Tótya motema epai ya Yehova—Nzambe ya “bantango mpe bileko”
Tótya motema epai ya Yehova—Nzambe ya “bantango mpe bileko”
“Abongolaka bantango mpe bileko, alongolaka bakonzi mpe atyaka bakonzi.”—DAN. 2:21.
OKOPESA EYANO NINI?
Ndenge nini bozalisi mpe bisakweli oyo ekokisamá emonisi ete Yehova azali Nkolo-ntango?
Koyeba ete Yehova azali Nzambe ya “bantango mpe bileko” etindaka biso tósala nini?
Mpo na nini manaka ya Yehova elandaka te ndenge oyo makambo ya mokili ezali kotambola mpe mikano ya bato?
1, 2. Nini emonisi ete Yehova ayebi malamumalamu soki ntango ezali nini?
LIBOSO kutu akela moto, Yehova Nzambe akelaki biloko oyo esalisaka biso tóyeba ntango. Na mokolo ya minei ya bozalisi, Nzambe alobaki boye: “Bingɛngiseli ezala na etando ya likoló mpo na kosala ete moi ekabwana na butu; mpe esengeli kozala bilembo mpo na bileko, mpo na mikolo mpe mpo na bambula.” (Eba. 1:14, 19, 26) Na kolanda mokano ya Yehova, esalemaki mpe bongo.
2 Kasi, tii lelo oyo bato ya siansi bayebaka te soki ntango ezali mpenza nini. Buku moko elobi boye: “Moto moko te akoki kolimbola soki ntango ezali mpenza nini.” Kasi, Yehova ayebi malamumalamu soki ntango ezali nini. Azali “Mozalisi ya likoló, . . . Moto oyo asalaki mabele mpe Moto oyo akelaki yango.” Yehova azali mpe “Moto oyo banda na ebandeli ayebisaka ndenge makambo ekosuka, mpe banda kala makambo oyo esalemi naino te.” (Yis. 45:18; 46:10) Mpo na kolendisa kondima na biso epai na ye mpe Liloba na ye, tótalela ndenge oyo bozalisi mpe bisakweli oyo ekokisamá emonisi ete Yehova azali Nkolo-ntango.
BOZALISI ELENDISAKA KONDIMA NA BISO EPAI YA YEHOVA
3. Pesá ndakisa oyo emonisi ete biloko oyo Yehova akelá etosaka ntango.
3 Biloko mingi oyo Yehova akelá, ezala biloko ya mikemike oyo emonanaka na miso te to biloko ya minene mpenza, etosaka ntango. Na ndakisa, baplanɛti mpe minzoto etosaka ntango wana ezali kotambola na kati ya molɔ́ngɔ́, mpe tokoki koyeba bambula mingi liboso esika planɛti songolo ekozala. Yango nde esalisaka bato báyeba bileko mpe bábunga te ntango bazali kosala mibembo na masuwa. Lokola Yehova azali Mozalisi ya biloko nyonso wana, azali “na makasi na kati ya nguya” mpe ebongi ete tósanzola ye.—Tángá Yisaya 40:26.
4. Ndenge nini bwanya ya Yehova emonanaka na ndenge oyo bikelamu ya bomoi elandaka ntango?
4 Bikelamu ya bomoi mpe elandaka ntango. Makambo mingi oyo banyama to mpe banzete esalaka elandaka ntango. Yango wana bandɛkɛ mingi bayebaka ntango oyo basengeli kosala mobembo mpo na kokende na esika oyo bakolekisa eleko ya malili to ya molunge. (Yir. 8:7) Makambo oyo bato basalaka elandaka mpe ntango. Na ndakisa, nzoto na biso eyebisaka biso ete tokómi na moi to na butu. Soki tokei mobembo na aviɔ na mboka mosika, epai oyo ngonga ekeseni na ngonga ya esika oyo touti, tokoki kolekisa mwa mikolo mpo nzoto na biso emesana na ngonga ya esika oyo tokómi. Tomoni ete biloko mingi oyo Yehova akelá emonisaka ete azali Nzambe ya “bantango mpe bileko” mpe ete azali na nguya mingi mpe na bwanya. (Tángá Nzembo 104:24.) Ya solo, Yehova azali Nkolo-ntango mpe azali na nguya mpe na bwanya nyonso. Tokoki kondima ete akokokisa mokano na ye!
BISAKWELI OYO EKOKISAMÁ ELENDISAKA KONDIMA NA BISO
5. (a) Wapi lolenge kaka moko oyo tokoki koyeba bomoi ya bato na mikolo ekoya? (b) Mpo na nini Yehova akoki kosakola makambo oyo ekoya mpe ntango oyo ekosalema?
5 Biloko oyo Yehova akelá esalisaka biso tóyeba “bizaleli na ye oyo emonanaka te,” kasi ekoki te kosalisa biso tózwa eyano na mituna ya ntina mingi, na ndakisa, Bato bakozala ndenge nini na mikolo ekoya? (Rom. 1:20) Tosengeli koluka eyano na motuna yango na Biblia, Liloba ya Nzambe. Kati na yango tokokuta bisakweli oyo ekokisamaki na ntango mpenza oyo Nzambe atyaki! Yehova akoki koyebisa makambo oyo ekosalema mpamba te akoki koyeba na bosikisiki makambo oyo ekoya. Longola yango, makambo oyo Biblia esakoli ekokisamaka na ntango na yango mpenza, mpamba te Yehova Nzambe akoki kosala ete makambo esalema na kolanda mokano mpe manaka na ye.
6. Nini emonisi ete Yehova alingaka ete tókanga ntina ya bisakweli mpe ndenge oyo ekokisamaki?
6 Yehova alingaka ete basambeli na ye bákanga ntina ya bisakweli ya Biblia mpe bázwela yango matomba. Atako Nzambe atalelaka ntango te ndenge oyo biso totalelaka yango, soki asakoli likambo, asalelaka maloba oyo tokoki kokanga ntina mpo na koyebisa ntango oyo ekokokisama. (Tángá Nzembo 90:4.) Na ndakisa, mokanda ya Emoniseli elobeli “baanzelu minei” oyo “balɛngɛlamaki mpo na ngonga yango mpe mokolo yango mpe sanza yango mpe mbula yango”—ndenge ya kotánga ntango oyo biso bato tokoki kokanga ntina. (Em. 9:14, 15) Kotalela ndenge oyo bisakweli ekokisamaki na ntango mpenza oyo Nzambe atyaki ekolendisa kondima na biso epai ya Nzambe ya “bantango mpe bileko” mpe na Liloba na ye. Tótalela mwa bandakisa.
7. Ndenge nini esakweli ya Yirimia oyo elobelaki Yerusaleme ná Yuda emonisi ete Yehova azali Nkolo-ntango?
7 Ya liboso, tótalela likambo oyo esalemaki na ekeke ya nsambo L.T.B. “Na mbula ya minei ya Yehoyakime mwana ya Yosia, mokonzi ya Yuda,” liloba ya Nkolo-ntango “eyelaki Yirimia mpo na bato nyonso ya Yuda.” (Yir. 25:1) Yehova asakolaki ete basoda ya Babilone bakobebisa Yerusaleme mpe bakomema Bayuda na boombo na Babilone. Kuna, “bakosalela mpenza mokonzi ya Babilone mbula ntuku nsambo (70).” Basoda ya Babilone babebisaki Yerusaleme na mobu 607 L.T.B., mpe bamemaki Bayuda na boombo na Babilone. Kasi, nini esengelaki kosalema na nsuka ya mbula 70? Yirimia asakolaki boye: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Ntango mbula ntuku nsambo (70) ekokoka na Babilone nakotyela bino likebi, mpe nakokokisela bino liloba na ngai ya malamu na ndenge nakozongisa bino na esika oyo.’” (Yir. 25:11, 12; 29:10) Esakweli yango ekokisamaki na ntango oyo esengelaki—na mobu 537 L.T.B., ntango Bamede ná Baperse balongolaki Bayuda na boombo na Babilone.
8, 9. Ndenge nini bisakweli ya Danyele oyo etali koya ya Masiya mpe kotyama ya Bokonzi ya Nzambe na likoló emonisi ete Yehova azali Nzambe ya “bantango mpe bileko”?
8 Mbula soki mibale liboso Bayuda bálongwa na Babilone, Danyele akomaki esakweli moko. Na esakweli yango, Nzambe alobaki ete Masiya akomonana mbula 483 nsima ya kobima ya liloba ya kotonga lisusu Yerusaleme. Mokonzi ya Bamede ná Baperse apesaki mitindo yango na mobu 455 L.T.B. Kaka ndenge Nzambe alobaki, nsima ya mbula 483, elingi koloba na mobu 29 T.B., Yesu moto ya Nazarete azwaki batisimo mpe atyamaki mafuta na elimo santu; na ndenge yango akómaki Masiya. a—Neh. 2:1, 5-8; Dan. 9:24, 25; Luka 3:1, 2, 21, 22.
9 Sikoyo tótala oyo Biblia esakolaki mpo na Bokonzi ya Nzambe. Bisakweli ya Biblia emonisaki ete Bokonzi ya Masiya ekobanda koyangela na likoló na 1914. Na ndakisa, Biblia epesaki “elembo” ya kozala ya Yesu mpe elobaki ete na ntango yango bakobengana Satana na likoló, mpe akomema mawa monene awa na mabele. (Mat. 24:3-14; Em. 12:9, 12) Longola yango, bisakweli mosusu ya Biblia esalisaka biso tóyeba ete 1914 ezali mbula oyo “bantango oyo etyamá ya bikólo” esengelaki kosuka mpe oyo Bokonzi esengelaki kobanda koyangela na likoló.—Luka 21:24; Dan. 4:10-17. b
10. Tozali kozela makambo nini oyo ekosalema na ntango mpenza oyo etyamá?
10 Sikoyo, tozali kozela “bolɔzi moko monene” oyo Yesu asakolaki. Na nsima, Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu ekobanda. Ntembe ezali te ete makambo yango ekosalema na ntango mpenza oyo etyamá. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, Yehova asilaki kotya ‘mokolo mpe ngonga’ oyo makambo yango ekosalema.—Mat. 24:21, 36; Em. 20:6.
‘TÓMISOMBELA NTANGO OYO EBONGI’
11. Lokola toyebi ete tozali na mikolo ya nsuka, tosengeli kosala nini?
11 Koyeba ete Bokonzi ya Nzambe ebandi koyangela mpe ete tozali na “ntango ya nsuka” esengeli kotinda biso tósala nini? (Dan. 12:4) Bato mingi bazali komona ndenge makambo ya mokili ezali se kobeba, kasi bazali koyeba te ete nyonso wana ezali kokokisa bisakweli ya Biblia mpo na mikolo ya nsuka. Mbala mosusu bakanisaka ete mokili oyo ekokufa mokolo mosusu to mpe bakanisaka ete milende oyo bato bazali kosala ekomema “kimya.” (1 Tes. 5:3) Bongo biso? Soki tondimaka ete etikali moke mpenza mokili ya Satana ebomama, tosengeli kosala makasi tósalela Nzambe ya “bantango mpe bileko” mpe tósalisa basusu báyeba ye na boumeli ya mwa ntango oyo etikali. (2 Tim. 3:1) Tosengeli kosalelaka malamu ntango na biso.—Tángá Baefese 5:15-17.
12. Makambo oyo Yesu alobaki mpo na mikolo ya Noa ekoki koteya biso nini?
12 Lokola tozali na mokili oyo etondi na makambo oyo ekoki kolya biso ntango, ‘komisombela ntango oyo ebongi’ ezali pɛtɛɛ te. Yesu alobaki boye: “Ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.” Mikolo ya Noa ezalaki ndenge nini? Nzambe asakolaki ete etikali moke mokili yango ebomama. Na ntango wana, bato mabe basengelaki kokufa na Mpela. Noa, “mosakoli ya boyengebene,” ayebisaki bato ya ntango na ye nsango ya Nzambe. (Mat. 24:37; 2 Pe. 2:5) Kasi, bato yango “bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, . . . mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.” Yango wana Yesu akebisaki bayekoli na ye ete: “Bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.” (Mat. 24:38, 39, 44) Tosengeli komekola Noa, kasi bato ya ntango na ye te. Nini ekosalisa biso tómilɛngɛla?
13, 14. Wana tozali kozela koya ya Mwana ya moto, likambo nini tosengeli kobosana te mpo na Yehova, oyo ekosalisa biso tósalela ye na bosembo?
13 Atako Mwana ya moto akoya na ngonga oyo tozali kokanisa te, tosengeli kobosana te ete Yehova azali Nkolo-ntango. Ata soki makambo ya mokili ezali ndenge nini to bato bakani kosala nini, Yehova akoki kotya ntango oyo akokokisa mokano na ye mpe makambo oyo ekobimisa. (Tángá Danyele 2:21.) Kutu, Masese 21:1 elobi boye: “Motema ya mokonzi ezali lokola mikɛli ya mai na lobɔkɔ ya Yehova. Abalusaka yango esika nyonso asepeli kobalusa.”
14 Yehova akoki kobongola makambo mpo na kokokisa mokano na ye na ntango oyo atyaki. Makambo mingi ya minene oyo ezali kosalema na mokili ezali kokokisa bisakweli ya Biblia, mingimingi oyo etali mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mabele mobimba. Tokoki kotánga ndenge mikili ya Union soviétique ekabwanaki mpe makambo oyo yango ememaki. Bato mingi te bakanisaki ete mbongwana monene wana na makambo ya politiki ekokaki kosalema nokinoki ndenge wana. Nzokande mbongwana wana efungolaki nzela mpo nsango malamu esakolama lelo oyo na mikili mingi epai mosala ya kosakola epekisamaki. Yango wana, tómisombela ntango oyo ebongi mpo na kosalela Nzambe ya “bantango mpe bileko” na bosembo nyonso.
TÓNDIMA ETE YEHOVA AKOKOKISA MOKANO NA YE NA NTANGO OYO ATYAKI
15. Ndenge nini tokoki komonisa kondima na biso ntango ebongiseli ya Yehova ebongoli makambo mosusu?
15 Mpo tókoba kosakola nsango ya Bokonzi na mikolo oyo ya nsuka, tosengeli kozala na kondima ete Yehova akokokisa mokano na ye na ntango oyo atyaki. Lokola makambo ya mokili ezali se kobongwana, ekoki kosɛnga ete makambo mosusu ebongwana na mosala na biso ya kokómisa bato bayekoli. Na bantango mosusu, ebongiseli ya Yehova ekoki kobongola makambo mosusu mpo na kosalisa biso tósakola malamumalamu. Tokomonisa kondima na biso epai ya Nzambe ya “bantango mpe bileko” soki tozali kotosa bambongwana yango mpe tozali kolanda na bosembo litambwisi ya Mwana na ye, oyo azali “mokonzi ya lisangá.”—Ef. 5:23.
16. Mpo na nini tosengeli kondima ete Yehova akosunga biso ntango tozali na mposa ya lisalisi?
16 Yehova alingi ete tóbondelaka ye ntango nyonso mpe tótya motema ete akosunga biso “ntango tozali na mposa ya lisalisi.” (Ebr. 4:16) Yango emonisi ete alingaka biso mpe amibanzabanzaka mpo na mokomoko na biso. (Mat. 6:8; 10:29-31) Tokomonisa ete tozali na kondima epai ya Yehova Nzambe soki tozali kobondela ye ntango nyonso ete asalisa biso mpe soki tozali kolanda litambwisi na ye. Longola yango, tóbosanaka te kobondela mpo na bandeko na biso bakristo.
17, 18. (a) Likambo nini Yehova akosala banguna na ye mosika te? (b) Tosengeli kokeba na motambo nini?
17 Sikoyo ezali te ntango ya ‘kozanga kondima’; ezali nde ntango ya kokóma makasi na kondima. (Rom. 4:20) Satana ná bato na ye, oyo bazali banguna ya Nzambe, bazali koluka ete tótika mosala oyo Yesu apesaki biso. (Mat. 28:19, 20) Atako Zabolo azali kobundisa biso, toyebi ete Yehova azali “Nzambe moko ya bomoi, oyo azali Mobikisi ya bato ya ndenge nyonso, mingimingi mpenza ya bato ya sembo.” Longola yango, “ayebi kosikola na komekama bato oyo bakangamaka na Nzambe.”—1 Tim. 4:10; 2 Pe. 2:9.
18 Etikali moke Yehova aboma mokili oyo mabe. Atako toyebi te ndenge makambo nyonso ekosalema mpe mokolo oyo ekosalema, toyebi ete na ntango mpenza oyo esengeli, Kristo akosilisa banguna ya Nzambe, mpe moto nyonso akoyeba ete Yehova azali na lotomo ya kozala Mokonzi. Yango wana, tokosala libunga monene soki tobosani “bantango mpe bileko” oyo tozali lelo oyo! Tókwea te na motambo ya kokanisa ete “makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.”—1 Tes. 5:1; 2 Pe. 3:3, 4.
‘TÓMONISA ETE TOZALI KOZELA’
19, 20. Mpo na nini tosengeli komonisa ete tozali kozela Yehova?
19 Na ebandeli, mokano ya Yehova ezalaki ete bato bázala na bomoi libela na libela mpo bákoba koyekola makambo na ye mpe biloko kitoko oyo akelá. Mosakoli 3:11 elobi boye: “[Yehova] asali eloko nyonso kitoko na ntango na yango. Ata likanisi ya kozala na bomoi ya seko, atye yango na motema na bango, mpo bato báyeba te mosala oyo Nzambe ya solo asalá banda ebandeli tii na nsuka.”
20 Tozali mpenza na esengo ete Yehova abongoli te mokano na ye mpo na bato! (Mal. 3:6) Nzambe “abongwanaka te lokola elili.” (Yak. 1:17) Manaka na ye elandaka te ndenge oyo bato batalelaka ntango, na ndakisa na kolanda kobima mpe kolala ya moi. Yehova azali “Mokonzi ya seko.” (1 Tim. 1:17) Yango wana, ‘tómonisa ete tozali kozela Nzambe ya lobiko na biso.’ (Mika 7:7) Ndenge Biblia elobi, ‘tózala na mpiko, mpe motema na biso ezala makasi, biso nyonso baoyo tozali kozela Yehova.’—Nz. 31:24.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! nkasa 186-195.
b Talá buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! nkasa 94-97.
[Mituna ya boyekoli]
[Elilingi na lokasa 19]
Danyele azalaki kondima ete bisakweli ya Nzambe ekokokisama
[Elilingi na lokasa 21]
Osalelaka malamu ntango na yo mpo na kosala mokano ya Yehova?