Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yehova ayebi kosikola basaleli na ye

Yehova ayebi kosikola basaleli na ye

Yehova ayebi kosikola basaleli na ye

“Yehova ayebi kosikola na komekama bato oyo bakangamaka na Nzambe.”​—2 PE. 2:9.

MPO NA NINI TOKOKI KOZALA NA ELIKYA ETE YEHOVA:

Ayebaka ntango oyo likambo mokomoko ekosalema mpo ete mokano na ye ekokisama?

Akosalela nguya na ye mpo na kosikola basaleli na ye?

Ayebi ndenge makambo ekolandana?

1. Makambo ekozala ndenge nini na ntango ya ‘bolɔzi monene’?

 MOKOLO oyo Nzambe akoboma mokili ya Satana ekoya na mbalakaka. (1 Tes. 5:2, 3) Na “mokolo monene ya Yehova,” bato bakozala na mobulungano. (Sef. 1:14-17) Bato bakozala na mpasi mpe mikakatano makasi. Ekozala ntango ya mpasi oyo “esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo.”​—Tángá Matai 24:21, 22.

2, 3. (a) Likambo nini basaleli ya Nzambe bakokutana na yango na ‘bolɔzi monene’? (b) Nini ekoki kolendisa biso mpo na makambo oyo ezali koya?

2 Na nsuka ya ‘bolɔzi monene,’ “Goge ya mokili ya Magoge” akobimisa manzaka nyonso mpo na kobundisa basaleli ya Nzambe. Na etumba yango, “limpinga moko monene ya basoda” oyo ekoya “lokola mapata mpo na kozipa mokili” ekobundisa basaleli ya Yehova. (Ezk. 38:2, 14-16) Ebongiseli moko te ya bato ekokɔtela basaleli ya Yehova. Kaka Nzambe nde akobikisa bango. Bakosala nini ntango bakomona ebele ya banguna bayei kobundisa bango?

3 Soki ozali mosaleli ya Yehova, ondimaka mpenza ete Yehova azali na likoki ya kobikisa basaleli na ye na bolɔzi monene mpe ete akosala yango? Ntoma Petro akomaki boye: “Yehova ayebi kosikola na komekama bato oyo bakangamaka na Nzambe, kasi kobomba mpo na mokolo ya kosambisama bato oyo bazangi boyengebene mpo bábomama.” (2 Pe. 2:9) Komanyola makambo oyo Yehova asalá na ntango ya kala mpo na kobikisa basaleli na ye ekoki kolendisa biso mpo na makambo oyo ezali koya. Tótalela bandakisa misato oyo ekolendisa kondima na biso ete Yehova akobikisa basaleli na ye.

BABIKAKI NA MPELA YA MOKILI MOBIMBA

4. Misala nini esengelaki kosalema tii na nsuka liboso Mpela eya?

4 Tólobela liboso lisolo ya Mpela ya mikolo ya Noa. Ezalaki na misala oyo esengelaki kosalema tii na nsuka liboso Mpela ebanda. Mosala monene ya kotonga masuwa esengelaki kosila mpe esengelaki kokɔtisa banyama na masuwa liboso Mpela ebanda. Lisolo ya Ebandeli emonisi ete Yehova azelaki te ete masuwa etongama bongo na nsima atya mokolo oyo akotinda mpela; ezalaki te lokola nde akoki kobongola mokolo yango soki masuwa esili kotongama noki te. Bambula mingi liboso Nzambe atinda Noa atonga masuwa, atyaki mokolo oyo Mpela esengelaki kobanda. Ndenge nini toyebi yango?

5. Yehova asakolaki nini na maloba oyo ezali na Ebandeli 6:3, mpe ntango nini alobaki likambo yango?

5 Biblia elobi ete Yehova azwaki ekateli yango kuna na likoló. Ndenge Ebandeli 6:3 emonisi yango, alobaki boye: “Elimo na ngai ekokanga motema seko na seko te na makambo ya moto, mpo azali se mosuni. Na yango, mikolo na ye ekozala mbula nkama moko na ntuku mibale (120).” Maloba yango ezali te komonisa bambula oyo moto asengelaki koumela na bomoi. Ezali nde ekateli oyo Yehova azwaki mpo na komonisa ntango oyo etikalaki mpo alongola makambo ya mabe na mokili. a Lokola Mpela ebandaki na mobu 2370 L.T.B., tokoki koloba ete Nzambe azwaki ekateli yango na mobu 2490 L.T.B. Na ntango wana, Noa azalaki na mbula 480. (Eba. 7:6) Mbula soki 20 na nsima, elingi koloba na mobu 2470 L.T.B., Noa akómaki kobota bana. (Eba. 5:32) Etikalaki soki mbula nkama liboso Mpela ebanda, kasi Yehova ayebisaki naino Noa te mokumba oyo asengelaki kokokisa mpo na kobikisa bato. Nzambe azelaki ntango boni liboso ayebisa Noa?

6. Ekoki kozala ete Yehova atindaki Noa atonga masuwa ntango nini?

6 Emonani ete Yehova azelaki lisusu bambula mingi liboso ayebisa Noa likambo oyo akanaki kosala. Mpo na nini tolobi bongo? Biblia emonisi ete bana ya Noa bakómaki mikóló mpe babalaki ntango Nzambe atindaki ye atonga masuwa. Yehova alobaki na ye boye: “Nazali mpenza kosala kondimana na ngai elongo na yo; mpe osengeli kokɔta na masuwa, yo ná bana na yo ná mwasi na yo mpe ná basi ya bana na yo elongo na yo.” (Eba. 6:9-18) Na yango, ekoki mpenza kozala ete ntango Yehova atindaki Noa atonga masuwa, etikalaki kaka mbula 40 to 50 liboso atinda Mpela na mokili.

7. (a) Ndenge nini Noa ná libota na ye bamonisaki kondima? (b) Ntango nini Nzambe ayebisaki Noa mokolo oyo Mpela ekobanda?

7 Na ntembe te ntango Noa ná libota na ye bazalaki kotonga masuwa, bazalaki komituna ndenge nini Nzambe akokokisa mokano na ye mpe ntango nini Mpela ekobanda. Kasi, batikaki te kotonga masuwa mpo bayebaki biyano na mituna wana te. Biblia elobi boye: “Noa abandaki kosala nyonso oyo Nzambe apesaki ye mitindo. Asalaki kaka bongo.” (Eba. 6:22) Nsukansuka, Yehova ayebisaki Noa mokolo oyo Mpela ekobanda ntango etikalaki mikolo nsambo; mikolo yango ekokaki mpo Noa ná libota na ye bákɔtisa banyama na masuwa. Na yango, ntango baporte ya mai ya likoló efungwamaki “na mbula ya nkama motoba (600) ya bomoi ya Noa, na sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na nsambo ya sanza yango,” mosala moko te etikalaki.​—Eba. 7:1-5, 11.

8. Ndenge nini lisolo ya Mpela ezali kolendisa kondima na biso ete Yehova ayebaka ntango oyo ebongi mpenza mpo na kosikola basaleli na ye?

8 Lisolo ya Mpela emonisi ete Yehova ayebaka ntango oyo ebongi mpenza mpe ndenge oyo ebongi mpenza mpo na kosikola basaleli na ye. Wana nsuka ya mokili oyo ezali se kokóma pene, tokoki kolikya ete makambo nyonso oyo Yehova akanaki ekosalema na ntango oyo atyaki, na ‘mokolo mpe na ngonga’ oyo esengeli.​—Mat. 24:36; tángá Habakuku 2:3.

BABIKISAMAKI NA MBU MOTANE

9, 10. Ndenge nini Yehova asalelaki Bayisraele mpo na kokanga basoda ya Ezipito na motambo?

9 Touti komona ete Yehova ayebaka ntango oyo likambo mokomoko ekosalema mpo ete mokano na ye ekokisama. Ndakisa ya mibale oyo tokolobela ekomonisa ntina mosusu oyo tosengeli kolikya ete Yehova akosikola basaleli na ye: Akosalela nguya na ye oyo ezangi nsuka mpo na kokokisa mokano na ye. Lokola Yehova azali na makoki nyonso ya kobikisa basaleli na ye, ntango mosusu kutu asalelaka bango mpo na kokanga banguna na ye na motambo. Esalemaki bongo ntango alongolaki Bayisraele na boombo na Ezipito.

10 Ekoki kozala ete Bayisraele oyo babimaki na Ezipito bazalaki soki milio misato. Yehova ayebisaki Moize amema bango na nzela oyo etindaki Farao akanisa ete bazali koyengayenga mpo babungi nzela. (Tángá Kobima 14:1-4.) Farao akokaki kokanga motema te; yango wana, elongo na basoda na ye, alandaki bato yango oyo bazalaki baombo na ye mpe Mbu Motane ekangaki bango nzela ya kokima ye. Emonanaki lokola nde bakobika te. (Kob. 14:5-10) Nzokande, Bayisraele bazalaki na likama moko te. Mpo na nini? Mpo ete Yehova alingaki kobikisa bango.

11, 12. (a) Yehova asalaki nini mpo na kobikisa basaleli na ye? (b) Makambo esukaki ndenge nini, mpe lisolo yango ezali koteya biso nini mpo na Yehova?

11 “Likonzí ya lipata” oyo ezalaki kotambwisa Bayisraele ekendaki na nsima na bango mpe epekisaki basoda ya Farao bápusana. Likonzí yango etyaki basoda ya Ezipito na molili, kasi ezalaki kongɛngisa Bayisraele na butu. (Tángá Kobima 14:19, 20.) Na nsima, Yehova atindaki mopɛpɛ makasi ya ɛsti oyo ekabolaki mai ya mbu mpe ‘esalaki ete esika oyo mbu ezalaki ekóma mabele oyo ekauki.’ Na ntembe te likambo yango ezwaki ntango mingi, mpo lisolo elobi boye: “Nsukansuka bana ya Yisraele balekaki na katikati ya mbu, na mabele oyo ekauki.” Bayisraele bazalaki kotambola malɛmbɛ koleka basoda ya Farao ná makalo na bango. Atako bongo, basoda ya Ezipito bakokaki kozwa bango te, mpamba te Yehova azalaki kobunda mpo na Bayisraele. “Akɔtisaki mobulungano na kati ya kaa ya Baezipito. Mpe azalaki kolongola bayiká ya makalo na bango, bongo bakómaki kotambwisa yango na mpasi.”​—Kob. 14:21-25.

12 Ntango Bayisraele nyonso bakatisaki na ngámbo mosusu, Yehova alobaki na Moize boye: “Sembolá lobɔkɔ na yo likoló ya mbu, mpo mai ezonga mpe ezindisa Baezipito, makalo na bango ya bitumba mpe basoda na bango oyo batambolaka na mpunda.” Ntango basoda balukaki kokima mai oyo ezalaki kozonga, “Yehova abwakaki Baezipito na kati ya mbu.” Nzela ya kokima ezalaki te. “Moko te kati na bango atikalaki.” (Kob. 14:26-28) Na ndenge yango, Yehova amonisaki ete azali na nguya ya kosikola bato na ye ata na mokakatano nini.

BABIKAKI NTANGO YERUSALEME EBEBISAMAKI

13. Yesu apesaki malako nini, mpe mbala mosusu bayekoli na ye bamitunaki motuna nini?

13 Yehova ayebaka malamumalamu ndenge makambo ekolandana mpo na kokokisa mokano na ye. Tokoki komona likambo yango polele na ndakisa ya misato oyo tokolobela: ntango banguna bazingaki Yerusaleme na ekeke ya liboso. Na nzela ya Mwana na ye, Yehova apesaki bakristo ya Yerusaleme mpe ya Yudea malako liboso engumba Yerusaleme ebebisama na mobu 70 T.B. Yesu alobaki boye: “Ntango bokomona eloko ya bosɔtɔ oyo ebebisaka etɛlɛmi na esika mosantu, ndenge mosakoli Danyele alobaki, . . . na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba.” (Mat. 24:15, 16) Kasi ndenge nini bayekoli ya Yesu balingaki koyeba ete esakweli yango ezali kokokisama?

14. Ndenge nini makambo oyo esalemaki nsima ya bambula esalisaki na komona polele ndimbola ya maloba ya Yesu?

14 Makambo oyo esalemaki nsima ya bambula esalisaki na komona polele ndimbola ya maloba ya Yesu. Na mobu 66 T.B., basoda ya Roma oyo batambwisamaki na Cestius Gallus bayaki na Yerusaleme mpo na kosukisa botomboki ya Bayuda. Ntango Bayuda oyo batombokaki, oyo bazalaki kobengama Bazelote, bakendaki kobombama na ndako makasi ya tempelo, basoda ya Roma babandaki kobuka efelo ya tempelo. Mpo na Bakristo oyo bazalaki kosɛnzɛla, makambo ezalaki polele: basoda ya ekólo ya bapakano ná badrapɔ na bango oyo ezalaki biloko ya losambo (“eloko ya bosɔtɔ”) bakómaki tii na efelo ya tempelo (“esika mosantu”). Ntango ekokaki mpo bayekoli ya Yesu “bábanda kokima na bangomba.” Kasi, ndenge nini bakokaki kobima na engumba oyo banguna bazingaki? Likambo moko oyo bakanisaki te esalemaki.

15, 16. (a) Malako nini Yesu apesaki bayekoli na ye, mpe mpo na nini ezalaki na ntina bátosa yango? (b) Tokobika soki tosali nini?

15 Mpo na ntina oyo eyebani te, Cestius Gallus ná basoda na ye balongwaki na Yerusaleme mpe bakómaki kozonga. Bazelote balandaki bango. Lokola bato oyo bazalaki kobunda batikaki engumba Yerusaleme, mbala moko bayekoli ya Yesu bazwaki nzela ya kokima. Yesu apesaki bango malako ete bátika biloko na bango mpe bákende nokinoki. (Tángá Matai 24:17, 18.) Ezalaki na ntina básala makambo nokinoki? Eyano na motuna yango eumelaki te komonana polele. Nsima ya mwa mikolo, Bazelote bazongaki mpe bakómaki kosɛngisa bafandi ya Yerusaleme mpe ya Yudea ete bápesa bango mabɔkɔ mpo na kobunda mpo na ekólo. Lokola bituluku ndenge na ndenge ya Bayuda bazalaki kowelana mpo na kotambwisa makambo, bomoi ekómaki mpasi na kati ya engumba. Nzela ya kokima ezalaki se kokóma mpasi. Ntango Baroma bazongaki na mobu 70 T.B., nzela ya kokima ezalaki lisusu te. (Luka 19:43) Moto nyonso oyo atikalaki na engumba akangamaki na motambo! Bakristo oyo batosaki malako ya Yesu mpe bakimaki na bangomba babikisaki bomoi na bango. Bamonaki mpenza ete Yehova ayebi kosikola basaleli na ye. Lisolo yango ezali koteya biso nini?

16 Na ntango ya bolɔzi monene, ekosɛnga ete bakristo bátosa malako ya Liloba ya Nzambe mpe ya ebongiseli na ye. Na ndakisa, malako ya Yesu oyo elobaki ete “bábanda kokima na bangomba” ebongi mpe kosalelama na ntango na biso. Toyebi naino te soki kokima na biso ekosɛnga kosala nini. b Nzokande, tokoki kozala na elikya ete Yehova akomonisa polele ndimbola ya malako yango soki ntango ya kotosa yango ekoki. Lokola botosi na biso nde ekobikisa biso, ebongi tómituna boye: ‘Ndenge nini natalelaka malako oyo Yehova azali kopesa basaleli na ye lelo oyo? Natosaka yango noki, to nakakatanaka mpo na kotosa?’​—Yak. 3:17.

TOLENDISAMI MPO NA MAKAMBO OYO EZALI KOYA

17. Esakweli ya Habakuku emonisi nini mpo na ntango oyo banguna bakobundisa basaleli ya Nzambe?

17 Tólobela lisusu etumba ya Goge oyo tolobelaki na ebandeli. Longola Ezekiele, mosakoli Habakuku mpe alobelaki yango. Akomaki boye: “Nayokaki, mpe libumu na ngai ebandaki koningana; ntango lokito eyokanaki, mbɛbu na ngai elɛngaki; mikuwa na ngai ebandaki kopɔla; mpe nabulunganaki na ndenge nazalaki, mpo nazela na kimya mokolo ya mpasi, ntango oyo [Nzambe] akobimela bato [oyo bazali kobundisa basaleli na ye], mpo na kobunda na bango.” (Hab. 3:16) Koyoka kaka nsango ete bakobundisa basaleli ya Nzambe eningisaki libumu ya mosakoli, mbɛbu na ye elɛngaki, mpe makasi na ye esilaki. Ndenge oyo Habakuku ayokaki emonisi ete mbala mosusu tokobanga mpenza ntango ebele ya banguna bakobundisa biso. Atako bongo, mosakoli Habakuku andimaki kozela mokolo ya Yehova na kimya, azalaki na elikya ete Yehova akobikisa bato na ye. Biso mpe tokoki kozala na elikya ya ndenge wana.​—Hab. 3:18, 19.

18. (a) Mpo na nini ezali na ntina te tóbanga mpo banguna bakobundisa biso? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

18 Bandakisa misato oyo totaleli emonisi mpenza ete Yehova ayebi kosikola bato na ye. Mokano na ye ekoki te kozanga kokokisama; akolonga kaka. Kasi, mpo tózala wana mpe tósepela na bolongi yango, tosengeli kotikala sembo tii na nsuka. Ndenge nini Yehova azali kosalisa biso tóbatela bosembo na biso lelo oyo? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1999, lokasa 19.

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 24]

Basoda ya Farao bakokaki nde kokanga Bayisraele?