonso te nde ezali ya kokoka na makambo nyonso. Ya solo, Yehova azali ya kokoka na makambo nyonso. Bato mpe biloko bakoki kozala ya kokoka kaka na makambo mosusu. Mbala mingi, na Biblia, maloba ya Ebre mpe ya Grɛki oyo ebongolami na “ya kokoka” elimbolaka “mobimba,” “oyo ekɔmɛli,” to “oyo ezangi mbeba” na kolanda mibeko oyo etyami. Mbala mingi, tosalelaka liloba yango mpo na kolobela kokoka na makambo mosusu. Na ndakisa, maloba “mwasi to mobali oyo akoká.”

Adama ná Eva bakelamaki bato ya kokoka na bizaleli, na elimo mpe na nzoto. Bazalaki bato ya kokoka na kolanda mibeko ya Mozalisi na bango. Lokola bazangaki botosi, bakokisaki mibeko yango te mpe na bongo, babungisaki ezaleli ya kokoka mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango. Na yango lisumu, kozanga kokoka, mpe liwa ekɔtelaki bato na nzela ya Adama.​—Rom. 5:12.

Nzokande ndenge Yesu amonisaki yango na Lisolo likoló ya Ngomba, ata bato ya kozanga kokoka bakoki kozala bato ya kokoka na makambo mosusu. Na lisolo yango, amonisaki ndenge bolingo ekoki kokóma ya kokoka, to mobimba. Bolingo yango ezali lokola oyo Nzambe amoniselaka bato nyonso. Yesu alobaki boye: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino; mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló, mpo abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.” (Mat. 5:44, 45) Soki bayekoli ya Yesu bazali kolinga ndenge wana, bakomekola Nzambe, oyo azali ndakisa ya kokoka.

Lelo, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba basalaka makasi mpo na kosala ndenge wana na oyo etali kolinga basusu. Mposa na bango ezalaka ya kosalisa bato ya mimeseno, mposo, mpe mangomba ndenge na ndenge bázwa boyebi ya solosolo ya mateya ya Biblia. Lelo oyo na mikili 236, Batatoli bazali koyekola Biblia na bato koleka 7 000 000 oyo bazali kosepela.

Yesu atunaki boye: “Soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, mbano nini bozwi? Bakɔngɔli-mpako basalaka mpe bongo te? Mpe soki bozali kopesa mbote kaka bandeko na bino, likambo nini ya monene bosali? Bato ya bikólo mosusu basalaka mpe bongo te?” (Mat. 5:46, 47) Bakristo ya solo baponaka bilongi te na kolanda kelasi oyo moto atángá to ekólo oyo moto auti; balingaka mpe te kaka bato oyo bakozongisela bango bolingo. Kasi, basalisaka babola mpe bato ya maladi, bilenge mpe mikóló. Na ndenge yango, bakristo bamekolaka bolingo ya Yehova mpe na bongo, bakómaka bato ya kokoka na likambo yango.

Mokolo mosusu tokozongela ezaleli ya kokoka oyo Adama abungisaki? Ɛɛ, na nzela ya kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu, bato ya botosi bakóma bato ya kokoka na makambo nyonso na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, ntango ‘Mwana ya Nzambe akobukabuka misala ya Zabolo.’​—1 Yoa. 3:8.