Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tóbatela motema mobimba epai ya Yehova

Tóbatela motema mobimba epai ya Yehova

Tóbatela motema mobimba epai ya Yehova

“Mwana na ngai . . . , yebá Nzambe ya tata na yo mpe salelá ye na motema mobimba.”​—1 NTA. 28:9.

LUKÁ BIYANO NA MITUNA OYO:

Motema ya elilingi ezali nini?

Tokoki kosala nini mpo na kotala motema na biso?

Ndenge nini tokoki kobatela motema mobimba epai ya Yehova?

1, 2. (a) Enama nini Liloba ya Nzambe esalelaka mingi na ndenge ya elilingi? (b) Mpo na nini ezali na ntina tóyeba soki motema ya elilingi ezali nini?

 MBALA mingi, Liloba ya Nzambe esalelaka binama ya nzoto na ndenge ya elilingi. Na ndakisa, Yobo alobaki ete: “Mabe ezali te na mabɔkɔ na ngai.” Mokonzi Salomo alobaki boye: “Nsango oyo ezali malamu ekómisaka mikuwa mafutamafuta.” Yehova ayebisaki Ezekiele ete: “Nakómisi motó na yo . . . makasi koleka libanga ya silekise.” Mpe Yesu alobaki ete: “Soki liso na yo ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo.”​—Yobo 16:17; Mas. 15:30; Ezk. 3:9; Mat. 18:9.

2 Nzokande, ezali na enama moko oyo Biblia esalelaka mingi na ndenge ya elilingi koleka binama mosusu. Hana, mwasi moko ya sembo, alobelaki yango na libondeli na ye ete: “Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yehova.” (1 Sa. 2:1) Kutu, bakomi ya Biblia balobeli motema mbala soki nkóto, mpe mbala mingi ezali na ndenge ya elilingi. Ezali na ntina mingi tóyeba soki motema ya elilingi ezali nini mpamba te Biblia elobi ete tosengeli kobatela yango.​—Tángá Masese 4:23.

MOTEMA YA ELILINGI EZALI NINI?

3. Ndenge nini tokoki koyeba ndimbola ya motema ya elilingi na Biblia? Pesá ndakisa.

3 Atako Liloba ya Nzambe epesi biso ndimbola ya motema ya elilingi te, ndenge oyo elobeli yango ezali kosalisa biso tóyeba soki ezali nini. Na ndenge nini? Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali liboso ya liyemi moko kitoko oyo esalemá na mabanga ya mikemike ekangamakangamá. Soki ozongi mwa moke nsima, okomona ete mabanga yango nyonso oyo esangisamá malamu ebimisi elilingi mobimba. Ndenge moko mpe, soki totali ebele ya bisika oyo Biblia esaleli liloba motema na ndenge ya elilingi, tokomona ete nyonso epesi biso likanisi moko. Likanisi nini?

4. (a) Liloba “motema” elimboli nini? (b) Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 22:37 elimboli nini?

4 Bakomi ya Biblia basalelaki liloba “motema” mpo na kolobela bomoto ya kati. Bomoto yango esangisi makambo lokola bamposa, makanisi, elimo, makoki, mayele, mpe mikano na biso. (Tángá Kolimbola Mibeko 15:7; Masese 16:9; Misala 2:26.) Ndenge buku moko emonisi yango, ezali “bomoto mobimba ya kati.” Na bisika mosusu, “motema” elimbolaka mpenza bomoto mobimba te. Na ndakisa, Yesu alobaki boye: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” (Mat. 22:37) Na vɛrsɛ yango, “motema” elimboli kaka mayoki mpe bamposa. Yesu atángi motema, molimo mpe makanisi esika moko mpo na koloba ete mayoki na biso esengeli komonisa ete tolingaka Nzambe, mpe ete tosengeli komonisa bolingo yango na ndenge oyo tozali kotambwisa bomoi na biso mpe kosalela mayele na biso. (Yoa. 17:3; Ef. 6:6) Kasi, soki esalelami kaka yango moko, liloba “motema” elimbolaka bomoto mobimba ya kati.

NTINA OYO TOSENGELI KOBATELA MOTEMA NA BISO

5. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tósalela Yehova na motema mobimba?

5 Mokonzi Davidi ayebisaki Salomo boye: “Mwana na ngai . . . , yebá Nzambe ya tata na yo mpe salelá ye na motema mobimba mpe na molimo ya esengo; mpo Yehova azali kotalatala mitema nyonso, mpe asosolaka mposa nyonso ya makanisi.” (1 Nta. 28:9) Ya solo, Yehova atalaka mitema nyonso malamumalamu, ata mpe oyo ya yo. (Mas. 17:3; 21:2) Mpe soki Yehova asepeli na makambo oyo amoni na motema na biso, tokoki kokóma baninga na ye mpe kozala na bomoi ya esengo na mikolo ekoya. Na yango, tosengeli mpenza kolanda toli oyo Davidi akomaki na litambwisi ya elimo santu; tosengeli kosala makasi tósalela Yehova na motema mobimba.

6. Tosengeli koyeba nini na ntina etali ekateli na biso ya kosalela Yehova?

6 Molende oyo tozali na yango sikoyo na mosala ya Yehova emonisaka ete tozali na mposa ya kosalela ye na motema mobimba. Kasi, toyebi mpe ete mokili mabe ya Satana mpe kozanga kokoka na biso ekoki kolɛmbisa ekateli na biso ya kosalela Nzambe na motema mobimba. (Yir. 17:9; Ef. 2:2) Na yango, mpo tóyeba soki ekateli na biso ya kosalela Nzambe elɛmbi te, ete tozali kaka ekɛngɛ na elimo, tosengeli kotalaka motema na biso mbala na mbala. Ndenge nini tokoki kosala yango?

7. Nini emonisaka ndenge oyo motema na biso ezali mpenza?

7 Toyebi ete bomoto na biso ya kati emonanaka te, ndenge kaka motema ya nzete emonanaka te. Atako bongo, ndenge Yesu amonisaki yango na Lisolo Likoló ya Ngomba, kaka ndenge mbuma emonisaka soki nzete na yango ezali malamu to mabe, makambo oyo tosalaka emonisaka soki motema na biso ezali mpenza ndenge nini. (Mat. 7:17-20) Tótalela likambo moko.

LOLENGE MOKO YA KOTALA MOTEMA NA BISO

8. Na kolanda maloba ya Yesu na Matai 6:33, nini emonisaka makambo oyo ezali na motema na biso?

8 Kaka na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu ayebisaki mpe bayoki na ye likambo moko oyo basengeli kosala mpo na komonisa ete bazali mpenza na mposa ya kosalela Yehova na motema mobimba. Alobaki boye: “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.” (Mat. 6:33) Makambo oyo totyaka na esika ya liboso na bomoi na biso emonisaka bamposa, makanisi, mpe mikano ya motema na biso. Na yango, mpo tóyeba soki tozali kosalela Nzambe na motema mobimba, tosengeli kotalela makambo oyo totyaka na esika ya liboso na bomoi na biso.

9. Yesu asɛngaki nini epai ya bato mosusu, mpe makambo oyo balobaki emonisaki nini?

9 Mwa moke nsima ya kolendisa bayekoli ete ‘bákoba koluka liboso bokonzi,’ likambo moko esalemaki oyo emonisaki ete makambo oyo moto atyaka na esika ya liboso na bomoi na ye emonisaka mpenza ndenge oyo motema na ye ezali. Luka alobi ete Yesu “akanaki na mpiko kokende na Yerusaleme,” atako ayebaki makambo ya mpasi oyo esengelaki kokómela ye kuna. Ntango ye ná bantoma na ye “bazalaki kotambola na nzela,” Yesu akutanaki na bato mosusu mpe asɛngaki bango bákóma bayekoli na ye. Bato yango bandimaki kosala oyo Yesu alobaki, kasi balingaki kosilisa liboso mwa makambo mosusu. Mobali moko azongisaki boye: “Pesá ngai naino nzela nakende kokunda tata na ngai.” Mosusu alobaki ete: “Nakolanda yo, Nkolo; kasi pesá ngai naino nzela ya kopesa bato ya ndako na ngai mbote.” (Luka 9:51, 57-61) Tomoni mpenza ete Yesu azalaki na ekateli makasi ya kosala mokano ya Nzambe; kasi bato wana bapesaki Yesu bantina ya lokuta mpo na koboya kokóma bayekoli na ye. Lokola balukaki liboso kokokisa bamposa na bango na esika báluka liboso Bokonzi ya Nzambe, bamonisaki ete mitema na bango ezalaki mobimba te epai ya Nzambe.

10. (a) Tosalaki nini ntango Yesu abengaki biso tókóma bayekoli na ye? (b) Ndakisa nini ya mokuse Yesu apesaki?

10 Na bokeseni na bato wana, biso tondimaki kokóma bayekoli ya Yesu mpe tozali lelo kosalela Yehova mokolo na mokolo. Na ndenge yango, tozali komonisa ete motema na biso ezali epai ya Yehova. Kasi, atako tozali komipesa na makambo ya elimo, tosengeli koyeba likama moko oyo ekoki kokómela motema na biso. Likama yango nini? Ntango Yesu asololaki na mibali oyo asɛngaki bákóma bayekoli na ye, amonisaki likama yango ntango alobaki boye: “Moto oyo atye lobɔkɔ na ye na etimweli mpe azali kotala biloko oyo ezali na nsima abongi na bokonzi ya Nzambe te.” (Luka 9:62) Ndakisa yango ekoki koteya biso nini?

‘TOKANGAMAKA NA OYO EZALI MALAMU’?

11. Likambo nini ekómelaki mosali-bilanga oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye, mpe mpo na nini?

11 Mpo tóbimisa polele liteya oyo tokoki kozwa na ndakisa mokuse oyo Yesu apesaki, tóbakisa mwa makambo mosusu na ndakisa yango. Mosali-bilanga azali kosala mosala na etimweli. Kasi na ntango yango, azali mpe kokanisa ndako na ye epai akoki kofanda na libota mpe baninga na ye, kolya, koyoka miziki, kosɛka, mpe kofanda na esika ya mpiɔ. Akómi na mposa makasi ya makambo yango. Nsima ya kosala mosala na ntaka moko boye, mposa oyo mosali-bilanga azali na yango mpo na makambo wana ekómi makasi tii abaluki mpo na kotala “biloko oyo ezali na nsima.” Atako azali naino na mosala mingi ya kosala liboso bálona milona na elanga, mosali-bilanga atye makanisi na makambo mosusu mpe mosala na ye ebebi. Toyebi ete nkolo bilanga akosepela na mosali yango te mpo alendendeli na mosala na ye te.

12. Lelo oyo, ndenge nini mokristo akoki kokóma lokola mosali-bilanga oyo Yesu alobelaki?

12 Sikoyo tótala ndenge ndakisa wana ekokani na likambo moko na bomoi na biso lelo oyo. Mosali-bilanga ekoki kozala mokristo nyonso oyo azali komonana ete azali makasi na elimo, nzokande motema na ye ezali na likama. Tózwa ndakisa ya ndeko mobali moko oyo abimaka mingi na mosala ya kosakola. Nzokande, atako ayanganaka na makita mpe amipesaka na mosala ya kosakola, akanisaka mpe mingi makambo mosusu oyo bato ya mokili basalaka, oyo amonaka ete ezali malamu. Na kati ya motema na ye, azalaka na mposa makasi ya makambo yango. Nsukansuka, nsima ya bambula, mposa na ye ya biloko yango ya mokili ekómi makasi mpe etindi ye abaluka mpo na kotala “biloko oyo ezali na nsima.” Atako tozali naino na mingi ya kosala na mosala ya kosakola, akangami ‘makasi te na liloba ya bomoi’ mpe molende na ye na mosala ya Nzambe ekiti. (Flp. 2:16) Yehova, “Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma” asepelaka te na moto oyo ayiki mpiko te na mosala na ye.​—Luka 10:2.

13. Kosalela Yehova na motema mobimba esɛngi makambo nini?

13 Liteya oyo tokoki kozwa ezali polele. Ezali malamu mingi soki tozali koyangana na makita ya lisangá mpe tozali kobima na mosala ya kosakola. Kasi kosalela Yehova na motema mobimba esuki wana te. (2 Nta. 25:1, 2, 27) Soki na kati ya motema na ye, mokristo moko azali kokoba kolinga “biloko oyo ezali na nsima,” elingi koloba makambo mosusu oyo bato ya mokili basalaka, azali na likama mpo akoki kobebisa boyokani na ye na Nzambe. (Luka 17:32) Tokozala bato oyo ‘babongi na bokonzi ya Nzambe’ kaka soki ‘tozali mpenza koyina oyo ezali mabe mpe tokangami na oyo ezali malamu.’ (Rom. 12:9; Luka 9:62) Na yango, biso nyonso tosengeli kokeba ete eloko moko te oyo ezali na mokili ya Satana, ata soki ezali na ntina to ezali komonana malamu, epekisa biso tómipesa na mosala ya Nzambe na motema na biso mobimba.​—2 Ko. 11:14; tángá Bafilipi 3:13, 14.

TÓKOBA KOZALA EKƐNGƐ!

14, 15. (a) Satana azali kosala nini mpo na kobebisa motema na biso? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ete mayele ya Satana ezali mabe mpenza.

14 Tomipesaki epai ya Yehova mpo tolingaka ye. Mingi kati na biso tozali komonisa banda bambula mingi ete tozali na ekateli ya kosalela Yehova na motema mobimba. Nzokande, Satana atiki biso te. Azali kaka koluka kobebisa motema na biso. (Ef. 6:12) Ntango mosusu ayebi ete tokoboya Yehova na mbala moko te. Yango wana, na mayele mabe na ye, azali kosalela “makambo ya ntango oyo” mpo na kolɛmbisa mokemoke molende na biso na mosala ya Nzambe. (Tángá Marko 4:18, 19.) Mpo na nini mayele yango ya Satana ezali kolonga mpenza?

15 Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tózwa ndakisa moko. Kanisá ete osaleli nkɔmbɔ moko ya sika mpo na kokɔmbɔla ndako. Na nsima, otye yango na esika na yango. Nsima na yo, moto moko ayei kobenda nzete mitano to zomi. Soki lobi na ntɔngɔ ozwi nkɔmbɔ yango mpo na kokɔmbɔla, okomona mbala moko ete balongolaki mwa banzete? Mbala mosusu te. Bongo soki moto alongoli lisusu mwa banzete? Mbala mosusu mpe okoyeba kaka te. Mpo na nini? Mpo bazalaki kolongola banzete yango mokemoke, kozanga ete oyeba yango. Ndenge moko mpe, makambo oyo ezali na mokili ya Satana ekoki kokitisa mokemoke molende na biso na mosala ya Nzambe. Soki mokristo azali ekɛngɛ te, akoyeba kutu te ete molende na ye ezali kokita mokemoke mpe Satana akolonga ye.​—Mat. 24:42; 1 Pe. 5:8.

LIBONDELI EZALI NA NTINA MINGI

16. Ndenge nini tokoki komibatela na mayele mabe ya Satana?

16 Ndenge nini tokoki komibatela na mayele mabe ya Satana mpe kokoba kosalela Yehova na motema mobimba? (2 Ko. 2:11) Ezali na ntina mingi tóbondelaka. Paulo alendisaki bakristo ete ‘bátɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.’ Na nsima abakisaki ete: ‘Na mitindo nyonso ya mabondeli mpe malɔmbɔ, bókoba kobondela na libaku nyonso.’​—Ef. 6:11, 18; 1 Pe. 4:7.

17. Mabondeli ya Yesu ezali koteya biso nini?

17 Mpo na kotɛlɛma ngwi liboso ya Satana, tosengeli komekola ndakisa ya Yesu na likambo etali kobondela, oyo emonisi ete azalaki mpenza na mposa ya kobatela motema mobimba epai ya Yehova. Na ndakisa, Luka alobelaki ndenge Yesu abondelaki na butu ya nsuka liboso akufa; akomaki boye: “Lokola atungisamaki mingi mpenza akobaki kobondela na molende koleka.” (Luka 22:44) Ezalaki mbala ya liboso te oyo Yesu abondelaki na molende, kasi lokola wana ezalaki komekama oyo elekaki makasi na bomoi na ye awa na mabele, abondelaki “na molende koleka”​—mpe Nzambe ayokaki ye. Ndakisa ya Yesu emonisi ete mabondeli nyonso esalemaka na molende ndenge moko te. Na yango, ntango tokutani na komekama ya makasi, mpe ntango Satana azali kosalela mayele ya mabe koleka mpo na kokweisa biso, tosengeli kobondela “na molende koleka” mpo na kosɛnga Yehova abatela biso.

18. (a) Motuna nini tosengeli komituna na ntina etali libondeli, mpe mpo na nini? (b) Makambo nini ebatelaka motema na biso, mpe esalemaka ndenge nini? (Talá  etanda na lokasa 16.)

18 Nini ekosalema soki tosali mabondeli ya ndenge wana? Paulo alobaki boye: “Na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino.” (Flp. 4:6, 7) Ya solo, mpo motema na biso ezala ntango nyonso mobimba epai ya Yehova, tosengeli kobondelaka mbala na mbala mpe na molende. (Luka 6:12) Na yango, omituna motuna oyo: ‘Nabondelaka mbala na mbala mpe na molende?’ (Mat. 7:7; Rom. 12:12) Eyano na yo ekomonisa soki ozalaka mpenza na mposa ya kosalela Nzambe na motema mobimba.

19. Okosala nini mpo obatela motema mobimba epai ya Yehova?

19 Ndenge touti komona yango, makambo oyo totyaka na esika ya liboso na bomoi na biso ekoki kosalisa biso tóyeba soki motema na biso ezali ndenge nini. Tosengeli kosala nyonso mpo biloko oyo ezali na nsima to mayele mabe ya Satana ebebisa te ekateli na biso ya kosalela Yehova na motema mobimba. (Tángá Luka 21:19, 34-36.) Yango wana, lokola Davidi, tosengeli kokoba kobondela Yehova ete: “Pesá ngai motema moko.”​—Nz. 86:11.

[Mituna ya boyekoli]

[Etanda na lokasa 16]

 MAKAMBO MISATO OYO EBATELAKA MOTEMA NA BISO

Ndenge kaka tosalaka makasi tóbatela motema na biso ya solo, tokoki mpe kosala makambo oyo ekosalisa biso tóbatela motema na biso ya elilingi. Tótalela makambo misato ya ntina oyo elandi:

1 Kolya: Tosengeli kolyaka malamu, elingi koloba kolya bilei oyo etongaka nzoto, mpo motema na biso ezala malamu. Ndenge moko mpe, mpo tóbatela motema na biso ya elilingi, tosengeli koyekolaka Biblia, komanyola, mpe koyangana na makita.​—Nz. 1:1, 2; Mas. 15:28; Ebr. 10:24, 25.

2 Ngalasisi: Mpo motema na biso ezala malamu, tosengeli kosalisaka yango ngalasisi mpo ete na bantango mosusu, ebɛtaka mbangumbangu mpo etambwisa makila malamu. Ndenge moko mpe, molende na mosala ya kosakola, mbala mosusu mpe kosala makasi tósakolaka mingi, ebatelaka motema na biso ya elilingi.​—Luka 13:24; Flp. 3:12.

3 Baninga: Motema na biso, ezala ya solo to ya elilingi, ekoki kotungisama na makambo ya bato oyo tosalaka na bango esika moko mpe oyo tofandi na bango na bakartye. Kasi, tokoki kokitisa mitungisi yango soki tozali kosala nyonso mpo tózalaka mingi elongo na bandeko na biso ya lisangá, oyo bamibanzabanzaka mpo na biso mpe oyo mitema na bango ezali mobimba epai ya Nzambe.​—Nz. 119:63; Mas. 13:20.