Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yehova ayokaka kolela ya moto oyo atutami

Yehova ayokaka kolela ya moto oyo atutami

Yehova ayokaka kolela ya moto oyo atutami

NDENGE Salomo, mokonzi ya bwanya na Yisraele ya kala amonisaki yango, “ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka [biso] nyonso.” (Mos. 9:11) Likama moko monene to mpe mokakatano moko makasi ekoki kobulunganisa bomoi na biso. Na ndakisa, liwa ya mbalakaka ya ndeko moko oyo tolingaka ekoki kopesa biso mawa mingi. Na bapɔsɔ mpe basanza oyo elandi, tokoki kokóma mpenza mawamawa mpe kozanga elikya. Moto akoki kobulungana mpe komona ete abongi te mpo na kobondela Yehova.

Na ntango ya ndenge wana, moto azalaka na mposa bálendisa ye, bátyela ye likebi, mpe bálinga ye. Na nzembo moko, Davidi ayembaki na motema ya kokita ete: “Yehova azali kosunga baoyo nyonso bazali kokwea, mpe azali kotombola baoyo nyonso bagumbami.” (Nz. 145:14) Biblia eyebisi biso ete “miso [ya Yehova] ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.” (2 Nt. 16:9) Eyebisi biso mpe ete azali “esika moko na moto oyo atutami mpe oyo azali na elimo ya komikitisa, mpo na kopesa lisusu makasi na elimo ya bato ya komikitisa mpe kopesa makasi lisusu na motema ya bato oyo batutami.” (Yis. 57:15) Ndenge nini Yehova asungaka mpe abɔndisaka moto oyo atutami?

“Liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza”

Lolenge moko oyo Yehova asalisaka na ntango oyo ebongi mpenza ezali na nzela ya bandeko bakristo. Biblia elendisi bakristo ‘bálobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi.’ (1 Tes. 5:14) Soki moto oyo azali na mawa mpe na mpasi ayoki bandeko bakristo oyo bazali na motema mawa bazali koyebisa ye ete bazali komibanzabanza mpo na ye mpe balingaka ye, moto yango akoki kozwa makasi. Kobimisa maloba ya kobɔndisa ata na lisolo ya mokuse ekoki kosalisa mingi mpo na kolendisa elimo ya moto oyo alɛmbi nzoto. Maloba ya malamu ndenge wana ekoki kouta epai ya moto oyo akutaná na mpasi ya ndenge wana. To ekoki kozala maloba ya mayele oyo euti epai ya moninga moko oyo ayebi makambo mingi ya bomoi. Na lisalisi ya ndenge wana, Yehova akoki kolendisa elimo ya moto oyo atutami.

Tózwa ndakisa ya Alex, nkulutu moko oyo mwasi na ye akufaki na mbalakaka mwa moke nsima ya libala na bango, mpo na maladi moko oyo ezalaka na nkisi te. Mokɛngɛli-motamboli moko amityaki na esika ya Alex mpe asalaki nyonso mpo asolola na ye mpe abɔndisa ye. Ye mpe abungisaki mwasi na ye kasi sikoyo abalá lisusu. Mokɛngɛli yango amonisaki ye ndenge makanisi na ye ebulunganaki mingi na ntango yango. Azalaki koyoka malamu ntango azali elongo na bandeko mosusu na mosala ya kosakola mpe na makita ya lisangá. Nzokande, soki azongi na ndako na ye mpe akangi porte, azalaki koyoka mpenza ete atikali kaka ye moko. Alex alobi boye: “Nabɔndisamaki mpenza na koyeba ete ndenge oyo nazalaki komiyoka ezalaki mabe te mpe ete bato mosusu mpe bakutanaki na yango.” Ya solo mpenza, “liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza” ekoki kobɔndisa moto oyo azali na mawa.​—Mas. 15:23.

Nkulutu mosusu, oyo ayebaki bato mingi oyo babungisaki molongani na bango, amonaki malamu ayebisa Alex maloba ya kolendisa. Lokola amityaki na esika na ye, nkulutu yango amonisaki ye na bolingo nyonso ete Yehova ayebi ndenge oyo tomiyokaka mpe biloko oyo tosengeli na yango. Ndeko yango alobaki boye: “Soki na basanza mpe bambula oyo ezali koya omoni ete osengeli ozala na molongani, ebongiseli kitoko oyo Yehova azwá mpo na biso ezali ya kobala lisusu.” Ya solo, moto nyonso te oyo molongani na ye akufá mpe ayoki mposa ya kobala lisusu nde azali na likoki ya kosala yango. Kasi, nsima ya kokanisa makambo oyo ndeko wana ayebisaki ye, Alex alobaki boye: “Ndenge akundwelaki ngai ebongiseli wana ya Yehova elongolaki ngai makanisi ya mabe oyo ekokaki kotinda ngai namona ete soki nabali lisusu, ekozala lokola nazangi bosembo epai ya molongani na ngai mpe na ebongiseli ya libala oyo Yehova abongisá.”​—1 Ko. 7:8, 9, 39.

Mokomi ya nzembo Davidi, oyo akutanaki na mikakatano mpe makambo mingi ya mpasi, ayebaki likambo oyo ete: “Miso ya Yehova ezali epai ya bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi . . . Mpe abikisaka baoyo elimo etutami.” (Nz. 34:15, 18) Ntembe ezali te ete na nzela ya maloba ya mayele mpe ya bososoli ya bandeko na ye bakristo ya mitema mawa mpe oyo bakɔmɛli na elimo, Yehova akoki koyanola na ntango oyo ebongi mpenza kolela ya moto oyo atutami. Likambo yango ezali malamu mingi mpe esalisaka mpenza.

Lisalisi na nzela ya makita ya bokristo

Mbala mingi, moto oyo motema etondi na mawa azalaka na makanisi ya mabe oyo ekoki kotinda ye amitangola na basusu. Nzokande, Masese 18:1 ekebisi boye: “Ye oyo azali komitangola na bamosusu akoluka mposa na ye ya lokoso; akotombokela makambo nyonso ya bwanya.” Alex alobaki boye: “Soki molongani na yo akufi, okomona motema na yo etondi na makanisi ya mabe.” Akanisi lisusu ndenge azalaki komituna boye: “‘Ezali na likambo moko oyo nasengelaki kosala ndenge mosusu? Nasengelaki nde kotyela ye likebi mingi koleka mpe koyokela ye mingi?’ Nalingaki te kotikala ngai moko. Nalingaki te kozala lisusu monzemba. Ezali mpasi mingi kotika kokanisa ndenge wana, mpo mokolo na mokolo, likanisi ezali kozongela yo ete ozali kaka yo moko.”

Moto oyo elimo na ye etutami azalaka mpenza na mposa ya kozala na baninga. Na makita ya bokristo, akoki kokutana na baninga ya ndenge wana. Kuna, toyokaka makanisi ya malamu mpe ya kolendisa oyo eutaka na Nzambe.

Makita ya bokristo esalisaka biso tótalela mokakatano na biso na bokatikati. Ntango tozali koyoka mpe komanyola bavɛrsɛ ya Biblia, totyaka makanisi na biso kaka na mpasi na biso moko te, kasi mpe na makambo oyo eleki ntina​—kolongisama ya bokonzi ya Yehova mpe kosantisama ya nkombo na ye. Longola yango, ntango tozali koyoka mateya na makita, tolendisamaka na koyeba ete ata soki bamosusu bayebi te mpasi oyo tozali na yango to bazali koyeba mpenza te ndenge oyo tozali komiyoka, Yehova ye, ayebi yango. Ayebi ete “mpo na mpasi ya motema elimo elɛmbaka.” (Mas. 15:13) Nzambe ya solo alingaka kosalisa biso, mpe yango elendisaka biso mpe epesaka biso makasi ya kokende liboso.​—Nz. 27:14.

Ntango banguna na ye bazalaki kotungisa ye mingi, Mokonzi Davidi alelelaki Nzambe boye: “Elimo na ngai ezali kolɛmba makasi na kati na ngai; motema na ngai ekómi kilo.” (Nz. 143:4) Mbala mingi, minyoko elyaka nzoto ya moto mpe makanisi na ye, ekómisaka ata mpe motema kilo. Mpasi ekoki koyela biso na ndenge ya maladi to ya mikakatano moko na nzoto oyo ezali koumela. Tokoki kozala na elikya ete Yehova akosalisa biso tóyika mpiko. (Nz. 41:1-3) Atako lelo Nzambe abikisaka moto moko te na ndenge ya likamwisi, apesaka moto oyo azali na mpasi bwanya mpe makasi oyo asengeli na yango mpo na kobunda na mokakatano na ye. Kobosana te ete ntango azalaki na mikakatano, Davidi abelelaki Yehova. Ayembaki boye: “Nakanisi mikolo ya kalakala; namanyoli mosala na yo mobimba; nasepelaki komibanzabanza ntango nyonso mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.”​—Nz. 143:5.

Lokola Nzambe asalaki ete mayoki wana ekomama na Liloba na ye emonisi ete Yehova ayebi ndenge oyo tomiyokaka. Maloba yango ezali ndanga ete ayokaka kolela na biso. Soki tondimi lisalisi ya Yehova, ‘ye moko akosunga biso.’​—Nz. 55:22.

‘Bondeláká ntango nyonso’

Yakobo 4:8 elobi boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” Ndenge moko ya kopusana penepene na Nzambe ezali na nzela ya libondeli. Ntoma Paulo alendisaki biso ‘tóbondelaka ntango nyonso.’ (1 Tes. 5:17) Ata soki tozali kokoka te kobimisa mayoki na biso polele, “elimo yango moko elobelaka biso ntango tozali kokimela, atako maloba ezali kobima te.” (Rom. 8:26, 27) Ya solo mpenza, Yehova ayebi ndenge oyo tomiyokaka.

Monika, oyo azali na boninga ya ndenge wana na Yehova, alobi boye: “Kobondela, kotánga Biblia, mpe boyekoli ya ngai moko esalisi ngai namona ete Yehova akómi Moninga na ngai ya motema. Nakómi mpenza komona ye ete azali moto ya solo na boye ete nakoki komona lobɔkɔ na ye na bomoi na ngai ntango nyonso. Nabɔndisamaka mpenza na koyeba ete ata ntango nazali kokoka te kolimbola ndenge oyo nazali komiyoka, ye amityaka na esika na ngai. Nayebi ete boboto mpe mapamboli na ye ezali na nsuka te.”

Yango wana, tósala nyonso mpo tóndimaka maloba ya bolingo mpe ya kobɔndisa ya bandeko na biso bakristo, tósalela batoli ya boboto mpe mateya oyo ekoki kolendisa kondima na biso, oyo toyokaka na makita ya bokristo, mpe tófungolela Yehova motema na biso na libondeli. Makambo yango nyonso ezali lolenge oyo Yehova amonisaka ete amibanzabanzaka mpo na biso. Na kolanda makambo oyo ye moko akutaná na yango, Alex alobi boye: “Soki tosali oyo tokoki mpo tólanda nyonso oyo Yehova Nzambe azali kopesa biso mpo tózala makasi na elimo, tokozwa ‘nguya oyo eleki makasi’ mpo tóyika mpiko ata na mokakatano nini oyo tokoki kokutana na yango.”​—2 Ko. 4:7.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 18]

Libɔndisi mpo na moto oyo atutami

Mokanda ya Nzembo etondi na maloba ya bato oyo babimisaki mayoki na bango, bakisa mpe maloba ya kokitisa motema oyo emonisi ete Yehova ayokaka kolela ya moto oyo azangá mpe oyo atondi na mpasi na motema. Talá mwa bandakisa:

“Na mpasi na ngai nazalaki kobelela Yehova, mpe nazalaki kolelela Nzambe na ngai mpo na kosɛnga lisalisi. Na tempelo na ye ayokaki mongongo na ngai, mpe sikoyo kolela na ngai liboso na ye mpo na kosɛnga lisalisi ekómaki na matoi na ye.”​—Nz. 18:6.

“Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”​—Nz. 34:18.

“[Yehova] abikisaka baoyo bazoki na motema, mpe akangaka bampota na bango oyo ezali kosala mpasi.”​—Nz. 147:3.

[Elilingi na lokasa 17]

“Liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza” ekoki kobɔndisa moto na ntango ya mpasi!