Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mokristo oyo azali na momeseno ya kotala pornografi akoki kobimisama na lisangá mpo momeseno yango ekómi mabe mingi?

▪ Ɛɛ, ekoki kosalema bongo. Yango emonisi ete ezali na ntina tóboya mpenza lolenge nyonso ya pornografi, ezala makambo oyo bakomi to bililingi na bazulunalo, bafilme to na Internet.

Pornografi epalangani na mokili mobimba. Internet esali ete ezala lisusu mpasi te mpo moto amona makambo ya pornografi mpe bato mingi bazali kokwea na motambo yango. Bato mosusu, ezala bilenge to mikóló, batalaki pornografi na Internet kozanga ete bákana yango. Bamosusu batalaka pornografi na mposa na bango moko, babangaka te mpo bayebi ete bakoki kotala yango ntango bazali bango moko na ndako to na mosala. Mpo na nini bakristo basengeli kozwa likambo yango na lisɛki te?

Ntina ya libosoliboso emonisami na likebisi oyo Yesu apesaki ete: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.” (Mat. 5:28) Mpo na bato oyo babalani, kosangisa nzoto ezali lisumu te mpe ezali likambo ya esengo. (Mas. 5:15-19; 1 Ko. 7:2-5) Kasi pornografi esalemaka na mokano wana te. Pornografi elakisaka makambo ya kosangisa nzoto oyo ebongi te mpe elamusaka bamposa ya mabe oyo Yesu akebisaki biso na yango. Na maloba mosusu, soki moto azali kotala pornografi, azali kobuka mobeko ya Nzambe oyo elobi ete: “Bóboma binama ya nzoto na bino ya mabele na likambo ya pite, mbindo, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo eyokisaka mpasi, mpe bilulela, oyo ezali losambo ya bikeko.”​—Kol. 3:5.

Ezali boni soki mokristo atalaki pornografi na libaku moko to mibale? Tokoki kokokanisa likambo na ye na likambo oyo ekómelaki mokomi ya nzembo Asafe: “Makolo na ngai ezalaki pene ya kolongwa na nzela, matambe na ngai etikalaki moke esɛlimwa.” Mokristo akoki kozala na lisosoli ya malamu te mpe na boyokani malamu te na Nzambe soki atalaki bililingi ya mobali to basi oyo bazali bolumbu to ya bato bazali kosangisa nzoto! Asafe mpe azalaki na kimya te; alobaki boye: “Nakómaki konyokwama mokolo mobimba, mpe ntɔngɔ nyonso nazali kosembolama.”​—Nz. 73:2, 14.

Mokristo oyo akwei na mabe ya ndenge wana asengeli kotika yango nokinoki mpe koluka lisalisi na elimo. Akoki kozwa lisalisi yango na lisangá: “Ata soki moto abɛti libaku liboso ayeba yango, bino baoyo bozali na makoki ya elimo bómeka kosembola moto yango na elimo ya boboto, na ntango yango yo moko mpe omitalaka.” (Gal. 6:1) Nkulutu moko to bankulutu mibale bakoki kosolola na ye mpo na kopesa ye batoli oyo ebongi, mpe kosala ‘mabondeli ya kondima oyo ekoki kobikisa moto oyo azali kobɛla, mpe lisumu na ye ekolimbisama.’ (Yak. 5:13-15) Bandeko oyo balukaki lisalisi mpo na kotika momeseno mabe ya kotala pornografi bamonaki ete kopusana penepene na Nzambe ezalaki malamu mpo na bango, ndenge kaka ezalaki mpo na Asafe.​—Nz. 73:28.

Nzokande, ntoma Paulo alobaki ete bato mosusu oyo basalaki masumu babongolaki motema te “na mbindo na bango mpe pite mpe etamboli ya nsɔni.” a (2 Ko. 12:21) Profesɛrɛ Marvin Vincent akomaki ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mbindo,” ezali na “likanisi ya mabe na ndenge ya salite.” Pornografi mosusu ezalaka na makambo ya mabe koleka, ezalaka te kaka bililingi ya basi oyo bazali bolumbu to mwasi ná mobali bazali kosangisa nzoto. Pornografi mosusu ezalaka nsɔmɔ mpenza, elakisaka makambo lokola kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, kosangisa nzoto bato ebele esika moko, kosangisa nzoto na nyama, kosangisa nzoto na mwana moke, bato ebele bazali kosangisa nzoto na makasi na mwasi moko, kobɛta basi, kokanga bango nsinga, to konyokola bango. Paulo alobelaki bato mosusu ya ntango na ye oyo bazalaki “na molili na makanisi” oyo ‘babungisaki bizaleli nyonso ya malamu mpe bamipesaki na etamboli ya nsɔni mpo na kosala mbindo ya ndenge nyonso na lokoso.’​—Ef. 4:18, 19.

Paulo alobelaki mpe “mbindo” na Bagalatia 5:19. Moto moko ya Angleterre oyo azali molimboli ya maloba ya Biblia alobaki ete mbindo “na esika oyo ekoki [kolimbola] mpenzampenza mposa nyonso ya kosangisa nzoto na ndenge ya bonyama.” Mokristo nini akoboya ete pornografi ya mabe mingi oyo touti kolobela ezali “mposa ya kosangisa nzoto na ndenge ya bonyama” mpe ezali mpenza salite? Na Bagalatia 5:19-21, Paulo asukisaki na koloba ete “baoyo basalaka makambo ya [mbindo] ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” Yango wana, soki moto moko akómi na momeseno ya kotala pornografi ya mabe, ya salite, mbala mosusu ekómá momeseno na ye, mpe aboyi kobongola motema mpe kobongwana, akoki kotikala na lisangá ya bokristo te. Akobimisama mpo na kobatela bopɛto mpe elimo malamu ya lisangá.​—1 Ko. 5:5, 11.

Likambo ya malamu ezali ete bato mosusu oyo bazalaki kotala pornografi ya mabe mingi basololaki na bankulutu mpe bazwaki lisalisi oyo ebongi mpo na kobongwana mpenza. Na ntango ya kala, Yesu alobaki na bakristo ya lisangá ya Sarde ete: “Lendisá biloko oyo etikali oyo ekómaki pene ya kokufa, . . . kanisá ntango nyonso ndenge ozwi mpe ndenge oyoki, mpe kobá kobatela yango, mpe bongolá motema. Ya solo soki olamuki te, . . . okoyeba ata moke te ngonga oyo nakobimela yo.” (Em. 3:2, 3) Moto akoki kobongwana mpe na ndenge ya elilingi, kolongolama na mɔtɔ.​—Yuda 22, 23.

Kasi, eleki malamu ete mokomoko na biso azwa ekateli makasi ya kobwaka ata liso moke te na makambo wana ya mabe. Tosengeli mpenza kozala na ekateli ya koboya lolenge nyonso ya pornografi!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba bokeseni kati na ‘mbindo mpe pite mpe etamboli ya nsɔni,’ talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 2006, nkasa 29-31.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]

Mokristo oyo akwei na mabe asengeli kotika yango nokinoki mpe koluka lisalisi na elimo