Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami”

“Sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami”

“Sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami”

“Talá! Sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami. Talá! Sikoyo nde mokolo ya lobiko.”​—2 KO. 6:2.

1. Mpo na nini tosengeli kososola likambo ya ntina koleka oyo tosengeli kosala na ntango moko boye?

“ELOKO nyonso ezali na ntango na yango, ɛɛ likambo na likambo na ntango na yango na nse ya lola.” (Mos. 3:1) Awa, Salomo alobelaki ntina ya kososola ntango oyo eleki malamu kosala milende mpo na makambo oyo ebongi​—na ndakisa kolona, kosala mobembo, to kosolola na basusu. Kasi tosengeli mpe kososola mosala ya ntina koleka oyo tosengeli kosala na ntango moko boye. Na maloba mosusu, tosengeli koyeba malamu makambo ya kotya na esika ya liboso.

2. Ndenge nini toyebi ete ntango Yesu azalaki kosakola, ayebaki malamu eleko oyo bazalaki na yango?

2 Ntango azalaki awa mabele, Yesu ayebaki malamu eleko oyo bazalaki na yango mpe makambo oyo asengelaki kosala. Lokola makambo oyo asengelaki kotya na esika ya liboso ezalaki polele na makanisi na ye, ayebaki ete ezalaki ntango oyo bato bazalaki kozela banda kala, oyo bisakweli etali Masiya esengelaki kokokisama. (1 Pe. 1:11; Em. 19:10) Azalaki na mosala oyo asengelaki kosala mpo bato bámona polele ete azali Masiya oyo alakamaki. Asengelaki kopesa litatoli malamumalamu na ntina na Bokonzi mpe koyanganisa bato oyo bakoyangela elongo na ye na Bokonzi yango. Mpe asengelaki kobandisa lisangá ya bokristo oyo esengelaki kosala mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli tii na bansuka ya mabele.​—Mrk. 1:15.

3. Yesu asalaki nini lokola ayebaki eleko oyo bazalaki na yango?

3 Boyebi wana epesaki Yesu makasi; etindaki ye azala na molende ntango azalaki kokokisa mokano ya Tata na ye. Ayebisaki bayekoli na ye boye: “Ya solo, mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Luka 10:2; Mal. 4:5, 6) Liboso, Yesu aponaki bato 12 mpe na nsima bato 70 kati na bayekoli na ye, apesaki bango malako ya sikisiki, mpe atindaki bango bákende kosakola nsango moko ya esengo ete: “Bokonzi ya likoló ekómi pene.” Mpo na Yesu ye moko, Biblia elobi boye: “Ntango . . . asilisaki kopesa bayekoli na ye zomi na mibale malako, alongwaki kuna akei koteya mpe kosakola na bingumba na bango.”​—Mat. 10:5-7; 11:1; Luka 10:1.

4. Na ndenge nini Paulo azalaki momekoli ya Yesu Kristo?

4 Yesu azalaki ndakisa monene ya moto ya molende mpe oyo amipesá mpo na bayekoli na ye nyonso. Ntoma Paulo amonisaki yango ntango alendisaki baninga na ye bandimi ete: “Bókóma bamekoli na ngai, ndenge ngai mpe nazali momekoli ya Kristo.” (1 Ko. 11:1) Na ndenge nini Paulo azalaki momekoli ya Kristo? Mingimingi na ndenge amipesaki mobimba na mosala ya kosakola nsango malamu. Na mikanda oyo Paulo akomelaki masangá, tokomona maloba lokola “bózala na gɔigɔi te na misala na bino,” “bósalela Yehova lokola baombo,” “bózala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo,” mpe “nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Yehova.” (Rom. 12:11; 1 Ko. 15:58; Kol. 3:23) Paulo abosanaki soki moke te mokolo oyo akutanaki na Nkolo Yesu Kristo na nzela ya Damasi mpe maloba ya Yesu oyo na ntembe te, moyekoli Ananiasi ayebisaki ye ete: “Mobali wana azali mbɛki oyo naponi mpo na komema nkombo na ngai epai ya bikólo mpe epai ya bakonzi mpe epai ya bana ya Yisraele.”​—Mis. 9:15; Rom. 1:1, 5; Gal. 1:16.

“Ntango mpenza oyo endimami”

5. Nini etindaki Paulo akokisa mosala na ye na molende?

5 Soki otángi mokanda ya Misala, okomona polele mpiko mpe molende oyo Paulo azalaki na yango na mosala ya kosakola. (Mis. 13:9, 10; 17:16, 17; 18:5) Paulo ayebaki ete eleko oyo bazalaki na yango ezalaki na ntina mingi. Alobaki boye: “Talá! Sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami. Talá! Sikoyo nde mokolo ya lobiko.” (2 Ko. 6:2) Mobu 537 L.T.B. ezalaki ntango oyo endimami mpo bato oyo bakendaki boombo na Babilone bázonga na mokili na bango. (Yis. 49:8, 9) Kasi Paulo azalaki kolobela nini? Makambo mosusu oyo ezali na mokanda yango esalisi biso tómona ntango oyo azalaki kolobela.

6, 7. Lokumu monene nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazwaki, mpe banani bazali kosala elongo na bango?

6 Mwa liboso na mokanda na ye, Paulo alobelaki libaku monene oyo ye ná baninga na ye bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazwaki. (Tángá 2 Bakorinti 5:18-20.) Alobaki ete Nzambe abengaki bango mpo na mokano moko ya sikisiki, mpo na kosala “mosala ya kozongisa na boyokani,” mpo na kobondela bato ete: “Bózonga na boyokani elongo na Nzambe.” Ezalaki kosɛnga bato bázongisa boninga to kimya elongo na Nzambe.

7 Banda na botomboki ya Edene, bato nyonso bakabwaná na Yehova mpe bakómá mosika na ye. (Rom. 3:10, 23) Lokola bakabwaná na Nzambe, bato bakómá na molili ya elimo, oyo ememaka na mpasi mpe na liwa. Paulo akomaki boye: “Toyebi ete biloko nyonso oyo ezalisamá ezali se kokimela elongo mpe konyokwama elongo tii sikoyo.” (Rom. 8:22) Kasi, Nzambe azwaki bibongiseli mpo na kolendisa, kutu nde mpo na “kobondela,” bato bázonga epai na ye, to bázongisa boyokani elongo na ye. Yango nde mosala oyo Paulo ná baninga na ye bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazwaki na ntango wana. “Ntango [wana] oyo endimami” ekokaki kozala “mokolo ya lobiko” mpo na baoyo bandimelaki Yesu. Lelo, bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo ná “bampate mosusu,” oyo bazali kosala elongo na bango, bazali kokoba kobenga bato bázwa matomba ya ‘ntango oyo endimami.’​—Yoa. 10:16.

8. Mpo na nini libyangi ya kosɛnga bato bázongisa boyokani na Nzambe ezali kobenda likebi?

8 Libyangi oyo ezali kosɛnga bato bázongisa boyokani elongo na Nzambe ezali mpenza kobenda likebi mpo, atako bato bango moko nde babebisaki boyokani yango​—na botomboki oyo ebimaki na Edene​—Nzambe ye moko azwaki bibongiseli mpo na kobongisa makambo. (1 Yoa. 4:10, 19) Asalaki nini? Paulo ayanoli boye: “Nzambe na nzela ya Kristo azalaki kozongisa mokili na boyokani ná ye moko, atángelaki bango mabunga na bango te, mpe apesaki biso liloba ya kozongisa na boyokani.”​—2 Ko. 5:19; Yis. 55:6.

9. Paulo asalaki nini mpo na komonisa botɔndi mpo na motema mawa ya Nzambe?

9 Na nzela ya mbeka ya lisiko, Yehova afungolaki nzela mpo bato oyo bamonisi kondima bázwa bolimbisi mpo na mabunga na bango mpe bázongisa boninga to kimya elongo na ye. Longola yango, atindaki bato na ye bákende kolendisa bato bipai nyonso ete bázongisa boyokani ya kimya na Nzambe lokola ntango ezali naino. (Tángá 1 Timote 2:3-6.) Lokola asosolaki mokano ya Nzambe mpe ayebaki eleko oyo bazalaki na yango, Paulo amipesaki mobimba na “mosala ya kozongisa na boyokani” kozanga kotika. Mokano ya Yehova ebongwani te. Tii lelo, atandi lobɔkɔ mpo na kobenga bato bázongisa boyokani elongo na ye. Na yango, maloba ya Paulo ete “sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami” mpe “sikoyo nde mokolo ya lobiko” etali mpe eleko na biso. Yehova azali mpenza Nzambe ya motema mawa!​—Kob. 34:6, 7.

‘Tóbosana ntina na yango’ te

10. “Mokolo ya lobiko” esɛngaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo, ya ntango ya kala mpe ya lelo, básala nini?

10 Bato ya liboso oyo bazwi matomba mpo na boboto monene oyo Nzambe amonisi ezali bato oyo bazali “na bomoko elongo na Kristo.” (2 Ko. 5:17, 18) Mpo na bango, “mokolo ya lobiko” ebandaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. Banda wana, bato yango bazwaki mosala ya kosakola “liloba ya kozongisa na boyokani.” Lelo oyo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino na mabele bazali kokoba kosala “mosala ya kozongisa na boyokani.” Bayebi ete baanzelu minei oyo ntoma Yoane amonaki na emonaneli “basimbi makasi mipɛpɛ minei ya mabele, mpo mopɛpɛ epɛpa te na mabele.” Na yango, lelo mpe ezali kaka “mokolo ya lobiko” mpe “ntango mpenza oyo endimami.” (Em. 7:1-3) Mpo na ntina yango, kobanda na ebandeli ya ekeke ya 20, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali komipesa na molende na “mosala ya kozongisa na boyokani” tii na bisika oyo eleki mosika na mabele.

11, 12. Na ebandeli ya ekeke ya 20, ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamonisaki ete bayebi eleko oyo bazalaki? (Talá elilingi na lokasa 15.)

11 Na ndakisa, ndenge emonisami na buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, ntango ekeke ya 20 ekómaki pene, “Charles Russell ná baninga na ye bazalaki mpenza kondima ete bazali na eleko ya kobuka mbuma mpe ete bato bazalaki na mposa ya koyoka solo oyo ekolongola bango na boombo.” Basalaki nini mpo na yango? Lokola bamonaki ete bazali na eleko ya kobuka mbuma, “ntango mpenza oyo endimami,” bandeko yango basukaki kaka te na kobenga bato báyaka na losambo. Yango nde bakonzi ya mangomba ya bokristo bazalaki kosala banda kala. Kasi, bandeko wana oyo batyamaki mafuta na elimo babandaki koluka balolenge mosusu ya malamu mpo na kopalanganisa nsango malamu. Na ndakisa, basalelaki malamu bamasini ya sika oyo ebimaki na ntango wana mpo mosala na bango ekende liboso.

12 Mpo na kopalangisa nsango malamu ya Bokonzi, mwa etuluku wana ya basakoli ya molende babandaki kobimisa batrakte, mwa babuku, bazulunalo, mpe babuku. Bakomaki mpe badiskur mpe masolo oyo bapesaki bato mpo bábimisaka yango na bankóto ya bazulunalo. Basalaki baemisyo ya koteya nsango malamu ya Biblia na baradio ya mboka mpe baradio oyo ezwamaka na mikili mingi. Babimisaki mpe basalelaki bililingi oyo ezali kokende nzela moko na maloba, liboso kutu bato bábanda kosala bafilme oyo ezali na maloba. Molende ya makasi ndenge wana ebotaki mbuma nini? Lelo, ezali na bato soki milio nsambo oyo bandimi mpe basangani na kosakola nsango oyo: “Bózongisa boyokani elongo na Nzambe.” Ya solo, basaleli wana ya Yehova ya kala bazalaki ndakisa malamu ya molende, atako bayebaki makambo mingi te.

13. Mokano nini ya Nzambe tosengeli kolanda na likebi?

13 Tii lelo, maloba ya Paulo ete “sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami” ezali solo. Biso baoyo tomoná boboto monene ya Yehova tozali na botɔndi ndenge tozwá libaku ya koyoka mpe kondima nsango ya kozongisa boyokani. Na esika tómona ete esuki kaka wana, tosengeli kolanda na likebi maloba ya Paulo oyo: “Biso mpe tozali kobondela bino ete bóndima boboto monene ya Nzambe te mpe na nsima bóbosana ntina na yango.” (2 Ko. 6:1) Mokano ya boboto monene ya Nzambe ezali ya “kozongisa mokili na boyokani ná ye moko” na nzela ya Kristo.​—2 Ko. 5:19.

14. Mabaku nini ezali komonana na mikili mingi?

14 Bato mingi lelo, lokola Satana azipi bango miso, bazali naino mosika na Nzambe mpe bayebi mokano ya boboto monene na ye te. (2 Ko. 4:3, 4; 1 Yoa. 5:19) Nzokande, lokola makambo ya mokili ezali se kobeba, bato mingi bakómi kondima nsango malamu soki bamonisi bango ete kozala mosika na Nzambe nde ebimisá makambo ya mabe mpe ememelá bato mpasi. Ata na mikili oyo bato mingi bazalaki kokipe te mosala na biso ya kosakola, mingi bazali lelo kondima nsango malamu mpe kobongisa makambo mpo na kozongisa boyokani elongo na Nzambe. Na yango, tozali mpenza kososola ete oyo ezali ntango oyo tosengeli komipesa na molende koleka mpo na kobelela bato mpe kosɛnga bango ete: “Bózongisa boyokani elongo na Nzambe”?

15. Na esika tósakola nsango oyo ekosepelisa bato, biso tolingi bato nyonso báyeba likambo nini?

15 Mosala na biso ezali kaka te ya koyebisa bato ete soki babaluki epai ya Nzambe, akosalisa bango na mikakatano na bango mpe bakomiyoka malamu koleka. Bato mingi bakendaka bandako-nzambe kaka mpo na bantina wana, mpe mangomba mingi elingaka koloba na bato makambo wana. (2 Tim. 4:3, 4) Mokano ya mosala ya kosakola ezali yango te. Nsango malamu oyo tosakolaka ezali ete Yehova, na bolingo na ye, andimi kolimbisa mabunga ya bato na nzela ya Kristo. Na ndenge yango, bato bakoki kopusana penepene na Nzambe mpe kozongisa boyokani elongo na ye. (Rom. 5:10; 8:32) Nzokande etikali moke mpo “ntango mpenza oyo endimami” ekóma na nsuka.

“Bópela na elimo”

16. Nini esalisaki Paulo azala na mpiko mpe na molende?

16 Ndenge nini tokoki kokolisa molende na biso mpo na losambo ya solo mpe kobatela yango? Bato mosusu oyo bazalaka nsɔninsɔni to balobaka mingi te bakoki kozala na mokakatano mpo na komonisa mayoki na bango polele. Kasi, ezali malamu tóyeba ete molende ezali kaka te mayoki to esengo oyo moto azali komonisa; etali mpe bomoto ya moto te. Paulo alobelaki ndenge ya kokolisa molende ntango akomelaki bakristo ete: “Bópela na elimo.” (Rom. 12:11) Elimo ya Yehova esalaki mingi mpo na kopesa ntoma Paulo mpiko mpe esalisaki ye alendendela na mosala ya kosakola. Kobanda na ntango oyo Yesu abengaki ye tii na kokangama na ye ya nsuka mpe kobomama na ye lokola martiru na Roma​—eleko ya mbula koleka 30—​molende ya Paulo ekitaki te. Azalaki ntango nyonso kotalela Nzambe, oyo azalaki kopesa ye makasi oyo esengeli na nzela ya elimo na ye. Paulo alobaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Flp. 4:13) Tokoki kozwa matomba mingi soki tomekoli ndakisa na ye!

17. Ndenge nini tokoki ‘kopela na elimo’?

17 Liloba oyo babongoli na “kopela” elimboli mpenzampenza “kotɔka.” (Kingdom Interlinear) Mpo nzungu ya mai ekoba kotɔka, mɔtɔ esengeli kozala ntango nyonso. Ndenge moko mpe, mpo ‘tópela na elimo,’ tosengeli kozala ntango nyonso na elimo ya Nzambe. Mpo na kozwa elimo yango, tosengeli kosalela bibongiseli nyonso oyo Yehova azwi mpo na kolendisa biso na elimo. Yango elingi koloba kozwa makambo ya losambo na lisɛki te ezala na libota to mpe ezala na lisangá​—pɔsɔ na pɔsɔ, tosengeli koyekola biso moko to mpe na libota, kobondela, mpe koyangana na makita elongo na bandeko na biso bakristo. Kosala bongo ekopesa biso “mɔtɔ” oyo ekosala ete tókoba “kotɔka” mpe na ndenge yango, kokoba ‘kopela na elimo.’​—Tángá Misala 4:20; 18:25.

18. Lokola tozali bakristo oyo bamipesá na Nzambe, tosengeli kotya makanisi na mokano nini?

18 Moto oyo amipesá ezali moto oyo atyaka makanisi nyonso na mokano moko mpe atyaka makanisi na makambo mosusu mpambampamba te to alɛmbaka te mpo na kokokisa mokano na ye. Lokola tozali bakristo oyo bamipesá na Nzambe, mokano na biso ezali ya kosala nyonso oyo Yehova alingi tósala, kaka ndenge Yesu asalaki. (Ebr. 10:7) Lelo, mokano ya Yehova ezali ete bato mingi mpenza bázongisa boyokani elongo na ye. Yango wana, tómipesa na molende na mosala yango oyo esengeli kosalema lelo, mosala oyo eleki ntina mpe oyo esengeli kosalema nokinoki, ndenge Yesu ná Paulo basalaki.

Ozali koyeba lisusu?

• Mosala nini Paulo ná bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo bazwaki?

• Ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino na mabele basalelaki malamu “ntango mpenza oyo endimami”?

• Ndenge nini bakristo bakoki ‘kopela na elimo’?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 12]

Paulo abosanaki soki moke te mokolo oyo akutanaki na Nkolo Yesu Kristo