Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Namoná nguya ya solo ya Biblia

Namoná nguya ya solo ya Biblia

Namoná nguya ya solo ya Biblia

Lisolo ya Vito Fraese

MBALA mosusu oyoká naino te nkombo Trentinara. Ezali mboka moko moke na sudi ya Naples, na Italie. Baboti na ngai mpe yaya na ngai ya mobali, Angelo, babotamaki kuna. Nsima ya kobotama ya Angelo, baboti na ngai bakendaki na États-Unis mpe bafandaki na engumba Rochester, na etúká ya New York, epai nabotamaki na 1926. Mbala ya liboso oyo papa akutanaki na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana, ezalaki na 1922. Eumelaki te, ye ná mama bakómaki Bayekoli ya Biblia.

Tata azalaki moto moko ya kimya, oyo azalaki kotala makambo kaka na miso, kasi makambo oyo ezali sembo te ezalaki kopesa ye nkanda. Lokola azalaki kokoka te komona ndenge bakonzi ya mangomba bazalaki koboya koteya bato solo na ntina na Nzambe, azalaki kolekisa libaku moko te ya koyebisa bato solo oyo ezali na Biblia. Ntango azwaki pansiɔ, abandaki mosala ya ntango nyonso mpe akobaki na yango tii ntango maladi mpe malili makasi ya bileko ya malili etindaki ye atika mosala yango ntango akómaki na mbula 74. Ata na ntango wana, akobaki kosakola soki ngonga 40 to 60 na sanza tii ntango akómaki na bambula koleka 90. Ndakisa ya tata esalaki mpenza mosala makasi epai na ngai. Atako na bantango mosusu azalaki kosala mwa masɛki, azalaki moto ya masɛki te. Mbala mingi azalaki koloba boye: “Solo ezali eloko ya kozwa na lisɛki te.”

Papa ná Mama basalaki makasi mpo na koteya biso bana nyonso mitano Liloba ya Nzambe. Nazwaki batisimo mokolo ya 23 Augusto 1943, mpe na Yuni 1944, nakómaki mobongisi-nzela. Yaya na ngai ya mwasi Carmela azalaki mobongisi-nzela na engumba Geneva, na New York, elongo na Fern, moninga na ye oyo azalaki moto moko ya kasakasa. Esɛngaki ntango mingi te mpo namona ete Fern azalaki mwasi oyo nalingi kofanda na ye bomoi na ngai mobimba. Na yango na Augusto 1946, tobalanaki.

Mosala ya misionɛrɛ

Na ebandeli batindaki biso babongisi-nzela monene na engumba Geneva mpe na engumba Norwich, na etúká ya New York. Na Augusto 1948, tozwaki libaku ya kokɔta na kelasi ya mbala ya 12 ya Gileade. Na nsima batindaki biso na Naples, na Italie, elongo na bamisionɛrɛ mosusu, Carl Ridgeway ná mwasi na ye Joanne Ridgeway. Na ntango wana, Naples ezalaki naino kobunda mpo elongwa na bampasi mpo mboka ebebaki na bitumba. Ezalaki mpasi mpo na kozwa ndako; na yango, na boumeli ya mwa basanza, tofandaki na mwa ndako moke ya bashambrɛ mibale ya mike.

Ntango nazalaki kokola, nazalaki koyoka baboti na ngai bazali koloba Napolitain, monɔkɔ oyo balobaka na Naples. Na yango, atako monɔkɔ na ngai emesaná na Lingelesi, ntango nazalaki koloba na monɔkɔ ya Italien, bato bazalaki koyoka mwa moke. Fern azalaki na mokakatano mpo na koloba monɔkɔ yango. Kasi nasengeli koloba ete na nsima akómaki koloba lokola ngai mpe kutu koleka ngai.

Liboso, kaka libota ya bato minei na Naples nde basepelaki na nsango malamu. Bazalaki kotɛka makaya oyo epekisamá na Leta. Mikolo nyonso, Teresa, moto moko ya libota yango, azalaki kobongwana na ndenge moko ya nsɔmɔ. Na ntɔngɔ, soki atondisi makaya na mabenga ya jipe na ye, azalaki kobima monene. Na mpokwa, azalaki komonana moke lokola ntonga. Solo ya Biblia ebongolaki bomoi ya bato ya libota wana. Nsukansuka, bato 16 ya libota yango bakómaki Batatoli. Lelo, Batatoli bazali soki 3 700 na engumba Naples.

Batɛmɛli mosala na biso

Nsima ya kosala na Naples sanza libwa mpamba, bakonzi ya mboka bapesaki mitindo ete biso nyonso minei tólongwa na engumba yango. Tokendaki kofanda na Suisse pene na sanza mobimba, mpe tozongaki na Italie na viza ya baturiste. Batindaki ngai ná Fern na engumba Turin. Na ebandeli, mwasi moko apesaki biso shambrɛ ya kofutela, mpe tozalaki kosalela douche mpe nkuku na ye. Ntango Ridgeway ná mwasi na ye bayaki na Turin, tofutelaki ndako ya mwa monene. Na nsima, bandeko mitano ná basi na bango bafandaki na ndako yango; bango nyonso zomi bamisionɛrɛ.

Na 1955, ntango bakonzi bapesaki mitindo ete tólongwa na Turin, bibongiseli esilaki kozwama mpo na kosala masangá minei ya sika. Bandeko ya kuna oyo bazalaki na makoki bakokaki sikoyo kobatela masangá. Bakonzi bayebisaki biso ete: “Toyebi mpenza ete soki bino ba-Américain bokei, mosala nyonso oyo bosali ekokende na mai.” Kasi bokoli monene oyo elandaki emonisaki ete Nzambe nde asalaka mpo mosala elonga. Lelo, engumba Turin ezali na Batatoli koleka 4 600 mpe masangá 56.

Florence​—Engumba moko kitoko

Na nsima batindaki biso na Florence. Tozalaki mbala mingi koyoka nsango ya engumba yango, epai ndeko na ngai ya mwasi Carmela ná mobali na ye, Merlin Hartzler batindamaki na mosala ya misionɛrɛ. Kasi, kanisá naino ntango tokómaki kofanda kuna. Bisika lokola Piazza della Signoria, Ponte Vecchio, Piazzale Michelangelo, Palazzo Pitti ezalaki kokómisa engumba yango kitoko mpenza! Ezalaki esengo komona ndenge bato mosusu ya Florence bazalaki kosepela na nsango malamu.

Toyekolaki na libota moko, mpe baboti bazwaki batisimo. Kasi, tata azalaki komɛla likaya. Na 1973, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki ete komɛla likaya ezali momeseno ya mbindo mpe elendisaki batángi bátika komɛla. Bana ya mikóló babondelaki ye mpo atika. Alakaki ete akotika, kasi atikaki te. Mokolo moko na mpokwa mama atindaki bana na ye ya mapasa ya mbula libwa bákende kolala liboso ete asala na bango libondeli. Na nsima, amonaki mabe ndenge asalaki bongo mpe akendaki na shambrɛ na bango. Akutaki bango basilisi kosala libondeli bango moko. Atunaki bango boye: “Bosɛngaki nini na libondeli?” Balobaki boye: “Tobondeli yo Yehova, salisá Papa atika komɛla likaya.” Mwasi yango alobaki na mobali na ye boye: “Yaká oyoka libondeli ya bana na yo.” Ntango ayokaki, atangisaki mpisoli mpe alobaki ete: “Nakomɛla likaya lisusu te!” Akokisaki elaka na ye, mpe lelo na libota na bango bato koleka 15 bazali Batatoli.

Mosala na Afrika

Na 1959, batindaki biso na Mogadiscio, na Somalie, elongo na bamisionɛrɛ mosusu mibale, Arturo Leveris ná yaya na ngai ya mobali, Angelo. Politiki ya mboka ezalaki yikiyiki ntango tokómaki kuna. Guvernɛma ya Italie esengelaki komema Somalie na lipanda ndenge ONU esɛngaki, kasi makambo ezalaki se kobeba. Bato mosusu ya Italie oyo toyekolaki na bango balongwaki na mboka, mpe ezalaki mpasi mpo na kobongisa lisangá kuna.

Na eleko wana, mokɛngɛli ya zone asɛngaki ngai nasala lokola mosungi na ye. Na yango tobandaki kokende kotala bamboka ya zingazinga. Bato mosusu oyo toyekolaki na bango bakolaki na elimo kasi basengelaki kokima bamboka na bango mpo na botɛmɛli. Bamosusu batikalaki, atako basengelaki komona mpasi mingi. * Tii lelo soki tokanisi bolingo na bango mpo na Yehova mpe mpasi oyo bamonaki mpo na kotikala sembo, totangisaka mpisoli.

Moi mpe molunge ezalaki makasi mingi na Somalie mpe na Érythrée. Bilei mosusu ya kuna ezalaki kutu kotya biso molunge koleka na nzoto. Mbala ya liboso oyo tolyaki bilei yango na ndako ya mwasi moko oyo tozalaki koyekola na ye Biblia, mwasi na ngai asalaki masɛki mpe alobaki ete matoi na ye epeli mɔtɔ lokola miinda motane ya balabala!

Ntango batindaki Angelo ná Arturo na esika mosusu, totikalaki biso moko. Ezalaki pɛtɛɛ te kozanga moto oyo akoki kolendisa biso. Kasi, kotikala ndenge wana esalisaki biso tópusana penepene na Yehova mpe tótyela ye motema mingi koleka. Ndenge tozalaki kokende kotala mikili epai mosala na biso ezalaki na bipekiseli ezalaki kolendisa biso mingi.

Na Somalie, mikakatano ezalaki mingi. Tozalaki na frigo te, na yango tozalaki kosomba kaka ndambo ya biloko ya kolya na mokolo; ezalaki mbala mosusu biteni ya mbisi babengi requin, to bambuma lokola manga, paipai, pamplemousse, kokoti, to bitabe. Tozalaki mbala mingi kobunda na banyamankɛkɛ. Na bantango mosusu, ezalaki kokitela biso na nkingo ntango tozali kotambwisa boyekoli ya Biblia. Lokola tozalaki na tukutuku, ezalaki kosɛnga biso te tótambola bangonga mingi na makolo na nse ya moi makasi.

Tozongi na Italie

Na lisalisi ya baninga, tozwaki likoki ya kokɔta na masuwa oyo ememaka bitabe mpe tokendaki na liyangani oyo esangisaki bandeko ya mikili mingi na Turin na 1961. Toyokaki ete bakotinda biso na esika mosusu. Na Sɛtɛmbɛ 1962, tozongaki na Italie, esika tobandaki mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga. Tosombaki mwa motuka moko mpe totambolaki na yango mbula mitano na zongazonga mibale.

Nsima ya kofanda na molunge ya Afrika, tosengelaki sikoyo kobunda na malili. Eleko ya malili ya liboso oyo ekómelaki biso kuna, ntango tozalaki kotala lisangá moko na nse ya bangomba Alpes, tolalaki na ndako moko likoló, esika babombaka mimboto, kasi ndako yango ezalaki na eloko oyo etyaka molunge te. Malili ezalaki makasi mpe tolalaki na bakazaka na biso. Na butu yango, nsoso minei mpe mbwa mibale ekufaki na malili pene na esika yango!

Na nsima, nakómaki mokɛngɛli ya etúká. Na bambula wana, totambolaki na Italie mobimba. Tokendaki mbala mingi na bitúká mosusu, na ndakisa na Calabre mpe Sicile. Tolendisaki bilenge bákola na elimo mpe bámityela mokano ya kosala lokola bakɛngɛli na lisangá, bakɛngɛli-batamboli, to na Betele.

Tozwaki mateya mingi epai ya baninga ya sembo oyo basalelaki Yehova na motema moko. Tosepelaki na bizaleli na bango, na ndakisa bosembo mpenza epai ya Yehova, bokabi, bolingo mpo na bandeko na bango, komesana na makambo ya sika mpe elimo ya komipimela. Toyanganaki na milulu ya mabala na Bandako ya Bokonzi. Batatoli oyo Leta apesá ndingisa ya kobalisa nde bazalaki kosala yango, likambo oyo tokokaki kokanisa ata moke te na bambula oyo eleká. Masangá eyanganaka lisusu te na bankuku ya bandeko to kofanda likoló ya mabaya, ndenge ezalaki kosalema na Turin. Kasi, masangá nyonso ezali na Ndako ya Bokonzi oyo ezali kokumisa Yehova. Tosalaka mayangani na bandako ya masano oyo ebebábebá lisusu te; tokómá kosala nde na Bandako ya Mayangani ya minene. Ezalaki mpenza esengo komona ete motángo ya basakoli eleki 243 000. Ntango tokómaki na Italie, basakoli bazalaki kaka 490.

Tozwaki bikateli ya malamu

Tozwaki mikakatano mingi, ata mpe mpasi ya kozala mosika na libota mpe maladi. Fern azalaki koyoka mpasi ya kozala mosika na libota na bango soki amoni mbu. Basalaki ye mpe mapaso misato ya minene. Mokolo moko, ntango azalaki kokende kotambwisa boyekoli ya Biblia, motɛmɛli moko abɛtaki ye nkanya moko ya monene. Likambo wana etindaki ye lisusu na lopitalo.

Atako mbala mosusu tozalaki kolɛmba nzoto, ‘tozelaki Yehova,’ na kolanda Bileli 3:24. Azali Nzambe ya libɔndisi. Mokolo moko oyo tolɛmbaki nzoto mpenza, Fern azwaki mokanda moko malamu oyo eutaki epai ya Ndeko Nathan Knorr. Akomaki ete lokola abotamaki na Bethlehem, na Pennsylvanie, esika Fern abandaki mosala ya mobongisi-nzela, ayebi malamu ete basi ya ɛsti ya Pennsylvanie lokola ye, bazalaka makasi mpe na mpiko. Alobaki solo. Na boumeli ya bambula, tolendisamaki na ndenge mingi mpe na nzela ya bato mingi.

Atako mikakatano ezalaki, tosalaki makasi ya kobatela molende na biso na mosala ya kosakola. Mpo na kokokanisa molende na biso na Lambrusco, vinyo moko kitoko ya Italie oyo ezalaka na fulufulu mingi, Fern alobaka na masɛki ete: “Tosengeli te kotika elimo na biso ekitisa fulufulu na yango.” Nsima ya mbula koleka 40 ya kotambola na mosala ya zongazonga mpe ya etúká, tozwaki mokumba mosusu ya kokende kotala mpe kosala bituluku mpe masangá ya minɔkɔ mosusu longola Italien. Bituluku yango esakwelaka bato oyo bauti na Bangladesh, Chine, Érythrée, Éthiopie, Ghana, Inde, Nigeria, Philippines, Sri Lanka, mpe mikili mosusu. Buku moko ekokoka te mpo na kolobela makambo kitoko oyo emonisi biso ndenge nguya ya Liloba ya Nzambe ebongolaka bomoi ya bato oyo bamekaka motema mawa ya Yehova.​—Mika 7:18, 19.

Tobondelaka mokolo nyonso ete Yehova akoba kopesa biso makasi oyo tosengeli na yango na nzoto mpe na makanisi mpo na kokokisa mosala na biso. Esengo ya Nkolo ezali makasi na biso. Engɛngisaka miso na biso mpe endimisaka biso ete tozwaki bikateli ya malamu na bomoi ndenge tozali kopalanganisa solo ya Biblia.​—Ef. 3:7; Kol. 1:29.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 18 Talá Annuaire des Témoins de Jéhovah 1992, nkasa 95-184.

[Etanda/​Bililingi na nkasa 27-29]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Baboti na ngai na Rochester, na New York

1948

Na South Lansing mpo na kelasi ya mbala ya 12 ya Gileade

1949

Ná Fern liboso tókende na Italie

Capri, Italie

1952

Na Turin mpe na Naples elongo na bamisionɛrɛ mosusu

1963

Fern elongo na bato mosusu oyo ayekolaki na bango Biblia

“Tosengeli te kotika elimo na biso ekitisa fulufulu na yango”