Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo ya bomoi

‘Makambo ya esengo ezali na lobɔkɔ na yo ya mobali mpo na seko’

‘Makambo ya esengo ezali na lobɔkɔ na yo ya mobali mpo na seko’

Lisolo ya Lois Didur

Esilá kokómela moto nyonso aloba ete: ‘Soki nayebaki, nalingaki kosala likambo oyo te.’ Nzokande, mpo na ngai, nsima ya kolekisa mbula 50 na mosala ya ntango nyonso, namonaka te likambo moko ya mawa oyo ekómelá ngai, oyo eumelaki libela lokola nazali na lobɔkɔ ya mobali ya Yehova. Tiká nayebisa bino mpo na nini nalobi bongo.

NABOTAMÁ na 1939 mpe nakolá na ferme moko na etúká ya Saskatchewan, na Canada; nazalaki na bandeko minei ya basi mpe moko ya mobali. Bomoi ya ferme ezalaki malamu mpenza. Mokolo moko, Batatoli ya Yehova bayaki epai na biso mpe basololaki na papa; natunaki bango soki Nzambe azali na nkombo. Balakisaki biso nkombo Yehova na Nzembo 83:18. Yango epesaki ngai mposa ya koyeba makambo mosusu mpo na Nzambe mpe Liloba na ye.

Na ntango wana, na bamboka, bana nyonso bazalaki kotánga esika moko tii na kelasi oyo ekokani na kelasi ya mibale ya C.O. Tozalaki kotambola na mpunda to na makolo bakilomɛtrɛ mingi mpo na kokende kelasi. Mabota nde ezalaki kopesa balakisi bilei mpe esika ya kofanda. Mbula moko boye, baboti na biso nde basengelaki kopesa molakisi ya sika, John Didur, esika ya kofanda.

Nzokande, elenge mobali yango azalaki mpe kosepela na Liloba ya Nzambe. Mokolo moko boye, nazalaki kokumisa makanisi ya bakoministe mpe basosialiste, oyo tata na ngai azalaki kosepela na yango na ntango wana. John alobaki na ngai na malɛmbɛ ete: “Moto moko te azali na lotomo ya koyangela baninga na ye bato. Kaka Nzambe nde azali na lotomo ya koyangela bato.” Na nsima, tosololaki na ye makambo mingi na mabaku mosusu.

Lokola John abotamaki na 1931, ayebaki masolo oyo ezalaki kolobela mpasi oyo bato bayokaki na ntango ya bitumba. Ntango Etumba ya Corée ebandaki na 1950, atunaki bapastɛrɛ mingi soki ezali mabe te mokristo akɔta na etumba. Bango nyonso balobaki ete ezali mabe te. Na nsima, atunaki mpe Batatoli ya Yehova motuna yango. Batatoli bamonisaki ye na Biblia ndenge oyo bakristo ya liboso bazalaki kotalela bitumba. Na 1955, John azwaki batisimo. Na mbula oyo elandaki, ngai mpe nazwaki batisimo. Biso mibale tomonaki ete tolingi kopesa bomoi mpe makasi na biso nyonso mpo na kosalela Yehova. (Nz. 37:3, 4) Na sanza ya Yuli 1957, ngai ná John tobalanaki.

Mbala mingi, liyangani ya etúká na mboka na biso ezalaki kokwea na dati oyo tobalanaki. Ezalaki esengo mingi kozala elongo na ebele ya bato oyo bazalaki komona ete libala ezali eloko ya motuya. Mbala ya liboso tókende na liyangani oyo esangisaki bandeko ya mikili ndenge na ndenge ezalaki na 1958. Tozalaki bato mitano oyo totambolaki na motuka longwa na Saskatchewan tii na engumba New York. Totambolaki pɔsɔ mobimba, mpe butu nyonso, tozalaki kolala na ndako ya kapo. Ntango tokómaki na engumba Bethlehem, na etúká ya Pennsylvanie, ndeko moko apesaki biso esika ya kolala na ndako na bango tii na ntɔngɔ! Yango esalaki ete tókóma na New York na bilamba ya pɛto mpe ya malamu. Liyangani wana monene esalisaki biso tómona ete kosalela Yehova epesaka mpenza esengo! Ndenge mokomi ya nzembo amonisaki yango, ‘makambo oyo epesaka esengo ezali na lobɔkɔ ya mobali ya Yehova mpo na seko.’​—Nz. 16:11.

TOKÓMI BABONGISI-NZELA

Mbula moko na nsima, na 1959, tokómaki babongisi-nzela mpe tozalaki kofanda na mwa ndako moko na likoló ya mwa ngomba moko na etúká ya Saskatchewan. Tozalaki komona bamboka mosusu oyo ezalaki mosika mpenza, mpe misusu kati na yango ezalaki na teritware na biso.

Mokolo moko, tozwaki mokanda oyo eutaki na Betele. Nakendaki mbangu esika John azalaki kobongisa traktɛrɛ. Na mokanda yango, basɛngaki biso tókóma babongisi-nzela monene na engumba Red Lake, na etúká ya Ontario. Lokola toyebaki te soki ezali wapi, tobimisaki bakarte nokinoki mpo na koluka yango.

Kuna, bomoi ekesanaki mingi na bomoi ya ferme! Ezalaki na bazamba minene mpe bingumba mikemike oyo ezalaki pembeni ya bisika oyo bazalaki kotimola wolo. Mokolo ya liboso, tozalaki koluka esika ya kofanda; ntango tozalaki kosolola na mwasi moko, mwana moko ya mwasi ayokaki biso. Akendaki mbangu epai ya mama na ye mpe mama yango apesaki biso esika mpo tólala mokolo yango. Mbeto ezalaki na esika moko ya salite mpenza. Mokolo oyo elandaki, tozwaki esika ya kofutela; ezalaki ndako ya mabaya ya shambrɛ moko, ezalaki na pɔmpi te, eloko mosusu mpe te, kaka esika moko moke ya kopelisa mɔtɔ ya nkoni mpo ndako ezwa molunge. Tosombaki mwa biloko na wenze oyo batɛkaka biloko oyo basalelá mpe eumelaki te, tokómaki na mwa biloko oyo esengeli.

Lisangá ezalaki mosika, na kilomɛtrɛ 209. Bato mingi oyo bazalaki kosala na bisika oyo bazalaki kotimola wolo bautaki na Mpoto, mpe bazalaki kosɛnga biso tólukela bango Biblia na minɔkɔ na bango. Eumelaki te, tokómaki koyekola Biblia na bato 30. Sanza motoba na nsima, mwa lisangá efungwamaki na esika yango.

Mobali ya mwasi moko oyo tozalaki koyekola na ye abengaki sango na bango na telefone aya kosalisa mwasi na ye mpo amonaki ete akómi kobunga nzela. Ntango sango yango ayaki, alobaki ete esengeli mpe tóteyaka bato Bosato. Mwasi wana azwaki Biblia na ye oyo ezalaki libongoli ya Katolike mpe asɛngaki sango amonisa soki makambo oyo alobi ezali na Biblia. Sango abwakaki Biblia yango na mesa, mpe alobaki ete azali na eloko ya komonisa te. Ntango azalaki kobima, alobaki na monɔkɔ ya Ukrainien ete bábengana biso na ndako mpe báyamba biso lisusu te. Ayebaki te ete John ayokaka monɔkɔ ya Ukrainien!

Mwa moke na nsima, tolongwaki na Red Lake mpo John asengelaki kozwa formasyo mpo na kokóma mokɛngɛli ya zongazonga. Mbula soki moko na nsima, ntango John azalaki kosala diskur ya batisimo na liyangani moko ya etúká, amonaki mobali wana na kati ya bato oyo bakozwa batisimo! Likambo oyo sango asalaki mokolo oyo ayaki na ndako na bango etindaki ye aluka koyeba makambo oyo Biblia eteyaka.

NA MOSALA YA ZONGAZONGA

Mosala ya zongazonga epesaki biso libaku ya kolala na bandako ya bandeko ndenge na ndenge. Tokómaki mpenza baninga ná bandeko oyo bazalaki kopesa biso bisika ya kolala. Na libaku moko tozalaki kolala na shambrɛ moko na likoló; shambrɛ yango ezalaki na eloko moko te oyo epesaka molunge na eleko ya malili. Na ntɔngɔntɔngɔ, tozalaki koyoka ndeko mwasi ya mobange akɔti na malɛmbɛ na shambrɛ na biso mpo na kopelisa mɔtɔ na mbambola moko ya moke. Na nsima, azalaki koya na saani ya monene ná mai ya mɔtɔ mpo tósukola liboso tóbima. Ndenge oyo azalaki kosala makambo malɛmbɛ mpe na boboto eteyaki ngai mingi.

Mosala ya zongazonga esalisaki ngai nakóma lisusu penepene na Yehova. Ndeko mwasi moko azalaki kofanda na mboka moko na nɔrdi mpenza ya etúká ya Alberta, epai bazalaki kotimola mabanga ya ntalo mpe mboka yango ezalaki na kati ya zongazonga na biso. Ndenge nini lisangá ya Yehova ezalaki kotalela ndeko yango oyo azalaki kofanda na mboka oyo azalaki kaka ye moko Motatoli? Nsima ya sanza motoba nyonso, tozalaki kokende kolekisa pɔsɔ mobimba kuna mpo na kosakola mpe kosala makita elongo na ye, kaka ndenge tozalaki kosala na masangá na bingumba minene. Yango ezalaki kosalisa ngai nabosana te ete Yehova alɛngɛlaka mpate na ye mokomoko.

Tokobaki kotindelana mikanda na bandeko mingi oyo bazalaki koyamba biso na bandako na bango. Yango etindi ngai nakanisa moko ya bakado ya liboso oyo John apesaki ngai: kartɔ moko kitoko oyo ezalaki na bapapye ya kokoma mikanda. Tozalaki kokomela baninga na biso mikanda na bapapye wana. Nabombaka kartɔ yango tii lelo.

Ntango tozalaki na zongazonga moko na Toronto, ndeko moko na Betele ya Canada abengaki biso na telefone mpo na kotuna soki tokosepela kosala na Betele. Totunaki ye soki esengelaki tópesa eyano mokolo nini, mpe alobaki ete lobi! Tondimaki kokende.

MOSALA YA BETELE

Mbala nyonso oyo tozwi mokumba ya sika, tozalaki komona makambo ndenge na ndenge ya esengo oyo eutaka na lobɔkɔ ya Yehova. Ezalaki mpe bongo ntango tokɔtaki Betele na 1977. Kofanda esika moko ná bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo esalisaki biso tómona bizaleli ya mokomoko na bango mpe ndenge bazwaka Liloba ya Nzambe na motuya.

Tosepelaki na bomoi ya Betele. Na ndakisa, tokómaki kotya bilamba na armware na esika ezala na valize, mpe tokómaki na lisangá moko. Longola mosala oyo bapesaki ngai na Betele, nazalaki kosepela mingi soki basɛngi ngai natambwisa bato oyo bayei kotala Betele. Nazalaki kolimbwela bango misala oyo esalemaka na Betele, nazalaki koyoka bango, mpe nazalaki kopesa biyano na mituna na bango.

Bambula elekaki nokinoki, mpe na 1997, babengaki John akɔta Eteyelo mpo na bandeko ya Bakomite ya filiale na Patterson, na etúká ya New York. Na nsima, basɛngaki biso tókende na Ukraine. Balendisaki biso tókanisa malamu mpe tóbondela mpo na yango. Na mpokwa ya mokolo yango, tozwaki ekateli ete tokondima kokende na Ukraine.

TOKEI NA UKRAINE

Mwa bambula liboso, na 1992, tozalaki na liyangani oyo esangisaki bandeko ya mikili ndenge na ndenge na Saint-Pétersbourg, na Russie mpe na 1993, na oyo esalemaki na Kiev, na Ukraine. Yango esalaki ete tókóma kosepela mingi na bandeko na biso ya Mpoto ya Ɛsti. Ntango tokómaki na Ukraine, tozalaki kofanda na engumba Lviv, na ndako moko ya kala na etaje ya liboso. Soki totali libándá, tozalaki komona mwa elanga moko moke ya fololo, nsoso mobali moko ya motane, mpe bana ya nsoso. Tozalaki komona yango lokola nde tozali na ferme moko na Saskatchewan. Tozalaki bato 12 na ndako yango. Ntɔngɔ nyonso, tozalaki kozwa motuka mpo na kokende tii na Betele.

Tozalaki komiyoka ndenge nini na Ukraine? Kozala elongo na bandeko mingi oyo bakutanaki na mikakatano lokola komekama, bipekiseli, mpe bolɔkɔ, kasi bazalaki kaka na kondima makasi, emonisaki biso ete tosengeli kozala na komikitisa. Soki topesi bango longonya, bazalaki koloba ete, “Tosalaki yango mpo na Yehova.” Bayokaki ata mbala moko te ete basundolamaki. Ata lelo oyo, soki opesi ndeko moko mersi mpo na likambo moko ya malamu oyo asali, akoki kozongisa ete, “Pesá nde Yehova mersi,” mpo na komonisa ete Yehova nde apesaka biloko nyonso ya malamu.

Na Ukraine, bato mingi bakendaka makita na makolo; na yango bazalaka na libaku ya kosolola mpe kolendisana nzelanzela. Bamosusu batambolaka ngonga moko to mpe koleka. Engumba Lviv ezali na masangá koleka 50, mpe masangá 21 kati na yango esalaka makita na lopango moko oyo ezali na Bandako ya Bokonzi ebele. Mokolo ya lomingo, ezalaka esengo komona bandeko ebele bazali koya na makita.

Toumelaki te komesana na bandeko ya Ukraine, mpo bazalaka na boboto mpe batyelaka basusu likebi. Soki nakangi ntina te ya likambo moko oyo balobi na monɔkɔ na bango, ndenge ezalaka tii lelo, bazalaka motema molai. Bizaleli malamu wana emonanaka ata na bilongi na bango.

Likambo moko oyo emonisi ete bandeko batyelanaka motema esalemaki na liyangani oyo esangisaki bandeko ya mikili ndenge na ndenge na Kiev, na 2003. Ntango tozalaki kokɔta na esika oyo tosengelaki kozwa engbunduka mpo na kokende na liyangani, mwana moko moke ya mwasi apusanaki pembeni na biso mpe alobaki na malɛmbɛ ete, “Nabungi. Nazali komona nkɔkɔ na ngai te.” Mwana yango amonaki bamakarɔ oyo tolataki mpe ayebaki ete tozali Batatoli. Azalaki kobanga te mpe alelaki te. Mwasi ya mokɛngɛli ya zongazonga moko oyo azalaki elongo na biso azwaki ye mpe akendaki na ye na esika oyo batikaka biloko oyo bato babungisi na stade oyo tosalaki liyangani. Mwa moke na nsima, nkɔkɔ na ye ayaki kozwa ye. Komona ndenge mwana wana ya moke atyelaki biso motema, ata na kati ya bato ebele ndenge wana, esimbaki mpenza motema na ngai.

Bandeko ya mikili ndenge na ndenge bayaki na Ukraine na sanza ya Mai 2001 na bofungoli ya bandako ya Betele. Nsima ya diskur oyo esalemaki na stade mokolo ya lomingo na ntɔngɔ, ebele ya bandeko batambolaki makolo tii na Betele mpo na kotala bandako ya sika. Ezalaki esengo komona bato ebele ndenge wana! Komona bandeko yango oyo bazalaki kotambola na kimya mpe na molɔngɔ esimbaki motema na ngai. Esalisaki ngai namona mpenza ete tozwaka makambo mingi ya esengo na mosala ya Nzambe.

MBONGWANA MOKO MONENE

Na 2004, likambo moko ya mawa ekómelaki biso: John abɛlaki kanser. Tozongaki na Canada mpo azwa lisalisi ya monganga. Mbala ya liboso oyo basalisaki ye na mayele oyo babengi chimiothérapie, nzoto na ye ekokaki yango te, mpe alekisaki mwa bapɔsɔ na ndako ya lopitalo oyo kaka minganga bakɔtaka. Na nsima, makanisi na ye ezongaki. Atako azalaki lisusu kokoka koloba te, miso na ye ezalaki ntango nyonso komonisa ete azalaki kosepela ntango bato bazalaki koya kotala ye.

Kasi, abikaki te mpe na mbula yango kaka akufaki. Nayokaki lokola eteni monene ya nzoto na ngai elongwe. Ngai ná John tosepelaki mingi kosalela Yehova elongo. Nazwaki ekateli nini? Nasepelaki kozonga na Ukraine. Nazali na botɔndi mingi mpo na bolingo ya bandeko ya Betele mpe ya lisangá na biso.

Totikalá koyoka mawa ata mokolo moko te mpo na makambo oyo toponaki. Nalekisi bomoi moko ya esengo mpenza ná baninga oyo baleki malamu. Nayebi ete ezali naino na makambo mingi oyo nasengeli koyekola na ntina etali bolamu ya Yehova, mpe nazali na elikya ete nakokoba kosalela ye libela na libela mpo namoni mpenza ‘makambo ya esengo na lobɔkɔ ya mobali ya Yehova.’

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

“Totikalá koyoka mawa ata mokolo moko te mpo na makambo oyo toponaki”

[Elilingi na lokasa 3]

Mokolo ya libala na biso

[Elilingi na lokasa 4]

Ntango nazalaki mobongisi-nzela monene na Red Lake

[Elilingi na lokasa 5]

Ngai ná John, na Ukraine, na 2002