Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo ya bomoi

Yehova ateyaki ngai kosala mokano na ye

Yehova ateyaki ngai kosala mokano na ye

Lisolo ya Max Lloyd

Na 1955, tozalaki bamisionɛrɛ na ekólo Paraguay, na Amerika ya Sudi. Mokolo moko na butu, bato ebele bayaki kozinga ndako oyo ngai ná moninga na ngai tozalaki, bazalaki na nkanda, mpe bazalaki koganga ete: “Nzambe na biso alingaka makila, mpe azali na mposa ya makila ya ba gringos.” Ndenge nini biso ba gringos (bapaya) tokómaki kuna?

NAKOLÁ na Australie, mpe kuna nde Yehova abandaki koteya ngai kosala mokano na ye. Na 1938, Motatoli moko apesaki tata na ngai buku Ennemis (Banguna). Na ntango wana, Papa ná Mama bazalaki kosepela lisusu te na mateya ya bakonzi ya lingomba na biso, mpo bazalaki koloba ete masolo mosusu ya Biblia ezali masapo. Mbula soki moko na nsima, baboti na ngai bamipesaki na Yehova mpe bazwaki batisimo. Banda wana, kosala mokano ya Yehova ekómaki likambo oyo eleki ntina mpo na libota na biso. Na nsima, Lesley, yaya na ngai ya mwasi, oyo azalaki mokóló na ngai ya mbula mitano, azwaki batisimo, mpe ngai nazwaki batisimo na 1940, ntango nazalaki na mbula 9.

Mwa moke nsima ya ebandeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bapekisaki mikanda ya Batatoli ya Yehova na Australie. Na yango, atako nazalaki naino elenge, nayekolaki koteya bato mateya ya solo na lisalisi ya Biblia mpamba. Nakómaki komema Biblia na kelasi mpo na komonisa basusu ntina oyo naboyaka kopesa bendele losako to mpe kolendisa bitumba.​—Kob. 20:4, 5; Mat. 4:10; Yoa. 17:16; 1 Yoa. 5:21.

Na kelasi, bato mingi bazalaki kokima ngai mpe bazalaki kobenga ngai “moto ya Ba-Allemand.” Na ntango wana bazalaki koya kolakisa bafilme na eteyelo. Liboso filme ebanda, moto nyonso asengelaki kotɛlɛma mpo na koyemba loyembo ya ekólo. Soki nafandi kaka, bana-kelasi mibale to misato bazalaki kobenda ngai nsuki mpo na kotɛlɛmisa ngai na makasi. Nsukansuka, balongolaki ngai na kelasi mpo na kondima na ngai. Atako bongo, nakobaki kotánga kelasi na ndako.

NSUKANSUKA NAKOKISI MOKANO NA NGAI

Namityelaki mokano ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza soki nakómi na mbula 14. Yango wana nalɛmbaki nzoto ntango baboti na ngai bayebisaki ngai ete nasengeli naino koluka mosala. Bayebisaki ngai ete esengeli ngai mpe napesaka mbongo mpo na ndako mpe kolya, kasi balakaki ngai ete soki nakómi na mbula 18, nakoki kobanda mosala ya mobongisi-nzela. Mbala mingi, tozalaki kobendana mpo na mbongo oyo nazalaki kozwa. Nazalaki komonisa ete nasengeli kobombaka mbongo mpo esalisa ngai na mosala ya mobongisi-nzela, kasi bazalaki kosalela yango.

Ntango nalingaki kobanda mosala ya mobongisi-nzela, baboti na ngai bafandisaki ngai mpe bayebisaki ngai ete bazalaki kotya mbongo oyo nazalaki kopesa bango na banki. Bazongiselaki ngai mbongo yango nyonso mpo nasomba bilamba mpe biloko mosusu nasengelaki na yango mpo na mosala ya mobongisi-nzela. Basalaki bongo mpo na koteya ngai ete nasengeli kokokisaka bamposa na ngai ngai moko; nasengeli kozela te ete moto mosusu asalela ngai yango. Lelo oyo, namonaka ete ezalaki liteya moko ya ntina mpenza.

Ntango ngai ná Lesley tozalaki bana mike, mbala mingi, babongisi-nzela bazalaki koya kofanda na ndako na biso, mpe tozalaki kosepela kobima na bango na mosala ya kosakola. Mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, tozalaki kosakola ndako na ndako, na balabala, mpe koyekola Biblia na bato. Na bambula wana, mosakoli moko asengelaki kosakola ngonga 60 na sanza. Mbala mingi, mama azalaki kokokisa bangonga yango; yango ezalaki ndakisa malamu mpo na ngai ná Lesley.

MOSALA YA MOBONGISI-NZELA NA ETÚKÁ YA TASMANIE

Ntango nakómaki mobongisi-nzela, teritware ya liboso oyo batindaki ngai ezalaki na Tasmanie, esanga moko ya Australie, epai yaya na ngai ná mobali na ye bazalaki. Kasi, eumelaki te, babengisaki bango na kelasi ya mbala ya 15 ya Eteyelo ya Gileade. Nazalaki nsɔninsɔni mpe ezalaki mbala na ngai ya liboso natika ndako ya baboti. Bato mosusu balobaki ete nakosala kaka sanza misato. Nzokande, mbula moko na nsima, na 1950, nakómaki mosaleli ya lisangá (lelo oyo mokambi-misala ya bankulutu). Na nsima, nakómaki mobongisi-nzela monene, mpe ndeko mobali mosusu ya elenge akómaki moninga na ngai ya mosala.

Batindaki biso na engumba moko epai batimolaka kwivre. Motatoli ata moko te azalaki kuna. Tozwaki bisi mpe tokómaki kuna mokolo moko na mpokwa. Mokolo yango, tolalaki na otɛlɛ moko ya kala. Mokolo oyo elandaki, ntango tozalaki kosakola ndako na ndako, tozalaki kotuna bato soki bayebi epai tokoki kozwa ndako ya kofutela. Na mpokwa, moto moko alobaki ete ndako ya pastɛrɛ, pembeni ya ndako-nzambe ya Lingomba ya Presbytérien, ezali na moto te mpe alobaki ete tósolola na diakre. Diakre andimaki tófutela yango. Ezalaki likambo ya kokamwa ete tóbimelaka na ndako ya mokonzi ya lingomba mokolo nyonso mpo na kokende kosakola.

Bato mingi bazalaki kondima nsango malamu. Tozalaki kosolola malamu na bato mpe tobandaki koyekola Biblia na bato ebele. Ntango bakonzi ya lingomba na engumba-mokonzi bayokaki bongo mpe bayokaki ete tozalaki kofanda na ndako ya pastɛrɛ, basɛngaki diakre abimisa biso nokinoki. Tozangaki lisusu esika ya kolala.

Na mokolo oyo elandaki, tosakolaki tii na nsima ya midi; na nsima tokendaki koluka esika ya kolala. Esika ya malamu oyo tokokaki kozwa ezalaki kaka bakiti ya stade. Tobombaki bavalize na biso na stade mpe tokobaki kosakola. Butu ebandaki kokɔta, kasi tomonaki malamu tósilisa mwa bandako oyo etikalaki na balabala moko. Na lopango moko, mobali moko alobaki na biso ete tokoki kofutela na ndako ya shambrɛ moko oyo ezalaki na nsima ya ndako na ye!

MOSALA YA ZONGAZONGA MPE GILEADE

Nsima ya kosakola sanza soki 8 na teritware yango, Betele ya Australie etindelaki ngai mokanda oyo elobaki ete nakómi mokɛngɛli ya zongazonga. Nakamwaki mingi, mpo nazalaki kaka na mbula 20. Nsima ya mwa bapɔsɔ ya formasyo, nabandaki kotala masangá pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kolendisa bandeko. Bandeko na masangá yango, oyo mingi bazalaki mikóló na ngai, bazalaki kotyola ngai te mpo nazalaki elenge, bazalaki na limemya mpo na mosala oyo nazalaki kosala.

Mpo na kokende kotala masangá, nazalaki kokende na bisi, pɔsɔ mosusu na engbunduka, pɔsɔ mosusu mpe na vuatire, mpe ntango mosusu na tukutuku, ná valize mpe sakosi na ngai. Kozala elongo na bandeko ezalaki kopesa ngai esengo mingi. Ndeko moko oyo azalaki mosaleli ya lisangá alingaki kaka ete nafanda epai na ye atako ndako na ye esilaki naino te. Na pɔsɔ yango, babongiselaki ngai esika ya kolala na baignoire, kasi tolendisanaki mingi!

Likambo mosusu ya esengo esalemaki na 1953; batindelaki ngai formilɛrɛ mpo na kokɔta na kelasi ya mbala ya 22 ya Eteyelo ya Gileade. Kasi, atako nazalaki na esengo, nazalaki mpe kobanga mpamba te, ntango yaya na ngai ya mwasi ná mobali na ye bazwaki diplome ya Gileade na mokolo ya 30 Yuli 1950, batindaki bango na Pakistan. Mbula moko ekokaki te, Lesley abɛlaki mpe akufaki kuna. Nazalaki komituna soki baboti na ngai bakoyoka ndenge nini soki ngai mpe nakei na mboka mopaya kaka nsima ya mwa ntango moke boye! Kasi balobaki na ngai ete: “Kende kosalela Yehova esika nyonso oyo akotinda yo.” Nazwá lisusu libaku ya komona Tata te. Akufaki na 1957.

Eumelaki te, nazwaki masuwa elongo na bandeko mosusu 5 ya Australie mpe tosalaki mobembo ya pɔsɔ 6 tii na engumba New York. Na nzela, tozalaki kotánga Biblia, koyekola, mpe koteya bato oyo tozalaki na bango na masuwa. Liboso tókende na engumba South Lansing, na etúká ya New York, epai Eteyelo ya Gileade ezalaki, tokendaki na liyangani oyo esangisaki bandeko ya mikili ndenge na ndenge na Yankee Stadium, na sanza ya Yuli 1953. Bayangani nyonso bazalaki 165 829!

Na Gileade, tozalaki bana-kelasi 120, mpe toutaki na mikili ndenge na ndenge. Toyebaki bisika oyo bakotinda biso kaka mokolo oyo bapesaki biso badiplome. Na nsima, tokendaki nokinoki na bibliotɛkɛ ya Gileade mpo moto na moto aluka koyeba makambo etali ekólo epai batindi ye. Natángaki ete Paraguay, epai batindaki ngai ezalaki mboka ya yikiyiki na makambo ya politiki banda bambula mingi. Mwa moke nsima ya kokóma kuna, mokolo moko boye na ntɔngɔ, natunaki bamisionɛrɛ mosusu soki makɛlɛlɛ oyo nayokaki na butu ezalaki “fɛti” nini. Basɛkaki mpe balobaki ete: “Wana ezali yikiyiki ya liboso oyo omoni. Talá libándá.” Ntango natalaki, namonaki basoda ebele epai na epai!

NAKUTANI NA LIKAMBO YA NSƆMƆ

Na libaku moko, nakendaki elongo na mokɛngɛli ya zongazonga mpo na kotala lisangá moko mosika mpe kolakisa filme La Société du Monde Nouveau en action. Tosalaki mobembo ya ngonga 8 to 9; liboso tozwaki engbunduka, na nsima tozwaki sharɛti oyo mpunda ebendaka, na nsuka tozwaki sharɛti oyo ngombɛ ebendaka. Tomemaki mwa motɛrɛ ya kura ná aparɛyi ya kolakisa filme. Tolekisaki mokolo oyo elandaki na kotambola na baferme mpo na kobengisa bato nyonso báya kotala filme oyo tokolakisa na butu. Bato soki 15 bayaki.

Tobandaki kolakisa filme mpe miniti soki 20 na nsima, bayebisaki biso tókɔta nokinoki na ndako. Tozwaki mbala moko masini mpe tokɔtaki na ndako. Na ntango yango nde mibali bakómaki kotya makɛlɛlɛ, kobɛta masasi, mpe kogangaganga ete: “Nzambe na biso alingaka makila, mpe azali na mposa ya makila ya ba gringos.” Tozalaki kaka ba gringos mibale! Bato oyo bayaki kotala filme bapekisaki mibali yango ya mobulu bákɔta na kati ya ndako. Bato yango bakendaki, kasi na ngonga ya misato na butu bazongaki, bazalaki kobɛta masasi, mpe balobaki ete bakokanga biso na nzela ntango tokozonga.

Bandeko babengaki mokonzi ya bapolisi, mpe ayaki nsima ya midi ná mpunda mibale mpo na komema biso na engumba. Na nzela, soki tokómi esika oyo ezali na matiti to banzete ebele, azalaki kobimisa mondoki na ye mpe kokende liboso mpo na kotalatala soki bato babombani wana. Namonaki ete mpunda ezali kosalisa mingi mpo na kosala mibembo; yango wana na nsima, nasombaki mpunda na ngai moko.

BAMISIONƐRƐ MOSUSU BAYEI

Mosala ya kosakola ezalaki kokende liboso atako bakonzi ya lingomba bazalaki kotɛmɛla biso mbala na mbala. Na 1955, bamisionɛrɛ mitano ya sika bayaki, moko na bango ezalaki Elsie Swanson, ndeko mwasi moko ya ekólo Canada oyo akɔtaki kelasi ya mbala ya 25 ya Gileade. Tosalaki na ye mwa moke na Betele, mpe na nsima batindaki ye na engumba mosusu. Amipesaki mobimba na mosala ya Yehova atako baboti na ye bazalaki na solo te mpe bazalaki kosunga ye mpenza te. Ngai ná Elsie tobalanaki mokolo ya 31 Desɛmbɛ 1957 mpe tofandaki kaka biso mibale na ndako moko ya bamisionɛrɛ na sudi ya Paraguay.

Ndako yango ezalaki na pɔmpi te; tozalaki nde na libulu ya mai na kati ya lopango. Tozalaki na kikoso te, twalɛti mpe te na kati ya ndako; tozalaki na masini ya kosukola bilamba te, frigo mpe te. Tozalaki kosomba biloko ya kolya mokolo na mokolo. Kasi, bomoi wana ezangi mindɔndɔ mpe bolingo ya bandeko na lisangá ezalaki kopesa ngai ná mwasi na ngai esengo mingi.

Na 1963, tokendaki na Australie mpo na kotala mama na ngai. Mwa moke na nsima motema na ye ekangamaki; emonani ete ezalaki mpo na esengo makasi oyo ayokaki lokola amonaki ngai lisusu nsima ya mbula 10. Ntango mokolo ya kozonga na teritware na biso na Paraguay ekómaki pene, tosengelaki kozwa ekateli moko monene na bomoi na biso. Ebongaki nde tótika mama na lopitalo, tótika moto mosusu abatelaka ye mpe tózonga na Paraguay, teritware na biso oyo tolingaki mingi? Nsima ya kobondela mingi, ngai ná Elsie tomonaki malamu tótikala mpo na kobatela Mama. Tozalaki kobatela ye mpe tozalaki kaka na mosala ya ntango nyonso, tii ntango akufaki na 1966.

Nazwaki libaku malamu ya kozala mokɛngɛli ya zongazonga mpe ya etúká mwa bambula na Australie mpe ya koteya bankulutu na Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi. Na nsima, likambo mosusu ebongwanaki na bomoi na biso. Basɛngaki ngai nakóma na Komite ya filiale ya liboso oyo esalemaki na Australie. Na nsima, ntango tozalaki kotonga Betele ya sika, batyaki ngai prezida ya komite ya botongi. Na lisalisi ya bandeko ebele ya mayele oyo tosalaki na bango na bomoko, totongaki Betele moko kitoko.

Na nsima, nakómaki na Departema ya Mosala, oyo etambwisaka mosala ya kosakola na ekólo mobimba. Nazwaki mpe libaku ya kotambola na bafiliale mosusu lokola mokɛngɛli ya zone mpo na kosalisa bandeko kuna mpe kolendisa bango. Kondima na ngai elendisamaki mingi na bikólo mosusu epai nakutanaki na bandeko oyo balekisaki bambula ebele mpenza na babolɔkɔ mpe na bakaa ya bakangami mpo na botosi na bango epai ya Yehova.

EPAI TOZALI KOSALA LELO OYO

Na 2001, nsima ya kotambola na bikólo ndenge na ndenge lokola mokɛngɛli ya zone, nakutaki mokanda moko oyo eyebisaki ete babengisi biso tókende na Brooklyn, New York, epai nakosala na Komite ya filiale ya États-Unis, oyo eutaki kosalema sika. Ngai ná Elsie totalelaki malamu likanisi yango mpe tobondelaki mingi; na nsima, tondimaki na motema moko. Lelo oyo, nsima ya mbula koleka 11, tozali kaka kosala na Brooklyn.

Nasepelaka mingi ndenge nazali na mwasi oyo andimaka kosala nyonso oyo Yehova asɛngi. Ngai ná Elsie tokómi na mbula mwa moke koleka 80 mpe tozali naino nzoto mwa makasi. Mposa na biso ezali ete tókoba kolanda mateya ya Yehova libela na libela mpe kozwa mapamboli oyo akopesa baoyo bazali kokoba kosala mokano na ye.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]

Nazalaki kokende na bisi, pɔsɔ mosusu na engbunduka, pɔsɔ mosusu mpe na vuatire, mpe ntango mosusu na tukutuku, ná valize mpe sakosi na ngai

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]

Mposa na biso ezali ete Yehova akoba koteya biso libela na libela

[Bililingi na lokasa 18]

Na lobɔkɔ ya mwasi: Ntango nazalaki mokɛngɛli ya zongazonga na Australie

Na lobɔkɔ ya mobali: Ngai ná baboti na ngai

[Elilingi na lokasa 20]

Mokolo ya libala na biso, 31 Desɛmbɛ 1957