Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tókanga ntina ya ‘makambo ya ebandeli ya solo’

Tókanga ntina ya ‘makambo ya ebandeli ya solo’

“[Bokangi ntina] ya makambo ya ebandeli ya boyebi mpe ya solo oyo ezali na Mibeko.”​—ROM. 2:20.

1. Mpo na nini tosengeli koluka koyeba ntina ya Mibeko ya Moize?

 MIKANDA oyo ntoma Paulo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe esalisaka biso mpenza tóyeba ndimbola ya makambo mingi oyo ezali na Mibeko ya Moize. Na ndakisa, na mokanda ya Baebre, alimbolaki ete Yesu, na mokumba na ye ya ‘nganga-nzambe monene ya sembo,’ apesaki “mbeka ya kozipa masumu” mbala moko mpo na libela, mpo ete baoyo bandimeli mbeka yango bázwa “kosikolama ya seko.” (Ebr. 2:17; 9:11, 12) Paulo alimbolaki mpe ete tabernakle ezalaki kaka “elili ya makambo oyo ezali na likoló,” mpe ete Yesu akómaki Moyokanisi ya “kondimana oyo eleki” kondimana oyo Moize azalaki moyokanisi na yango. (Ebr. 7:22; 8:1-5) Na mikolo ya Paulo, bandimbola wana ya makambo oyo Mibeko elobelaki ezalaki na ntina mingi mpo na bakristo, mpe ezali bongo tii lelo oyo. Bandimbola yango esalisaka biso tóyeba malamumalamu ntina ya bibongiseli oyo Nzambe azwaki mpo na biso.

2. Na likambo nini Bayuda oyo bakómaki bakristo balekaki bato mosusu?

2 Ntango Paulo akomelaki bakristo ya Roma, makambo mosusu oyo alobelaki etalelaki bakristo oyo bazalaki Bayuda, oyo bayekolaki Mibeko ya Moize. Alobaki ete koyeba Mibeko wana ya Nzambe esalisaki bakristo yango bákanga ntina ya “makambo ya ebandeli ya boyebi mpe ya solo” mpo na Yehova mpe mitinda na ye ya sembo. Kokanga ntina ya ‘makambo ya ebandeli ya solo’ mpe komemya yango na motema mobimba esalisaki Bayuda yango oyo bakómaki bakristo, lokola Bayuda ya sembo oyo bazalaki liboso na bango, bátambwisa, báteya, mpe bángɛngisa bato oyo bayebaki te Mibeko oyo Yehova apesaki bato na ye.​—Tángá Baroma 2:17-20.

ELILI YA MBEKA YA YESU

3. Koyekola makambo etali bambeka oyo Bayuda bazalaki kopesa ezali na ntina nini?

3 Makambo ya ebandeli ya solo oyo Paulo alobelaki ezali na ntina tii lelo oyo mpo na kosalisa biso tósosola mikano ya Yehova. Mitinda oyo ezali na Mibeko ya Moize esilá ngala te. Na yango, tótalela kaka likambo moko oyo ezalaki na Mibeko yango: Ndenge oyo bambeka mpe makabo ndenge na ndenge ekambaki Bayuda ya komikitisa epai ya Kristo mpe esalisaki bango báyeba makambo oyo Nzambe azalaki kosɛnga bango. Lokola mpe makambo minene oyo Yehova asɛngaka basaleli na ye ebongwanaka te, tokomona ete mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele mpo na bambeka mpe makabo ekoki kosalisa biso tótalela soki mosala mosantu oyo tosalelaka Nzambe ezali mpenza malamu.​—Mal. 3:6.

4, 5. (a) Makambo nini Mibeko ya Moize ezalaki kosalisa bato ya libota ya Nzambe bábosana te? (b) Bambeka oyo Nzambe azalaki kosɛnga ezalaki elili ya nini?

4 Makambo mingi oyo Mibeko ya Moize esɛngaki ezalaki kosalisa Bayuda bábosana te ete bazali bato ya masumu. Na ndakisa, Moyuda nyonso oyo asimbi ebembe ya moto asengelaki komipɛtola. Mpo na yango, bazalaki koboma mpe kozikisa ngɔmbɛ-mwasi moko motane oyo ezali malamu. Bazalaki kobomba putulu na yango mpo básangisaka yango na “mai ya kopɛtola” oyo bazalaki kobwaka matangá na yango epai ya moto oyo azali kopɛtolama, na mokolo ya misato mpe ya nsambo kobanda mokolo oyo akómaki mbindo. (Mit. 19:1-13) Lisusu, mpo bábosana te ete baboti balekisaka ezaleli ya kozanga kokoka epai ya bana na bango, Mibeko elobaki ete mwasi oyo aboti sika akozala mbindo na boumeli ya mwa mikolo, mpe na nsima akopesa mbeka ya kozipa lisumu.​—Lev. 12:1-8.

5 Makambo mosusu mingi ya bomoi ya mokolo na mokolo esɛngaki kopesa bambeka ya banyama mpo na kozipa masumu. Ata soki Moyuda oyo azalaki kopesa bambeka ayebaki yango to te, bambeka wana mpe bambeka oyo ekómaki kopesama nsima na tempelo ezalaki nde “elili” ya mbeka ya kokoka ya Yesu.​—Ebr. 10:1-10.

MAKANISI OYO EZALAKI KOTINDA MOTO APESA MBEKA

6, 7. (a) Bayisraele bazalaki kotalela nini ntango bazalaki kopona mbeka oyo bakopesa, mpe yango ezalaki komonisa nini? (b) Mituna nini tokoki komituna?

6 Mibeko elobaki ete nyama nyonso oyo ekopesama mbeka epai ya Yehova esengeli kozala nyama “oyo ezangi mbeba”; ezala te nyama oyo ekufá miso, ezoká, ebukaná, to oyo ezali na maladi. (Lev. 22:20-22) Mbuma oyo Bayisraele bazalaki kopesa Yehova lokola likabo esengelaki kozala ‘mbuma ya liboso,’ “oyo eleki kitoko” na biloko oyo babuki. (Mit. 18:12, 29) Yehova azalaki kondima te makabo oyo ebebá. Kosɛngisa ete nyama nyonso oyo ekopesama mbeka ezala malamu emonisaki ete mbeka ya Yesu ekozala na mbeba te mpe na litɔnɔ te, mpe ete mpo na kosikola bato, Yehova akopesa Mwana na ye oyo aleki malamu mpe oyo alingaki mingi.—1 Pe. 1:18, 19.

7 Soki moto oyo azali kopesa mbeka azali mpenza na botɔndi epai ya Yehova mpo na bolamu na ye nyonso, azalaki kokakatana te kopona eloko oyo eleki kitoko na biloko na ye nyonso. Moto na moto azalaki kopona likabo oyo akopesa. Kasi, ayebaki ete Nzambe akosepela te na likabo oyo ezali na mbeba, mpo ekomonisa ete apesi yango kaka mpo apesa, to ete mobeko yango ezali kilo. (Tángá Malaki 1:6-8, 13.) Yango esengeli kotinda biso tótalela ndenge oyo tosalelaka Nzambe. Tosengeli komituna boye: ‘Nasalelaka Yehova na makanisi ya ndenge nini? Esɛngi nde natalela lisusu ndenge oyo nasalelaka Nzambe mpe nini etindaka ngai nasalela ye?’

8, 9. Mpo na nini tosengeli kotalela makanisi oyo ezalaki kotinda Bayisraele bápesa bambeka?

8 Kopona nyama ekokaki kozala mpasi te mpo na Moyisraele oyo, na bolingo na ye moko, alingi kopesa mbeka mpo amonisa botɔndi na ye epai ya Yehova, to kopesa mbeka ya kotumba mpo na kosɛnga ete Nzambe andima ye. Moto yango azalaki na esengo ya kopesa Yehova eloko na ye oyo eleki malamu. Lelo oyo, bakristo bapesaka te bambeka ya banyama oyo Mibeko ya Moize esɛngaki; kasi bapesaka bambeka na ndenge bapesaka ntango, makasi mpe biloko na bango mpo na kosalela Yehova. Ntoma Paulo alobaki ete ‘kosakola polele’ elikya na biso mpe “kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko” ezali bambeka oyo esepelisaka Nzambe. (Ebr. 13:15, 16) Ndenge oyo mosaleli mokomoko ya Yehova asalaka makambo yango emonisaka soki azali mpenza na botɔndi mpo na nyonso oyo Nzambe apesá biso. Na yango, tokoki kokokanisa makanisi oyo etindaka biso tósala mosala ya Nzambe lelo oyo ná makanisi oyo ezalaki kotinda bato bápesa bambeka na bolingo na bango moko na ntango ya kala.

9 Kasi, tokoki koloba nini mpo na makambo ya Mibeko ya Moize oyo esɛngaki ete moto oyo asali libunga apesa likabo mpo na lisumu to likabo ya ngambo? Lokola Mibeko nde esɛngaki ete moto apesa bambeka yango, tokoki nde koloba ete azalaki kopesa yango na bolingo na ye moko te? Tokoki nde kokanisa ete moto azalaki kopesa bambeka ya ndenge wana na mitema mibale? (Lev. 4:27, 28) Ekokaki kozala bongo te soki moto alingi mpenza kobatela boyokani malamu na Yehova.

10. Ekoki kosɛnga mokristo asala nini mpo na kobongisa boyokani oyo ebebi?

10 Lelo oyo mpe, tokoki komona ete tozokisi ndeko moko na likambo moko oyo tolobaki to tosalaki, ata soki ezalaki na nko te. Lisosoli na biso ekoki koyebisa biso ete tosalaki likambo moko ya mabe. Moto nyonso oyo azwaka na lisɛki te mosala oyo asalelaka Yehova akosala nyonso mpo na kobongisa makambo! Yango ekoki kolimbola kosɛnga bolimbisi epai ya ndeko oyo azokisi, to soki ezali lisumu ya monene, koluka lisalisi ya bankulutu. (Mat. 5:23, 24; Yak. 5:14, 15) Nzokande, kosɛnga bolimbisi ntango tosali ndeko moko mabe to koluka lisalisi ntango tosaleli Nzambe lisumu ezalaka lisɛki te. Kasi, soki tosali yango, tokómaka lisusu na boyokani malamu na Yehova to na ndeko na biso, mpe lisosoli na biso ekómaka na kimya. Mpe yango endimisaka biso ete toli ya Yehova nde eleki malamu.

11, 12. (a) Likambo nini ekesenisaki bambeka ya boyokani ná bambeka mosusu? (b) Bambeka ya boyokani ezali kosalisa biso tókanga ntina ya likambo nini na losambo ya solo lelo oyo?

11 Bambeka mosusu oyo Mibeko ya Moize elobeli ebengamaki makabo ya boyokani. Ezalaki kopesama mpo na kozala na kimya ná Yehova. Moto oyo ayei na nyama mpo na kopesa likabo wana azalaki kolya ndambo na yango elongo na libota na ye, mbala mosusu na moko ya bisika ya kolya oyo ezalaki na tempelo. Nganga-nzambe oyo atumbi mbeka yango mpe banganga-nzambe mosusu oyo bazalaki kosala na tempelo bazalaki mpe kolya ndambo ya nyama yango. (Lev. 3:1; 7:31-33) Moto azalaki kopesa mbeka yango kaka mpo alingi kozala na boyokani malamu na Nzambe. Ezalaki lokola nde moto yango, libota na ye, banganga-nzambe mpe Yehova ye moko bazali kolya esika moko na esengo mpe na kimya.

12 Mpo na Moyisraele, kopesa likabo ya boyokani ezalaki libaku monene mpenza mpamba te ezalaki lokola nde abengisi Yehova aya kolya elongo na ye mpe Yehova andimi koya! Na ntembe te, moto yango akolinga kopesa mopaya ya lokumu ndenge wana eloko oyo eleki kitoko. Makabo ya boyokani, oyo ezali na kati ya makambo ya ebandeli ya solo oyo ezali na Mibeko, emonisaki ete mbeka monene ya Yesu ekosalisa bato nyonso oyo bakosepela bázala na boyokani malamu mpe na kimya elongo na Mozalisi na bango. Lelo oyo, tokoki kokóma baninga ya Yehova mpe kozala pene na ye soki, na bolingo na biso moko, tozali kopesa biloko na biso mpe kosalela makasi na biso na mosala na ye.

BAMBEKA OYO NZAMBE ANDIMAKI TE

13, 14. Mpo na nini Yehova andimaki te mbeka oyo Mokonzi Saulo alingaki kopesa?

13 Mpo Yehova andima bambeka oyo Mibeko ya Moize esɛngaki, esengelaki moto apesa yango na makanisi mpe na motema ya malamu. Kasi, Biblia elobeli mpe bambeka oyo Nzambe andimaki te. Mpo na nini aboyaki yango? Tótalela bandakisa mibale.

14 Mosakoli Samwele ayebisaki Mokonzi Saulo ete ntango ekokaki mpo Yehova apesa Baamaleke etumbu. Mpo na yango, Saulo asengelaki koboma bato nyonso ya ekólo yango ya banguna ná bibwɛlɛ na bango. Basoda na ye babomaki bato nyonso; kasi, Saulo andimaki ete bátika na bomoi Agage, mokonzi ya Baamaleke. Saulo andimaki mpe bábatela bibwɛlɛ oyo eleki malamu mpo na kopesa yango mbeka epai ya Yehova. (1 Sa. 15:2, 3, 21) Yehova asalaki nini? Aboyaki Saulo mpo atosaki te. (Tángá 1 Samwele 15:22, 23.) Yango eteyi biso ete mpo Nzambe andima mbeka na biso, tosengeli kotosa mibeko na ye.

15. Na mikolo ya Yisaya, ndenge nini Nzambe azalaki kotalela bambeka ya Bayisraele oyo bazalaki kosala makambo ya mabe?

15 Ndakisa mosusu ya ndenge wana ezali na mokanda ya Yisaya. Na ntango ya Yisaya, Bayisraele mpe bazalaki kopesa Yehova bambeka mpo alimbisa masumu na bango. Kasi lokola bazalaki kosala makambo ya mabe, Nzambe akokaki kondima bambeka na bango te. Yehova atunaki bango boye: “Litomba nini nazali na yango na ebele ya bambeka na bino? Nalɛmbi makabo ya kotumba mobimba ya bampate ya mibali mpe mafuta ya banyama oyo eleisami malamu; mpe nasepeli te na makila ya bana-ngɔmbɛ ya mibali mpe ya bana-mpate ya mibali mpe ya bantaba ya mibali. . . . Bóya lisusu te na makabo ya mbuma ya mpambampamba. Mpaka ya malasi​—ezali eloko oyo nayiná.” Mpo na nini Nzambe alobaki bongo? Ayebisaki bango boye: “Ata bozali kobondela mingi, nazali koyoka te; mabɔkɔ na bino etondi na makila oyo bosopi. Bómisukola; bómipɛtola; bólongola liboso ya miso na ngai mabe ya misala na bino; bótika kosala mabe.”​—Yis. 1:11-16.

16. Nzambe andimaka bambeka ya ndenge nini?

16 Yehova andimaki te bambeka ya bato oyo baboyaki kobongola motema. Kasi azalaki koyoka mabondeli mpe kondima makabo ya bato oyo bazalaki kosala makasi bátosa mibeko na ye. Makambo ya ebandeli ya Mibeko esalisaki bato yango báyeba ete bazali basumuki mpe bazali na mposa ete masumu na bango elimbisama. (Gal. 3:19) Koyeba likambo wana ezalaki kotinda bango báyoka mawa na motema. Ndenge moko mpe lelo, tosengeli koyeba ete tozali na mposa ya mbeka ya Kristo, oyo ekoki mpenza kozipa masumu. Soki tokangi ntina ya likambo yango mpe tondimi yango, Yehova ‘akosepela’ na nyonso oyo tozali kosala na mosala na ye.​—Tángá Nzembo 51:17, 19.

TÓNDIMA MBEKA YA YESU!

17-19. (a) Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova mpo na mbeka ya Yesu? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo elandi?

17 Lelo oyo, biso toleki bato oyo bazalaki na bomoi liboso Kristo aya mpo tozali komona kaka “elili” ya mikano ya Nzambe te, kasi nde bosolo na yango. (Ebr. 10:1) Mibeko oyo etali bambeka esalisaki Bayuda báyeba oyo basengeli kosala mpo bázala na boyokani malamu na Nzambe; elingi koloba bázala mpenza na botɔndi, bázala na mposa ya kopesa ye biloko na bango oyo eleki malamu, mpe báyeba ete bazali na mposa ya kosikolama. Bandimbola oyo ezali na Makomami ya Grɛki ya bokristo esalisaka biso tóyeba ete na nzela ya lisiko, Yehova akolongola mpo na libela mpasi nyonso oyo lisumu ememelá biso mpe ete ata lelo oyo, azali kosalisa biso tózala na lisosoli ya malamu na miso na ye. Mbeka ya lisiko ya Yesu ezali mpenza ebongiseli moko malamu mingi!​—Gal. 3:13; Ebr. 9:9, 14.

18 Nzokande, mpo na kozwa mpenza litomba na mbeka ya lisiko, tosengeli te kosuka kaka na koyeba ntina na yango. Ntoma Paulo akomaki boye: “Mibeko ekómaki molakisi na biso oyo azalaki kokamba biso epai ya Kristo, mpo tótángama bayengebene mpo na kondima.” (Gal. 3:24) Kondima yango esengeli komonana na misala. (Yak. 2:26) Yango wana, Paulo alendisaki bakristo ya ekeke ya liboso oyo bakangaki ntina ya makambo ya ebandeli ya boyebi oyo ezalaki na Mibeko ya Moize ete básalaka makambo oyo emonisi ete bazali na boyebi yango. Na ndenge yango, misala na bango elingaki koyokana na mitinda ya Nzambe oyo bazalaki koteya.​—Tángá Baroma 2:21-23.

19 Atako bakristo basɛngisami te kotosa Mibeko ya Moize lelo oyo, basengeli kopesa bambeka oyo Yehova akondima. Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge oyo tokoki kosala yango.

[Mituna ya boyekoli]

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 17]

Makambo minene oyo Yehova asɛngaka basaleli na ye ebongwanaka te

[Elilingi na lokasa 18]

Nyama nini olingaki kopesa Yehova?

[Elilingi na lokasa 19]

Yehova andimaka bato oyo bapesaka bambeka oyo esepelisaka ye