Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Okosepela kokanga biso fɔtɔ?”

“Okosepela kokanga biso fɔtɔ?”

“Okosepela kokanga biso fɔtɔ?”

Na mpokwa ya mokolo ya pɔsɔ, nsima ya liyangani ya etúká na engumba Querétaro, Josué, ndeko moko oyo asalaka na Betele ya Mexique, abimaki mpo na kotambola mwa moke. Javier ná mwasi na ye Maru, baturiste oyo bautaki na ekólo Colombie, basɛngaki Josué akanga bango fɔtɔ. Lokola Josué ná Batatoli mosusu oyo azalaki na bango balataki malamu mpe bazalaki na bamakarɔ na bango ya liyangani, baturiste yango batunaki bango soki bauti fɛti moko boye. Josué ayebisaki bango ete bazali na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova mpe abengisaki bango na liyangani mokolo ya lomingo.

Baturiste yango balobaki ete bakoyoka nsɔni mpo bazali na bilamba oyo ebongi te mpo na kokende na likita ya ndenge wana. Atako bongo, Josué apesaki bango nkombo na ye mpe nimero ya telefone ya biro ya filiale epai asalaka.

Nsima ya sanza minei, Javier abengaki Josué na telefone. Ayebisaki ye ete bakendaki na liyangani yango mpe ntango abengaki ye, bazalaki na engumba Mexico mpe bazalaki na mposa ete Batatoli ya Yehova bákende kotala bango. Eumelaki te, Javier ná Maru bakómaki koyekola Biblia mpe babandaki mbala moko koyangana na makita. Sanza zomi na nsima, bakómaki basakoli. Atako na nsima bakómaki kofanda na engumba Toronto, na Canada, bakobaki kokola na elimo mpe bazwaki batisimo.

Na nsima, Javier akomelaki Josué mokanda mpo na koyebisa ye nini etindaki ye andima solo. Alobaki boye: “Liboso tókende na liyangani wana, ngai ná mwasi na ngai tolobaki ete tozali na mposa ya lisalisi ya Nzambe. Ntango tomonaki bino bolati malamu, tolobaki ete likita oyo boutaki ezalaki mpenza ya ntina mingi. Na liyangani, tosepelaki mingi ndenge bayambaki biso malamu mpe bapesaki biso bisika ya kofanda, ndenge basalisaki biso tólandaka bavɛrsɛ na Biblia, mpe na bizaleli malamu ya bayangani. Bamitungisaki te ndenge tolataki lokola baturiste.”

Josué amonaki mpenza ete Mokonzi Salomo alobaki solo ntango akomaki boye: “Na ntɔngɔ, loná mboto na yo mpe tii na mpokwa kopemisa lobɔkɔ na yo te; mpo oyebi te epai wapi yango ekolonga, ezala awa to kuna, to soki yango nyonso mibale ekozala malamu.” (Mos. 11:6) Okoki kolona mboto soki obengisi bato na liyangani moko to na diskur moko. Mbala mosusu Yehova akosalela yo mpo na kobenda bato oyo bazali na mposa ya lisalisi na Ye, lokola Javier ná Maru.​—Yis. 55:1.

[Elilingi na lokasa 32]

Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Alejandro Voeguelin, Maru Pineda, Alejandro Pineda, Javier Pineda, mpe Josué Ramírez na Betele ya Mexique