Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bómitambwisa lokola bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe!

Bómitambwisa lokola bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe!

Bómitambwisa lokola bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe!

“Bómitambwisa na ndenge oyo ebongi na nsango malamu.”​—FLP. 1:27.

OKOPESA EYANO NINI?

Banani bakoki kozala bana-mboka ya Bokonzi?

Ndenge nini tokoki koyekola monɔkɔ, istware, mpe mibeko ya Bokonzi ya Nzambe?

Ndenge nini bana-mboka ya Bokonzi bamonisaka ete balingaka mibeko ya Nzambe?

1, 2. Mpo na nini toli ya Paulo elobaki mingi mpo na bandeko ya lisangá ya Filipi?

 NTOMA Paulo alendisaki bandeko ya lisangá ya Filipi ete ‘bámitambwisa na ndenge oyo ebongi na nsango malamu.’ (Tángá Bafilipi 1:27.) Liloba ya Grɛki oyo Paulo asalelaki, oyo ebongolami na liloba “bómitambwisa” ekoki mpe kobongolama “bózala lokola bana-mboka.” Maloba wana elobaki mingi mpo na bandeko ya lisangá ya Filipi. Mpo na nini? Mpamba te emonani ete Filipi ezalaki moko ya bingumba oyo Ampire ya Roma epesaki bafandi na yango lotomo ya kozala bana-mboka ya Roma. Bafandi ya Filipi mpe ya bamboka mosusu oyo Roma ezalaki koyangela, oyo bazalaki bana-mboka ya Roma bazalaki komikumisa mpo na yango mpe mibeko ya Roma ezalaki kobatela bango.

2 Bandeko ya lisangá ya Filipi basengelaki komikumisa mpo na ntina oyo eleki mpenza. Paulo ayebisaki bango ete lokola bazali bakristo oyo batyami mafuta na elimo, bazali bana-mboka “ya likoló.” (Flp. 3:20) Bazalaki te kaka bana-mboka ya ekólo moko boye awa na mabele, kasi bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe. Na yango bazalaki na libateli mpe matomba oyo eleki mpenza.​—Ef. 2:19-22.

3. (a) Banani bazali na libaku ya kokóma bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?

3 Toli ya Paulo ya “kozala lokola bana-mboka” etaleli libosoliboso baoyo bakoyangela elongo na Kristo na likoló. (Flp. 3:20) Kasi, tokoki koloba ete etaleli mpe baoyo bakofanda na mabele oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Mpo na nini? Mpamba te bakristo nyonso basalelaka Mokonzi moko, Yehova, mpe basengeli kotosa mibeko ndenge moko. (Ef. 4:4-6) Lelo oyo, bato basalaka makasi mpo bákóma bana-mboka ya ekólo oyo ezali na bozwi mingi. Yango elakisi ete libaku ya kozala bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe esengeli kozala na motuya koleka na miso na biso! Mpo tókanga mpenza ntina ya libaku malamu yango, tókokanisa naino masɛngami mpo na kokóma mwana-mboka ya ekólo moko boye ná masɛngami mpo na kokóma mwana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe. Na nsima tokotalela makambo misato oyo tosengeli kosala mpo tókoba kozala bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe.

MASƐNGAMI MPO NA KOKÓMA MWANA-MBOKA

4. Monɔkɔ ya pɛto ezali nini, mpe ndenge nini “tolobaka” yango?

4 Koyekola monɔkɔ. Baguvɛrnema mosusu esɛngaka bato oyo balingi kokóma bana-mboka báyekola monɔkɔ oyo bato mingi balobaka na ekólo yango. Ata nsima ya kokóma bana-mboka, bato mosusu balekisaka bambula mingi mpo báyeba malamu monɔkɔ yango. Bakoki koyekola gramɛrɛ ya monɔkɔ yango, kasi mbala mosusu esɛngaka ntango mingi mpo báyeba koloba monɔkɔ yango malamu. Ndenge moko mpe, Bokonzi ya Nzambe esɛngaka ete bana-mboka na yango báyekola oyo Biblia ebengi ‘monɔkɔ ya pɛto.’ (Tángá Sefania 3:9.) Monɔkɔ yango ezali nini? Ezali mateya ya solo mpo na Nzambe mpe mikano na ye ndenge emonisami na Biblia. “Tolobaka” monɔkɔ ya pɛto ntango tozali kotosa mibeko mpe mitinda ya Nzambe na bomoi na biso. Bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe bakoki koyekola nokinoki mateya ya ebandeli ya Biblia mpe kozwa batisimo. Kasi, ata nsima ya kozwa batisimo, basengeli kosala makasi mpo na “koloba” monɔkɔ yango malamu koleka. Na ndenge nini? Mokomoko na biso asengeli kosala makasi mpo na kosalela mpenza na bomoi na ye makambo oyo ayekoli na Biblia.

5. Mpo na nini tosengeli koyekola nyonso oyo tokoki mpo na istware ya ebongiseli ya Yehova?

5 Koyekola istware. Moto oyo alingi kokóma mwana-mboka ya ekólo moko asengeli koyeba mwa moke istware ya ekólo yango. Ndenge moko mpe, baoyo balingi kozala bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe basengeli koyekola makambo nyonso oyo bakoki mpo na Bokonzi yango. Tótalela ndakisa ya bana ya Kora, na ntango ya kala na Yisraele. Bazalaki kosepela mingi na Yerusaleme ná esika na yango ya losambo mpe kobɛta lisolo ya engumba yango. Soki bazalaki kosepela na engumba yango, ezali te mpo etongamaki na mabanga minene, kasi bazalaki nde kosepela na eloko oyo engumba mpe esika na yango ya losambo ezalaki komonisa. Yerusaleme ezalaki “sité ya Mokonzi Monene,” Yehova, mpamba te ezalaki esika oyo losambo ya solo efandaki mpenza. Mibeko ya Yehova ezalaki koteyama kuna. Yehova azalaki komonisa motema boboto na ye epai ya bato oyo Mokonzi ya Yerusaleme azalaki koyangela. (Tángá Nzembo 48:1, 2, 9, 12, 13.) Na ndakisa na bango, yo mpe olingaka koyekola istware ya ebongiseli ya Yehova mpe kobɛta lisolo na yango? Soki ozali kokoba koyekola makambo oyo etali ebongiseli ya Nzambe mpe ndenge oyo asungaka basaleli na ye, okobanda komona mpenza ete Bokonzi ya Nzambe ezali solo. Okokóma mpe na mposa makasi ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi yango.​—Yir. 9:24; Luka 4:43.

6. Mpo na nini ebongi Yehova asɛnga biso tóyekola mibeko mpe mitinda na ye mpe tótosa yango?

6 Koyeba mibeko. Baguvɛrnema esɛngaka bana-mboka na yango báyeba mibeko ya mboka mpe bátosa yango. Yango wana, ebongi mpe Yehova asɛnga biso tóyekola mibeko mpe mitinda oyo apesi bana-mboka nyonso ya Bokonzi ya Nzambe mpe tótosa yango. (Yis. 2:3; Yoa. 15:10; 1 Yoa. 5:3) Mbala mingi mibeko ya bato ezalaka na mabunga mpe ntango mosusu ezalaka sembo te. Nzokande, “mobeko ya Yehova ezali ya kokoka.” (Nz. 19:7) Tosepelaka na mobeko ya Yehova mpe totángaka Liloba na ye mokolo na mokolo? (Nz. 1:1, 2) Tokoyeba mibeko ya Nzambe kaka soki tozali koyekola yango. Moto moko te akoki kosala yango mpo na biso.

BANA-MBOKA YA BOKONZI BALINGAKA MIBEKO YA NZAMBE

7. Bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe batosaka mibeko nini?

7 Mpo tótikala bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe, tosengeli koyeba mibeko ya Nzambe, kasi mpe kolinga yango. Bato mingi balobaka ete bandimaka mibeko ya mboka na bango. Nzokande, ntango bamoni ete mobeko moko ezali malamu te mpo na bango, mpe moto moko te azali komona bango, babukaka yango. Mbala mingi bato wana bazalaka “basepelisi-bato.” (Kol. 3:22) Bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe batosaka mibeko ya Nzambe na bomoi na bango. Basepelaka kosala yango ata ntango moto moko te azali komona bango. Mpo na nini? Mpo balingaka Yehova, Mopesi-mibeko.​—Yis. 33:22; tángá Luka 10:27.

8, 9. Ndenge nini okoki koyeba soki olingaka mpenza mibeko ya Nzambe?

8 Ndenge nini okoki koyeba soki olingaka mpenza mibeko ya Nzambe? Talelá ndenge oyokaka soki bapesi yo toli na likambo oyo omonaka ete etaleli kaka yo moko, na ndakisa molato mpe ndenge ya kobongisa nsuki. Mbala mosusu liboso okóma mwana-mboka ya Bokonzi ozalaki kolata molato ya bongobongo to oyo ezali kotika nzoto libándá. Ntango bolingo na yo mpo na Nzambe ekolaki, okómaki kolata molato oyo ezali kokumisa ye. (1 Tim. 2:9, 10; 1 Pe. 3:3, 4) Mbala mosusu omonaka ete sikoyo olataka malamu. Kasi, okosala nini soki nkulutu moko ayebisi yo ete ndenge oyo olataka ezali kobɛtisa bandeko mosusu libaku? Okoluka komilongisa, okokóma na nkanda, to na motó makasi? Mobeko moko ya ntina mingi ya Bokonzi ya Nzambe ezali ete bana-mboka nyonso bámekola Kristo. (1 Pe. 2:21) Na likambo yango, ntoma Paulo akomaki boye: “Moto na moto na kati na biso asepelisa mozalani na ye na oyo ezali malamu mpo alendisa ye. Mpo Kristo kutu amisepelisaki te.” (Rom. 15:2, 3) Mpo na kobatela kimya na lisangá, mokristo oyo akɔmɛli na elimo akolinga te kosala makambo oyo ekobɛtisa basusu libaku.​—Rom. 14:19-21.

9 Tótalela lisusu makambo mibale ya ntina mingi: makanisi na biso na oyo etali kosangisa nzoto mpe libala. Bato oyo bazali naino bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe te bamonaka mabe te ete mibali na mibali to basi na basi básangisa nzoto, bamonaka ete pornografi ezali mabe te, mpe bakanisaka ete kosala ekobo mpe koboma libala ezali ekateli ya moto na moto. Bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe batiká makanisi wana ya moimi mpe oyo ezangi bwanya. Bato mingi bazalaki kosala makambo ya mbindo na bomoi na bango liboso bákóma bakristo; kasi lelo oyo bamonaka ete kosangisa nzoto mpe libala ezali makabo oyo euti na Nzambe. Bamonaka ete mibeko ya Yehova ezali malamu mingi mpe bandimaka na motema moko ete baoyo bazali kokoba kosala pite to ekobo babongi te kozala bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe. (1 Ko. 6:9-11) Atako bongo, bayebaka mpe ete motema ezali na bokosi. (Yir. 17:9) Yango wana basepelaka ndenge lisangá epesaka bango makebisi mbala na mbala mpamba te esalisaka bango bákoba kotosa mibeko ya Nzambe.

BANA-MBOKA YA BOKONZI BASEPELAKA NA MAKEBISI

10, 11. Makebisi nini Bokonzi ya Nzambe epesaka mbala na mbala, mpe okanisaka nini mpo na makebisi yango?

10 Baguvɛrnema ekoki kokebisa bana-mboka na bilei mpe bankisi oyo ekoki kopesa bango maladi. Ya solo, bilei to nkisi nyonso te nde ezalaka mabe. Kasi soki bilei to nkisi moko boye ezali likama mpo na bato, guvɛrnema ekoki kokebisa bana-mboka mpo na kobatela bango. Soki guvɛrnema esali yango te, bakoloba ete bakonzi ya mboka bazali na bopɔtu. Ndenge moko mpe, Bokonzi ya Nzambe ekebisaka biso mbala na mbala na makambo oyo ekoki kotinda biso tóbuka mibeko ya Nzambe mpe oyo ekoki kobebisa boyokani na biso ná ye. Na ndakisa, bato mingi bakómi kosalela Internet mpo na kosolola na bato mosusu, kotánga kelasi, mpe kosala masano. Ebongiseli ya Nzambe esalelaka Internet mpo na kokokisa mikano ya ntina mingi. Nzokande, basite mingi ya Internet ezali mabe mpo na bato oyo balingi kotosa mibeko ya Yehova mpe kobatela boyokani na bango ná ye. Ezali polele ete basite oyo elakisaka pornografi ezali likama mpo na elimo ya bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe. Banda bambula mingi sikoyo, moombo ya sembo azali kokebisa biso mpo na basite ya ndenge wana. Tosepelaka mpenza na makebisi wana!

11 Banda mwa bambula, basite ya Internet ekómi kosalelama mingi mpo na kosolola na bato. Basite yango ekoki kosalisa biso soki tozali kosalela yango na ekɛngɛ. Nzokande soki tokebi te, ekoki mpe kokóma likama mpo na biso. Moto oyo azali kosalela yango akoki kobanda kosolola na baninga mabe. (1 Ko. 15:33) Yango wana ebongiseli ya Nzambe ezali kopesa makebisi mpo tózala na bokatikati na ndenge ya kosalela basite yango. Osili kotánga masolo nyonso oyo moombo ya sembo auti kobimisa mpo na basite yango? Ekozala likama monene osalela basite yango kozanga ete otánga liboso masolo wana! a Ekozala lokola nde ozali komɛla nkisi moko makasi, kozanga ete otánga naino makambo oyo bakomi likoló ya molangi na yango.

12. Mpo na nini koboya koyoka makebisi ezali bozoba?

12 Baoyo baboyaka koyoka makebisi ya moombo ya sembo bamisalaka mabe mpe basalaka bato mosusu mabe. Basusu bakómaki baombo ya pornografi mpe bakweaki na pite; na nsima bakómaki komikosa na kokanisa ete Yehova azali komona te makambo oyo bazali kosala. Ezali bozoba kokanisa ete tokoki kobombela Yehova makambo oyo tozali kosala! (Mas. 15:3; tángá Baebre 4:13.) Nzambe azali na mposa ya kosalisa bato oyo basalaka makambo wana mpe asalelaka bankulutu mpo na kosalisa bango. (Gal. 6:1) Kasi, kaka ndenge guvɛrnema ekoki kolongola lotomo ya mwana-mboka na moto oyo asalaka makambo ya mabe, Yehova akotika te ete babuki-mibeko oyo baboyi kobongola motema bátikala kaka bana-mboka ya Bokonzi na ye. b (1 Ko. 5:11-13) Atako bongo, azali na motema mawa. Bato oyo babongoli motema mpe babongwani mpenza bakoki lisusu kozongisa boyokani malamu na Yehova mpe kotikala bana-mboka ya Bokonzi na ye. (2 Ko. 2:5-8) Tozali mpenza na libaku malamu ya kosalela Mokonzi oyo azali na bolingo ndenge wana!

BANA-MBOKA YA BOKONZI BAZWAKA KELASI NA VALƐRƐ

13. Ndenge nini bana-mboka ya Bokonzi bamonisaka ete bazwaka kelasi na valɛrɛ?

13 Baguvɛrnema mingi esalaka milende mpo na kotángisa bana-mboka kelasi. Batongaka biteyelo mpo bato báyekola kotánga mpe kokoma mpe báyekola misala. Bana-mboka ya Bokonzi bazalaka na botɔndi mpo na biteyelo yango mpe bamipesaka mpo na koyekola kotánga mpe kokoma, mpe koyekola mosala mpo na kobikela. Kasi, bazwaka na valɛrɛ mingi koleka makambo oyo Yehova ateyaka bango na nzela ya ebongiseli na ye. Na ndakisa, lisangá ya Nzambe elendisaka bato báyeba kotánga mpe kokoma. Elendisaka baboti bátángelaka bana na bango. Sanza na sanza moombo ya sembo abimisaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki ozali kotánga nkasa mibale to misato mokolo na mokolo, okotánga bazulunalo yango nyonso na sanza mobimba. Na ndenge yango, okokoba kozwa mateya ya Yehova.

14. (a) Tozwaka formasyo nini? (b) Makanisi nini oyo etali Losambo na kati ya libota osalelaki?

14 Pɔsɔ na pɔsɔ, bana-mboka ya Bokonzi bazwaka formasyo na makita ya lisangá. Na ndakisa, banda mbula koleka 60, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esalisaka bayekoli ya Biblia báyeba mpenza koteya Liloba ya Nzambe. Osilá kokomisa nkombo na eteyelo yango? Banda mwa bambula, moombo ya sembo azali mpenza kolendisa bakristo básalaka Losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ. Ebongiseli yango ezali kosalisa mabota ezala na bomoko. Bozali kosalela makanisi oyo ebimaki na mikanda ya moombo ya sembo mpo na Losambo na kati ya libota? c

15. Wapi moko ya mapamboli minene oyo tozali na yango?

15 Na mikili mingi, bana-mboka mosusu balukaka ete bato bákɔta na lingomba ya politiki oyo bango bazali; basusu kutu bakendaka ndako na ndako mpo na koluka bato yango. Na mokili mobimba, bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe basakolaka na babalabala to na ndako na ndako mpo na komonisa polele ete bazali na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe. Kutu, ndenge lisolo ya boyekoli oyo eleki emonisaki yango, lelo oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, zulunalo oyo eyebisaka Bokonzi ya Yehova, ezali kokabolama mingi koleka zulunalo mosusu nyonso na mokili! Moko ya mapamboli minene oyo tozali na yango ezali ya kosakwela basusu Bokonzi ya Nzambe. Osalaka mosala yango na molende?​—Mat. 28:19, 20.

16. Ndenge nini okoki komonisa ete obongi kozala mwana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe?

16 Mosika te Bokonzi ya Nzambe ekozala guvɛrnema kaka moko oyo ekoyangela mabele mobimba. Bokonzi yango ekotambwisa makambo ya elimo mpe makambo mosusu nyonso ya bomoi ya bato. Okokokisa masɛngami mpo na kozala mwana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe na ntango wana? Sikoyo nde ntango ya komonisa ete ekozala bongo. Na bikateli nyonso oyo ozwaka mokolo na mokolo, saláká nyonso mpo na nkembo ya Yehova mpe na ndenge yango okomonisa ete ozali moto oyo abongi kozala mwana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe.​—1 Ko. 10:31.

[Maloba na nse ya lokasa]

c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya15 Augusto 2011, nkasa 6-7 mpe Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2011, nkasa 3-6.

[Mituna ya boyekoli]

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]

Olandaka makebisi ya moombo ya sembo mpo na ndenge ya kosalela Internet?

[Elilingi na lokasa 12]

Na ndakisa ya bana ya Kora, osepelaka na losambo ya solo mpe istware na yango?

[Elilingi na lokasa 15]

Losambo na kati ya libota ekoki kosalisa yo ná libota na yo bókóma bato oyo babongi kozala bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe