Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Mposa na ngai ekokisami”

“Mposa na ngai ekokisami”

“Mposa na ngai ekokisami”

Emilia azalaká mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kasi, atikaki mosala yango eleki sikoyo mbula 15. Eleki mwa bambula, akómaki kokanisa esengo mingi oyo azalaki na yango ntango azalaki mobongisi-nzela, mpe akómaki na mposa ya kozongela mosala yango.

Kasi, Emilia azalaki na mosala moko oyo ezalaki kozwa ye ntango mingi, mpe yango mokakatano yango ezalaki kosilisa ye esengo. Mokolo moko, amilelaki liboso ya baninga na ye ya mosala ete: “Nakosepela mpenza soki nakómi kosala bangonga moke!” Patrɔ ayokaki yango mpe akutanaki na ye mpo na kotuna ye soki ezali solo. Emilia andimaki. Nzokande, mpo esalema bongo, asengelaki kozwa ndingisa epai ya mokambi ya kompanyi mpo mibeko ya kompanyi elobaki ete basali nyonso basengeli kopesa ntango na bango nyonso na mosala. Ndeko mwasi yango amibongisaki mpo na kokutana na mokambi ya kompanyi mpe abondelaki Nzambe asalisa ye azala motema likoló te mpe na mpiko.

Ntango bazalaki kosolola, Emilia asɛngaki na boboto mpe na mpiko ete asalaka bangonga moke. Amonisaki ete asalelaka ntango oyo azali na mosala te mpo na kosalisa bato mosusu; alobaki boye: “Nazali Motatoli ya Yehova, mpe nasalisaka bato báyeba Biblia. Lelo oyo, bizaleli ya bato mingi ebebi mpenza. Bazali na mposa ya mitinda mpe mibeko ya polele; bwanya ya Biblia oyo nateyaka bango esalisaka bango mingi mpenza. Nalingi te ete makambo na ngai mosusu ebebisa mosala oyo nasalaka awa; nalingi nde kozala na ntango mingi mpo na kosalisa bato. Yango wana nalingi ete nasalaka bangonga moke.”

Mokambi ya kompanyi ayokaki ye na likebi mpe alobaki ete ye mpe azalaká na makanisi ya komipesa na mosala ya kosalisa bato ya mpasi. Na nsima alobaki boye: “Mpo na bantina oyo olobeli, namoni nasengeli kondima likambo oyo osɛngi. Kasi, oyebi ete tokokata mbongo oyo tofutaka yo?” Emilia alobaki ete ayebi mpe soki esengeli, akotika makambo mosusu mpo azala na bomoi ya mindɔndɔ te. Abakisaki boye: “Mposa na ngai makasi ezali ya kosala likambo oyo ekosalisa mpenza bato.” Mokambi alobaki na ye ete: “Nasepelaka mingi na bato oyo bapesaka ntango na bango mpo na kosalisa basusu.”

Na kompanyi wana, basalelaki naino moto moko te likambo oyo Emilia asɛngaki. Lelo oyo, Emilia asalaka kaka mikolo minei na pɔsɔ. Akamwaki ete babakisaki mbongo oyo bafutaka ye; lelo oyo azali kozwa mbongo kaka ndenge azalaki kozwa liboso! Alobi boye: “Mposa na ngai ekokisami, nakoki lisusu kozala mobongisi-nzela ya sanza na sanza!”

Yo mpe osilá kokanisa ndenge oyo okoki kobongisa programɛ na yo mpo okóma to ozongela mosala ya mobongisi-nzela?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 32]

Mokambi alobaki na ye ete: “Nasepelaka mingi na bato oyo bapesaka ntango na bango mpo na kosalisa basusu”