Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biloko oyo tosalelá kala

“Bolingo na ngai mpo na mosala ya colporteur ezali kobakisama mokolo na mokolo”

“Bolingo na ngai mpo na mosala ya colporteur ezali kobakisama mokolo na mokolo”

NA MOBU 1886, Bayekoli ya Biblia bazwaki babuku Aurore du millénium, Volimi I na Ndako ya Biblia na engumba Allegheny, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis mpe batindaki yango na engumba Chicago, na etúká ya Illinois. Babuku yango ezalaki nkama moko. Ndeko Charles Russell alingaki ete bákabola buku yango ya sika na bamagazini oyo batɛkaka mikanda. Moko ya bakompanyi minene oyo etɛkaka babuku ya makambo ya Nzambe na États-Unis endimaki kozwa babuku Aurore du millénium mpo na kotɛka yango. Kasi, pɔsɔ mibale na nsima, babuku nyonso oyo batindaki ezongaki na Ndako ya Biblia.

Balobaka ete pastɛrɛ moko oyo ayebanaki mingi asilikaki ntango amonaki buku Aurore du millénium ezali kotɛkama esika moko na babuku na ye. Alobaki na nkanda ete soki buku yango ezali kaka wana, ye ná baninga na ye nyonso bapastɛrɛ bakolongola babuku na bango mpe bakotinda yango na bakompanyi mosusu. Atako nkolo kompanyi asepelaki mpenza te, azongisaki babuku Aurore. Longola yango, bazalaki mpe kotya bapiblisite ya buku Aurore na bazulunalo ya mokili. Kasi, banguna basalaki nyonso mpo bakompanyi oyo ebimisaka bazulunalo yango ekata kɔntra oyo esalaki ná Bayekoli ya Biblia. Sikoyo, ndenge nini buku wana ya sika elingaki kokóma na mabɔkɔ ya bato oyo bazalaki koluka solo?

Balongaki mokakatano yango na lisalisi ya basakoli oyo bazalaki kobengama ba colporteurs. a Na mobu 1881, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona esɛngaki basakoli 1 000 oyo bakoki kosala mosala ya ntango nyonso mpo na kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia. Atako ba colporteurs bazalaki mingi te, bakabolaki mikanda oyo ezalaki na mateya ya solo na bisika ndenge na ndenge. Na mobu 1897, buku Aurore pene na milio moko ekabolamaki, mpe mingimingi ba colporteurs nde basalaki mosala yango. Mingi kati na bango bazalaki kobikela na mbongo moke oyo bazalaki kozwa na abonema nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo basali to mpo na buku oyo batikeli moto.

Ba colporteurs yango ya molende bazalaki banani? Bamosusu babandaki mosala yango ntango bazalaki bilenge mpenza mpe bamosusu bazalaki mikóló. Mingi bazalaki minzemba to babalani oyo bazali na bana te; kasi mabota mingi mpe basalaki mosala yango. Ba colporteurs ya sanza na sanza bazalaki kosakola bangonga mingi na mokolo, mpe ba colporteurs basungi bazalaki kosala ngonga moko to mibale. Bandeko nyonso te nde bazalaki na makasi to na makoki ya kosala mosala yango. Kasi, na liyangani ya etúká ya 1906, bayebisaki baoyo bakokaki kosala mosala yango ete esɛngi te ete bázala “bato batángá mingi, to bázala na makoki mingi, to báyeba koloba lokola baanzelu.”

Na mikili ndenge na ndenge, bandeko oyo bazalaki bato mpamba basalaki mosala monene mpenza. Ndeko moko alobaki ete na boumeli ya mbula nsambo akabolaki babuku 15 000. Kasi, alobaki boye: “Nasɛngaki mosala ya colporteur mpo na kozala motɛki-mikanda te, kasi mpo na kozala motatoli ya Yehova mpe ya solo na ye.” Bisika nyonso oyo ba colporteurs bakendaki, bato mingi bandimaki mateya ya solo mpe bituluku ya Bayekoli ya Biblia ekómaki kosalema bipai na bipai.

Bakonzi ya mangomba bazalaki kotyola ba colporteurs mpe kobenga bango batɛki-mikanda. Na 1892, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Bato mingi te bayebaka ete [ba colporteurs] bazali bamonisi ya solosolo ya Nkolo; bayebaka mpe te ete Nkolo apesaka motuya mingi na elimo na bango ya komikitisa mpe ya komipimela.” Ya solo, ndenge ndeko mwasi moko alobaki yango, ba colporteurs bazalaki te na “bomoi ya kolya mpe kolala.” Mbala mingi bazalaki kolata basapato ya makasi mpe kotambola na velo. Na bisika oyo bato bazalaki na mbongo te, ba colporteurs bazalaki kozwa biloko ya kolya epai ya bato oyo batikeli mikanda. Ntango balɛmbi nsima ya kosakola mokolo mobimba, bazalaki kozonga na esengo na bahema to na bandako ya kofutela. Na nsima, bakómaki kosalela Wagɔ ya Colporteur; yango ezalaki motuka oyo bango moko bazalaki kosala wagɔ na yango lokola ndako, ezalaki kosalisa bango bábebisa ntango te mpe bábatela mbongo. b

Kobanda na liyangani oyo esalemaki na mobu 1893 na Chicago, programɛ ya liyangani ekómaki na masolo oyo ezalaki kolobela ba colporteurs. Bazalaki kolobela makambo oyo bakutanaki na yango, komonisa mayele oyo bakoki kosalela mpo na kosakola, mpe batoli mpo na kosakola malamu. Na libaku moko, Ndeko Russell alendisaki basakoli ya molende bámɛlaka ti ya malonga na ntɔngɔ, kɔpɔ ya miliki na moi, mpe soki molunge ezali, krɛmɛ ya malili.

Colporteur nyonso oyo azali na mposa ya moninga ya mosala azalaki kobamba eteni ya elamba ya langi ya mosaka na elamba oyo alati. Ba colporteurs ya sika bazalaki kosala ná baoyo baumeli. Emonani ete formasyo wana ezalaki na ntina, mpamba te colporteur moko ya sika alakisaki mwasi moko buku mpe alobaki na ye, “Namoni okosepela na buku oyo te, nakosi?” Kasi, mwasi yango asepelaki mpe na nsima akómaki Motatoli.

Ndeko mobali moko amitunaki boye, ‘Nakóma colporteur to nakoba kosala mosala na ngai oyo ezali kofuta malamu mpe napesaka likabo ya dolare 1 000 mbula nyonso mpo na mosala ya kosakola?’ Balobaki na ye ete Nkolo akosepela na ekateli nyonso oyo akozwa, kasi soki apesi ntango na ye na mosala ya Nkolo akozwa mapamboli mingi. Mary Hinds azalaki komona ete mosala ya colporteur ezali “lolenge oyo eleki malamu ya kosalisa bato mingi koleka.” Alberta Crosby, oyo azalaki moto ya nsɔninsɔni, alobaki ete, “Bolingo na ngai mpo na mosala ya colporteur ezali kobakisama mokolo na mokolo.”

Bandeko mingi oyo baboti na bango, bankɔkɔ na bango, to bato oyo bateyaki bango solo bazalaki ba colporteurs ya molende, bazali kobatela libula na bango ya elimo tii lelo oyo. Soki na libota na bino bozali na moto te oyo azalaká colporteur to oyo asalá mosala ya mobongisi-nzela, ekozala malamu komityela mokano ya kobanda yango na libota na bino. Yo mpe okomona ete bolingo na yo mpo na mosala ya ntango nyonso ekobanda kobakisama mokolo na mokolo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Nsima ya 1931, nkombo “mobongisi-nzela” ezwaki esika ya “colporteur.”

b Nimero mosusu ekolobela ndenge oyo mituka yango ezalaki.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 32]

Esɛngaki te ete bázala “bato batángá mingi, to bázala na makoki mingi, to báyeba koloba lokola baanzelu”

[Elilingi na lokasa 31]

Osei, colporteur na Ghana, soki na 1930

[Bililingi na lokasa 32]

Likoló: Edith Keen ná Gertrude Morris, ba colporteurs na Angleterre, soki 1918; na nse: Stanley Cossaboom ná Henry Nonkes na États-Unis, ná bakartɔ oyo ezalaki na babuku oyo bautaki kokabola