Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Tiká tópesa Yehova likabo’

‘Tiká tópesa Yehova likabo’

NDENGE nini omonisaka botɔndi na yo ntango moto asaleli yo likambo moko ya boboto? Talá ndenge bakonzi ya basoda na Yisraele bamonisaki botɔndi na bango nsima ya kobunda na basoda ya Midiane. Etumba yango esalemaki nsima wana Yisraele asalaki lisumu na likambo ya Baala ya Peore. Nzambe asalisaki bato na ye bálonga, mpe bakabolelaki basoda 12 000 ná bato mosusu ya Yisraele biloko oyo bapunzaki kuna. Na boyokani na malako oyo Yehova apesaki, basoda bapesaki banganga-nzambe ndambo ya biloko na bango, mpe Bayisraele mosusu bapesaki Balevi ndambo kaka ndenge moko na oyo wana.​—Mit. 31:1-5, 25-30.

Kasi, bakonzi ya basoda balingaki kopesa mingi koleka. Bayebisaki Moize boye: “Basaleli na yo bazwi motángo mobimba ya mibali ya etumba oyo bazali na mabɔkɔ na biso mpe bayebisi ete moko te kati na biso azangi.” Bazwaki ekateli ya kopesa wolo mpe biloko ndenge na ndenge ya kobongisa nzoto lokola likabo mpo na Yehova. Biloko nyonso ya kobongisa nzoto oyo esalemaki na wolo, oyo bapesaki, ezalaki na kilo koleka 190.​—Mit. 31:49-54.

Lelo mpe, bato mingi bayokaka mposa ya komonisa botɔndi na bango mpo na makambo oyo Yehova asaleli bango. Kutu, elimo ya botɔndi ndenge wana esukaka kaka epai ya basaleli ya Nzambe te. Tózwa ndakisa ya sofɛlɛ ya bisi moko. Azalaki komema mpe kozongisa bandeko na stade mpo na liyangani ya mikili mingi oyo esalemaki na 2009 na Bologne, na Italie. Lokola azalaki kotambwisa motuka na likebi mpe azalaki na boboto, bandeko yango bamonaki malamu bákomela ye mwa mokanda mpo na kopesa ye mersi; babakiselaki ye mwa mbongo mpe bapesaki ye yango elongo na buku Biblia eteyaka mpenza nini? Sofɛlɛ yango alobaki boye: “Nandimi na esengo mokanda oyo mpe buku, kasi nazongiseli bino mbongo mpo nalingi kopesa yango likabo mpo bokoka kokoba mosala oyo bozali kosala. Ata soki nazali Motatoli ya Yehova te, nalingi kopesa likabo yango mpo namoni ete bolingo nde etindaka bino bósala.”

Soki olingi komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo Yehova asalá mpo na yo, lolenge moko ya komonisa botɔndi na yo ezali kopesa makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. (Mat. 24:14) Etanda oyo elandi emonisi ndenge oyo bato mosusu bapesaka makabo na bango.