Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Nakokoka kosakola ndenge nini?”

“Nakokoka kosakola ndenge nini?”

“Nakokoka kosakola ndenge nini?”

Na mokili mobimba, tozali na bandeko mibali mpe bandeko basi mingi oyo bazali kosakola na bosembo nyonso atako bazali kobunda na bamaladi ya makasi. Tózwa ndakisa ya Dalia, oyo afandi na Vilnius, mboka-mokonzi ya Lituanie.

Ndeko mwasi Dalia azali na mbula 30 na ndambo. Banda abotamá, anyokwamaka mpo na maladi moko oyo ezokisaka misisa ya bɔɔngɔ. Maladi yango ekómisá ye paralize mpe akokaka mpenza kobimisa maloba te. Na yango, kaka bato ya libota na ye nde bakokaka kokanga ntina ya maloba na ye. Dalia afandaka elongo na mama na ye Galina; ye nde asalisaka ye. Atako bomoi ya Dalia etondi na mikakatano mpe mitungisi, abatelaka makanisi ya malamu. Nini esalisaka ye?

Galina alobi boye: “Na 1999, leki na ngai ya mwasi Apolonija ayaki kotala biso. Tomonaki ete Apolonija, oyo azali Motatoli ya Yehova, ayebi Biblia malamu mpe Dalia abandaki kotuna ye mituna mingi. Eumelaki te, abandaki koyekola Biblia ná Dalia. Mikolo mosusu, ngai mpe nazalaki kokɔta na boyekoli yango mpo nasalisa na kolimbola makambo Dalia azali koloba. Namonaki ete makambo nyonso oyo azalaki koyekola ezalaki mpenza kosalisa ye. Eumelaki te, ngai mpe nasɛngaki ete nayekola Biblia.”

Ntango Dalia akómaki kokanga ntina ya mateya ya Biblia, motuna moko ekómaki kotungisa ye mingi. Nsukansuka, abimisaki yango mpe atunaki Apolonija ete: “Moto lokola ngai, paralize boye, nakokoka kosakola ndenge nini?” (Mat. 28:19, 20) Apolonija akitisaki ye motema mpe alobaki boye: “Kobanga te. Yehova akosalisa yo.” Ya solo mpenza, Yehova asalisaka ye.

Kasi, Dalia asakolaka ndenge nini? Na ndenge ebele. Bandeko basi ya lisangá basalisaka ye na kokoma mikanda oyo ezali na nsango ya Biblia. Dalia ayebisaka naino bandeko basi yango makanisi na ye. Na nsima, bango bakomelaka ye yango na mokanda. Mpo na kopesa litatoli, Dalia atindelaka mpe bato bamesaje na telefone na ye ya mabɔkɔ. Mpe soki mokolo ezali malamu, bandeko ya lisangá babimisaka ye mpo ateya bato oyo bakokutana na bango na baparke mpe na balabala.

Dalia ná mama na ye bakobaki kokende liboso na elimo. Bamipesaki na Yehova mpe bazwaki batisimo na sanza ya Novɛmbɛ 2004. Na Sɛtɛmbɛ 2008, etuluku moko ya monɔkɔ ya Polonais efungwamaki na Vilnius. Lokola etuluku yango ezalaki na mposa ya basakoli ya Bokonzi, Dalia ná mama na ye bakɔtá kuna. Dalia alobi boye: “Basanza mosusu namitungisaka mingi soki nabimi naino te na mosala ya kosakola. Kasi nsima ya kobondela Yehova mpo na yango, eumelaka te, okomona ndeko moko asɛngi ngai tóbima na mosala ya kosakola.” Ndeko na biso Dalia ayokaka ndenge nini mpo na bomoi na ye? Alobi boye: “Maladi ekómisá nzoto na ngai paralize, kasi ekómisá makanisi na ngai paralize te. Nazali na esengo mingi ndenge nakokaka koyebisa basusu makambo etali Yehova!”