Biloko oyo tosalelá kala
‘Nazalaki kobenda likebi ya bato’
Ntango Charlotte White, ndeko moko oyo azalaki mobongisi-nzela, akómaki na engumba Louisville, na États-Unis, ná valize na ye ya bapinɛ oyo azalaki kobenda, mboka eninganaki mwa moke.
EZALAKI na 1908. Ndeko mwasi White abendaki likebi ya bato ya engumba na eloko moko oyo bato bamoná naino te: valize oyo bazalaki komema na yango babuku Aurore du millénium. Alobaki boye: “Bato mingi bazalaki kolobela yango mpe nazalaki kobenda likebi na bango.”
Bayekoli ya Biblia (ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana) bamonaki ete basengeli koyebisa bato mosusu makambo kitoko oyo bayekolaki. Mingi kati na bango bayekolaki mateya ya solo ya Biblia na lisalisi ya babuku oyo ebengamaki Aurore du millénium (na nsima ekómaki Études des Écritures). Bakristo oyo bazalaki na makoki ya kosala yango, bandimaki kosala mibembo milai na bingumba mpe bamboka mpe bazalaki kotikela bato oyo basepeli babuku yango.
Na 1908, Ndeko mwasi White ná basakoli mosusu ya molende bazalaki kopesa bato buku yango ya volimi motoba oyo ezalaki na ezipeli ya makasi na dolare 1,65. Na esika bápesa moto buku Aurore ntango bakutani na ye, bazalaki kozwa nkombo na ye mpe bazalaki kozonga nsima, mingimingi na mokolo oyo bazalaki kofuta bato, mpo na kotikela bango yango mpe kozwa mwa mbongo oyo bazalaki kosɛnga mpo na yango. Kutu, moto moko oyo azalaki kosepela na mosala na biso te alobaki ete mbongo oyo bato bazalaki kopesa mpo na babuku yango ezalaki moke mpenza!
Malinda Keefer alobaki ete na pɔsɔ moko, azalaki kozwa bankombo ya bato mpo na babuku nkama mibale tii nkama misato. Kasi, ndenge oyo bato mingi bazalaki kosepela na buku Aurore ebimisaki mpe mokakatano moko. Volimi ya motoba yango moko ezalaki
na nkasa 740! Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete “buku ntuku mitano ezalaki na kilo 18”; yango wana ezalaki “mpasi mpo na komema yango,” mingimingi mpo na bandeko basi.Mpo na kolonga mokakatano ya komema buku Aurore, Ndeko James Cole asalaki eloko moko ya ebende oyo ezalaki na bapinɛ mibale, oyo likoló na yango bakokaki kokangisa na bavisi valize ya mikanda. Lokola esɛngaki lisusu te amema ebele ya bakartɔ ya mikanda, ndeko yango alobaki boye: “Mapeka na ngai ekobukana lisusu te.” Alakisaki eloko yango oyo asalaki na liyangani ya Bayekoli ya Biblia na engumba Cincinnati, na etúká ya Ohio, na 1908 mpe bayangani basepelaki na yango. Likoló ya bavisi oyo bakangisaki ebende na valize bakomaki maloba Valize ya Aurore. Babengaki yango bongo mpo bazalaki kosalela yango mpo na komema babuku Aurore du millénium. Soki moto ameseni na yango, ezalaki kosalisa ye amema na pɛtɛɛ nyonso valize oyo ezali na ebele ya babuku; azalaki kobenda yango kaka na lobɔkɔ moko. Bakokaki komatisa to kokitisa molai na yango, mpe bapinɛ na yango ekokaki kotambola ata na banzela ya mabele. Soki moto asilisi kosakola, akokaki kobalola ebende mpo bapinɛ ekóma na mopanzi ya valize mpe komema yango na motó to na motuka.
Bandeko basi oyo bazalaki babongisi-nzela bazalaki kozwa Valize ya Aurore ofele. Bandeko mosusu bazalaki kosomba yango dolare mibale na ndambo. Ndeko mwasi Keefer, oyo azali awa na fɔtɔ, amesanaki kosalela Valize ya Aurore malamu mpenza na boye ete akokaki kobenda valize oyo etondi na mikanda na lobɔkɔ moko mpe komema sakosi mosusu ya mikanda na lobɔkɔ mosusu. Lokola bato mingi basepelaki kozwa buku yango na mwa engumba moko oyo bazalaki kotimola charbon na etúká ya Pennsylvanie, mbala mingi azalaki kokende mpe kozonga mbala misato to minei na mokolo mpo na kotikela bango babuku.
Na nsuka ya bambula ya 1980, mokumbi-mpɛpɔ moko abimisaki mayele ya kotya bapinɛ na valize, ndenge tomonaka yango lelo na mabándá ya mpɛpɔ mpe na banzela na bingumba ya minene. Nzokande, eleki mbula nkama, Bayekoli ya Biblia ya molende bazalaki kobenda likebi ya bato ntango bazalaki kotambola na Valize ya Aurore mpo na kolona mboto ya solo ya Biblia.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 32]
Ndeko Keefer azalaki kokende mpe kozonga mbala misato to minei na mokolo mpo na kotikela bato babuku
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 32]
Esilisaki mokakatano ya komema buku “Aurore”