Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Équateur

Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Équateur

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Équateur

BRUNO, elenge moko ya ekólo Italie, asengelaki kozwa ekateli moko monene. Autaki kozwa diplome mpe azwaki bapwɛ ebele koleka bana-kelasi na bango nyonso; bandeko na ye mpe balakisi bakómaki kotya ye mbamba ete akende na iniversite. Nzokande, mwa bambula liboso, Bruno azwaki batisimo mpe alakaki Yehova ete akotya mokano na Ye na esika ya liboso na bomoi na ye. Ekateli nini azwaki? Alobi boye: “Nayebisaki Yehova na libondeli ete nakokokisa elaka na ngai mpe nakotya ye na esika ya liboso. Kasi, nayebisaki mpe ye polele ete nalingi ete nazala na esengo na mosala na ye mpe nasalela ye misala ndenge na ndenge.”

Mwa bambula na nsima, Bruno akendaki kofanda na ekólo Équateur, na Amerika ya Sudi. Alobi boye: “Yehova ayanolaki na mabondeli na ngai koleka kutu ndenge nakanisaki.” Ntango akómaki na Équateur, Bruno akamwaki komona ete bilenge ebele lokola ye batikaki mpe bamboka na bango mpe bakendaki kuna mpo na kosalela Yehova mingi.

BILENGE OYO ‘BAZALI KOMEKA YEHOVA’

Ndenge moko na Bruno, bankóto ya bilenge mosusu na mokili mobimba, bandimaki kosala likambo oyo Yehova asɛngi ete: “Nabondeli bino, bómeka ngai, . . . bómona soki nakofungwela bino baporte ya mai ya likoló te mpe soki nakosopela bino lipamboli te.” (Mal. 3:10) Lokola balingaka Nzambe, bazali ‘komeka Yehova’ na ndenge bazali kopesa ntango, makasi, mpe makoki na bango mpo na kosalela ye na ekólo oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te.

Ntango bilenge yango oyo bazali komipesa na bolingo na bango moko bakómi na mboka moko, bamonaka mbala moko ete “mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke.” (Mat. 9:37) Na ndakisa, Jaqueline, oyo autá na ekólo Allemagne, akomelaki filiale ya Équateur ete: “Eleki kaka mbula mibale na ndambo kobanda nazali kosakola na Équateur, kasi nazali koyekola Biblia na bato 13, mpe 4 kati na bango bayanganaka na makita nyonso. Ezali mpenza likambo ya esengo!” Chantal, oyo autá na Canada, alobi boye: “Na 2008, nakendaki na mboka moko oyo ezalaki kaka na lisangá moko, na bokula ya ekólo Équateur. Lelo oyo, na mboka yango masangá ezali misato mpe babongisi-nzela bazali koleka 30. Eloko moko te ekokani na esengo ya komona ndenge bato ebele boye bazali kokola na elimo!” Abakisi boye: “Eleki mwa mikolo, nakendaki na engumba moko oyo ezali likoló ya Bangomba ya Andes. Engumba yango ezali na bato koleka 75 000, kasi lisangá ezali kaka moko. Bato mingi bazali kondima nsango malamu! Nazali kosepela mingi kosakola awa.”

MIKAKATANO OYO BAKUTANAKA NA YANGO

Ya solo, kokende kosakola na mboka mopaya ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kutu, bilenge mosusu bakutanaki na mikakatano liboso bákende. Kayla, oyo autá na États-Unis, alobi boye: “Bandeko mosusu oyo bakanisaki ete balingi kosalisa ngai bazalaki koloba na ngai maloba oyo ezalaki kolɛmbisa ngai. Bazalaki komona te ntina oyo nalingaki kokende kosala mosala ya mobongisi-nzela na mboka mopaya. Ntango mosusu nakómaki komituna ete, ‘Nazwi mpenza ekateli ya malamu?’” Atako bongo, Kayla akendaki kaka. Alobi boye: “Kobondela mingi mpe kosolola na bandeko oyo bakɔmɛli na elimo esalisaki ngai namona ete Yehova apambolaka baoyo bazali na elimo ya komipesa.”

Mpo na bandeko mingi, mokakatano monene ezalaka nde ya koyekola monɔkɔ mosusu. Siobhan, oyo autá na Irlande, alobi boye: “Ezalaki kosala ngai mpasi ndenge nazalaki kokoka te koloba makambo oyo nazali kokanisa. Esɛngaki nazala motema molai, namipesa na koyekola monɔkɔ yango, mpe nayokaka nsɔni te soki nasali foti.” Anna, oyo autá na Estonie, abakisi boye: “Molunge, zɛlɔ, mpe kozanga mai ya mɔtɔ mpo na kosukola ezalaki eloko te liboso ya mokakatano ya koyekola monɔkɔ ya Espagnol. Ntango mosusu nazalaki komona lokola natika. Esengelaki natalelaka mingi milende oyo nazalaki kosala, kasi te mabunga na ngai.”

Mokakatano mosusu ezalaka mposa ya komona bandeko mpe baninga oyo totiká. Jonathan, oyo autá na États-Unis, alobi boye: “Nsima ya kokóma na mboka mopaya, nakómaki kolɛmba nzoto mpo natikaki baninga mpe bandeko na ngai. Kasi, nabosanaki nyonso wana ntango namipesaki na koyekola Biblia ngai moko mpe kobima na mosala ya kosakola. Eumelaki te, makambo ya malamu oyo nazalaki kokutana na yango na mosala ya kosakola mpe baninga ya sika oyo nazwaki na lisangá basalisaki ngai nakóma lisusu na esengo.”

Mokakatano mosusu ezali ya komesana na bomoi na mboka mopaya. Na ntembe te, makambo ekozala ndenge moko te na oyo omesanaki na yango. Beau, oyo autá na Canada, alobi boye: “Na mboka na biso, tomitungisaka te mpo na makambo lokola kura mpe mai ya pɔmpi. Kasi, awa kura ekatanaka mpe mai ekendaka mbala na mbala.” Na mikili mosusu, bobola ezali makasi, mituka ya malonga ezalaka te, mpe bato mingi bayebi kotánga mpe kokoma te. Mpo mikakatano ya ndenge wana esilisa ye esengo te, Ines, oyo autá Autriche, atyaka makanisi na ye na bizaleli malamu ya bato. Alobi boye: “Balingaka bapaya, bazali na boboto, basalisaka baninga, mpe bazali na komikitisa. Kasi, oyo eleki nyonso ezali ete basepelaka mpenza koyekola makambo ya Nzambe.”

‘LIPAMBOLI KINO BOSƐNGA EKOZALA LISUSU TE’

Atako bilenge yango nyonso oyo bazali kosala na ekólo Équateur bamipimeli makambo mingi, bazali komona ete Yehova apesaka “mingi mpenza koleka makambo nyonso” oyo bakanisaki. (Ef. 3:20) Bamonaka mpenza ete apesaka bango ‘lipamboli kino bosɛnga ezali lisusu te.’ (Mal. 3:10) Talá ndenge batalelaka mosala na bango:

Bruno: “Nabandaki mosala na ngai awa na ekólo Équateur na etúká ya Amazonie oyo ezali na makambo ndenge na ndenge. Na nsima, nakendaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga biro ya filiale. Lelo oyo nazali kosala na Betele. Ntango nazalaki na Italie, nalakaki Yehova ete nakotya ye na esika ya liboso na bomoi na ngai; lelo oyo azali mpenza kokokisa mposa na ngai ya kosalela ye na esengo mpe na misala ndenge na ndenge.”

Beau: “Boninga na ngai ná Yehova ekómi lisusu makasi mpamba te awa na Équateur, nazali kolekisa ntango na ngai nyonso na makambo ya elimo. Longola yango, nazwaka libaku ya kokende kotala bisika ya kitoko, likambo oyo nazalaki ntango nyonso na mposa ya kosala.”

Anna: “Nazalaki kokanisa ete ndeko mwasi oyo azali monzemba akoki te kosepela na bomoi ya misionɛrɛ. Kasi, sikoyo nayebi ete ekoki kosalema. Yehova azali kopambola ngai mpe nazali na esengo na mosala ya kokómisa bato bayekoli, kotonga Bandako ya Bokonzi, mpe nazali kozwa baninga ya sika.”

Elke: “Na mboka na biso Autriche, mbala mingi nazalaki kosɛnga Yehova asalisa ngai nazwa ata moto moko oyo nakoki koyekola na ye Biblia. Awa nazali koyekola na bato 15! Komona esengo ya bayekoli oyo bazali kokola na elimo esepelisaka ngai mingi mpenza.”

Joel: “Koya kosalela Yehova na esika oyo oyebaki te ezali likambo monene. Okoyekola kotyela ye motema lisusu mingi, mpe komona ndenge azali kopambola milende na yo epesaka esengo mingi! Ntango nautaki na États-Unis, na mbula ya liboso oyo nalekisaki awa, etuluku na biso ya basakoli 6 ekómaki na basakoli 21. Na Ekaniseli, tozalaki bato 110.”

YO OKANISI NINI?

Elenge mwasi to mobali, bomoi na yo ezali kopesa yo nzela ya kokende na mboka oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te? Ya solo, esɛngaka komibongisa malamumalamu liboso ya kozwa ekateli monene lokola oyo wana. Koleka nyonso wana, esɛngaka kolinga Yehova mingi mpe bazalani na yo. Soki ozali na bolingo ya ndenge wana mpe okokisi masɛngami mosusu, yebisáká Yehova mposa na yo ya kokende kosakola na mboka mopaya. Longola yango, sololá na baboti na yo soki bazali Batatoli mpe na bankulutu mpo na komonisa bango mposa na yo. Mbala mosusu okomona ete yo mpe okoki kokende kosakola na mboka mopaya, likambo oyo ezali libaku malamu mpe oyo ekopesa yo esengo.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]

“Kobondela mingi mpe kosolola na bandeko oyo bakɔmɛli na elimo esalisaki ngai namona ete Yehova apambolaka baoyo bazali na elimo ya komipesa.”​—Kayla, autá na États-Unis

[Etanda/​Elilingi na lokasa 6]

Mpo na komibongisa mpo na kokende na mboka mopaya

• Zwá momeseno ya koyekola yo moko

• Tángá Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Augusto 2011, nkasa 4-6

• Sololá na bandeko oyo basakolá na mboka mopaya

• Luká koyeba mimeseno mpe masolo ya mboka yango

• Bandá koyekola monɔkɔ ya mboka yango

[Etanda/​Elilingi na lokasa 6]

Mpo na kozwa mbongo ya kobikela, bandeko mosusu oyo basalaka na mboka mopaya . . .

• bazongaka na bamboka na bango mbula na mbula mpo na kosala mwa basanza

• batikaka moto mosusu afutela ndako na bango to esika na bango ya mosala

• basalaka na nzela ya Internet

[Bililingi na nkasa 45]

1 Jaqueline autá na Allemagne

2 Bruno autá na Italie

3 Beau autá na Canada

4 Siobhan autá na Irlande

5 Joel autá na États-Unis

6 Jonathan autá na États-Unis

7 Anna autá na Estonie

8 Elke autá na Autriche

9 Chantal autá na Canada

10 Ines autá na Autriche