Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tósalisa bato ‘bálamuka na mpɔngi’

Tósalisa bato ‘bálamuka na mpɔngi’

Tósalisa bato ‘bálamuka na mpɔngi’

“Boyebi eleko oyo: ngonga na bino ya kolamuka na mpɔngi ekoki.”​—ROM. 13:11.

OKOKI KOLIMBOLA?

Mpo na nini ezali na ntina mingi bakristo bálala mpɔngi te na elimo?

Mpo na nini basakoli oyo balali mpɔngi te basengeli koyeba kosalela miso mpe koyokaka malamu?

Ndenge nini kozala na boboto esalisaka biso tósakola malamu?

1, 2. Bato mingi basengeli kolamuka na mpɔngi ya ndenge nini?

 MBULA na mbula, bato ebele bakufaka mpo mpɔngi eyibaka bango to mpe balalaka ntango bazali kotambwisa motuka. Bato mosusu balongolaka bango na mosala mpo bakokaka kolamuka na ngonga ya malamu te mpo na kokende mosala to mpe mpo balalaka na ngonga ya mosala. Nzokande, mpɔngi ya elimo ekoki komema makama minene koleka. Yango wana Biblia elobi ete: “Esengo na moto oyo alali mpɔngi te.”​—Em. 16:14-16.

2 Wana mokolo monene ya Yehova ezali kokóma pene, bato mingi bazali kolala mpɔngi na elimo. Kutu, bakonzi mosusu ya mangomba ya bokristo balobi ete bandimi na bango bazali kolala mpɔngi. Mpɔngi ya elimo ezali nini? Mpo na nini ezali na ntina mingi bakristo ya solo bálala mpɔngi te? Ndenge nini tokoki kosalisa bato mosusu bálamuka na mpɔngi ya elimo?

MPƆNGI YA ELIMO EZALI NINI?

3. Moto oyo alali mpɔngi na elimo azalaka ndenge nini?

3 Ntango moto alali mpɔngi, asalaka mosala te. Nzokande, mbala mingi bato oyo balali mpɔngi na elimo basalaka mingi, kasi makambo ya elimo te. Ekoki kozala ete bamipesi mobimba na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo to mpe na koluka bisengo, lokumu, to bozwi. Lokola bamizindisi na makambo yango, bakipaka mpenza bamposa na bango ya elimo te. Kasi, bato oyo balali mpɔngi te na elimo bayebi ete tozali “na mikolo ya nsuka”; yango wana bamipesi na kosala mokano ya Nzambe.​—2 Pe. 3:3, 4; Luka 21:34-36.

4. Toli oyo elobi ete “tólala mpɔngi te lokola bamosusu basalaka” elingi koloba nini?

4 Tángá 1 Batesaloniki 5:4-8. Na vɛrsɛ yango, ntoma Paulo alendisaki baninga na ye bakristo ‘bálala mpɔngi te lokola bamosusu basalaka.’ Maloba na ye elimboli nini? Tokoki ‘kolala mpɔngi’ na ndakisa soki tozali kotosa mibeko ya Yehova te. Tokoki mpe ‘kolala mpɔngi’ soki tozali kobosana ete etikali moke Yehova aboma bato mabe. Tosengeli koboya ete bato mabe yango bábenda biso mpo tókóma na bizaleli mpe makanisi na bango.

5. Bato oyo balali mpɔngi na elimo bamonisaka bizaleli nini?

5 Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe akosambisa bango te mpo na makambo oyo bazali kosala. (Nz. 53:1) Bamosusu bakanisaka ete Nzambe akipaka biso te, yango wana biso mpe tosengeli kokipe ye te. Ezali mpe na baoyo bakanisaka ete kozala mondimi ya lingomba moko boye ekokómisa bango baninga ya Nzambe. Bato yango nyonso balali mpɔngi na elimo. Esengeli ete bálamuka na mpɔngi. Ndenge nini tokoki kosalisa bango?

ESENGELI BISO MOKO TÓLALA MPƆNGI TE

6. Mpo na nini bakristo basengeli kosala makasi ete bálala mpɔngi te na elimo?

6 Mpo tókoka kolamwisa bato mosusu, biso moko tosengeli kozala na kati ya mpɔngi te. Yango elingi koloba nini? Liloba ya Nzambe emonisi ete bato oyo balali mpɔngi na elimo bamipesaka na “misala ya molili,” na ndakisa bafɛti ya lokoso, milangwa, misala mabe ya kosangisa nzoto, etamboli ya nsɔni, koswana, mpe zuwa. (Tángá Baroma 13:11-14.) Koboya makambo wana ekoki kozala mokakatano. Ezali na ntina mingi tózala ekɛngɛ. Moto oyo azali kotambwisa motuka asengeli kobosana te ete soki alali mpɔngi, akoki kotya bomoi na ye na likama. Ezali na ntina mingi mokristo abosana te ete mpɔngi ya elimo ekoki koboma!

7. Nini ekoki kokómela biso soki tokómi kokanisa ete moto moko te ya teritware na biso akoyoka lisusu nsango malamu?

7 Na ndakisa, mokristo akoki kokanisa ete moto moko te ya teritware na ye akondima lisusu nsango malamu. (Mas. 6:10, 11) Akoki kokanisa boye: ‘Soki moto moko te akoyoka, mpo na nini naboma nzoto na koluka koyebisa bato nsango malamu?’ Ya solo, ekoki kozala ete bato mingi bazali kolala mpɔngi na elimo sikoyo, kasi makambo mosusu ya bomoi na bango mpe makanisi na bango ekoki kobongwana. Basusu kati na bango balamukaka na mpɔngi mpe bandimaka nsango malamu. Tokoki kosalisa bango soki biso moko tolali mpɔngi te, na ndakisa soki tozali komeka mayele mosusu oyo ekobenda bango báyoka nsango ya Bokonzi. Mpo tólala mpɔngi te na elimo, tosengeli kobosana te mpo na nini mosala ya kosakola ezali na ntina mingi.

MPO NA NINI MOSALA YA KOSAKOLA EZALI NA NTINA MINGI?

8. Mpo na nini mosala ya kosakola ezali na ntina mingi?

8 Tosengeli koyeba ete ezala bato bandimi nsango malamu to te, mosala ya kosakola ekumisaka Yehova mpe ezali na ntina mingi na kokokisama ya mokano na ye. Mosika te, Nzambe akopesa etumbu na bato oyo batosaka nsango malamu te. Nzambe akosambisa bato na kotalela ndenge oyo bazali koyamba nsango na biso. (2 Tes. 1:8, 9) Longola yango, mokristo akosala libunga soki azali kokanisa ete ezali na ntina te aboma nzoto na mosala ya kosakola mpamba te “lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Mis. 24:15) Liloba ya Nzambe emonisi biso ete bato oyo Nzambe akobenga “bantaba” “bakokufa liwa ya seko.” Mosala ya kosakola emonisaka motema mawa ya Nzambe mpamba te ezali kopesa bato libaku ya kobongwana mpe ya kozwa “bomoi ya seko.” (Mat. 25:32, 41, 46; Rom. 10:13-15) Soki tozali kosakola te, ndenge nini bato bakoyoka nsango oyo ekoki kopesa bango bomoi?

9. Ndenge nini kosakola nsango malamu ememelaka yo moko mpe bato mosusu matomba?

9 Kosakola nsango malamu ememelaka mpe biso moko matomba. (Tángá 1 Timote 4:16.) Yo moko omonaka te ete koteya bato makambo ya Yehova mpe Bokonzi na ye ekómisaka kondima na yo mpe bolingo na yo mpo na Nzambe makasi? Omonaka te ete esalisaka yo olona bizaleli malamu ya bokristo? Omonaka te ete kobima na mosala ya kosakola mpo na komonisa ete omipesi na Nzambe ebakiselaka yo esengo? Bandeko mingi oyo bazwaki libaku ya koteya bato mosusu solo bamonaki ndenge oyo elimo ya Nzambe esalisaki bato yango bákóma na bomoi ya malamu koleka.

TÓYEBA KOSALELA MISO

10, 11. (a) Ndenge nini Yesu mpe Paulo bamonisaki ete bayebaki kosalela miso? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo kosalela miso ekoki kosalisa biso mingi na mosala ya kosakola.

10 Tokoki kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na kosalisa bato báyoka nsango oyo tomemeli bango. Yango wana, basakoli ya Bokonzi basengeli koyeba kosalela miso. Yesu apesaki biso ndakisa na likambo yango. Lokola azalaki moto ya kokoka, amonaki ete Mofarisai moko asiliki na nse ya motema; amonaki ete mwasi moko ya masumu abongoli mpenza motema; mpe ete mwasi moko oyo mobali akufá azalaki mpenza na elimo ya komipimela. (Luka 7:37-50; 21:1-4) Yesu akokisaki bamposa ya elimo ya mokomoko ya bato yango. Nzokande, esengeli kaka te ete mosaleli nyonso ya Nzambe azala moto ya kokoka mpo ayeba kosalela miso. Ndakisa ya ntoma Paulo emonisi yango. Azalaki koyebisa bato nsango malamu na ndenge oyo ekosepelisa bango na kotalela mimeseno mpe makanisi na bango.​—Mis. 17:22, 23, 34; 1 Ko. 9:19-23.

11 Soki na ndakisa ya Yesu mpe Paulo tozali kosala makasi tósalela miso, tokomona ndenge malamu ya kobenda likebi ya bato oyo tokutanaka na bango. Na ndakisa, ntango olingi kosolola na moto, luká bilembo oyo ekomonisa yo makambo oyo asalaka, oyo asepelaka na yango, soki abalá to te mpe soki azali na bana to te. Mbala mosusu okoki komona soki azali kosala nini na ngonga yango mpe kolobela yango mwa moke ntango obandi lisolo.

12. Ntango tozali kosakola, mpo na nini tosengeli kokeba na masolo oyo tokobɛta nzelanzela?

12 Moto oyo alingi kosalela malamu miso na ye asalaka makasi ete makambo mosusu ebenda likebi na ye te. Ntango tozali kosakola, tokoki kolendisana ná ndeko oyo tobimi na ye soki tozali kosolola. Kasi, tosengeli kobosana te ete tobimi libosoliboso mpo na koyebisa bato mosusu nsango malamu. (Mos. 3:1, 7) Yango wana, tosengeli kokeba ete masolo oyo tozali kobɛta nzelanzela ebosanisa biso te ete tozali na mosala. Kolobela makambo oyo tokoki koyebisa bato oyo bakoyamba biso ezali ndenge malamu ya kotya makanisi na biso nyonso na mosala yango. Longola yango, atako telefone ya mabɔkɔ ekoki ntango mosusu kosalisa biso tósala malamu mosala na biso, tosengeli kokanisa mwa makambo oyo tokoki kosala mpo telefone ekata te lisolo na biso ná moto oyo ayambi biso.

TÓYOKAKA MALAMU

13, 14. (a) Ndenge nini tokoki koyeba makambo oyo moto asepelaka na yango? (b) Nini ekoki kopesa bato mposa ya koyoka makambo ya Nzambe?

13 Basakoli oyo balali mpɔngi te bayokaka malamu moto oyo bazali kosolola na ye na mosala ya kosakola. Mituna nini okoki kotuna mpo moto oyo okutani na ye abimisa makanisi na ye? Ekoki kozala ete azali komituna mpo na nini mangomba ezali mingi, mpo na nini mobulu ekómi mingi, to mpo na nini baguvɛrnema ezali kokoka makambo te. Ntango mosusu okoki kopesa moto mposa ya koyoka makambo ya Nzambe soki olobeli ndenge ya kokamwa oyo bikelamu ya bomoi esalemá to soki omonisi ete batoli ya Biblia esalisaka mpenza. Bato ya mokili mobimba, ata mpe bato mosusu oyo bandimaka te ete Nzambe azali, balingaka kolobela libondeli. Mingi bamitunaka soki kobondela ezali kobebisa ntango mpamba te. Bamosusu bakoki kofungola matoi mpo na koyoka biso soki tobimisi mituna lokola oyo: Nzambe ayokaka mabondeli nyonso? Soki Nzambe ayokaka mabondeli nyonso te, tosengeli kosala nini mpo ayoka mabondeli na biso?

14 Tokoki koyekola ndenge malamu ya kobanda lisolo soki tozali kotala ndenge basakoli oyo bameseni na mosala basalaka. Taláká ndenge batunaka mituna na ndenge oyo moto akoyoka te lokola nde bazali kosambisa ye to kokɔta na makambo na ye. Ndenge nini mongongo mpe elongi na bango emonisaka ete balingi mpenza koyeba makanisi ya moto oyo bazali kosolola na ye?​—Mas. 15:13.

TÓZALA NA BOBOTO MPE NA MAYELE

15. Mpo na nini tosengeli kozala na boboto ntango tozali koluka koyebisa bato nsango malamu?

15 Oyokaka ndenge nini soki olalaki mpɔngi makasi mpe balamwisi yo na mbalakaka? Bato mingi basepelaka te. Mingi basepelaka bálamusa bango na malɛmbɛ. Ezali mpe bongo mpo na kolamwisa moto na mpɔngi ya elimo. Na ndakisa, mbala mingi ebongaka kosala nini soki moto moko asiliki ntango toyei koteya ye? Ebongaka tómonisa ete tomitye na esika na ye, tósɛnga ye bolimbisi, mpe tótika ye na malɛmbɛ. (Mas. 15:1; 17:14; 2 Tim. 2:24) Kozala na boboto ekoki kotinda moto yango asilika te soki mokolo mosusu Batatoli bayei lisusu koteya ye.

16, 17. Ndenge nini tokoki kosalela bososoli na mosala ya kosakola?

16 Ntango mosusu mpe okoki kosalela mayele mpo olonga kosolola na moto oyo na ebandeli asepeli te. Kaka mpo na kokata lisolo, moto mosusu akoki koloba ete: “Te, nazali na lingomba na ngai” to, “Nasepelaka na makambo yango te.” Kasi, soki osaleli mayele mpe boboto, okoki kotuna motuna oyo ekopesa moto mposa ya koyoka nsango oyo oyeli ye.​—Tángá Bakolose 4:6.

17 Soki tokutani na moto oyo azali komona ete azali na ntango ya koyoka biso te mpo azali na mosala mingi, ntango mosusu tokoki kaka koloba ete biso moko tomoni yango mpe totiki ye. Kasi, ntango mosusu mpe tokoki komona ndenge oyo tokoki kozwa nzela ya koloba na mokuse. Bandeko mosusu batángelaka moto vɛrsɛ oyo ekotinda ye amituna ndimbola na yango, mpe batikelaka ye motuna, mpe nyonso wana na miniti moko. Mayele wana ebendaka likebi ya bato mosusu mpe bamonaka ete mosala oyo bazali kosala ekopekisa bango te básolola ata mwa moke. Yo mpe okoki komeka kosala bongo soki ozwi libaku.

18. Tokoki kosala nini mpo tóyeba kopesa litatoli ya libaku malamu?

18 Ntango tozali kosala misala na biso ya mokolo na mokolo, tokoki kopesa bato oyo tokutanaka na bango mposa ya koyoka nsango malamu soki tozali komibongisa mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu. Bandeko mingi batyaka mwa mikanda na libenga to na sakosi. Bamosusu mpe baponaka vɛrsɛ moko oyo bakoki koyebisa moto oyo bazwi libaku ya kosolola na ye. Okoki kosolola na mokɛngɛli na mosala ya kosakola to babongisi-nzela ya lisangá na bino mpo na koyeba ndenge oyo okoki komibongisa mpo na kosala ndenge wana.

TÓZALA NA BOBOTO MPO NA KOLAMWISA BANDEKO NA BISO YA LIBOTA

19. Mpo na nini tosengeli kolɛmba te kosalisa bandeko na biso ya libota?

19 Biso nyonso tolingaka kosalisa bandeko na biso bándima nsango malamu. (Yos. 2:13; Mis. 10:24, 48; 16:31, 32) Soki tomeki mbala ya liboso mpe tomoni ete basepeli te, tokoki kolɛmba nzoto mpo na kobandela lisusu. Tokoki kokanisa ete tokoki lisusu koloba to kosala eloko moko te mpo na kosalisa bango. Kasi, makambo mosusu ekoki kobongola bomoi mpe makanisi ya bandeko na biso. Ekoki mpe kozala ete okoki sikoyo kosalela mayele mosusu oyo ekobota mbuma malamu.

20. Mpo na nini tosengeli kosalela mayele mpo na koteya bandeko na biso ya libota?

20 Tosengeli kokeba ete tótyola te bandeko na biso ya libota. (Rom. 2:4) Tosengeli koloba na bango na boboto ndenge tosalaka epai ya bato mosusu oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola. Tosengeli koloba na boboto mpe na limemya. Na esika ya koluka ntango nyonso koteya bango, misala na biso emonisa bango ndenge oyo solo esalisi biso tóbongisa bomoto na biso. (Ef. 4:23, 24) Tómonisa polele ete tozali na bomoi ya esengo mpo Yehova ‘azali koteya biso mpo na litomba na biso moko.’ (Yis. 48:17) Tómonisa bandeko na biso ete tozali mpenza bakristo ya solo.

21, 22. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina ya kolɛmba nzoto te mpo na kosalisa bandeko ya libota báyeba solo.

21 Eumeli naino te, ndeko mwasi moko akomaki boye: “Nazalaki kosala nyonso mpo na kopesa bandeko na ngai 13 litatoli na maloba mpe bizaleli na ngai. Nazalaki kolekisa mbula mobimba te kozanga ete nakomela mokomoko na bango mokanda. Kasi, na boumeli ya mbula 30, nazalaki kaka ngai moko Motatoli na libota na biso.”

22 Ndeko yango abakisaki boye: “Mokolo moko, nabengaki na telefone yaya na ngai ya mwasi oyo afandaka mosika. Alobaki na ngai ete asɛngaki pastɛrɛ na bango ayekolisa ye Biblia, kasi asalaki yango te. Ntango nalobaki na ye ete nakosepela kosalisa ye, alobaki ete: ‘Malamu, kasi yebá libela ete nakokóma Motatoli ya Yehova ata mokolo moko te.’ Na nsima natindelaki ye buku Biblia eteyaka mpenza nini? mpe nazalaki kobenga ye mbala na mbala nsima ya mwa mikolo. Kasi, afungolaki naino buku yango te. Nsukansuka, nasɛngaki ye azwa buku na ye, mpe na boumeli ya miniti 15, kaka na telefone, totángaki mpe tolobelaki mwa bavɛrsɛ mosusu oyo ezali na buku yango. Nsima ya kobenga ye lisusu mwa mikolo, alingaki ete boyekoli eumela kaka miniti 15 te. Na nsima, ye nde akómaki kobenga ngai mpo tóyekola, mbala mosusu kutu liboso nalamuka mpe ntango mosusu mbala mibale na mokolo. Na mbula oyo elandaki, azwaki batisimo, mpe mbula moko na nsima, akómaki mobongisi-nzela.”

23. Mpo na nini tosengeli kolɛmba te kosalisa bato bálamuka na mpɔngi ya elimo?

23 Kosalisa bato bálamuka na mpɔngi ya elimo ezali mayele oyo moto ayekolaka mokemoke mpe esɛngaka milende. Kasi, ezali naino na bato ya komikitisa oyo bazali kondima tósalisa bango bálamuka na mpɔngi. Sanza na sanza, bato koleka 20 000 bazali kozwa batisimo mpo na kokóma Batatoli ya Yehova. Yango wana, tóbatela na makanisi toli oyo Paulo apesaki Arshipe, mokristo moko ya ekeke ya liboso, ete: “Talaká malamu mosala oyo ondimaki na kati ya Nkolo, mpo okokisa yango.” (Kol. 4:17) Lisolo oyo elandi ekosalisa biso nyonso tóyeba soki kosakola na lombangu elimboli nini.

[Mituna ya boyekoli]

[Etanda na lokasa 13]

MAKAMBO OYO OSENGELI KOSALA MPO OLALA MPƆNGI TE

▪ Omipesa na kosala mokano ya Nzambe

▪ Boyá misala ya molili

▪ Yebá likama ya kolala mpɔngi na elimo

▪ Kokanisa te ete bato ya teritware na yo bakoki lisusu kondima nsango malamu te

▪ Meká mayele ya sika mpo na koteya bato

▪ Kobosana te ntina ya mosala ya kosakola