Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tópesaka Yehova bambeka na molimo mobimba

Tópesaka Yehova bambeka na molimo mobimba

“Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Yehova.”​—KOL. 3:23.

1-3. (a) Lokola Yesu apesaki bomoi na ye mbeka, yango elimboli ete Yehova asɛngaka biso lisusu ata mbeka moko te? Limbolá. (b) Motuna nini ezali kotunama na oyo etali bambeka lelo oyo?

 NA EKEKE ya liboso T.B., Yehova amonisaki basaleli na ye ete mbeka ya lisiko ya Yesu elongolaki Mibeko ya Moize. (Kol. 2:13, 14) Bambeka oyo Bayuda bazalaki kopesa banda bankama ya bambula ezalaki lisusu na ntina te. Mibeko ekokisaki mokumba na yango ya ‘molakisi oyo azalaki kokamba epai ya Kristo.’​—Gal. 3:24.

2 Kasi, yango elingi koloba te ete Nzambe akolobela lisusu bambeka te mpo na bakristo. Kutu, ntoma Petro alobaki ete tosengeli “kopesa [ba]mbeka ya elimo oyo Nzambe andimi na nzela ya Yesu Kristo.” (1 Pe. 2:5) Longola yango, ntoma Paulo amonisaki polele ete makambo nyonso ya bomoi ya mokristo oyo amipesi na Nzambe ezali lokola “mbeka.”​—Rom. 12:1.

3 Na yango, mokristo apesaka Yehova bambeka ntango azali kosala makambo mosusu to mpe ntango azali koboya kosala makambo mosusu mpo na Nzambe. Na kolanda makambo oyo toyebi mpo na bambeka oyo Bayisraele bazalaki kopesa, ndenge nini tokoki koyeba soki Yehova andimaka bambeka oyo topesaka ye lelo oyo?

NA BOMOI YA MOKOLO NA MOKOLO

4. Likambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali misala na biso ya mokolo na mokolo?

4 Mbala mosusu tomonaka mpenza te ete kopesa mbeka etalelaka mpe misala na biso ya mokolo na mokolo. Ekoki komonana ete misala ya ndako, makambo ya kelasi, mosala ya mosuni, kosomba biloko, mpe bongo na bongo ezali mpenza na boyokani te na makambo ya elimo. Nzokande, soki omipesá na Yehova to ozali kokana kosala yango mosika te, ndenge oyo otalelaka misala na yo ya mokolo na mokolo ezali na ntina. Tozalaka bakristo ngonga nyonso. Tosengeli kolanda mitinda ya Biblia na makambo nyonso ya bomoi na biso. Yango wana Paulo alendisaki biso ete: “Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.”​—Tángá Bakolose 3:18-24.

5, 6. Makambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali molato mpe bizaleli na biso?

5 Misala na biso ya mokolo na mokolo ezali na kati ya mosala mosantu te. Kasi, lokola Paulo alendisi biso ete nyonso oyo tozali kosala, tósala yango ‘na molimo na biso mobimba lokola mpo na Yehova,’ yango esengeli kotinda biso tótalelaka makambo nyonso ya bomoi na biso. Ndenge nini mokomoko na biso akoki kosalela toli yango? Bizaleli na biso mpe molato na biso ezalaka ntango nyonso oyo ebongi na bakristo? To ntango tozali kosala makambo na biso moko, mbala mosusu tokoki koyoka nsɔni koloba ete tozali Batatoli ya Yehova mpo na bizaleli to molato na biso? Tólinga te ete esalema bongo! Basaleli ya Yehova basengeli te kolinga kosala likambo oyo ekofingisa nkombo ya Nzambe.​—Yis. 43:10; 2 Ko. 6:3, 4, 9.

6 Tótalela ndenge oyo mposa ya kosala ‘na molimo mobimba lokola mpo na Yehova’ emonanaka na makambo ndenge na ndenge ya bomoi na biso. Ntango tozali kosala yango, tóbosana te ete bambeka nyonso oyo Bayisraele bazalaki kopesa Yehova esengelaki kozala biloko na bango oyo eleki malamu.​—Kob. 23:19.

ETALI BOMOI NA YO NA NINI?

7. Komipesa na Yehova esɛngi makambo nini?

7 Ntango omipesaki na Yehova, olakaki kopesa ye bomoi na yo mobimba. Na maloba mosusu, olobaki ete okotya Yehova na esika ya liboso na makambo nyonso ya bomoi na yo. (Tángá Baebre 10:7.) Ezalaki ekateli ya malamu mpenza. Na ntembe te, omonaka ete ntango oluki koyeba mokano ya Yehova na likambo moko boye mpe osali makasi olanda yango, ebimisaka kaka mbuma ya malamu. (Yis. 48:17, 18) Basaleli ya Nzambe bazali libota mosantu mpe bato ya esengo mpo balandaka bizaleli ya Moto oyo ateyaka bango.​—Lev. 11:44; 1 Tim. 1:11.

8. Lokola Yehova alobaki ete bambeka oyo bazalaki kopesa ye ezalaki biloko mosantu, yango ezali koteya biso nini?

8 Bambeka oyo Bayisraele bazalaki kopesa Yehova ezalaki bambeka mosantu na miso na ye. (Lev. 6:25; 7:1) Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “bosantu” epesaka likanisi ya eloko oyo eponami to ezali kaka mpo na Nzambe. Mpo Yehova andima bambeka na biso, tosengeli kokima makambo nyonso ya mbindo ya mokili oyo. Tosengeli kolinga ata eloko moko te oyo Yehova ayinaka. (Tángá 1 Yoane 2:15-17.) Yango elingi koloba ete tosengeli koboya moto nyonso to likambo nyonso oyo ekoki kokómisa biso mbindo na miso ya Nzambe. (Yis. 2:4; Em. 18:4) Elingi mpe koloba ete tosengeli te kokoba kotala makambo ya mbindo to kokanisakanisa yango.​—Kol. 3:5, 6.

9. Ndenge oyo tosalelaka basusu makambo ezali na ntina nini, mpe mpo na nini?

9 Paulo alendisaki baninga na ye bakristo boye: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” (Ebr. 13:16) Na yango, kozala ntango nyonso moto malamu mpe kozala na momeseno ya kosalela basusu malamu ezali lokola mbeka oyo Yehova andimaka. Koluka bolamu ya basusu emonisaka ete tozali bakristo ya solo.​—Yoa. 13:34, 35; Kol. 1:10.

BAMBEKA NA LOSAMBO

10, 11. Ndenge nini Yehova atalelaka mosala ya kosakola mpe losambo na biso, mpe yango esengeli kotinda biso tósala nini?

10 ‘Kolobela elikya na biso polelepolele’ epai ya basusu ezali lolenge moko oyo biso bakristo tosalelaka bango makambo ya malamu. Opesaka litatoli ntango nyonso oyo ozwi libaku ya kosala yango? Paulo alobaki ete mosala yango ya ntina mingi oyo bakristo basalaka ezali “mbeka ya lisanzoli . . . elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosakola nkombo [ya Nzambe] polele.” (Ebr. 10:23; 13:15; Hos. 14:2) Tokoki kopesa makanisi ndenge na ndenge oyo ekosalisa biso tósakolaka mingi nsango malamu ya Bokonzi mpe tóbongisa lisusu ndenge ya kosala yango, mpe masolo mingi ya Likita ya Mosala epesaka biso batoli na likambo yango. Kasi, tokoki koloba na mokuse ete lokola mosala ya kosakola mpe kopesa litatoli ya libaku malamu ezali “mbeka ya lisanzoli,” oyo ezali moko ya makambo ya losambo na biso, tosengeli kopesa oyo eleki malamu na mosala yango. Atako makambo ya bomoi na biso ezali ndenge moko te, mbala mingi, ntango oyo tolekisaka na mosala ya kosakola nsango malamu emonisaka soki tozali mpenza na botɔndi mpo na makambo ya elimo.

11 Mbala na mbala, tolekisaka ntango na losambo, ezala na ndako to na lisangá. Yehova asɛngi biso tósalaka yango. Ya solo, lelo oyo, tosɛngisami te kotosa Sabata to kosalaka mobembo mpo na kokende na bafɛti na Yerusaleme. Atako bongo, na bomoi na biso bakristo tosalaka makambo oyo tokoki kokokanisa na mimeseno wana. Lelo oyo mpe, Nzambe azali kosɛnga biso tótika misala oyo ebotaka mbuma te mpe tóyekolaka Liloba na ye, tóbondelaka, mpe tóyanganaka na makita. Batata ya mabota basengeli kotambwisaka losambo na kati ya libota. (1 Tes. 5:17; Ebr. 10:24, 25) Ekozala malamu tómituna boye: ‘Nakoki kobongisa lisusu ndenge oyo nasalaka makambo ya elimo?’

12. (a) Kopesa mpaka ya malasi na ntango ya kala tokoki kokokanisa yango na likambo nini lelo oyo? (b) Bokokani yango esengeli kotinda biso tósalaka mabondeli ya ndenge nini?

12 Mokonzi Davidi ayebisaki Yehova boye: “Libondeli na ngai ebongisama lokola mpaka ya malasi liboso na yo.” (Nz. 141:2) Kanisá mwa moke mbala boni obondelaka mpe makambo nini olobaka na mabondeli na yo. Mokanda ya Emoniseli ekokanisi “mabondeli ya basantu” na mpaka ya malasi mpamba te mabondeli oyo Yehova andimaka emataka epai na ye lokola malasi ya nsolo kitoko. (Em. 5:8) Na Yisraele ya kala, mpaka ya malasi oyo ezalaki kopesama mbala na mbala na etumbelo ya Yehova esengelaki kobongisama malamu mpenza mpe na ndenge esengeli. Yehova azalaki kondima yango kaka soki epesami na kolanda malako oyo apesá. (Kob. 30:34-37; Lev. 10:1, 2) Ndenge moko mpe, soki tozali kobongisa malamu mabondeli na biso, tokoki kolikya ete Yehova akondima yango.

NTANGO TOZALI KOPESA, NZAMBE AZONGISELAKA BISO

13, 14. (a) Likambo nini Epafrodite mpe bandeko ya lisangá ya Filipi basalelaki Paulo, mpe Paulo akanisaki nini mpo na yango? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Epafrodite mpe Bafilipi?

13 Mbongo oyo topesaka mpo mosala ya kosakola na mokili mobimba ekende liboso ezali lokola mbeka, ezala topesi mingi to moke. (Mrk. 12:41-44) Na ekeke ya liboso T.B., lisangá ya Filipi etindaki Epafrodite na Roma mpo na kosunga Paulo. Emonani ete Epafrodite amemelaki Paulo mbongo oyo lisangá etindelaki ye. Wana ezalaki mbala ya liboso te bandeko ya Filipi bákabela Paulo. Balingaki te ete Paulo amitungisa na makambo ya mbongo; balingaki amipesa mingi na mosala ya kosakola. Paulo akanisaki nini mpo na likabo yango? Abengaki yango “malasi ya nsolo kitoko, mbeka oyo endimami, oyo ezali kosepelisa Nzambe.” (Tángá Bafilipi 4:15-19.) Paulo asepelaki mpenza na likabo ya Bafilipi; Yehova mpe asepelaki.

14 Lelo oyo mpe, Yehova asepelaka mingi na makabo oyo topesaka mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Longola yango, alaki ete soki tokobi kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso, akokokisa bamposa na biso nyonso, ezala ya elimo to ya mosuni.​—Mat. 6:33; Luka 6:38.

ZALÁ NA BOTƆNDI

15. Wapi mwa makambo oyo etindaka yo ozala na botɔndi epai ya Yehova?

15 Tozali na bantina mingi ya kozala na botɔndi epai ya Yehova. Ebongi mpenza tópesa ye matɔndi mokolo na mokolo mpo na bomoi oyo apesaka biso! Apesaka biso nyonso oyo tosengeli na yango na bomoi: bilei, bilamba, esika ya kofanda mpe mpema oyo topemaka. Longola yango, kondima oyo tokómi na yango nsima ya kozwa boyebi ya solosolo epesaka biso elikya. Ebongi mpenza tósambela Yehova mpe tópesa ye bambeka ya masanzoli mpo azali Mozalisi na biso mpe mpo na makambo oyo asalelaka biso.​—Tángá Emoniseli 4:11.

16. Tosengeli kosala nini mpo na komonisa ete tozali na botɔndi mpo na mbeka ya lisiko ya Kristo?

16 Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, likabo moko ya motuya mingi oyo Nzambe apesá bato ezali mbeka ya lisiko ya Kristo. Yango ezali ndakisa monene ya bolingo ya Nzambe epai na biso. (1 Yoa. 4:10) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na yango? Paulo alobaki boye: “Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba, mpo oyo tomoni yango oyo: ete moto moko akufelaki bato nyonso; . . . mpe akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe alamwisamaki.” (2 Ko. 5:14, 15) Paulo alingaki koloba ete soki tozali na botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe, tokosalela bomoi na biso mpo na kokumisa Ye mpe Mwana na Ye. Tokomonisa bolingo mpe botɔndi na biso epai ya Nzambe mpe Kristo soki tozali na botosi mpe soki tozali kosakola mpe kokómisa bato bayekoli.​—1 Tim. 2:3, 4; 1 Yoa. 5:3.

17, 18. Bandeko mosusu basalaki nini mpo bápesa Yehova mbeka ya lisanzoli ya malamu koleka? Pesá ndakisa.

17 Okoki kosala ete mbeka ya lisanzoli oyo opesaka Nzambe ezala malamu koleka? Nsima ya kokanisa na bolamu nyonso oyo Yehova asalelá bango, bandeko mingi babongisaki makambo na bango mpo bámipesa mingi na mosala ya kosakola Bokonzi to na makambo mosusu ya elimo. Bamosusu basalaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi sanza moko to basanza mingi mbula na mbula, mpe bamosusu bakómá babongisi-nzela ya sanza na sanza. Bamosusu mpe bakɔtá na mosala ya kotonga bandako ya losambo. Nyonso wana ezali ndenge malamu oyo moto akoki komonisa ete azali na botɔndi! Soki moto asali misala wana ya bosantu na makanisi ya malamu, elingi koloba mpo na kopesa Yehova matɔndi mpe kosanzola ye, Yehova akondima yango.

18 Bakristo mingi bamonaki ete basengeli kozongisela Yehova matɔndi mpe yango etindaki bango bámipesa na mosala na ye. Tozali na ndakisa ya Morena. Mwasi yango oyo akolá na Katolike alukaki biyano na mituna oyo azalaki komituna mpo na Nzambe na lingomba yango mpe na mateya ya filozofi ya bato ya Azia, kasi azwaki biyano ya malonga te. Azwaki biyano na mituna na ye kaka ntango abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Morena azalaki na botɔndi mingi epai ya Yehova mpo azwaki biyano na mituna na ye nyonso mpe ndenge biyano yango esalisaki ye akóma na esengo ya solosolo; yango wana, mpo na kopesa Yehova matɔndi, alingaki komipesa mpenza na mosala na ye. Nsima ya kozwa batisimo, akómaki mbala moko mobongisi-nzela mosungi mpo na libela, mpe ntango kaka amonaki ete akoki kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza, asɛngaki mosala yango. Morena asalaki bongo eleki sikoyo mbula 30 mpe tii lelo oyo, azali kaka na mosala ya ntango nyonso.

19. Ndenge nini okoki kobakisa bambeka oyo opesaka Yehova?

19 Ya solo, ezali na bandeko mingi ya sembo oyo bakoki te kokóma babongisi-nzela. Ezala tozali kosala mingi na mosala ya Yehova to te, biso nyonso tokoki kopesa ye bambeka ya elimo oyo akondima. Tosengeli kozala ntango nyonso na bizaleli oyo ezali komonisa ete totosaka mitinda ya Biblia mpe kobosana te ete tozali bamonisi ya Yehova. Na kondima nyonso, tosengeli kotya motema ete Nzambe akokokisa mikano na ye. Tosengeli kosala misala ya malamu, elingi koloba kopesa mabɔkɔ na mosala ya kopalanganisa nsango malamu. Tiká ete esengo oyo etondi na mitema na biso mpe botɔndi na biso mpo na nyonso oyo Yehova asaleli biso etinda biso tókoba kopesa ye bambeka na molimo mobimba!

[Mituna ya boyekoli]

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 25]

Bolamu oyo Yehova asalelaka biso etindaka yo opesa ye mbeka ya lisanzoli ya malamu koleka?

[Elilingi na lokasa 23]

Opesaka litatoli ntango nyonso oyo ozwi libaku ya kosala yango?