Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Basakolaki Liloba ya Nzambe na mpiko!

Basakolaki Liloba ya Nzambe na mpiko!

Basakolaki Liloba ya Nzambe na mpiko!

Mikanda mingi ya moombo ya sembo, na ndakisa buku ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe mpe buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu emonisi ete bakristo ya solo bazalaka na mpiko ntango bazali kotɛmɛla bango. Lokola bakristo ya ekeke ya liboso, biso mpe tosɛngaka Yehova apesa biso elimo na ye mpe asalisa biso tósakola liloba na ye na mpiko.​—Mis. 4:23-31.

Ndeko moko oyo alobelaki ndenge mosala ya kosakola ezalaki kosalema na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba akomaki boye: “Basaleli ya Nzambe bazalaki kokabola na molende mpenza buku Le mystère accompli (buku ya nsambo ya Études des Écritures). Ekabolamaki mingi koleka babuku mosusu. Trakte Nsango ya Bokonzi No. 1 ebimaki na 1918. Na nsima, babimisaki Nsango ya Bokonzi No. 2, oyo elimbolaki ntina oyo bakonzi ya Leta bapekisaki buku Le mystère accompli. Na nsima, babimisaki Nsango ya Bokonzi No. 3. Bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo bakabolaki mikanda yango mingi mpenza. Esɛngaki kondima mpe mpiko mpo na kokabola batrakte yango.”

Lelo oyo, basakoli ya sika bazwaka formasyo mpo na kosakola malamu; nzokande, kala ezalaki ntango nyonso bongo te. Ndeko moko ya ekólo Pologne oyo afandaka na États-Unis alobelaki makambo oyo akutanaki na yango mbala ya liboso oyo abimaki na mosala ya kosakola na 1922; akomaki boye: “Nayebaki te soki basalaka ndenge nini mpo na kopesa moto mokanda mpe nazalaki koloba Lingelesi malamu te, kasi nakendaki ngai moko na biro ya doktɛrɛ moko mpe nabɛtaki porte. Monganga moko ya mwasi afungolaki. Nabosanaka te likambo oyo esalemaki, mpo nazalaki kobanga mpe kolɛnga. Ntango nafungolaki sakosi na ngai, babuku nyonso ekweaki na nse. Nayebi te soki nalobaki nini, kasi natikelaki ye mokanda moko. Ntango nalongwaki na porte wana, nakómaki mbala moko na mpiko mpe namonaki ete Yehova apesaki ngai makasi. Mokolo yango nakabolaki mwa babuku ebele na balabala wana oyo ezalaki na bamagazini ná babiro.”

Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Na 1933, bandeko mingi bazalaki kosalela mituka oyo ezali na bikoliseli-lolaka mpo na kosakola nsango ya Bokonzi.” Mokolo moko, akendaki kosakola elongo na ndeko moko ná mwasi na ye na engumba moko oyo ezali pembeni ya bangomba na etúká ya Californie, na États-Unis. Alobi boye: “Ndeko yango amataki na motuka likoló ya bangomba, mpe ngai ná mwasi na ye totikalaki na engumba. Ntango atyaki diskɛ, maloba ezalaki koyokana lokola nde ezali kouta na likoló. Bato ya engumba balukalukaki ndeko yango, kasi bamonaki ye te. Ntango diskur esilaki, tobandaki kokende na bandako mpe kopesa bato litatoli. Nabimaki na mosala ya kosakola na mituka mosusu mibale oyo ezalaki na bikoliseli-lolaka mpe lokuta mabe, bato mingi bazalaki kosepela ata moke te koyoka biso. Kasi, bakokaki te kokima koyoka badiskur oyo tozalaki kotya na mituka mpo ezalaki koyokana tii na bandako na bango. Tozalaki komona ete Yehova azalaki kosalisa biso tósalela mayele oyo ebongi na eleko nyonso oyo tozali. Mayele nyonso wana esɛngaki tózala na mpiko, kasi ezalaki ntango nyonso kosalisa biso tókokisa mokano na biso, mpe ezalaki kokumisa nkombo ya Yehova.”

Na bambula ya 1930 mpe na ebandeli ya bambula ya 1940, bazalaki kosalela fono mpo na koyokisa bato badiskur oyo ezalaki na diskɛ. Mokristo moko ya mwasi alobi boye: “Elenge mwasi moko azalaki kosakola ndako na ndako ná fono. Na ndako moko, ntango atyaki diskɛ, nkolo-ndako asilikaki makasi mpe abɛtaki yango na lokolo. Diskɛ ata moko te ebebaki. Mibali misato oyo bazalaki kolya na motuka oyo etɛlɛmaki pembeni wana bamonaki likambo yango, babengaki ndeko mwasi yango mpo ayokisa bango diskur, mpe bazwaki mikanda. Yango esalisaki ye abosana likambo mabe oyo mobali wana asalaki.” Esengelaki kozala na mpiko mpo na kozonga nsima te liboso ya makambo ya ndenge wana.

Ndeko mwasi yango abakisaki boye: “Nabosanaka te ntango tobandaki mosala ya kokabola bazulunalo na balabala na 1940. Liboso, tozalaki kaka kotambola na balabala; tozalaki kosala molɔngɔ, tolati bitanda oyo bakomá ‘Lingomba ezali motambo mpe bokosi’ mpe ‘Bósalela Nzambe mpe Kristo Mokonzi.’ Tozalaki mpe kopesa bato batrakte ofele. Esengelaki kozala na mpiko mpo na kosala mosala wana, kasi ekokisaki mokano na yango ya kosalisa bato báyeba nkombo ya Yehova mpe basaleli na ye.”

Ndeko mwasi mosusu alobaki boye: “Kokabola bazulunalo na bingumba ya mike ezalaki mpasi mpenza. Na eleko wana, banguna bazalaki kotɛmɛla Batatoli makasi. . . . Esɛngaki kozala na mpiko mpenza mpo na kotɛlɛma na balabala ná bazulunalo na mabɔkɔ mpe kobelela ndenge oyo balakisaki biso. Kasi, mbala mingi tozalaki kozangisa ata mokolo ya pɔsɔ moko te. Ntango mosusu bato bazalaki kosepela. Ntango mosusu mpe ebele ya bato bazalaki koyela biso mpo básala biso mabe, mpe mbala mosusu tozalaki kokima bango na mayele.”

Batatoli ya Yehova bakobaki kosakola na mpiko na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba atako banguna banyokolaki bango. Na kampanye moko ya mikolo 43, kobanda 1 Desɛmbɛ 1940 tii 12 Yanuali 1941, basakoli soki 50 000 na États-Unis bakabolaki mwa babuku pene na milio mwambe.

Bandeko mingi oyo baumeli mingi na lisangá ya Nzambe babosanaka te mikakatano oyo bazalaki kokutana na yango, oyo esɛngaki bázala mpenza na mpiko. Bamosusu balobaka ete na boumeli ya bambula mingi, mpo na kolakisa ete bazalaki ntango nyonso na mpiko, bazalaki na momeseno ya koloba ete: Tóbunda etumba tii na nsuka! Toyebi te mayele nini mosusu tokosalela mpo na koyebisa nsango ya Nzambe liboso nsuka ya mokili oyo eya. Kasi, na lisalisi ya Nzambe, tokokoba kosakola liloba ya Yehova na kondima mpe na mpiko.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]

Banda kala, esɛngaka kozala na mpiko mpo na kosakola Bokonzi