Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Bókeba na levire ya Bafarisai”

“Bókeba na levire ya Bafarisai”

“Bókeba na levire ya Bafarisai”

Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bókeba na levire ya Bafarisai, elingi koloba bokosi.” (Luka 12:1) Lisolo mosusu oyo elobeli maloba yango ya Yesu emonisi polele ete azalaki kolobela nde “mateya” ya Bafarisai.​—Mat. 16:12.

Ntango mosusu Biblia esalelaka liloba “levire” na ndenge ya elilingi mpo na kolobela libebi. Na ntembe te, mateya mpe makanisi ya Bafarisai ezalaki kobebisa bato oyo bazalaki kolanda yango. Mpo na nini mateya ya Bafarisai ezalaki likama?

1 Bafarisai bazalaki komimona ete bazali bayengebene, mpe bazalaki kotyola bato mpamba.

Yesu alobelaki elimo wana ya komimona moyengebene na ndakisa moko oyo apesaki. Alobaki boye: “Mofarisai atɛlɛmaki, abandi kobondela mpe koloba makambo oyo na motema na ye ete: ‘Ee Nzambe, natɔndi yo mpo nazali lokola bato mosusu te, babɔtɔli, bato bazangi boyengebene, bato ya ekobo, to mpe lokola mokɔngɔli-mpako oyo. Nakilaka bilei mbala mibale na pɔsɔ, napesaka moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso nazwaka.’ Kasi mokɔngɔli-mpako, atɛlɛmaki mosika, azalaki kutu kolinga kotombola miso na ye likoló te, kasi azalaki se kobɛtabɛta ntolo na ye mpe koloba ete: ‘Ee Nzambe, yokelá ngai mawa, ngai mosumuki.’”​—Luka 18:11-13.

Yesu akumisaki komikitisa ya mokɔngɔli-mpako na maloba oyo: “Nazali koyebisa bino ete: Moto oyo akitaki na ndako na ye amonani moyengebene koleka moto wana mosusu [Mofarisai]; mpo moto nyonso oyo azali komitombola akoyokisama nsɔni, kasi moto oyo azali komikitisa akotombwama.” (Luka 18:14) Atako eyebanaki ete bakɔngɔli-mpako bazalaka bato ya bosembo te, Yesu alukaki kosalisa baoyo bayokaki ye. Bato soki mibale oyo bazalaki bakɔngɔli-mpako bakómaki bayekoli na ye: Matai ná Zakai.

Tosengeli kosala nini soki tokómi kokanisa ete toleki basusu mpo na makoki oyo tobotamá na yango to mikumba oyo tozali na yango to mpo toyebi mabunga mpe bolɛmbu ya basusu? Tosengeli kobengana nokinoki makanisi wana, mpo Biblia elobi ete: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, esalaka makambo ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te. Esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te, kasi esepelaka nde na solo.”​—1 Ko. 13:4-6.

Tosengeli kozala na elimo lokola oyo Paulo amonisaki. Nsima ya koloba ete “Kristo Yesu ayaki na mokili mpo na kobikisa basumuki,” Paulo abakisaki ete: “Na kati na bango ngai moto ya liboso mpenza.”​—1 Tim. 1:15.

Mituna mpo na komanyola:

Nayebaka ete nazali mosumuki mpe ete nakobika kaka mpo na boboto monene ya Yehova? To namonaka ete naleki basusu mpo nasaleli Yehova na bosembo bambula mingi, nazali na mikumba na lisangá, to mpe nazali na makoki oyo basusu bazali na yango te?

2 Bafarisai bazalaki kosala makambo malamu na miso ya bato mpo bámonana bato ya sembo. Bazalaki kolinga lokumu mpe batitre ya mineneminene.

Kasi na ntina na bango, Yesu alobaki boye: “Makambo nyonso oyo basalaka, basalaka yango mpo bato bámona bango; mpo bakómisaka minene mwa bakɛsi mike oyo balataka na elongi mpe na lobɔkɔ ya mwasi mpo na komibatela, mpe bakómisaka malenda ya bilamba na bango milaimilai. Balingaka esika ya lokumu mingi na ntango ya bilei ya mpokwa mpe bakiti ya liboso na basinagoga, mpe bambote na bazando mpe bato bábengaka bango Rabi.” (Mat. 23:5-7) Yesu azalaki na makanisi ya ndenge wana te. Atako azalaki Mwana ya Nzambe mpe moto ya kokoka, azalaki na komikitisa. Ntango moto moko abengaki ye “Moteyi Malamu,” Yesu alobaki ete: “Mpo na nini ozali kobenga ngai malamu? Moto malamu azali te, longola kaka moko, Nzambe.” (Mrk. 10:18) Mokolo mosusu, Yesu asukolaki makolo ya bayekoli na ye mpo na koteya bango komikitisa.​—Yoa. 13:1-15.

Mokristo ya solo asengeli kosalela bandeko na ye bakristo. (Gal. 5:13) Ezali bongo mingimingi mpo na baoyo balingi kokóma bakɛngɛli na lisangá. Ezali malamu ndeko mobali ‘aluka kosala mosala ya mokɛngɛli,’ kasi mposa ya kosalela basusu nde esengeli kotinda ye aluka kosala yango. “Mosala” yango ezali titre te to esika ya lokumu. Bakɛngɛli basengeli kozala na “komikitisa na motema,” lokola Yesu.​—1 Tim. 3:1, 6; Mat. 11:29.

Mituna mpo na komanyola:

Nasalelaka baoyo bazali na mikumba na lisangá makambo ya malamu, mpo mbala mosusu bábakisela ngai mikumba? Na mosala ya Nzambe, nasepelaka mingimingi kosala makambo oyo ekobimisa ngai na miso ya bato mpe ekopesa ngai lokumu? Nalukaka koleka basusu?

3 Mimeseno mpe bonkɔkɔ ya Bafarisai ekómisaki mibeko ya Nzambe kilo mpo na bato mpamba.

Mibeko ya Moize emonisaki Bayisraele makambo oyo basengelaki kosala na losambo ya Yehova. Nzokande, eyebisaki te makambo nyonso ya mikemike oyo basengelaki kosala. Na ndakisa, Mibeko epekisaki kosala mosala mokolo ya Sabata, kasi eyebisaki te nini ezalaki mosala mpe nini ezalaki mosala te. (Kob. 20:10) Bafarisai babakisaki mibeko, bandimbola, mpe mimeseno na bango mpo bakanisaki ete Mibeko ya Nzambe ezangaki makambo mosusu. Yesu alandaki te mibeko makasimakasi ya Bafarisai, kasi azalaki kotosa Mibeko ya Moize. (Mat. 5:17, 18; 23:23) Yesu alandaki kaka te ndenge oyo Mibeko ekomami. Akangaki ntina ya Mibeko mpe ayebaki ntina ya komonisa motema mawa. Azalaki na boboto, ata ntango bayekoli na ye bazalaki kosala makambo oyo esepelisi ye te. Na ndakisa, na butu oyo bayaki kokanga ye, asɛngaki bantoma na ye misato bálala mpɔngi te mpe bákɛngɛla, kasi mbala na mbala bazalaki kolala. Atako bongo, Yesu alobaki na bango na boboto ete: “Ya solo, elimo ezali molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.”​—Mrk. 14:34-42.

Mituna mpo na komanyola:

Nalukaka kotyela bato mibeko ya makasimakasi mpe nalukaka basusu bándima kaka makanisi na ngai? Nasɛngaka basusu básala makambo oyo eleki makoki na bango?

Mateya ya Yesu ekesanaki mpenza na oyo ya Bafarisai. Omoni makambo oyo okoki kobongisa mpo omekola Yesu? Soki ezali, zwá ekateli ya kosala yango!

[Elilingi na lokasa 28]

Bafarisai bazalaki kolata mwa bakɛsi oyo ezali na bavɛrsɛ.​—Mat. 23:2, 5

[Bililingi na lokasa 29]

Na bokeseni na Bafarisai ya lolendo, bankulutu ya komikitisa basalelaka basusu

[Elilingi na lokasa 30]

Ozalaka na boboto lokola Yesu to osɛngaka basusu básala makambo oyo eleki makoki na bango?