Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Natane—Moto ya sembo oyo alongisaki losambo ya solo

Natane—Moto ya sembo oyo alongisaki losambo ya solo

Natane​—Moto ya sembo oyo alongisaki losambo ya solo

Ezalaka pɛtɛɛ te kondimisa mokonzi moko ete azali kosala mabe mpe ete asengeli kobongwana. Okondima kokende komonisa moto ya ndenge wana mabe na ye soki oyebi ete abomaki moto mpo likambo ya mabe oyo asalaki eyebana te?

Davidi, mokonzi ya Yisraele ya kala, asalaki ekobo na Bate-sheba, mpe mwasi yango akómaki na zemi. Mpo abomba lisumu yango, Davidi abomisaki mobali ya Bate-sheba mpe na nsima abalaki mwasi yango. Davidi abombaki lisumu na ye ná Bate-sheba basanza mingi, mpe na ntembe te, azalaki kokoba kokokisa mikumba na ye ya mokonzi ya ekólo. Kasi, Yehova atikaki te ete Davidi abomba lisumu na ye mpo na libela. Atindaki mosakoli Natane akende koyebisa ye mabe oyo asalaki.

Mokumba yango ezalaki pɛtɛɛ te. Meká komitya na esika ya Natane. Na ntembe te, lokola Natane azalaki sembo epai ya Yehova mpe azalaki kobatela mitinda na ye, akakatanaki te kokende koyebisa Davidi masumu oyo asalaki. Ndenge nini mosakoli ya Nzambe akokaki koloba na Mokonzi Davidi mpe kondimisa ye ete asengeli kobongola motema?

MOTEYI YA MAYELE

Zwá mwa miniti mpo na kotánga 2 Samwele 12:1-25. Meká komitya na esika ya Natane ntango azalaki kobɛtela Davidi lisolo oyo: “Bato mibale bazalaki kofanda na engumba moko, mosusu mozwi mpe mosusu mobola. Mozwi azalaki na bampate mpe bangɔmbɛ ebele mpenza; kasi mobola azalaki na eloko te kaka mwana-mpate moko ya mwasi, ya moke, oyo asombaki. Mpe azalaki kobɔkɔla yango, mpe mpate yango ezalaki kokola esika moko na ye ná bana na ye, bango nyonso. Ezalaki kolya ndambo ya bilei na ye, mpe komɛla na kɔpɔ na ye, ezalaki kolala na ntolo na ye mpe ekómaki lokola mwana na ye ya mwasi. Nsima ya mwa ntango, mopaya moko ayaki epai ya mozwi, kasi ye aboyaki kozwa banyama kati na bampate na ye mpe bangɔmbɛ na ye mpo na kolambela moto ya mobembo oyo akɔtaki epai na ye. Bongo azwaki mwana-mpate yango ya mobola mpe alambelaki yango moto oyo ayaki epai na ye.”​—2 Sa. 12:1-4.

Lokola Davidi azalaká mobateli ya mpate, emonani ete akanisaki ete likambo yango esalemaki mpenza. Molimboli moko ya maloba ya Biblia apesi likanisi oyo: “Mbala mosusu Natane azalaki na momeseno ya kokende epai ya Davidi mpo na kosɛnga ye atalela likambo ya bato oyo mokonzi kaka nde akokaki kokata likambo na bango na bosembo, mpe Davidi akanisaki ete na mbala yango mpe ayaki na likambo ya ndenge wana.” Ata soki ezalaki bongo, esɛngaki Natane azala sembo epai ya Nzambe mpe azala na mpiko mpo aloba na mokonzi ndenge oyo asalaki. Davidi asilikaki makasi nsima ya koyoka lisolo oyo Natane abɛtelaki ye. Alobaki boye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, moto oyo asali boye asengeli kokufa!” Na nsima Natane ayebisaki ye polele ete: “Moto yango nde yo!”​—2 Sa. 12:5-7.

Tótalela ntina oyo Natane alobelaki likambo yango ndenge wana epai ya Davidi. Ezalaka pɛtɛɛ te moto atalela likambo ya moninga na ye na bosembo nyonso. Biso nyonso tolukaka komilongisa soki tosali likambo ya mabe. Kasi, ndakisa oyo Natane asalelaki etindaki Davidi akweisa mabe na ye moko kozanga ete ayeba yango. Mokonzi amonaki polele ete moto oyo Natane alobelaki asalaki mpenza mabe. Nzokande, Natane azelaki tii Davidi ye moko akweisaki moto yango mpe na nsima ayebisaki ye ete ndakisa yango etali ye. Na yango, Davidi amonaki mpenza ete asalaki lisumu monene. Yango esalisaki ye andima mpamela. Andimaki ete ‘atyolaki’ mpenza Yehova na lisumu oyo asalaki ná Bate-sheba, mpe andimaki etumbu oyo ebongaki na ye.​—2 Sa. 12:9-14; Nz. 51, maloba oyo ezali na likoló.

Likambo yango ekoki koteya biso nini? Mokano ya moteyi ya Biblia ezalaka ete asalisa bayoki na ye bákanga ntina ya makambo oyo azali koloba na bango. Natane azalaki komemya Davidi, yango wana asalelaki mayele mpo na koloba na ye. Natane ayebaki ete Davidi azalaki kolinga boyengebene mpe bosembo na kati ya motema na ye. Mosakoli asalelaki ndakisa wana mpo na kosalisa Davidi amonisa bizaleli yango. Biso mpe tokoki kosalisa bato ya mitema sembo bákanga ntina ya makanisi ya Yehova. Ndenge nini? Soki tozali kolamwisa na mitema na bango mposa ya kosala oyo ezali malamu kozanga ete tómonisa bango ete tozali sembo koleka bango. Tosengeli komonisa ete Biblia nde elakisaka ezaleli nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, kasi biso te.

Ezali libosoliboso bosembo ya Natane epai ya Nzambe nde esalisaki ye apamela mokonzi. (2 Sa. 12:1) Soki biso mpe tozali na bosembo ya ndenge wana, tokokangama na mpiko nyonso na mitinda ya Yehova.

ALONGISAKI LOSAMBO YA SOLO

Emonani ete Natane ná Davidi bazalaki baninga mpamba te Davidi apesaki mwana na ye moko nkombo Natane. (1 Nt. 3:1, 5) Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli Natane, azalaki elongo na Davidi. Bango mibale balingaki Yehova mingi. Emonani ete Davidi azalaki kotuna Natane toli, mpamba te ayebisaki mosakoli yango ete azali na mposa ya kotongela Yehova tempelo. Davidi alobaki boye: “‘Talá sikoyo, ngai nafandi na ndako moko ya banzete ya sɛdrɛ, nzokande sanduku ya Nzambe ya solo efandi na kati ya hema.’ Na yango, Natane alobaki na mokonzi boye: ‘Nyonso oyo ezali na motema na yo, kende, salá, mpo Yehova azali na yo.’”​—2 Sa. 7:2, 3.

Lokola Natane azalaki mosambeli ya sembo ya Yehova, andimaki na esengo nyonso likanisi ya Davidi ya kotonga tempelo ya liboso mpo na losambo ya solo awa na mabele. Nzokande, na libaku yango, Natane amonisaki makanisi na ye moko na esika aluka koyeba makanisi ya Yehova. Na butu, Nzambe atindaki mosakoli yango akende koyebisa Davidi nsango mosusu: Davidi akotongela Yehova tempelo te. Mwana na ye nde akotonga yango. Kasi, Natane ayebisaki Davidi ete Nzambe akosala na ye kondimana mpo ete kiti ya bokonzi na ye ‘epikama makasi mpenza mpo na ntango oyo etyami ndelo te.’​—2 Sa. 7:4-16.

Na likambo ya kotonga tempelo, mokano ya Nzambe eyokanaki na makanisi ya Natane te. Atako bongo, mosakoli yango ya komikitisa aimaimaki te; andimaki mokano ya Yehova mpe atosaki yango. Tosengeli mpenza kolanda ndakisa na ye ntango Nzambe asemboli biso na likambo moko! Makambo oyo Natane asalaki na nsima lokola mosakoli ya Yehova emonisi ete Nzambe aboyaki ye te. Kutu, emonani ete Yehova apesaki Natane, elongo na Gade, momoni-bimonaneli, elimo na ye mpo básalisa Davidi na kobongisa babɛti-miziki 4 000 na tempelo.​—1 Nt. 23:1-5; 2 Nt. 29:25.

ALINGAKI BÁTYA MOKONZI OYO ABONGI

Natane ayebaki ete Salomo nde asengelaki kokóma mokonzi nsima ya Davidi. Na yango, akangaki mabɔkɔ te ntango Adoniya alukaki kobɔtɔla kiti ya bokonzi ntango Davidi akómaki mobange. Na likambo yango mpe Natane asalaki makambo na mayele mpe na bosembo. Ya liboso, atindaki Bate-sheba ayebisa Davidi ete abosana te ete alapaki ndai ete mwana na bango Salomo nde akokóma mokonzi nsima na ye. Na nsima, Natane ye moko akendaki kokutana na Davidi mpo na kotuna ye soki andimi ete Adoniya akóma mokonzi na esika na ye. Ntango Davidi amonaki ete makambo eyei ndongo, apesaki Natane ná bato mosusu ya sembo mitindo ete bátya Salomo mafuta mpe bábelela ete ye nde akómi mokonzi. Mokano mabe ya Adoniya elongaki te.​—1 Bak. 1:5-53.

MOKOMI OYO ALUKAKI LOKUMU TE

Eyebani ete Natane ná Gade nde bakomaki 1 Samwele kobanda mokapo 25 tii 31 mpe mokanda mobimba ya 2 Samwele. Mpo na masolo oyo ezali na mikanda yango, Biblia elobi boye: “Makambo ya mokonzi Davidi, ya liboso mpe ya nsuka, talá ekomami na maloba ya Samwele momoni-makambo mpe na maloba ya mosakoli Natane mpe na maloba ya Gade momoni-bimonaneli.” (1 Nt. 29:29) Balobaka mpe ete Natane nde akomaki lisolo ya ‘makambo ya Salomo.’ (2 Nt. 9:29) Maloba yango emonisi ete mbala mosusu Natane akobaki kosala na ndako ya mokonzi ata nsima ya liwa ya Davidi.

Makambo mingi oyo toyebi mpo na Natane euti na mikanda oyo, na ntembe te, ye moko akomaki. Kasi, lokola aponaki kolobela makambo mosusu te, emonisi biso soki azalaki moto ya ndenge nini. Na ntembe te, Natane azalaki mokomi oyo azalaki koluka lokumu te. Alukaki te ete nkombo na ye eyebana. Diksionɛrɛ moko ya maloba ya Biblia elobi ete alobelami na makomami mosantu “kozanga ete báyebisa makambo na ye mpe bálobela libota na ye.” Toyebi bankɔkɔ ya Natane te, makambo ya bomoi na ye mpe te.

AZALAKI SEMBO EPAI YA YEHOVA

Mwa makambo oyo Biblia elobi mpo na Natane emonisi biso polele ete azalaki moto ya komikitisa, kasi azalaki mpe na mpiko mpo na kolongisa mokano ya Nzambe. Yehova Nzambe apesaki ye mikumba minene. Talelá na mozindo bizaleli ya Natane, na ndakisa bosembo na ye mpe botosi na ye makasi mpo na makambo oyo Nzambe asɛngaki ye. Salá makasi omekola bizaleli yango.

Mbala mosusu bakosɛnga yo te ete okende kopamela bakonzi oyo basalaka ekobo to obebisa mokano mabe ya bato. Kasi, Nzambe akoki kosalisa yo ozala sembo epai na ye mpe otosa mitinda na ye. Akoki mpe kosalisa yo ozala moteyi ya mpiko, kasi mpe ya mayele mpe olongisa losambo ya solo.

[Elilingi na lokasa 25]

Lokola Natane alingaki ete bátya mokonzi oyo abongi, alobaki na mayele epai ya Bate-sheba