Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini opesaka toli?

Ndenge nini opesaka toli?

Ndenge nini opesaka toli?

Moto moko asilá kotuna yo toli? Na ndakisa, basilá kotuna yo mituna lokola oyo: ‘Nasala nini? Nakende na fɛti yango to te? Nandima mosala yango? Nandima moto yango mpo na libala?’

Moto mosusu akoki kotuna yo toli mpo na ekateli moko oyo alingi kozwa, ekateli oyo ekoki kobongisa to kobebisa boyokani na ye ná baninga na ye, ná libota na ye, ata mpe ná Yehova. Okotalela nini mpo na kopesa ye toli? Osalaka ndenge nini mpo na kopesa moto toli? Ezala na makambo mikemike to makambo minene, Masese 15:28 elobi ete “motema ya moyengebene emanyolaka mpo na koyanola.” Talelá ndenge oyo mitinda mitano ya Biblia oyo elandi ekoki kosalisa mpo na kopesa toli.

1 Luká koyeba likambo malamumalamu.

“Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba mpo na ye mpe kosambwa.”​—MAS. 18:13.

Mpo na kopesa toli ya malamu, tosengeli koyeba makanisi mpe mwa makambo mosusu ya moto oyo atuni toli. Tópesa ndakisa: Soki moto moko abengi yo na telefone mpe atuni nzela ya malamu mpo akóma na ndako na yo, okoluka koyeba nini mpo osalisa ye? Okoki nde kolakisa ye nzela ya malamu soki oyebi te esika oyo azali ntango abengi? Te! Ndenge moko mpe, mpo na kopesa moto toli ya malamu esengeli koyeba “esika” oyo azali sikoyo, elingi koloba makanisi na ye mpe makambo na ye mosusu. Tosengeli koyeba soki ezali na makambo mosusu oyo tosengeli kotalela mpo na kopesa toli. Soki toyebi malamu te makambo ya moto, tokoki kopesa ye toli oyo ekotya ye lisusu na mobulu koleka.​—Luka 6:39.

Yebá makanisi oyo azwi liboso atuna yo. Ekoki mpe kozala malamu kotuna moto oyo ayei koluka toli mituna lokola oyo: “Mitinda nini ya Biblia okanisi ete etali likambo yango?” “Soki oponi kosala boye to boye, wapi matomba to mabe na yango?” “Yo moko naino ozwi makanisi nini?” “Lisalisi nini bato mosusu, na ndakisa bankulutu, baboti na yo, to ndeko oyo ayekolaka na yo Biblia, apesi yo?”

Biyano na mituna wana ekoki kosalisa yo oyeba milende oyo moto asali mpo na kozwa eyano. Okoki mpe kotalela makambo oyo bato mosusu balobaki na ye. Okoki mpe komona soki moto azali koluka mopesi-toli oyo akoloba na ye ‘makambo oyo matoi na ye elingi koyoka.’​—2 Tim. 4:3.

2 Kowela kopesa eyano te.

“Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te.”​—YAK. 1:19.

Tokoki kowela kopesa moto eyano mpo tokanisi ete ekosalisa ye. Nzokande, mbala mingi yango ezalaka malamu te, mingimingi soki tozali kolobela likambo oyo toluki mpenza makanisi na mikanda te. Masese 29:20 elobi boye: “Omoni moto oyo azali kobimisa maloba na ye mbangumbangu? Elikya ezali mingi mpo na moto oyo azali zoba koleka mpo na ye.”

Zwá ntango ya kotalela soki makanisi na yo eyokani na bwanya ya Nzambe. Omituna boye, ‘Makanisi na ngai ekómi kolanda “elimo ya mokili” mpe makanisi na yango?’ (1 Ko. 2:12, 13) Kobosana te ete kopesa toli esɛngaka kaka te kozala na makanisi ya malamu. Nsima ya koyoka likambo ya mpasi oyo Yesu asengelaki kokutana na yango, ntoma Petro apesaki ye toli ete: “Komitungisa te, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” Likambo oyo Petro asalaki ezali koteya biso nini? Ezali komonisa ete ata soki moto azali koloba na bosembo, akoki kobimisa “makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.” (Mat. 16:21-23) Yango wana, ezali na ntina mingi kokanisa liboso ya koloba! Kutu, moto azali na boyebi moke mpenza soki tokokanisi yango na bwanya ya Nzambe.​—Yobo 38:1-4; Mas. 11:2.

3 Zalá na komikitisa, salelá Liloba ya Nzambe.

“Nasalaka eloko moko te na likanisi na ngai moko; kasi kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba makambo oyo.”​—YOA. 8:28.

Okoloba na moto mbala moko ete, “Soki ezalaki ngai, nalingaki . . .”? Ata soki eyano na motuna ya moto ezali polele, ekoleka malamu olanda ndakisa ya komikitisa oyo Yesu apesaki. Azalaki na bwanya mpe na mayele mingi koleka moto mosusu nyonso; kasi, alobaki boye: “Nalobaki na ndenge na ngai moko te, kasi Tata moto . . . apesaki ngai mitindo mpo na makambo nasengeli koyebisa mpe oyo nasengeli koloba.” (Yoa. 12:49, 50) Yesu azalaki ntango nyonso koteya makambo mpe kopesa toli oyo eyokani na mokano ya Tata na ye.

Na ndakisa, Luka 22:49 emonisi ete ntango bayaki kokanga Yesu, bayekoli na ye batunaki ye soki basengeli kobunda. Moyekoli moko abɛtaki moto mopanga. Matai 26:52-54 emonisi ete ata na esika wana, Yesu azwaki ntango ya kosalisa moyekoli yango ayeba mokano ya Yehova. Lokola Yesu ayebaki likanisi oyo ezali na Ebandeli 9:6 mpe bisakweli ya Nzembo 22 mpe Yisaya 53, apesaki toli oyo ebikisaki bomoi ya bato mpe esepelisaki Yehova.

4 Salelá mikanda ya moombo ya sembo.

“Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye abatela basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi?”​—MAT. 24:45.

Yesu atyaki moombo moko ya sembo oyo apesaka biso bilei ya elimo. Ntango olingi kopesa toli mpe malako na makambo ya ntina, ozwaka ntango ya koluka makanisi na mikanda ya moombo ya sembo?

Tokoki kozwa makanisi ebele na Index mpe na Watchtower Library. a Tokosala libunga monene soki tosaleli yango te mpo na kozwa makanisi oyo tokoki kopesa moto. Ezali na mitó ya makambo mpe masolo ebele oyo ekoki kosalisa moto oyo azali na mposa ya toli. Oyebaka mpenza kosalisa basusu báluka mitinda ya Biblia mpe bátalela makanisi ya Liloba ya Nzambe? Ndenge kaka karte ekoki kosalisa moto ayeba nzela oyo akolanda, Index mpe Watchtower Library ekoki kosalisa moto azwa bikateli oyo ekosalisa ye atikala na nzela ya bomoi.

Bankulutu mingi basalisaka basakoli báyeba kosalela Index to Watchtower Library mpo na koluka masolo na mikanda, mpe na ndenge yango báyeba kosalela makanisi ya Biblia. Lisalisi yango epesaka basakoli nzela ya kozwa eyano na motuna oyo bamituni, kasi esalisaka bango mpe bákóma na momeseno ya koluka na mikanda mpe kotyela bibongiseli ya Yehova motema. Na ndenge yango, ‘makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesanaka kokesenisa ná mabe ná malamu.’​—Ebr. 5:14.

5 Kozwa ekateli na esika ya moto te.

“Moto na moto akomema mokumba na ye moko.”​—GAL. 6:5.

Nsukansuka, moto na moto asengeli kopona toli mpe makanisi oyo akolanda. Yehova atikeli biso nyonso bonsomi ya kopona soki tokolanda mitinda na ye to te. (Mib. 30:19, 20) Na makambo mosusu esɛngaka kotalela mitinda ndenge na ndenge, mpe na nsuka, moto oyo azali koluka toli asengeli kozwa ekateli na ye. Na kotalela ndenge likambo ezali to soki moto oyo aluki toli azali mokóló to mwana moke, tokoki mpe komituna boye: ‘Ebongi mpenza ngai nde napesa ye toli na likambo oyo?’ Makambo mosusu ebongaka ete bankulutu nde bátalela yango, to soki ezali mwana moke, baboti na ye nde bátalela yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lelo oyo, CD-Rom Watchtower Library ezali na minɔkɔ 39. Index des publications Watch Tower ezali na minɔkɔ koleka 45.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 8]

Makanisi mpo na Losambo na kati ya libota

Na boyekoli na bino, bokoki koluka biyano na mituna oyo batunaki bino mikolo oyo. Masolo nini mpe mitinda nini ya Biblia bokoki koluka mpo na kosalisa moto oyo atunaki yango? Na ndakisa, kanisá ete ndeko mwasi to ndeko mobali moko atuni yo mituna mpo azali na makanisi ya kobala. Soki ozwi Index to ofungoli Watchtower Library, luká liboso motó ya likambo yango. Na ndakisa, na Index okoki koluka na motó ya likambo “Fréquentations” to “Mariage.” Na nsima, okoki kotala na mitó ya makambo mike mpo ozwa masolo oyo elobeli mpenza likambo oyo ozali koluka. Ntango omoni motó ya likambo moko, talá soki na nse na yango ezali na maloba “Voir aussi,” oyo ekoki komema yo na motó ya likambo mosusu oyo elobeli mpenza likambo oyo ozali koluka.

[Etanda na lokasa 9]

Bibongiseli oyo Yehova atye na lisangá na ye ezali kopesa biso likoki ya kozwa to mpe kopesa batoli oyo eleki malamu mpenza. Mosakoli 12:11 elobi boye: “Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola nsɔngɛ ya mangenda ya kotambwisa bangɔmbɛ, mpe baoyo bamipesi na kosangisa maloba ya mayele bazali lokola nsɛtɛ oyo ekɔtisami makasi; mobateli se moko ya mpate nde apesi yango.” Toli ya malamu oyo epesami na bolingo ezali lokola “nsɔngɛ ya mangenda ya kotambwisa bangɔmbɛ,” elakisaka bato ya sembo nzela ya malamu. “Nsɛtɛ oyo ekɔtisami makasi” na eloko esalisaka yango epikama. Ndenge moko mpe, toli ya malamu ekoki kobongisa moto. Bato ya bwanya ‘bamipesaka,’ to basepelaka mpenza na “kosangisa maloba ya mayele” oyo emonisaka bwanya ya Yehova, “mobateli se moko ya mpate.”

Ntango ozali kopesa toli, landáká makanisi ya Mobateli ya mpate. Ezali mpenza esengo koyoka moto mpe kopesa ye toli oyo ekosalisa ye ntango tozwi libaku ya kosala yango! Soki toli na biso eyokani mpenza na mitinda ya Biblia, ekozala toli malamu mpe ekoki kopesa moto oyo ayoki yango bolamu ya seko.