Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Na ndimbola nini liwa ya bato ya sembo ya Yehova ezali “likambo monene mpenza na miso na ye”?

▪ Na litambwisi ya elimo santu, mokomi moko ya nzembo ayembaki ete: “Liwa ya bato ya sembo ya Yehova ezali likambo monene mpenza na miso na ye.” (Nz. 116:15) Bomoi ya mosambeli mokomoko ya solo ezali na motuya mingi na miso ya Yehova. Nzokande, maloba ya Nzembo 116 elobeli kaka liwa ya mosambeli moko te.

Ebongi te kosalela maloba ya Nzembo 116:15 na diskur ya bokundi ebembe, ata soki moto oyo akufi azalaki mosaleli ya sembo ya Yehova. Mpo na nini? Mpo maloba ya mokomi ya nzembo ezali na ndimbola mosusu. Elimboli ete na miso ya Nzambe, liwa ya basambeli na ye nyonso ezali likambo monene oyo akoki te kotika nzela ete esalema.​—Talá Nzembo 72:14; 116:8.

Nzembo 116:15 endimisi biso ete Yehova akotika nzela te ete basaleli na ye nyonso ya sembo básila awa na mabele. Kutu, Batatoli ya Yehova bakutani na komekama mpe minyoko makasi na ntango na biso; yango emonisi polele ete Nzambe akotika nzela ata mokolo moko te ete básilisa biso nyɛɛ.

Lokola Yehova azali na nguya oyo ezangi nsuka mpe lokola mokano na ye ekozanga te kokokisama, akotika nzela te ete basaleli na ye nyonso bábomama. Soki Nzambe atiki ete basaleli na ye nyonso bábomama, ekozala lokola nde banguna na ye baleki ye na nguya; nzokande likambo yango ekoki kosalema te! Lisusu, mokano na ye oyo ezali ete mabele etonda na bato ya sembo ekokokisama te; nzokande, ekoki mpe kosalema bongo te. (Yis. 45:18; 55:10, 11) Kutu, soki bato oyo bakoki kosambela Yehova na lopango ya tempelo na ye ya elimo awa na mabele bazali te, mosala mosantu ya Yehova ekosalema lisusu te! Ekozala te na bato oyo bakobanda “mabele ya sika,” elingi koloba libota ya sika ya bato ya sembo oyo bakofanda awa na mabele oyo “likoló ya sika” ekoyangela. (Em. 21:1) Longola yango, soki bato yango bazali te awa na mabele, Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo ekozala te.​—Em. 20:4, 5.

Ekozala mpasi kondima ete Nzambe azali Mokonzi oyo aleki nyonso mpe lokumu na ye ekobeba soki atiki banguna na ye básilisa basambeli na ye nyonso awa na mabele. Kotika nzela ete likambo ya ndenge wana esalema ekofingisa Yehova, oyo azali Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba. Longola yango, mpo na limemya oyo amipesaka ye moko mpe na nkombo na ye mosantu, Yehova akotika nzela te ete basambeli na ye nyonso ya sembo bábomama. Kanisá mpe likambo oyo: Lokola “kozanga bosembo ezali te” epai ya Nzambe, akobatela libota ya bato oyo bazali kosalela ye na bosembo. (Mib. 32:4; Eba. 18:25) Longola yango, kotika nzela ete básilisa basaleli na ye nyonso ekoyokana te na maloba na ye oyo: “Yehova akotika bato na ye te, mpo na nkombo na ye monene.” (1 Sa. 12:22) Ya solo, “Yehova akosundola bato na ye te, akotika mpe libula na ye te.”​—Nz. 94:14.

Koyeba ete Yehova akotika ata mokolo moko te ete basaleli na ye básila awa na mabele ezali mpenza kobɔndisa biso! Yango wana, tósala nyonso mpo na kotikala sembo epai ya Nzambe, mpe tótya motema na elaka na ye oyo: “Ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na kobunda na yo ekolonga te, mpe okokweisa lolemo nyonso oyo ekotɛlɛmɛla yo na lisambisi. Yango nde libula ya basaleli ya Yehova, mpe boyengebene na bango euti na ngai.”​—Yis. 54:17.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]

Nzambe akotika ata mokolo moko te ete bato na ye básila nyɛɛ