Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo ya bomoi

Nasalaki boninga ná mibange ya bwanya

Nasalaki boninga ná mibange ya bwanya

Lisolo ya Elva Gjerde

Eleki sikoyo soki mbula 70, mopaya moko oyo ayaki na ndako na biso apesaki tata na ngai likanisi moko oyo ebongolaki mpenza bomoi na ngai. Banda wana, bato mingi mosusu basalisaki ngai na bomoi na ngai. Yango esalisaki ngai mpe nakóma moninga ya Moninga oyo aleki baninga mosusu nyonso. Tiká nalimbwela bino mpo na nini.

NABOTAMÁ na 1932 na engumba Sydney, na ekólo Australie. Baboti na ngai bazalaki kondima ete Nzambe azali, kasi bazalaki kokende ndako-nzambe te. Mama ateyaki ngai ete Nzambe azalaki ntango nyonso kotala ngai mpe soki natosi te, akopesa ngai etumbu. Nakómaki kobanga Nzambe. Kasi, nazalaki kosepela mingi na Biblia. Ntango mama-kulutu na biso azalaki koya kotala biso mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, azalaki kobɛtela ngai masolo mingi ya kitoko oyo ezali na Biblia. Nazalaki kozela ye na mposa makasi mbala nyonso oyo akoya.

Ntango nazalaki elenge, tata atángaki mikanda oyo mobange mwasi moko Motatoli ya Yehova apesaki mama. Asepelaki mingi na makambo oyo atángaki na mikanda yango, yango wana andimaki koyekola Biblia ná Batatoli. Mokolo moko na mpokwa, ntango bazalaki koyekola, tata amonaki ngai nazali kolanda masolo na bango. Ntango alingaki koloba na ngai ete nakende kolala, moto oyo azalaki koyekola na tata atunaki ye soki akoki kobenga ngai naya kofanda pembeni na bango. Likambo yango ezalaki ebandeli ya mbongwana monene na bomoi na ngai mpe ebandeli ya boninga na ngai ná Yehova, Nzambe ya solo.

Mwa moke na nsima, ngai ná tata tokómaki koyangana na makita. Makambo oyo ayekolaki esalisaki ye abongola bomoi na ye. Kutu, akómaki kosala makasi asilikaka te. Yango etindaki mama ná yaya na ngai Frank bákóma mpe koyangana na makita. a Biso minei tokolaki na elimo mpe na nsima tozwaki batisimo. Banda wana, mibange mosusu mingi basalisaki ngai na bomoi na ngai.

NAPONI MOSALA OYO NAKOSALA

Ntango nazalaki elenge, nakómaki moninga ya mibange ya lisangá na biso. Moko na bango ezalaki Alice Place, mobange oyo ayaki kosakola mpo na mbala ya liboso na libota na biso. Akómaki lokola nkɔkɔ na ngai. Alice apesaki ngai formasyo na mosala ya kosakola mpe alendisaki ngai namityela mokano ya kozwa batisimo. Nakokisaki mokano yango ntango nakómaki na mbula 15.

Nakómaki mpe moninga ya mobange mosusu nkombo na ye Percy Dunham ná mwasi na ye Madge [Margaret]. Boninga na ngai ná bango ebongolaki mpenza bomoi na ngai. Nazalaki kolinga matematiki mingi, mpe nazalaki na mposa ya kokóma molakisi ya matematiki. Percy ná Madge bazalaká bamisionɛrɛ na Lettonie na bambula ya 1930. Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na Mpoto, batindaki bango na Betele ya Australie oyo ezalaki na engumba Sydney. Percy ná Madge bazalaki kosepela na ngai mingi. Babɛtelaki ngai masolo mingi ya makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya misionɛrɛ. Nazalaki komona polele ete koteya bato Biblia ekopesa ngai esengo mingi koleka koteya matematiki. Yango wana nazwaki ekateli ya kokóma misionɛrɛ.

Ndeko Dunham ná mwasi na ye balendisaki ngai nasala mosala ya mobongisi-nzela mpo namibongisa mpo na mosala ya misionɛrɛ. Na yango, na 1948, ntango nazalaki na mbula 16, nalandaki lokolo ya bilenge mosusu zomi oyo bazalaki babongisi-nzela na lisangá na biso na Hurstville, na engumba Sydney.

Na mbula minei oyo elandaki, nasalaki mosala ya mobongisi-nzela na bingumba mosusu minei ya etúká ya Nouvelle-Galles du Sud mpe na etúká ya Queensland. Moko na bato ya liboso oyo nayekolaki na bango Biblia ezalaki Betty Law (lelo oyo Betty Remnant). Betty, elenge mwasi moko ya boboto, azalaki mokóló na ngai ya mbula mibale. Na nsima, akómaki moninga na ngai na mosala ya mobongisi-nzela na engumba Cowra, na kilomɛtrɛ soki 230 na wɛsti ya Sydney. Atako nasalaki elongo na Betty ntango moke mpenza, totikalá baninga tii lelo oyo.

Ntango nakómaki mobongisi-nzela monene, nakendaki na engumba Narrandera, na kilomɛtrɛ 220 na sudi-wɛsti ya Cowra. Moninga na ngai ya mosala ekómaki Joy Lennox (lelo oyo Joy Hunter), mobongisi-nzela moko ya molende oyo azalaki mokóló na ngai ya mbula mibale. Tozalaki kaka biso mibale Batatoli na engumba yango. Ngai ná Joy tozalaki kofutela na ndako ya Ray Irons ná mwasi na ye Esther. Bazalaki na mwana moko ya mobali mpe misato ya basi; libota na bango mobimba bazalaki kosepela na mateya ya solo. Ray ná mwana na ye ya mobali bazalaki kokende mosala na ferme moko oyo ezalaki mosika te na engumba, epai bazalaki kobɔkɔla bampate mpe kolona blé; bazalaki kolekisa pɔsɔ mobimba kuna. Na ntango yango, Esther ná bana na ye ya basi bazalaki kosala na ndako ya bapaya. Mokolo nyonso ya lomingo, ngai ná Joy tozalaki kolamba elubu ya misuni mpo na libota yango mpe bapaya koleka zomi; bapaya yango ezalaki mibali oyo bazalaki kosala na nzela ya engbunduka mpe bazalaki koya na nzala makasi. Lokola tozalaki kosala mosala wana, bazalaki kolongola mwa mbongo na mbongo na biso ya kofutela ndako. Nsima ya kobongisa ndako malamu, tozalaki mpe kopesa libota yango bilei ya elimo: tozalaki koyekola na bango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ray, Esther, ná bana na bango minei bakómaki Batatoli mpe bazalaki na kati ya bato ya liboso ntango lisangá ya Narrandera efungwamaki.

Na 1951, nakendaki na liyangani ya etúká na Sydney. Kuna, nakɔtaki na likita moko esalemaki mpo na babongisi-nzela oyo bazalaki na mposa ya kokóma bamisionɛrɛ. Bandeko koleka 300 bazalaki na likita yango oyo esalemaki na hema moko monene. Nathan Knorr, oyo autaki na Betele ya Brooklyn, asololaki na biso mpe amonisaki ete mposa ezalaki monene ya kosakola nsango malamu tii na nsuka ya mabele. Tozalaki koyoka ye na likebi mpenza. Na nsima, babongisi-nzela mingi oyo bazalaki na likita yango bakómaki bato ya liboso oyo bakendaki kosakola na Pacifique Sud mpe na bisika mosusu. Nasepelaki mingi kozala moko ya bato 17 ya Australie oyo babengamaki mpo na kokɔta na kelasi ya mbala ya 19 ya Eteyelo ya Gileade na 1952. Nazalaki kaka na mbula 20 ntango mposa na ngai ya kokóma misionɛrɛ ekómaki kokokisama!

NABONGOLI MAKANISI NA NGAI

Eteyelo ya Gileade ebakisaki boyebi na ngai ya Biblia, elendisaki kondima na ngai, mpe ebongolaki mpenza bomoto na ngai. Nazalaki elenge mpenza mpe nazalaki makambo makasi; nazalaki koluka ete ngai moko mpe bato mosusu tósalaka makambo na ndenge ya kokoka. Ntango mosusu nazalaki mpenza kolekisa ndelo. Na ndakisa, ntango namonaki Ndeko Knorr azali kobɛta bale ná bilenge ya Betele, nayokaki mabe.

Na ntembe te, balakisi na biso na Gileade, oyo bazalaki mikóló mpe bazalaki mayele mingi, bamonaki mokakatano na ngai. Batyelaki ngai likebi mpe basalisaki ngai nabongola makanisi na ngai. Mokemoke, nakómaki komona ete Yehova azali Nzambe ya boboto mpe asepelaka na makambo oyo tosalaka; azali makambo makasimakasi te. Baninga mosusu ya kelasi mpe basalisaki ngai. Mokolo moko, ndeko moko alobaki na ngai ete: “Elva, Yehova azalaka na fimbo te. Tiká kominyokola!” Maloba na ye esimbaki mpenza motema ngai.

Nsima ya Gileade, batindaki ngai ná bandeko mosusu minei na ekólo Namibie. Mwa moke na nsima, biso mitano tokómaki koyekola Biblia na bato 80. Nalingaki mingi ekólo Namibie mpe bomoi ya misionɛrɛ, kasi nalinganaki na ndeko moko oyo tozalaki na ye kelasi moko na Gileade; batindaki ye na Suisse. Nsima ya kosala mbula moko na Namibie, nalandaki fianse na ngai na Suisse. Nsima ya libala na biso, nakómaki kotambola ná mobali na ngai oyo akómaki mokɛngɛli ya zongazonga.

LIKAMBO OYO ESALAKI NGAI MPASI MINGI

Nsima ya kosala mbula mitano na mosala ya zongazonga, batindaki biso na Betele ya Suisse. Kuna, nazalaki kosepela mingi kozala elongo na bandeko ebele ya mikóló oyo baumeli mingi na lisangá.

Mwa moke na nsima, nakutanaki na likambo moko oyo esalaki ngai mpasi mingi. Nayaki koyeba ete mobali na ngai azalaki lisusu sembo te epai na ngai mpe epai ya Yehova. Na nsima, akimaki ngai. Esalaki ngai mpasi mingi! Nayebi te soki nalingaki kosuka ndenge nini kozanga bolingo mpe lisungi ya baninga na ngai ya mikóló na Betele. Bazalaki koyoka ngai soki nazali na mposa ya kosolola mpe bazalaki kotika ngai napema soki nazali na mposa ya kopema. Maloba na bango ya kobɔndisa mpe boboto na bango esalisaki ngai nayika mpiko na likambo wana ya mpasi mpe nakóma lisusu penepene na Yehova.

Nazalaki mpe kokanisa maloba oyo mibange ya bwanya, oyo mpe bakutanaki na mikakatano, bayebisaki ngai bambula mingi liboso. Na ndakisa, mokolo moko Madge Dunham alobaki na ngai boye: “Elva, na mosala ya Yehova, okokutana na mikakatano mingi, kasi oyo ekosala yo mpasi mingi ekouta epai ya bato oyo olingaka mingi. Soki esalemi bongo, kobá kotyela Yehova motema. Kobosana te ete osalelaka nde ye, kasi bato ya kozanga kokoka te!” Toli wana ya Madge elendisaki ngai na makambo mingi ya mpasi oyo nakutanaki na yango. Nalobaki ete nakotika te ete mabunga ya mobali na ngai ekabola ngai ná Yehova.

Na nsima, namonaki malamu nazonga na Australie mpo nazala mobongisi-nzela penepene na libota na ngai. Na mobembo na ngai mpo na kozonga mboka, nasololaki masolo ya Biblia na bato oyo tozalaki na bango na masuwa. Moko na bango nkombo na ye ezalaki Arne Gjerde; azalaki moto ya Norvège mpe azalaki koloba mingi te. Azalaki kosepela na makambo oyo nazalaki koteya bango. Na nsima, Arne ayaki kotala ngai ná bandeko na ngai na Sydney. Akolaki nokinoki na elimo mpe azwaki batisimo. Na 1963, Arne abalaki ngai mpe mbula mibale na nsima, nabotaki mwana na biso ya mobali, Gary.

LIKAMBO MOSUSU OYO ESALAKI NGAI MPASI MINGI

Elongo na Arne mpe Gary, tozalaki na libota ya esengo mpenza. Mwa moke na nsima, Arne akómisaki ndako na biso monene mpo baboti na ngai oyo bakómaki mibange báya kofanda epai na biso. Kasi, nsima ya mbula 6 ya libala, tokutanaki na mokakatano ya ndenge mosusu. Bazwaki Arne na maladi ya kanser ya bɔɔngɔ. Bazalaki kosalisa ye na mayele babengi radiothérapie mpe nazalaki kokende kotala ye na lopitalo mikolo nyonso. Akómaki koyoka malamu; kasi na nsima, maladi eyaki lisusu makasi mpe akómaki paralize. Minganga bayebisaki ngai ete akokufa nsima ya mwa bapɔsɔ. Kasi, Arne akufaki te. Nsukansuka, tozongaki na ndako epai nazalaki kosalisa ye mokemoke mpo azonga nzoto kolɔngɔnɔ. Na nsima, akómaki lisusu kotambola mpe azongelaki misala na ye ya nkulutu na lisangá. Lokola azalaki moto oyo amilelalelaka te mpe azalaki kosala masɛki mingi, esalisaki ye ayoka malamu mpe ezalaki mpasi te mpo nakoba kosalisa ye.

Na 1986, Arne abɛlaki lisusu makasi. Na ntango wana, baboti na ngai basilaki kokufa; na yango, tokendaki kofanda na Blue Mountains, mboka moko kitoko oyo ezali mosika mingi te na Sydney, epai baninga na biso mingi bazalaki kofanda. Na nsima, Gary abalaki Karin, ndeko mwasi moko malamu oyo azalaki kolinga Nzambe mingi; basɛngaki ete tófanda biso minei na ndako moko. Mwa basanza na nsima, tokendaki kofanda na ndako moko oyo ezalaki mosika te na esika oyo ngai ná Arne tozalaki kofanda liboso.

Na nsima, Arne akɔtaki ndako mpe esɛngaki tósalisaka ye na makambo nyonso; eumelaki bongo sanza 18 tii akufaki. Na ntango wana, lokola nazalaki kobima mingi te, nazalaki kolekisa ngonga mibale mokolo na mokolo na koyekola Biblia mpe mikanda ya moombo ya sembo. Natángaki makambo mingi mpo na ndenge ya koyika mpiko na likambo oyo ekómelaki ngai. Bandeko mingi ya mibange ya lisangá, oyo bakutanaki mpe na mikakatano ya ndenge wana, bazalaki koya kotala biso. Bazalaki mpenza kolendisa ngai! Arne akufaki na sanza ya Aprili 2003 na elikya makasi ete mokolo mosusu akosekwa.

MOTO OYO ASALISAKA NGAI MINGI KOLEKA

Ntango nazalaki elenge, nazalaki makambo makasi. Kasi, nayaki komona ete na bomoi, makambo esalemaka kaka te ndenge oyo tokanisaki. Nazwaki mapamboli mingi kasi nakutanaki mpe na makambo mibale ya mpasi mingi: mobali na ngai ya liboso akufaki na elimo, mpe oyo ya mibale akufaki na maladi. Na bomoi na ngai, bato mingi basalisaki ngai mpe babɔndisaki ngai. Kasi, moto oyo asalisaka ngai mingi tii lelo ezali “Mokóló na Mikolo,” Yehova Nzambe. (Dan. 7:9) Batoli na ye ebongisá bomoto na ngai mpe esalisaki ngai nakutana na makambo mingi ya esengo na mosala ya misionɛrɛ. Na ntango ya mikakatano, ‘motema boboto ya Yehova ezalaki kosimba ngai mpe mabɔndisi na ye ebandaki kokitisa molimo na ngai motema.’ (Nz. 94:18, 19) Namonaki mpe bolingo mpe lisungi ya bandeko na ngai ya libota mpe ya ‘baninga ya solosolo oyo babotami mpo na ntango ya mpasi.’ (Mas. 17:17) Mingi kati na bango bazalaki mibange ya bwanya.

Yobo atunaki boye: “Bwanya ezalaka nde epai ya mibange te mpe mayele na bolai ya mikolo te?” (Yobo 12:12) Soki nakanisi bomoi na ngai, nakoki koloba ete ezali bongo. Batoli ya mibange ya bwanya esalisaki ngai mingi, maloba na bango ya kolendisa esungaki ngai, mpe boninga na bango ebongisaki bomoi na ngai. Nazali na botɔndi mingi ndenge nasalaki boninga ná bango.

Lelo oyo, ngai moko mpe nakómi mobange ya mbula 80. Makambo oyo nakutaná na yango etindaka ngai natyelaka mpenza bamposa ya mibange mosusu likebi. Tii lelo, nasepelaka kokende kotala bango mpe kosalisa bango. Kasi, nasepelaka mpe kozala elongo na bilenge. Nguya na bango epesaka ngai makasi mpe esengo na bango elendisaka ngai. Soki namoni ete bilenge bazali na mposa ya toli to bilendiseli na ngai, nasepelaka mingi kopesa bango yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Frank Lambert, yaya ya Elva, akómaki mobongisi-nzela ya molende na Australie. Annuaire 1983 des Témoins de Jéhovah, nkasa 110-112, elobeli mobembo moko kati na mibembo ebele oyo azalaki kosala mpo na kosakola.

[Elilingi na lokasa 14]

Elongo na Joy Lennox, na engumba Narrandera

[Elilingi na lokasa 15]

Elva ná bandeko ya Betele ya Suisse, na 1960

[Elilingi na lokasa 16]

Ntango Arne azalaki kobɛla