Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tósalela Nzambe oyo apesaka bonsomi

Tósalela Nzambe oyo apesaka bonsomi

Tósalela Nzambe oyo apesaka bonsomi

“Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.”​—1 YOA. 5:3.

OKOKI KOYANOLA?

Satana asalelaka nini mpo na kotinda biso tómona ete mibeko ya Nzambe ezali kilo?

Mpo na nini tosengeli kopona malamu mpenza baninga na biso?

Nini ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Nzambe oyo apesaka bonsomi?

1. Ndenge nini Yehova asalelaka bonsomi na ye, mpe ndenge nini amonisaki yango epai ya Adama ná Eva?

 KAKA Yehova nde azali na bonsomi nyonso. Nzokande, asalelaka yango ntango nyonso na ndenge oyo ebongi; apimelaka mpe basaleli na ye bonsomi te na kolandeláká likambo mokomoko oyo bazali kosala. Kasi, apesá bango bonsomi ya kopona, oyo esalisaka bango bázwa bikateli bango moko mpe bákokisa bamposa na bango nyonso oyo ebongi. Na ndakisa, apekisaki Adama ná Eva kaka likambo moko: kolya mbuma ya “nzete ya koyeba malamu ná mabe.” (Eba. 2:17) Bakokaki mpenza kosala mokano ya Mozalisi na bango mpe kozala kaka na bonsomi mingi!

2. Mpo na nini baboti na biso ya liboso babungisaki bonsomi oyo Nzambe apesaki bango?

2 Mpo na nini Nzambe apesaki Adama ná Eva bonsomi mingi ndenge wana? Akelaki bango na elilingi na ye mpe apesaki bango lisosoli; azalaki na elikya ete bolingo na bango mpo na Ye ekotinda bango básala makambo ya malamu. (Eba. 1:27; Rom. 2:15) Nzokande, Adama ná Eva bamonisaki botɔndi te epai ya Mozalisi na bango mpo na bonsomi oyo apesaki bango. Baponaki nde bonsomi ya lokuta oyo Satana alakaki bango; bamonaki malamu bábanda kopona bango moko kati na mabe ná malamu. Nzokande, na esika bákóma na bonsomi mingi ndenge bakanisaki, baboti na biso ya liboso bamitɛkaki mpe batɛkaki bana na bango na boombo ya lisumu, likambo oyo ememelá biso liwa.​—Rom. 5:12.

3, 4. Satana alukaka kotinda biso tótalela mibeko ya Yehova ndenge nini?

3 Lokola Satana alongaki kokosa bato mibale oyo bazalaki bato ya kokoka, bakisá mpe ebele ya baanzelu, báboya bokonzi ya Nzambe, akoki mpe kokosa biso. Mayele na ye ebongwani te. Alukaka kotinda biso tókanisa ete mibeko ya Nzambe ezali kilo, ete epekisaka biso tózala na esengo mpe tósepela na bomoi. (1 Yoa. 5:3) Soki tozali ntango nyonso elongo na bato oyo bakanisaka ndenge wana, biso mpe tokoki kobanda kokanisa bongo. Ndeko mwasi moko ya mbula 24, oyo akweaki na pite, alobaki boye: “Ezali mpenzampenza baninga nde bapusaki ngai nasala makambo ya mabe, mingimingi mpo nazalaki kobanga bámona ete makanisi na ngai ekeseni na oyo ya bango.” Mbala mosusu yo mpe okutaná na likambo ya ndenge wana.

4 Nzokande, ata bandeko mosusu na kati ya lisangá bakoki kozala baninga mabe. Elenge moko alobaki boye: “Baninga na ngai mosusu bazalaki kolingana makango na bilenge mosusu oyo bazali Batatoli te. Kasi, nsukansuka namonaki ete lokola nazalaki ntango nyonso ná bango, nakómaki kolanda makanisi na bango. Boyokani na ngai na Nzambe ekómaki kobeba. Nazalaki lisusu kosepela na makita te, mpe nazalaki lisusu kosakola mpenza te. Yango nde emonisaki ngai ete nasengeli koboya baninga yango, mpe nasalaki bongo!” Oyebaka ete baninga na yo bakoki kobebisa yo? Tótalela ndakisa moko euti na Biblia oyo ekoki mpenza kosalisa biso lelo.​—Rom. 15:4.

AYIBAKI MITEMA NA BANGO

5, 6. Ndenge nini Abisalome akosaki bato, mpe mayele mabe na ye elongaki?

5 Biblia elobeli bato mingi oyo bamemaki basusu na nzela ya mabe. Moko na bango ezali Abisalome, mwana ya Mokonzi Davidi. Abisalome azalaki mobali kitoko mpenza. Kasi, na nsima asalaki lokola Satana; atikaki mposa makasi ya koluka lokumu ekola na motema na ye. Alukaki kozwa bokonzi ya tata na ye, nzokande ye te nde asengelaki kozwa yango. a Mpo na koluka kobɔtɔla bokonzi, Abisalome azalaki komonisa Bayisraele ete ye nde azalaki mpenza kotyela bango likebi kasi, mokonzi azalaki kotyela bango likebi te. Ndenge kaka Zabolo asalaki na elanga ya Edene, Abisalome amimonisaki moto malamu, mpe alobaki makambo ya lokuta mpenza mpo na tata na ye.​—2 Sa. 15:1-5.

6 Mayele mabe ya Abisalome elongaki? Elongaki mwa moke, mpo Biblia elobi ete: “Abisalome azalaki se koyiba mitema ya bato ya Yisraele.” (2 Sa. 15:6) Kasi, Abisalome asukaki mabe mpo na lolendo na ye. Akufaki liwa ya nsɔmɔ elongo na bato mosusu ebele oyo akosaki.​—2 Sa. 18:7, 14-17.

7. Ndakisa ya Abisalome ekoki koteya biso nini? (Talá elilingi na lokasa 14.)

7 Mpo na nini ezalaki mpasi te Abisalome akosa Bayisraele ndenge wana? Mbala mosusu bazalaki na mposa ya makambo oyo alakaki bango. To mpe bazalaki kosepela na ye mpo azalaki kitoko. Ezala ndenge nini, bazalaki sembo te epai ya Yehova mpe epai ya mokonzi oyo atyaki. Lelo oyo mpe Satana azali kosalela bato oyo bazali lokola Abisalome mpo na koyiba mitema ya basaleli ya Yehova. Bato yango bakoki koloba na ndakisa, ‘Mibeko ya Yehova eleki makasi,’ to ‘Bato oyo basalelaka Yehova te bazali na bomoi ya bisengo.’ Soki oyoki makambo ya ndenge wana, okomona ete ezali lokuta monene mpe okotikala sembo epai ya Nzambe? Okoyeba ete kaka “mobeko ya kokoka” oyo ebengami mpe mobeko ya Kristo, nde ekoki kopesa yo bonsomi ya solosolo? (Yak. 1:25) Soki ezali bongo, kobá kolinga mobeko yango, mpe kosalela ata mokolo moko te bonsomi na yo na ndenge ya mabe.​—Tángá 1 Petro 2:16.

8. Bandakisa nini ya mikolo na biso emonisi ete kobuka mibeko ya Yehova epesaka esengo te?

8 Satana alingaka kokosa mingimingi bilenge. Ndeko moko oyo akómi lelo na mbula koleka 30 alobi boye: “Ntango nazalaki elenge nazalaki komona ete mibeko ya Yehova ezalaki kobatela ngai te, kasi ezalaki nde kotya ngai nkaka.” Na nsima, akweaki na pite. Kasi, yango ememelaki ye esengo te. Alobaki boye: “Nazalaki na mawa mpe nazalaki koyoka lokola namemi ngambo mpe eumelaki bongo bambula mingi.” Ndeko mwasi moko oyo asalaki pite ntango azalaki elenge akomaki boye: “Soki okwei na pite, okobanda koyoka ete ozali lisusu na ntina te. Ata sikoyo, mbula 19 na nsima, likambo yango ezongelaka ngai kaka na makanisi.” Ndeko mwasi mosusu, alobaki boye: “Soki nakanisi ndenge oyo etamboli na ngai ezalaki kotungisa bato oyo nalingaka, nazalaki koyoka mpasi na motema mpe ezalaki kobulunganisa ngai makanisi. Esalaka mpasi soki ozali koyeba ete Yehova azali kosepela na yo te.” Satana alingaka te ete okanisa mpasi wana oyo lisumu ememelaka moto.

9. (a) Mituna nini ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo totalelaka mibeko mpe mitinda ya Yehova? (b) Mpo na nini ezali na ntina tóyeba Nzambe malamumalamu?

9 Ezali mpenza mawa komona ete na kati ya lisangá, bilenge mingi​—ata mpe mikóló mosusu—​bamonaki naino mpasi mpo na nsima bándima ete kobuka mibeko ya Nzambe ezali na litomba moko te! (Gal. 6:7, 8) Na yango, omituna boye: ‘Nayebaka mayele mabe oyo Satana asalelaka mpo na kokosa ngai? Namonaka Yehova lokola Moninga na ngai ya motema, oyo alobaka ntango nyonso solo mpe alukaka bolamu na ngai? Nandimaka mpenza ete akoki soki moke te kopimela ngai makambo ya malamu mpe oyo ekopesa ngai mpenza esengo?’ (Tángá Yisaya 48:17, 18.) Mpo oyanola mpenza “ɛɛ” na mituna yango, osengeli koyeba Yehova malamumalamu. Osengeli komindimisa ete mibeko mpe mitinda ya Biblia emonisaka ete Yehova alingaka yo, kasi te ete alingi ozanga bonsomi.​—Nz. 25:14.

BONDELÁ NZAMBE APESA YO MOTEMA YA BWANYA MPE YA BOTOSI

10. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tómekola Salomo?

10 Ntango Salomo azalaki naino elenge, abondelaki Yehova na komikitisa nyonso ete: “Nazali naino mwana moke. Nayebi te ndenge ya kobima mpe ndenge ya kokɔta.” Na nsima, asɛngaki Nzambe apesa ye motema ya bwanya mpe ya botosi. (1 Bak. 3:7-9, 12) Yehova ayanolaki na libondeli wana oyo eutaki na motema; akosala mpe bongo mpo na yo, ozala elenge to mokóló. Ya solo, Yehova akopesa yo bwanya mpe bososoli na ndenge ya likamwisi te. Kasi, akokómisa yo moto ya bwanya soki ozali mpenza koyekola Liloba na ye, ozali kobondela mpo na kosɛnga elimo santu, mpe ozali kolanda litambwisi mpe malako oyo azali kopesa na nzela ya lisangá ya bokristo. (Yak. 1:5) Kutu, na nzela ya bibongiseli yango, Yehova asalisaka ata basaleli na ye oyo bazali bilenge bázala na mayele koleka baoyo baboyaka kolanda toli na ye, ata mpe baoyo babengamaka “bato ya bwanya mpe bato ya mayele” na mokili oyo.​—Luka 10:21; tángá Nzembo 119:98-100.

11-13. (a) Mateya nini ya ntina mingi tokoki kozwa na Nzembo 26:4, Masese 13:20, mpe 1 Bakorinti 15:33? (b) Ndenge nini okoki kosalela batoli yango na bomoi na yo?

11 Mpo tómona ntina ya koyekola Biblia mpe komanyola makambo oyo tozali kotánga mpo tóyeba Yehova malamumalamu, tótalela bavɛrsɛ oyo elandi. Mokomoko na yango elobeli likambo moko mpo na baninga oyo toponaka: “Nafandi esika moko na bato ya lokuta te; mpe nakɔtaka te esika moko na baoyo bazali kobomba ndenge bazali.” (Nz. 26:4) “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.” (Mas. 13:20) “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”​—1 Ko. 15:33.

12 Mateya nini ya ntina mingi tokoki kozwa na mikapo yango? (1) Yehova alingaka ete tópona baninga ya malamu. Alingaka kobatela biso mpo tósala te likambo oyo ekopesa biso mpasi mpe ekobebisa boyokani na biso na ye. (2) Baninga bakoki kobongisa biso to kobebisa biso. Maloba ya bavɛrse yango emonisi ete Yehova alingi kosimba mitema na biso. Na ndenge nini? Tomoni ete vɛrsɛ moko te epesi mobeko, na ndakisa “osengeli te kosala boye to boye.” Elobeli nde makambo ndenge ezalaka. Ezali lokola nde Yehova azali koloba na biso ete: ‘Ezalaka nde boye. Okosala nini? Ndenge motema na yo elingi?’

13 Lisusu, lokola bavɛrsɛ yango misato elobeli makambo ndenge ezalaka, esilaka ngala te mpe tokoki kosalela yango na makambo mingi. Na ndakisa, omituna mituna lokola oyo: Ndenge nini nakoki koboya kozala na “baoyo bazali kobomba ndenge bazali”? Bisika nini nakoki kozala na bato yango? (Mas. 3:32; 6:12) “Bato ya bwanya” oyo Yehova alingi nakóma baninga na bango ezali banani? Bongo “bazoba” oyo alingi ete naboya ezali banani? (Nz. 111:10; 112:1; Mas. 1:7) “Bizaleli ya malamu” nini nakobebisa soki naponi baninga ya mabe? Kaka bato ya mokili nde bakoki kozala baninga ya mabe? (2 Pe. 2:1-3) Biyano nini okopesa na mituna na yango?

14. Bokoki kosala nini mpo Losambo na kati ya libota ezala malamu koleka?

14 Kaka ndenge tosali mpo na bavɛrsɛ wana, okoki mpe kotalela bavɛrsɛ mosusu mpo oyeba makanisi ya Nzambe na likambo moko oyo etali yo moko to mpe libota na yo. b Baboti, bokoki kolobela makambo ya ndenge wana na Losambo na kati ya libota. Ntango bozali kosala yango, bóbosana te ete mokano ezali nde ya kosalisa moto mokomoko ya libota amona mpenza ete mibeko mpe mitinda oyo Nzambe apesaka biso emonisi ete alingaka biso. (Nz. 119:72) Kosala bongo ekobakisa bomoko na kati ya libota mpe boyokani na bino na Yehova ekokóma makasi.

15. Ndenge nini okoki koyeba ete ozali kokóma na motema ya bwanya mpe ya botosi?

15 Ndenge nini okoki koyeba ete ozali kokóma na motema ya bwanya mpe ya botosi? Okoki na ndakisa kotalela soki makanisi na yo eyokani na oyo ya bato ya sembo ya ntango ya kala, na ndakisa Mokonzi Davidi, oyo akomaki ete: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo, mpe mobeko na yo ezali na kati na ngai.” (Nz. 40:8) Mokomi ya Nzembo 119 mpe alobaki ete: “Nalingaka mobeko na yo mingi mpenza! Ezali lobanzo na ngai mokolo mobimba.” (Nz. 119:97) Tosengeli kosala milende mpo tókóma na bolingo ya ndenge wana. Bolingo yango ekolaka ntango tozali komipesa na koyekola Biblia, kobondela, komanyola, mpe ntango tozali komona na bomoi na biso moko ete kotosa mibeko ya Nzambe ememaka mapamboli mingi.​—Nz. 34:8.

BATELÁ BONSOMI NA YO!

16. Mpo tólonga etumba oyo tozali kobunda mpo na kobatela bonsomi na biso, likambo nini tosengeli kobosana te?

16 Banda kalakala, bikólo ndenge na ndenge ebundaka mpo na kozwa bonsomi. Biso bakristo mpe tosengeli kobunda etumba makasi mpo na kobatela bonsomi na biso! Kobosana te ete banguna na yo ezali kaka te Satana, mokili mpe elimo ya mokili. Osengeli mpe kobunda na bomoto na yo ya kozanga kokoka, ata mpe motema na yo oyo ezali na bokosi. (Yir. 17:9; Ef. 2:3) Kasi, na lisalisi ya Yehova, okoki kolonga etumba yango. Mpe mbala nyonso oyo olongi etumba, ezala ya moke to ya monene, okosala makambo mibale ya ntina mingi. Ya liboso, okosepelisa motema ya Yehova. (Mas. 27:11) Ya mibale, wana ozali komona matomba ya kotosa “mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi,” ekateli na yo ya kotikala na “nzela ya moke” oyo ezali komema na bomoi ekokóma lisusu makasi. Na mikolo ezali koya, okozwa bonsomi monene oyo basaleli nyonso ya sembo ya Yehova bakozwa.​—Yak. 1:25; Mat. 7:13, 14.

17. Mpo na nini tosengeli kolɛmba nzoto koleka ndelo te soki tosali mabunga, mpe ndenge nini Yehova asalisaka biso?

17 Ya solo, biso nyonso tosalaka mabunga mbala na mbala. (Mos. 7:20) Soki ekómeli yo, kolɛmba nzoto koleka ndelo te mpe komona te ete ozali na ntina te. Soki obɛti libaku, tɛlɛmá mpe kobá kokende liboso​—ata soki ekosɛnga oluka lisalisi ya bankulutu. Yakobo akomaki ete “libondeli [na bango] ya kondima ekobikisa moto oyo azali kobɛla, mpe Yehova akotɛlɛmisa ye. Lisusu, soki asalaki masumu, akolimbisama.” (Yak. 5:15) Kobosana ata mokolo moko te ete Nzambe azali na motema mawa mpe ete abendaki yo na lisangá mpo amonaki ete motema na yo ezali malamu. (Tángá Nzembo 103:8, 9.) Soki okobi kosalela Yehova na motema mobimba, akotika yo ata mokolo moko te.​—1 Nt. 28:9.

18. Tosengeli kosala nini mpo Yehova abatela biso, ndenge Yesu asɛngaki na Yoane 17:15?

18 Ntango Yesu azalaki elongo na bantoma na ye ya sembo 11 na butu ya nsuka liboso akufa, abondelaki Yehova boye: “Okɛngɛla . . . bango mpo na moto mabe.” (Yoa. 17:15) Yesu azalaki komibanzabanza kaka mpo na bantoma na ye te, kasi mpe mpo na bayekoli na ye nyonso. Na yango, tokoki mpenza kondima ete Yehova akoyanola libondeli ya Yesu mpe akobatela biso na bantango oyo ya mpasi. “[Yehova] azali nguba ya baoyo batambolaka kozanga mbeba . . . Akokɛngɛla nzela ya bato na ye ya sembo.” (Mas. 2:7, 8) Ya solo, kotikala sembo ezali pɛtɛɛ te, kasi kaka baoyo batosaka Yehova nde bakozwa bomoi ya seko mpe bonsomi ya solosolo. (Rom. 8:21) Kotika te ete moto moko akosa yo mpo otika nzela yango!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Nzambe alakaki Davidi ete “momboto” na ye nde ekozwa kiti ya bokonzi na ye nsima ya kobotama ya Abisalome. Lokola ezali bongo, na ntembe te, Abisalome ayebaki ete Yehova aponaki ye te mpo na kozwa bokonzi nsima ya Davidi.​—2 Sa. 3:3; 7:12.

b Na ndakisa, bokoki kotalela 1 Bakorinti 13:4-8, epai Paulo alobeli bolingo, mpe Nzembo 19:7-11, oyo elobeli mapamboli ndenge na ndenge oyo tokoki kozwa soki tozali kotosa mibeko ya Yehova.

[Mituna ya boyekoli]

[Bililingi na lokasa 14]

Ndenge nini okoki koyeba bato oyo bazali lokola Abisalome mpe kokima bango?