Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kotɛka basusu—Ezaleli moko mabe ya mikolo ya nsuka!

Kotɛka basusu—Ezaleli moko mabe ya mikolo ya nsuka!

Kotɛka basusu​—Ezaleli moko mabe ya mikolo ya nsuka!

“Tozalaki bato ya sembo mpe bayengebene mpe bato bazangi mbeba.”​—1 TES. 2:10.

LUKÁ MAKANISI YA NTINA:

Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Delila, Abisalome, mpe Yudasi Mokeriota, bato oyo batɛkaki basusu?

Ndenge nini tokoki komekola bosembo oyo Yonatane mpe Petro bamonisaki?

Moto akoki kosala nini mpo atikala sembo epai ya molongani na ye mpe epai ya Yehova?

1-3. (a) Ezaleli nini ezali komonana na mikolo ya nsuka, mpe elimboli nini? (b) Mituna nini misato tokoyanola?

 BATO oyo misato: Delila, Abisalome, mpe Yudasi Mokeriota bamonisaki ezaleli mabe oyo tobengi kozanga bosembo. Delila amonisaki yango epai ya Samsone, mobali oyo alingaki ye; Abisalome amonisaki yango epai ya tata na ye, Mokonzi Davidi; mpe Yudasi Mokeriota amonisaki yango epai ya Nkolo na ye, Yesu Kristo. Likambo oyo mokomoko na bango asalaki ememelaki basusu mpasi mingi! Kasi, mpo na nini tosengeli kotalela bandakisa yango?

2 Mokomi moko atángaki kotɛka basusu na kati ya bizaleli mabe oyo ezali komonana mingi lelo oyo. Yango esengeli kokamwisa biso te. Ntango Yesu apesaki elembo ya “bosukisi ya makambo ya ntango oyo,” alobaki boye: “Bato mingi . . . bakotɛkana.” (Mat. 24:3, 10) ‘Kotɛka moto’ elimboli kosalela mayele mabe to kozanga bosembo mpo na kopesa ye na mabɔkɔ ya monguna. Kozanga bosembo ndenge wana emonisi mpenza ete tozali na “mikolo ya nsuka” oyo Paulo alobaki ete ekozala na bato oyo “bazangi bosembo, . . . oyo batɛkaka bamosusu.” (2 Tim. 3:1, 2, 4) Atako masolo mingi ya babuku elobelaka kozanga bosembo mpe balakisaka yango na bafilme lokola nde ezali likambo ya malamu, moto oyo basali ye likambo ya ndenge wana na ndenge ya solo to batɛki ye ayokaka mpasi na motema mpe atungisamaka mingi. Makambo yango ezali komonisa ete tozali na mikolo ya nsuka.

3 Masolo ya Biblia oyo elobeli bato oyo bazangaki bosembo ekoki koteya biso nini? Bandakisa nini ya bato oyo bazalaki sembo epai ya basusu tokoki komekola? Mpe tosengeli kozala na ekateli ya kotikala sembo epai ya nani? Tóyanola na mituna yango.

BANDAKISA YA KALA OYO EZALI MAKEBISI

4. Ndenge nini Delila atɛkaki Samsone, mpe mpo na nini likambo wana ezalaki mabe mpenza?

4 Ya liboso, tótalela ndakisa ya Delila, mwasi ya mayele mabe oyo Mosambisi Samsone alingaki. Samsone akanaki kobundisa Bafilistia mpo na kobikisa libota ya Nzambe. Mbala mosusu lokola bankolo mitano ya Bafilistia bayebaki ete Delila azalaki na bolingo ya sembo te epai ya Samsone, balakaki ye mbongo ebele soki aluki koyeba sekele ya makasi ya Samsone, mpo bákoka koboma ye. Delila, mwasi oyo azalaki na lokoso ya mbongo, andimaki likambo yango, kasi mbala misato mobimba, alongaki te koyeba sekele ya makasi ya Samsone. Na nsima, akómaki ntango nyonso kotya Samsone mbamba “na maloba na ye mpe kotungisa ye.” Nsukansuka, “molimo ya Samsone eyokaki mpasi lokola akufa.” Na yango, ayebisaki Delila ete bakatá ye naino nsuki te, soki bakati ye nsuki, makasi na ye ekosila. a Ntango Delila ayokaki bongo, abengaki moto moko akata Samsone nsuki, wana Samsone alalaki mpɔngi na mabɔlɔngɔ na ye. Na nsima, apesaki ye na mabɔkɔ ya banguna na ye mpo básala ye nyonso oyo balingi. (Bas. 16:4, 5, 15-21) Asalaki mabe mpenza! Lokola Delila azalaki na lokoso, atɛkaki moto oyo alingaki ye.

5. (a) Ndenge nini Abisalome amonisaki kozanga bosembo epai ya Davidi, mpe ezaleli yango emonisaki nini mpo na ye? (b) Davidi ayokaki ndenge nini ntango Ahitofele atɛkaki ye?

5 Moto mosusu oyo amonisaki kozanga bosembo ezali Abisalome. Lokola azalaki na mposa makasi ya bokonzi, akanaki kobɔtɔla bokonzi ya tata na ye Davidi. Abisalome abandaki na “koyiba mitema ya bato ya Yisraele.” Azalaki komilingisa epai ya bato, kolaka bango makambo ya lokuta mpe komonisela bango bolingo ya lokuta. Azalaki koyamba bato mpe kopwɛpwa bango mpo bákanisa ete azali mpenza kotyela bango moko mpe bamposa na bango likebi. (2 Sa. 15:2-6) Abisalome alongaki kozwa ata Ahitofele, moninga oyo Davidi azalaki kotyela mpenza motema; Ahitofele atɛkaki Davidi na ndenge akómaki na ngámbo ya Abisalome. (2 Sa. 15:31) Na Nzembo 3 mpe 55, Davidi amonisaki ndenge oyo kozanga bosembo wana esalaki ye mpasi. (Nz. 3:1-8; tángá Nzembo 55:12-14.) Abisalome atyolaki mpenza boyangeli ya Nzambe na ndenge asalaki mwango mabe mpe alukaki kozwa esika ya mokonzi oyo Yehova aponaki. (1 Nt. 28:5) Nsukansuka, mwango ya Abisalome elongaki te, mpe Davidi, mokonzi oyo Yehova atyaki, akobaki koyangela.

6. Ndenge nini Yudasi atɛkaki Yesu, mpe bato bakómá kosalela nkombo Yudasi mpo na kolobela nani?

6 Tólobela sikoyo likambo oyo Yudasi Mokeriota asalaki Kristo. Na Elekeli ya nsuka oyo Yesu asalaki na bantoma na ye 12, alobaki na bango boye: “Ya solo mpenza nalobi na bino: Moko na bino akotɛka ngai.” (Mat. 26:21) Na nsima, kaka na butu yango, na elanga ya Getesemane, Yesu ayebisaki Petro, Yakobo, mpe Yoane, ete: “Talá! Motɛki na ngai akómi pene.” Na mbala moko, Yudasi akómaki na elanga elongo na bato oyo ayokanaki na bango, “mpe akendaki mbala moko epai ya Yesu alobi: ‘Mbote, Rabi!’ mpe apwɛpwaki ye na boboto mpenza.” (Mat. 26:46-50; Luka 22:47, 52) Yudasi ‘atɛkaki makila ya boyengebene’ na ndenge akabaki Kristo na mabɔkɔ ya banguna na ye. Yudasi, moto oyo alingá mbongo, asalaki likambo wana mpo na mbongo boni? Mpo na Shekele ya palata 30 mpamba! (Mat. 27:3-5) Banda wana, bato bakómá kosalela nkombo Yudasi mpo na kolobela moto oyo atɛki moninga na ye.

7. Mateya nini tozwi na ndakisa ya (a) Abisalome mpe Yudasi? (b) Delila?

7 Bandakisa yango ezali koteya biso nini? Abisalome ná Yudasi basukaki mabe mpo batɛkaki bato oyo Yehova aponaki. (2 Sa. 18:9, 14-17; Mis. 1:18-20) Soki toyoki nkombo Delila, tokanisaka mbala moko mwasi oyo atɛkaki mobali na ye mpe oyo azalaki na bolingo ya lokuta. (Nz. 119:158) Ezali mpenza na ntina tóboya lokoso mpe mposa nyonso ya koluka lokumu, mpamba te Yehova akoboya biso soki tozali na bizaleli wana! Ndenge oyo bato wana basukaki esengeli kotinda biso tóboya eloko nyonso oyo ekoki komema biso na kozanga bosembo.

TÓMEKOLA BATO OYO BAZALAKI SEMBO

8, 9. (a) Mpo na nini Yonatane alakaki Davidi ete akotikala sembo epai na ye? (b) Ndenge nini tokoki komekola Yonatane?

8 Biblia elobeli mpe bato mingi oyo bazalaki sembo. Tólobela mibale kati na bato yango mpe tómona mateya oyo tokoki kozwa. Tóbanda na Yonatane, moto oyo atikalaki sembo epai ya Davidi. Yonatane azalaki mwana ya liboso ya Mokonzi Saulo mpe ye nde asengelaki kokóma mokonzi nsima ya tata na ye. Nzokande, Yehova aponaki Davidi. Yonatane andimaki ekateli ya Nzambe. Akómaki kotalela Davidi lokola monguna na ye te. “Molimo ya Yonatane ekanganaki na molimo ya Davidi,” mpe alakaki ye ete akotikala sembo epai na ye. Kutu, Yonatane apesaki Davidi bilamba, mopanga, litimbo, mpe mokaba na ye, likambo oyo emonisi ete apesaki ye lokumu ya bokonzi. (1 Sa. 18:1-4) Yonatane asalaki nyonso oyo akokaki mpo na “kolendisa” Davidi; atyaki kutu bomoi na ye moko na likama na ndenge akɔtelaki Davidi liboso ya Saulo. Yonatane amonisaki bosembo epai ya Davidi mpe alobaki na ye boye: “Yo, okokóma mokonzi ya Yisraele, mpe ngai, nakokóma moto ya mibale, nsima na yo.” (1 Sa. 20:30-34; 23:16, 17) Tokoki kokamwa te ete nsima ya liwa ya Yonatane, Davidi asalaki loyembo ya mawa mpo na komonisa mpasi oyo ayokaki mpe ndenge oyo alingaki Yonatane.​—2 Sa. 1:17, 26.

9 Yonatane ayebaki malamu epai ya nani asengeli kozala sembo. Atosaki Yehova Nkolo-Mokonzi na motema mobimba mpe asungaki Davidi, moto oyo Nzambe aponaki. Ndenge moko mpe lelo, ata soki baponi biso te mpo na mokumba moko boye na lisangá, tosengeli kosunga na motema mobimba bandeko oyo batyami mpo na kokamba biso.​—1 Tes. 5:12, 13; Ebr. 13:17, 24.

10, 11. (a) Mpo na nini Petro atikalaki sembo epai ya Yesu? (b) Ndenge nini tokoki komekola Petro?

10 Ndakisa mosusu ya malamu ezali ya ntoma Petro, oyo alakaki Yesu ete akotikala sembo epai na ye. Ntango Kristo ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli kolya nzoto na ye mpe komɛla makila na ye mpo na komonisa bango ete basengeli kondimela mbeka oyo asengelaki kopesa, bayekoli na ye mingi bamonaki ete maloba na ye ezali makasi mpe batikaki ye. (Yoa. 6:53-60, 66) Na nsima, Yesu abalukaki epai ya bantoma na ye 12 mpe atunaki boye: “Bino mpe bolingi kokende te, boye te?” Petro nde ayanolaki ete: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko; mpe biso tosili kondima mpe koyeba ete yo ozali Mosantu ya Nzambe.” (Yoa. 6:67-69) Elingi nde koloba ete Petro akangaki mpenza ntina ya makambo oyo Yesu alobaki mpo na mbeka oyo alingaki kopesa? Mbala mosusu akangaki mpenza ntina te. Atako bongo, Petro azalaki na ekateli ya kotikala sembo epai ya Yesu, Mwana ya Nzambe.

11 Petro akanisaki te ete mbala mosusu Yesu asali libunga mpe ete nsima ya mikolo Yesu akobongola maloba na ye. Na komikitisa nyonso, Petro andimaki ete Yesu azalaki “na maloba ya bomoi ya seko.” Ndenge moko mpe lelo oyo, tosalaka nini soki totángi likanisi moko na mikanda ya “kapita ya sembo,” kasi tokangi ntina na yango te to eyokani te na makanisi na biso? Tosengeli kosala makasi tókanga ntina na yango na esika tókanisa kaka ete moombo ya sembo akolimbola yango ndenge mosusu mpe ekoyokana na makanisi na biso.​—Tángá Luka 12:42.

TÓTIKALA SEMBO EPAI YA MOLONGANI NA BISO

12, 13. Ndenge nini kozanga bosembo ekoki kokɔta na libala, mpe mpo na nini moto akoki koloba te ete azangi bosembo mpo akómi na mbula moko boye?

12 Lolenge nyonso ya kozanga bosembo ezali mabe mpe tosengeli kotikela yango nzela te ete ebebisa kimya mpe bomoko ya libota ya bakristo mpe ya lisangá. Na yango, tótala ndenge oyo tokoki kotikala sembo epai ya molongani na biso mpe epai ya Nzambe.

13 Ekobo ezali moko ya makambo ya kozanga bosembo oyo esalaka mpasi mingi. Moto oyo asali ekobo azangi bosembo epai ya molongani na ye mpe apesi bolingo na ye epai ya moto mosusu. Moto oyo molongani na ye asali ekobo amonaka na mbala moko ete batɛki ye mpe makanisi na ye ebulunganaka mpenza. Ndenge nini likambo ya ndenge wana ekómaka na kati ya bato mibale oyo liboso balinganaki? Mbala mingi, ebandaka ntango mwasi ná mobali bazali lisusu kotyelana likebi te. Profesɛrɛ Gabriella Turnaturi alobi ete kozanga bosembo ekɔtaka na libala soki mwasi ná mobali bazali lisusu te kosala nyonso oyo esengeli mpo na kobatela libala na bango. Likambo yango ekoki kosalema ata epai ya bato oyo baumeli mingi na libala. Na ndakisa, mobali moko ya mbula 50 abomaki libala na mwasi oyo bafandaki na ye mbula 25 mpo afanda na mwasi mosusu oyo akómaki kolinga. Bato mosusu balobaka ete ezali likambo oyo ekómelaka bato oyo bakómi na bambula wana. Kasi, na esika tólongisa likambo ya ndenge wana, tosengeli kobenga yango na nkombo na yango mpenza: ezali kotɛka molongani. b

14. (a) Ndenge nini Yehova atalelaka bato oyo basalelaka balongani na bango makambo na bokosi? (b) Yesu alobaki nini mpo na bosembo na kati ya libala?

14 Ndenge nini Yehova atalelaka moto oyo atiki molongani na ye mpo na ntina oyo Biblia endimi te? Yehova “ayini koboma libala,” mpe apamelaki bato oyo bazalaki kosalela balongani na bango makambo na bokosi mpe kosundola bango. (Tángá Malaki 2:13-16.) Lokola Tata na ye, Yesu mpe ateyaki ete ezali malamu te moto abengana to asundola molongani na ye mpe asala lokola nde likambo moko esalemi te.​—Tángá Matai 19:3-6, 9.

15. Moto oyo abalá akoki kosala nini mpo atikala sembo epai ya molongani na ye?

15 Moto oyo abalá akoki kosala nini mpo atikala sembo epai ya molongani na ye? Liloba ya Nzambe elobi boye: “Sepelá na mwasi [to mobali] ya bolenge na yo” mpe, “Sepelá na bomoi elongo na mwasi [to mobali] oyo olingi.” (Mas. 5:18; Mos. 9:9) Ntango mwasi ná mobali bakómi mikóló, basengeli kosala nyonso oyo ekoki mpo bábatela libala na bango; basengeli komonanaka mpe kosololaka. Yango elimboli ete moto na moto asengeli kokipe moninga, kolekisaka ntango elongo na ye. Mwasi ná mobali basengeli kosala makasi bábatela libala na bango mpe boyokani na bango na Yehova. Mpo na yango, basengeli koyekolaka Biblia elongo, kobimaka na mosala ya kosakola elongo, mpe kobondelaka Yehova elongo mpo na kosɛnga ye apambola bango.

TÓTIKALA SEMBO EPAI YA YEHOVA

16, 17. (a) Ndenge nini bosembo na biso epai ya Nzambe ekoki komekama na libota mpe na lisangá? (b) Ndakisa nini emonisi ete kotosa mobeko ya Nzambe oyo epekisi kosolola na ndeko ya libota oyo abimisamá na lisangá ekoki kobota mbuma malamu?

16 Bandeko mosusu basalaki masumu ya minene mpe bapamelaki bango “makasi, mpo bázala makasi na kondima.” (Tito 1:13) Mpo na basusu, esɛngaki ete bábimisama na lisangá. Bamosusu ‘bateyamaki na disiplini’ oyo bazwaki mpe esalisaki bango bázongisa boyokani na bango na Yehova. (Ebr. 12:11) Tosengeli kosala nini soki ndeko ya libota na biso to moninga moko ya motema abimisami na lisangá? Tosengeli komonisa bosembo na biso epai ya Nzambe, kasi epai ya moto yango te. Yehova azali kotala biso mpo amona soki tokolanda etinda na ye ya koboya kosolola na moto nyonso oyo abimisami na lisangá.​—Tángá 1 Bakorinti 5:11-13.

17 Tótala ndakisa moko oyo emonisi likambo ya malamu oyo ekoki kosalema soki libota etikali sembo epai ya Yehova mpe etosi etinda na ye ya koboya kosolola na bandeko ya libota oyo babimisami na lisangá. Elenge mobali moko abimisamaki na lisangá mpe atikalaki libándá mbula koleka 10; tata na ye, mama na ye, mpe bandeko na ye minei ya mibali ‘batikaki kosangana’ na ye. Na bantango mosusu, azalaki komeka komikɔtisa na makambo ya libota, kasi moto mokomoko ya libota atikalaki sembo, mpe azalaki koboya kosolola na ye. Ntango elenge yango azongaki na lisangá, alobaki ete azalaki koyoka mposa makasi ya bandeko na ye ya libota, mingimingi na butu soki azali ye moko. Kasi, alobi ete soki bato ya libota na ye bazalaki kosolola na ye ata moke, elingaki kosepelisa ye mingi. Kasi, lokola bandeko na ye ya libota bazalaki kosolola na ye ata moke te, mposa makasi ya kozala elongo na bango ezalaki moko ya makambo oyo etindaki ye abongisa boyokani na ye na Yehova. Soki oyoki mposa ya kobuka mobeko ya Nzambe oyo epekisi kosolola na ndeko ya libota oyo abimisamá na lisangá, kanisá ndakisa wana.

18. Nsima ya kotalela mbuma mabe ya kozanga bosembo mpe matomba ya kotikala sembo, ekateli nini ozwi?

18 Lelo oyo, bato mingi bazali sembo te mpe batɛkaka basusu. Nzokande, na lisangá, tokoki kokuta bandakisa ya bato ya sembo oyo tokoki komekola. Bomoi na bango emonisaka ete bazali “bato ya sembo mpe bayengebene mpe bato bazangi mbeba.” (1 Tes. 2:10) Biso nyonso tósala oyo tokoki mpo tótikala sembo epai ya Nzambe mpe kati na biso na biso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Makasi ya Samsone ezalaki mpenza kouta na nsuki na ye te, kasi nde na eloko oyo nsuki yango ezalaki komonisa, elingi koloba boyokani oyo azalaki na yango na Yehova lokola azalaki Monaziri.

b Mpo na koyeba ndenge ya kosala ntango molongani azangi bosembo, talá lisolo “Ntango molongani akosi yo,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2010, nkasa 29-32.

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 10]

Petro atikalaki sembo epai ya Yesu, Mwana ya Nzambe, atako bato mosusu basundolaki Ye