Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tóbatela elimo malamu ya lisangá

Tóbatela elimo malamu ya lisangá

Tóbatela elimo malamu ya lisangá

“Boboto monene ya Nkolo Yesu Kristo ezala na elimo oyo bozali komonisa.”​—FLP. 4:23.

NDENGE NINI TOKOKI KOLENDISA ELIMO YA MALAMU NA LISANGÁ . . .

soki tozali kolekisa ntango elongo na bandeko na biso?

soki tozali molende na mosala ya kosakola?

soki tozali koyebisa bankulutu masumu ya minene?

1. Mpo na nini balobaki malamu mpo na lisangá ya Filipi mpe lisangá ya Tyatire?

 BAKRISTO ya lisangá ya Filipi na ekeke ya liboso bazalaki babola. Atako bongo, bazalaki kokaba mpe bazalaki na bolingo mingi mpo na bandeko na bango bakristo. (Flp. 1:3-5, 9; 4:15, 16) Yango wana na nsuka ya mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki bango, alobaki boye: “Boboto monene ya Nkolo Yesu Kristo ezala na elimo oyo bozali komonisa.” (Flp. 4:23) Bakristo ya Tyatire mpe bazalaki na elimo ya ndenge wana; Yesu Kristo alobaki na bango boye: “Nayebi makambo oyo osalaka, mpe bolingo na yo mpe kondima na yo mpe mosala na yo mpe ezaleli na yo ya koyika mpiko, nayebi mpe ete makambo oyo ozali kosala sikoyo ezali mingi koleka oyo ya kala.”​—Em. 2:19.

2. Tozali na mokumba nini mpo lisangá ezala na elimo oyo ezali kati na yango?

2 Lelo oyo mpe, lisangá mokomoko ya Batatoli ya Yehova ezalaka na elimo oyo emonanaka mingi. Na masangá mosusu, bandeko bazalaka na boboto mpe na bolingo mingi. Na masangá mosusu, bandeko bazalaka molende na mosala ya kosakola Bokonzi mpe basepelaka mingi na mosala ya ntango nyonso. Soki biso nyonso tosali makasi tózala na elimo ya malamu, tokosalisa lisangá ezala na bomoko mpe ekende liboso. (1 Ko. 1:10) Nzokande, soki tozali na elimo ya malamu te, bandeko mosusu na lisangá bakobanda kolala mpɔngi na elimo, bakokóma mpiɔ te mɔtɔ te, mpe bakoki ata kobanda kokanga miso na mabe. (1 Ko. 5:1; Em. 3:15, 16) Lisangá na bino ezali na elimo ya ndenge nini? Ndenge nini okoki kolendisa elimo ya malamu na lisangá?

TÓLENDISA ELIMO YA MALAMU NA LISANGÁ

3, 4. Ndenge nini tokoki ‘kokumisa [Yehova] na kati ya lisangá monene’?

3 Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Nakokumisa yo [Yehova] na kati ya lisangá monene; nakosanzola yo na kati ya bato ebele.” (Nz. 35:18) Mokomi yango azalaki kokakatana te kokumisa Yehova ntango azali elongo na basaleli mosusu ya Nzambe. Makita oyo tosalaka pɔsɔ na pɔsɔ, na ndakisa Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, epesaka biso mabaku ya kolakisa ete tozali na mposa ya kokumisa Yehova ntango tozali kopesa biyano mpe bakomantɛrɛ. Ebongi mokomoko na biso amituna boye: ‘Nasalelaka mpenza libaku malamu ya kopesa biyano na makita? Namibongisaka malamu mpe napesaka biyano oyo elendisaka basusu? Soki nazali tata ya libota, nasalisaka bana na ngai bábongisa liboso biyano oyo bakopesa mpe nalakisaka bango kopesa biyano na maloba na bango moko?’

4 Davidi amonisaki ete ndenge oyo moto azali koyemba ekoki komonisa ete motema na ye ezali kotengatenga te. Alobaki boye: “Ee Nzambe, motema na ngai ezali kotengatenga te, motema na ngai ezali kotengatenga te. Nakoyemba mpe nakobɛta mondule.” (Nz. 57:7) Na makita ya lisangá, banzembo ya Bokonzi epesaka biso libaku malamu ya ‘koyemba mpe kobɛta mondule’ mpo na Yehova na motema oyo ezali kotengatenga te. Soki toyebi banzembo mosusu malamu te, ekozala malamu tóyekola yango na Losambo na kati ya libota. Tózala na ekateli ya ‘koyembela Yehova bomoi na biso mobimba mpe ya kobɛtɛla ye mondule ntango nyonso oyo tozali na bomoi.’​—Nz. 104:33.

5, 6. Ndenge nini tokoki komonisa elimo ya koyamba bapaya mpe ya kokaba, mpe kosala bongo elendisaka elimo ya ndenge nini na kati ya lisangá?

5 Kobengisa bandeko na ndako na biso ezali mpe lolenge mosusu ya kokolisa bolingo na kati ya lisangá. Na mokapo ya nsuka ya mokanda oyo Paulo akomelaki Baebre, alendisaki bango boye: “Bókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka. Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya.” (Ebr. 13:1, 2) Kobengisa bakɛngɛli-batamboli mpe basi na bango to bandeko mosusu ya lisangá oyo bazali na mosala ya ntango nyonso ezali ndenge malamu ya komonisa ezaleli ya koyamba bapaya. Tóbosanaka mpe te bandeko basi oyo mibali bakufá, baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko, mpe bato mosusu oyo tokoki kosalisa soki tobengisi bango báya kolya mwa eloko na ndako na biso to báya kosangana na biso na losambo na kati ya libota.

6 Paulo ayebisaki Timote alendisa basusu ete “básala makambo ya malamu, bázala bazwi na misala ya malamu, bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato bayebi kokaba, bámibombela biloko ya motuya, elingi koloba, moboko malamu oyo bakotonga likoló na yango na mikolo oyo ezali koya, mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.” (1 Tim. 6:17-19) Paulo azalaki kosɛnga ete bandeko na ye bakristo bálona elimo ya kokaba. Ata soki nkita ebebi mingi, tokoki kolendisa elimo ya kokaba. Ndenge moko oyo tokoki kosala yango ezali ya komema bandeko mosusu na motuka na biso ntango tozali kokende na makita to na mayangani. Kasi, ndenge nini bandeko oyo bazwi lisalisi ya ndenge wana bakoki kolakisa ete bazali kolendisa elimo ya malamu na lisangá? Basengeli komonisa botɔndi, mbala mosusu bakoki kozwa likanisi ya kopesa mwa eloko mpo ndeko oyo amemi bango abakisa na mbongo ya esansi. Longola yango, soki tozali koluka mabaku ya kolekisa ntango elongo na bandeko na biso, tokomonisa bango ete tolingaka bango mpe tosepelaka na bango. Soki tozali kosala misala ya malamu epai ya “baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima” mpe tozali kosalela ntango mpe biloko na biso mosusu mpo na kosalisa bango, tokolinga bango mingi lisusu mpe tokosalisa lisangá na biso ezala na elimo ya malamu.​—Gal. 6:10.

7. Ndenge nini kobomba sekele oyo ndeko ayebisi biso esalisaka mpo lisangá ezala na elimo ya malamu?

7 Makambo mosusu oyo elendisaka bolingo na kati ya bandeko ezali boninga mpe koyeba kobomba sekele. (Tángá Masese 18:24.) Moninga ya malamu ayebaka kobomba sekele. Ntango ndeko moko ayebisi biso makambo na ye to ndenge oyo azali koyoka mpe azali motema ya kokita mpo ayebi ete tokoyebisa yango bato mosusu te, bolingo oyo ezali kati na biso ná ye ekokóma lisusu makasi. Yango wana, ebongi tózalaka baninga ya motema oyo bayebi kobomba sekele mpo tólendisa bolingo mpe bondeko na lisangá.​—Mas. 20:19.

TÓZALA MOLENDE NA MOSALA YA KOSAKOLA

8. Yesu apesaki bakristo ya Laodikia toli nini, mpe mpo na nini?

8 Yesu alobaki na lisangá ya Laodikia boye: “Nayebi makambo oyo osalaka, ozali mpiɔ te mɔtɔ mpe te. Nalingaki ozala mpiɔ to mɔtɔ. Bongo lokola ozali mwa molunge kaka mpe mɔtɔ te mpiɔ mpe te, nakosanza yo na monɔkɔ na ngai.” (Em. 3:15, 16) Bakristo ya Laodikia bazalaki molende te na mosala ya kosakola. Mbala mosusu, ezaleli yango ezalaki komonana na boyokani ya bango na bango. Yango wana na bolingo nyonso, Yesu apesaki bango toli oyo: “Bato nyonso oyo ngai nalingaka mingi napamelaka bango mpe napesaka bango disiplini. Yango wana, zalá na molende mpe bongolá motema.”​—Em. 3:19.

9. Molende na biso na mosala ya kosakola ememaka nini na kati ya lisangá?

9 Mpo na kolendisa elimo ya malamu na lisangá, tosengeli kozala molende na mosala ya kosakola. Mosala ya lisangá ezali ya koluka bampate oyo bazali na teritware mpe koteya bango solo. Yango wana, lokola Yesu, esengeli tómipesa na molende na mosala ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20; Luka 4:43) Soki tozali na molende mingi na mosala ya kosakola, bomoko na biso ekozala makasi mpo tozali “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Ko. 3:9) Ntango tozali komona bandeko na biso bazali kolobela kondima na bango mpe bazali komonisa ndenge balingaka makambo ya elimo, yango esalaka ete tólinga bango mpe tómemya bango mingi. Lisusu, ‘kosala na bomoko’ na mosala ya kosakola ekolisaka bomoko na kati ya lisangá.​—Tángá Sefania 3:9.

10. Ndenge nini tosalisaka basusu bákóma na elimo ya malamu ntango tozali kosala makasi tósakolaka malamu?

10 Milende oyo tosalaka mpo tósakolaka malamu koleka esalisaka mpe bandeko mosusu. Ntango tozali kolakisa bato oyo tokutanaka na bango ete tomibanzabanzaka mpo na bango mpe ntango tozali koluka kosimba mpenza mitema ya bato oyo tozali koteya, molende na biso ebakisamaka. (Mat. 9:36, 37) Soki tozali na molende, bandeko oyo tozali na bango bakomekola mpe ezaleli yango. Yesu atindaki bayekoli na ye mibalemibale na mosala ya kosakola. (Luka 10:1) Asalaki bongo mpo bálendisana mpe apesa bango ndakisa, kasi mpe mpo bákóma na molende mingi na mosala ya kosakola. Biso nyonso tosepelaka kosakola elongo na bandeko ya molende, boye te? Molende na bango elendisaka biso mpe ebakiselaka biso mpiko na mosala ya kosakola.​—Rom. 1:12.

TÓBOYA KOIMAIMA MPE KOBOMBA MASUMU

11. Bayisraele mosusu ya ntango ya Moize bakómaki na elimo nini, mpe yango ememaki bango wapi?

11 Kaka mwa bapɔsɔ nsima ya kobima na Ezipito, Bayisraele mingi bazalaki lisusu na esengo te mpe bakómaki koimaima. Yango ememaki bango na kotombokela Yehova mpe bato oyo aponaki mpo na kokamba bango. (Kob. 16:1, 2) Kaka mwa bato moke na kati ya Bayisraele oyo babimaki na Ezipito nde bakɔtaki na Mokili ya Ndaka. Kutu, Nzambe aboyaki ata Moize akɔta na mokili yango mpo asilikaki ntango Bayisraele bamonisaki elimo ya mabe! (Mib. 32:48-52) Tokoki kosala nini lelo oyo mpo tókóma na elimo ya mabe te?

12. Tokoki kosala nini mpo tókóma te na elimo ya koimaima?

12 Tosengeli kokeba ete tókóma te na elimo ya koimaima. Atako kolona ezaleli ya komikitisa mpe kotosa baoyo bazali kokamba biso ekosalisa biso, tosengeli mpe kopona malamu baninga na biso. Soki tozali kosepela na masano oyo ebongi te to soki tozali kolekisa ntango mingi elongo na baninga ya mosala to baninga ya kelasi oyo batosaka mibeko ya Yehova te, yango ekobendela biso mikakatano. Ebongi mpenza tólinga te kokóma baninga ya bato oyo bazalaka na elimo ya koimaima to oyo balingaka kotosa te.​—Mas. 13:20.

13. Koimaima ekoki komema makambo nini ya mabe na kati ya lisangá?

13 Koimaima ekoki komema makambo mosusu ya mabe. Na ndakisa, koimaima ekoki kobebisa kimya mpe bomoko ya lisangá. Longola yango, tokopesa ndeko mpasi soki ayoki ete tozali komilela mpo na ye mpe ezaleli yango ekoki komema biso na kokosela moto makambo to na kofinga. (Lev. 19:16; 1 Ko. 5:11) Na ekeke ya liboso, bato mosusu oyo bazalaki koimaima na kati ya lisangá bazalaki “kotyola bonkolo mpe kofinga bato ya nkembo.” (Yuda 8, 16) Na ntembe te, Nzambe asepelaki te na koimaima ya ndenge wana mpo na bandeko oyo bazali na mikumba na lisangá.

14, 15. (a) Soki totiki nzela ete moto abomba lisumu, yango ekoki kosala nini na lisangá mobimba? (b) Tosengeli kosala nini soki toyebi ete ndeko moko asalaka lisumu na kobombama?

14 Tosengeli kosala nini soki toyebi ete ndeko moko asalaka lisumu na kobombama, na ndakisa alangwaka masanga, atalaka bililingi ya makambo ya nsɔni, to asalaka pite to ekobo? (Ef. 5:11, 12) Soki tokangi miso na masumu ya minene, tokoki kopekisa elimo santu ya Yehova esala malamu na lisangá mpe kimya ya lisangá mobimba ekoki kobeba. (Gal. 5:19-23) Ndenge kaka bakristo ya Korinti ya ekeke ya liboso basengelaki kolongola mabe, biso mpe lelo oyo tosengeli kolongola na lisangá likambo nyonso oyo ekoki kobebisa yango mpo tóbatela elimo malamu na yango. Okoki kosala nini mpo kimya ya lisangá ebeba te?

15 Ndenge tomonaki yango liboso, ezali na ntina mingi tóbombaka sekele na makambo mosusu, mingimingi ntango ndeko ayebisi biso makambo na ye to ndenge oyo azali koyoka. Ezali mabe mpenza koyebisa bato mosusu sekele oyo moto ayebisi biso! Atako bongo, soki moto asali lisumu ya monene, esengeli koyebisa bankulutu, bato oyo Biblia elobi ete basengeli kosalisa ye. (Tángá Balevi 5:1.) Yango wana, soki tomoni ndeko moko asali lisumu ya monene, tosengeli kolendisa ye akutana na bankulutu mpo básalisa ye. (Yak. 5:13-15) Kasi, soki asali yango te nsima ya mwa mikolo, esengeli biso moko tóyebisa bankulutu likambo yango.

16. Na ndenge nini koyebisa bankulutu lisumu oyo moto asali esalisaka mpo na kobatela elimo ya lisangá?

16 Lisangá ya bokristo ezali esika oyo tozali kobatelama na elimo; yango wana tosengeli koyebisa bankulutu lisumu ya monene oyo moto asali mpo esika yango ebeba te. Soki bankulutu basalisi moto oyo asali lisumu, abongoli motema mpe andimi mpamela, moto yango akobebisa lisusu elimo ya lisangá te. Kasi, ekozala boni soki moto oyo azali kosala lisumu ya monene aboyi kobongola motema mpe koyoka toli oyo bankulutu bapesi ye na bolingo nyonso? Akobimisama na lisangá mpe etumbu yango ‘ekobebisa’ to ekolongola eloko ya mabe na kati na biso, mpe na ndenge yango elimo ya lisangá ekobatelama. (Tángá 1 Bakorinti 5:5.) Mpo na kobatela elimo ya lisangá, esengeli mokomoko na biso asala makambo oyo esengeli, apesa bankulutu mabɔkɔ, mpe aluka bolamu ya bandeko na ye bakristo.

TÓLENDISA “BOMOKO YA ELIMO”

17, 18. Nini ekosalisa biso ‘tóbatela bomoko ya elimo’?

17 “Komipesa na mateya ya bantoma” esalisaki bayekoli ya liboso ya Yesu bálendisa bomoko na kati ya lisangá. (Mis. 2:42) Bazalaki kolanda mpenza batoli ya Makomami mpe malako oyo bankulutu bazalaki kopesa. Lelo oyo, lokola bankulutu balandaka malako ya moombo ya sembo mpe ya mayele, basalisaka mpe balendisaka bandeko nyonso na lisangá bátikala na bomoko. (1 Ko. 1:10) Ntango tozali kolanda malako ya Biblia oyo ebongiseli ya Yehova ezali kopesa biso mpe tozali kolanda batoli ya bankulutu, tomonisaka ete tozali ‘kosala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.’​—Ef. 4:3.

18 Yango wana, tósala nyonso mpo na kobatela elimo malamu na kati ya lisangá. Soki tosali bongo, ‘boboto monene ya Nkolo Yesu Kristo ekozala na elimo oyo tozali komonisa.’​—Flp. 4:23.

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 19]

Obongisaka biyano ya malamu mpo na kolendisa elimo ya malamu na lisangá?

[Elilingi na lokasa 20]

Yekolá banzembo ya Bokonzi mpo na kolendisa elimo ya malamu na lisangá