Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Likunya ekoki kobebisa makanisi na biso

Likunya ekoki kobebisa makanisi na biso

Likunya ekoki kobebisa makanisi na biso

Napoléon Bonaparte azalaki na yango. Jules César azalaki na yango. Alexandre le Grand mpe azalaki na yango. Atako bato yango bazalaki bakonzi minene mpe bazalaki na lokumu mingi, bazalaki na ezaleli oyo ekoki kobebisa makanisi ya moto. Mokomoko na bango azalaki koyokela moto moko boye likunya.

Bertrand Russell, moto ya filozofi mpe mwana-mboka Angleterre, akomaki boye: “Napoléon azalaki koyokela César likunya, César azalaki koyokela Alexandre [le Grand] likunya, mpe nakoki koloba ete Alexandre azalaki koyokela Hercules likunya, moto oyo azalaki kaka na masapo.” Moto nyonso, ata soki azali na bozwi mingi, na bizaleli malamu, to mpe na bomoi ya malamu, akoki kokóma na likunya.

Koyokela moto likunya elimboli kosepela na ye te mpo azali na bozwi, mpo makambo na ye ezali kotambola malamu, mpo azali kokende liboso, mpe bongo na bongo. Buku moko oyo elimboli maloba ya Biblia ekesenisi likunya ná zuwa; elobi boye: “‘Zuwa’ . . . ezali mposa ya kozala ndenge moto mosusu azali, kasi liloba ‘likunya’ esalelamaka mpo na kolobela mposa ya kobɔtɔla biloko oyo moninga azali na yango.” Moto ya likunya asukaka kaka te na koyokela basusu zuwa mpo na biloko oyo bazali na yango, kasi alukaka mpe ete biloko yango ekóma ya ye.

Ebongi tótalela ndenge oyo likunya ekoki kokola na motema na biso mpe mbuma mabe ya ezaleli yango. Tosengeli koyeba mingimingi makambo oyo tokoki kosala mpo tókóma bato ya likunya te.

ELIMO OYO EKOKI KOMEMA NA LIKUNYA

Bato ya kozanga kokoka bazalaka na “makanisi ya likunya,” kasi ezali na makambo oyo ekoki kokolisa ezaleli yango na motema ya moto. (Yak. 4:5) Ntoma Paulo amonisaki moko na yango ntango akomaki boye: “Tólukaka te komimonisa ete toleki bamosusu, kobimisa kowelana na kati na biso, koyokelana likunya.” (Gal. 5:26) Elimo ya kowelana ekoki kokolisa makanisi ya likunya na motema na biso. Bakristo mibale, Cristina ná José, a bamonaki likambo yango.

Cristina, oyo azali mobongisi-nzela, alobi boye: “Mbala mingi nayokelaka basusu likunya. Nalulaka biloko oyo bazali na yango, oyo ngai nazali na yango te.” Mokolo moko, Cristina azalaki kolya elongo na mokɛngɛli-motamboli moko mpe mwasi na ye. Lokola Cristina ayebaki ete ye ná mobali na ye Eric bazali kaka bato ya bambula moko na mokɛngɛli-motamboli yango ná mwasi na ye mpe ete bazalaki na mikumba ndenge moko liboso, alobaki boye: “Mobali na ngai mpe azali nkulutu! Mpo na nini yo ozali mokɛngɛli-motamboli, kasi ye te?” Lokola elimo ya kowelana elamwisaki likunya na motema ya Cristina, abosanaki mosala malamu oyo ye ná mobali na ye bazalaki kosala mpe makambo ya malamu oyo bazalaki na yango.

José azalaki na mposa ya kokóma mosaleli na misala. Ntango baponaki bandeko mosusu, kasi ye baponaki ye te, akómaki koyokela bango likunya mpe azalaki lisusu kosepela na mokambi-misala ya bankulutu te. José alobi boye: “Likunya etindaki ngai nakóma koyina ndeko yango mpe kokanisela ye mabe. Soki motema na yo ekómi na likunya, okobanda kokanisa kaka bolamu na yo mpe okozala lisusu na makanisi ya malamu te.”

BANDAKISA OYO EZALI NA BIBLIA EZALI KOTEYA BISO NINI?

Biblia elobeli bandakisa mingi oyo ezali kokebisa biso. (1 Ko. 10:11) Bandakisa yango mosusu ezali komonisa ndenge oyo likunya ebandaka mpe ndenge oyo ebebisaka baoyo batikaka ete ezaleli yango ekola na mitema na bango.

Na ndakisa, Kaina, mwana ya liboso ya Adama ná Eva, ayokaki nkanda ntango Yehova andimaki mbeka ya Abele, kasi oyo ya ye te. Ebongaki Kaina akóma kosala makambo ya malamu, kasi ayokelaki ndeko na ye likunya makasi mpe nsukansuka abomaki ye. (Eba. 4:4-8) Yango wana Biblia elobi ete Kaina “autaki na [Satana] moto mabe”!​—1 Yoa. 3:12.

Bandeko zomi ya Yozefe bayokelaki ye likunya mpo tata na bango azalaki kolinga ye mingi. Bayinaki Yozefe makasi ntango ayebisaki bango bandɔtɔ oyo alɔtaki. Balukaki kutu koboma ye. Nsukansuka, batɛkaki ye lokola moombo, bakosaki tata na bango mpe ye akanisaki ete Yozefe akufi. (Eba. 37:4-11, 23-28, 31-33) Bambula mingi na nsima, bandimaki ete basalaki lisumu, mpe balobaki bango na bango ete: “Ya solo mpenza tozali na ngambo mpo na ndeko na biso, mpamba te tomonaki mpasi ya molimo na ye ntango azalaki kobondela biso ete tóyokela ye mawa, kasi toyokaki te.”​—Eba. 42:21; 50:15-19.

Kora, Datane, ná Abirame bakómaki na likunya ntango bakokanisaki mikumba na bango na oyo ya Moize ná Arona. Balobaki ete Moize azalaki “komikómisa mokonzi” mpe komitombola. (Mit. 16:13) Maloba na bango ezalaki solo te. (Mit. 11:14, 15) Yehova ye moko nde aponaki Moize. Kasi, batomboki yango bayokelaki Moize likunya mpo na mokumba oyo azalaki na yango. Nsukansuka, Yehova abomaki bango mpo na likunya na bango.​—Nz. 106:16, 17.

Mokonzi Salomo amonaki ndenge oyo likunya ekoki kobebisa moto. Mwasi moko oyo bebe na ye akufaki alukaki koyiba bebe ya moninga na ye mpe kokosa ete bebe ya moninga yango nde akufaki. Ntango Salomo asambisaki bango mpo na likambo yango, mwasi oyo akosaki andimaki ata báboma mwana oyo azalaki naino na bomoi. Salomo akataki likambo mpe alobaki ete bápesa mwana epai ya mwasi oyo azalaki mpenza mama ya mwana.​—1 Bak. 3:16-27.

Likunya ekoki komema mabe mingi. Bandakisa euti na Biblia oyo touti kolobela emonisi ete likunya ekoki kotinda moto ayina, azanga bosembo, to mpe aboma. Longola yango, ndakisa mokomoko emonisi ete moto oyo bayokelaki likunya asalaki mabe moko te oyo ebongaki básala ye ndenge wana. Tokoki kosala nini mpo tókóma bato ya likunya te? Tokoki kosala nini mpo na kosilisa likunya na mitema na biso?

NDENGE YA KOSILISA LIKUNYA

Tólona bolingo mpe bolingo ya bondeko. Ntoma Petro apesaki bakristo toli oyo: “Sikoyo lokola bopɛtoli milimo na bino na ndenge bozali kotosa solo mpe yango eboti bolingo ya bondeko oyo ezali na bokosi te, bólinganaka makasi na motema moko.” (1 Pe. 1:22) Bolingo ezali nini? Ntoma Paulo akomaki boye: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, esalaka makambo ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te.” (1 Ko. 13:4, 5) Soki toloni bolingo ya ndenge wana, likunya ekolongwa na mitema na biso! (1 Pe. 2:1) Na esika Yonatana ayokela Davidi likunya, ‘alingaki ye lokola molimo na ye moko.’​—1 Sa. 18:1.

Tózalaka elongo na basaleli ya Nzambe. Mokomi ya Nzembo 73 azalaki koyokela bato mabe likunya mpo bazalaki na bomoi ezangi mitungisi. Kasi, asilisaki likunya yango ntango akendaki na “esika mosantu monene ya Nzambe.” (Nz. 73:3-5, 17) Kozala elongo na baninga na ye basambeli ya Yehova esalisaki mokomi ya nzembo yango amona mapamboli oyo azalaki na yango na ndenge azalaki “kobɛlɛma na Nzambe.” (Nz. 73:28) Koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita elongo na bandeko na biso bakristo ekoki kosalisa biso ndenge wana.

Tóluka kosala makambo ya malamu. Ntango Nzambe amonaki ete Kaina akómi na likunya mpe koyina na motema na ye, alendisaki ye akóma “kosala makambo ya malamu.” (Eba. 4:7) “Kosala makambo ya malamu” elimboli nini mpo na bakristo? Yesu alobaki ete tosengeli ‘kolinga Yehova Nzambe na biso na motema na biso mobimba mpe na molimo na biso mobimba mpe na makanisi na biso nyonso mpe kolinga mozalani na biso lokola biso moko.’ (Mat. 22:37-39) Komipesa na mosala ya Nzambe mpe kosalisa basusu epesaka esengo oyo ekoki kosalisa biso tósilisa likunya na mitema na biso. Komipesa na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli ezali ndenge malamu ya kosalela Nzambe mpe bazalani na biso; misala yango ememelaka biso “lipamboli ya Yehova.”​—Mas. 10:22.

‘Tósepela elongo na bato oyo bazali kosepela.’ (Rom. 12:15) Yesu asepelaki ntango bayekoli na ye basalaki likambo moko ya malamu, mpe amonisaki ete bakosala mosala mingi koleka oyo ye asalaki na mosala ya kosakola. (Luka 10:17, 21; Yoa. 14:12) Biso basaleli ya Yehova tozali na bomoko; yango wana, soki moko na biso asali likambo ya malamu to azwi mokumba moko boye, ezali lipamboli mpo na biso nyonso. (1 Ko. 12:25, 26) Yango wana, ebongi mpe biso tósepela ntango basusu bazwi mikumba na esika tóyokela bango likunya.

EZALI ETUMBA MONENE!

Ekoki kosɛnga ntango mingi mpo na kolongola likunya na motema na biso. Cristina alobi boye: “Tii sikoyo makanisi ya likunya ezalaka makasi na motema na ngai. Atako nayinaka yango, ezali kaka, mpe esɛngaka nabundisa yango ntango nyonso.” José mpe abundaki etumba ya ndenge wana. Alobi boye: “Yehova asalisaki ngai nasepela na bizaleli malamu ya mokambi-misala ya bankulutu. Kozala na boyokani malamu na Nzambe esalisaki ngai mingi.”

Likunya ezali na kati ya “misala ya nzoto,” oyo mokristo asengeli kobundisa. (Gal. 5:19-21) Soki totiki nzela te ete likunya ekola na mitema na biso, tokoki kozala na bomoi ya esengo mpe kosepelisa Yehova, Tata na biso ya likoló.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 17]

‘Tósepela elongo na bato oyo bazali kosepela’