Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biloko oyo tosalelá kala

Na mobembo elongo na ba pèlerins

Na mobembo elongo na ba pèlerins

“NAKOKI kosakola ndako na ndako te!” Bayekoli ya Biblia mingi ya sika balobaki bongo ntango bayokaki ete esengeli mpe bákendaka kosakola na bandako ya bato! Nzokande, moto oyo alobaki maloba oyo ezali na ebandeli azalaki molobi mpe moteyi malamu ya Biblia, moko ya bandeko oyo bazalaki kobengama ba pèlerins.

Bato mingi oyo bazalaki kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona, oyo batikaki mangomba na bango, bazalaki na mposa makasi ya kokutanaka na bato mosusu oyo bazalaki mpe na mposa ya koyoka mateya ya solo ya Biblia. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elendisaki batángi na yango ete báluka bato mosusu oyo bazali na kondima lokola bango mpe báyanganaka elongo mbala na mbala mpo na koyekola Biblia. Kobanda na mobu 1894, Société Watch Tower ezalaki kotinda bamonisi na yango mpo na kokutana na bituluku ya bayekoli oyo bazalaki kosɛnga ete báya kotala bango. Bazalaki kopona bandeko mibali ya molende oyo baumelaki na lisangá, oyo bazalaki na komikitisa, bayebaki Biblia malamu, bayebaki koloba mpe koteya, mpe bazalaki kondima lisiko. Mbala mingi, bazalaki kolekisa mokolo moko to mikolo mibale ya mosala makasi elongo na etuluku oyo bakei kotala. Bayekoli mingi ya Biblia bamekaki mpo na mbala ya liboso kosakola na ndenge bazalaki kokabola nkasa ya libyangi mpo bato báya koyoka diskur ya pèlerin. Nsima ya kosala diskur na mpokwa na eteyelo moko, Hugo Riemer, oyo na nsima akómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, abandaki koyanola na mituna ya bato tii nsima ya midi ya butu. Alɛmbaki, kasi azalaki na esengo mpe alobaki ete likita yango ezalaki “kitoko.”

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete “ntina ya libosoliboso” ya mibembo ya ba pèlerins ezalaki ya kolendisa “ndako ya kondima” na nzela ya makita ya bituluku na bandako ya bandimi. Bayekoli ya Biblia ya bamboka ya zingazinga bazalaki koya koyoka badiskur mpe kolanda masolo ya mituna mpe biyano. Na nsima, bakristo yango bazalaki koyamba mopaya yango. Ntango azalaki naino elenge, Maude Abbott akendaki kolanda diskur moko na ntɔngɔ, mpe na nsima bato nyonso bafandaki na mesa moko molai na kati ya lopango. “Bilei kitoko ezalaki beboo: mosuni ya mpate, nsoso bakalingá, mampa ya ndenge na ndenge, mpe bagato! Moto na moto azalaki kolya nyonso oyo alingi, mpe na ngonga ya mibale nsima ya midi tozalaki koyangana mpo na kolanda diskur mosusu.” Kasi, alobi ete, “Na ntango yango, moto nyonso azalaki kobunda na mpɔngi.” Mokolo moko Benjamin Barton, ndeko moko oyo aumelaki na mosala ya pèlerin, alobaki ete, ‘Soki nazalaki kolya bilei nyonso oyo bazalaki kopesa ngai, mbele nakufá kala.’ Nsukansuka, mokanda moko oyo eutaki na biro monene na Brooklyn eyebisaki bandeko basi oyo bazalaki kosepela kopesa bapaya biloko ya kolya ete ekozala malamu bápesaka pèlerin “bilei oyo bamesanaki kolamba mokolo na mokolo” mpe bátikelaka ye “ntango ya kolala.”

Ba pèlerins bazalaki koteya malamu mpe bazalaki kosalela bakarte, bandakisa, to biloko mosusu nyonso oyo bakokaki kozwa mpo na kolimbola makambo polele. Badiskur ya Richard Barber “ezalaki ntango nyonso kitoko.” Walter Thorn azalaki koloba “lokola batata ya mabota na ntango ya kala.” Mokolo moko, ntango bazalaki na motuka moko ya Ford, Shield Toutjian abelelaki mbala moko ete: “Tɛlɛmá!” Akitaki mbangu na motuka, akendaki kobuka mwa bafololo, mpe abandaki koteya bato mosusu oyo bazalaki na kati ya motuka bozalisi ya Yehova.

Mosala ya pèlerin ezalaki na mikakatano ebele, mingimingi mpo na baoyo bapusanaki na mbula 50 to balekaki mbula yango. Nzokande, mpo na basusu mokakatano monene ezalaki mbongwana na likambo oyo basengelaki kotyela likebi mingi na mosala yango. Esengelaki bákóma kopesa ndakisa na mosala ya ndako na ndako. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 1924 elobaki ete “moko na mikumba minene” ya bakristo ya solo “ezali kopesa litatoli mpo na bokonzi. Ba pèlerins batindamaka na mokano yango.”

Emonanaki ete ba pèlerins mosusu basepelaki na mbongwana yango te, mpamba te batikaki mosala yango; kutu, bamosusu oyo basepelaki te basalaki mwa mangomba na bango. Robie Adkins alobaki ete pèlerin moko oyo azalaki molobi malamu mpenza alobaki na mawa ete: “Ngai nayebi kaka koteya na estrade. Nakoki kosakola ndako na ndako te!” Ndeko Adkins alobaki boye: “Na nsima namonaki ye na liyangani oyo esalemaki na Columbus, na etúká ya Ohio na 1924. Azalaki mawamawa, atɛlɛmaki ye moko na nse ya mwa nzete moko, mosika na ebele ya bandeko oyo bazalaki na esengo. Natikalá komona ye lisusu te. Mwa moke na nsima, atikaki lisangá.” Nzokande, “bandeko mingi bazalaki koleka na mikanda na kati ya mituka na bango”; na ntembe te bazalaki na esengo mpe na mposa makasi ya kosakola ndako na ndako.​—Mis. 20:20, 21.

Ba pèlerins mingi, atako mbala mosusu bazalaki kobanga moke lokola kaka bato oyo bango basengelaki kopesa formasyo, batyaki makanisi na bango na mosala. Mpo na mosala ya ndako na ndako, Maxwell Friend, pèlerin moko oyo azalaki koloba monɔkɔ ya Allemand, akomaki boye: “Mosala yango ezali kobakisa mapamboli na mobembo ya pèlerin.” Pèlerin mosusu, John Bohnet alobaki ete bandeko mingi bandimaki mbala moko ete tosengeli kotya likebi mingi na mosala ya kosakola Bokonzi. Ye amonaki ete bandeko mingi bazalaki “na mposa makasi ya kozala na molɔngɔ ya liboso” na mosala yango.

Bandeko mingi oyo basalaki mibembo na boumeli ya bambula basalisaki bato mingi. Norman Larson, Motatoli moko ya kala, alobaki ete: “Ntango nazalaki mwana moke, namonaki mpenza ete mosala ya pèlerin ezalaki na ntina mpe na mapamboli mingi. Bandeko yango basalisaki ngai mingi mpo nalanda nzela ya malamu.” Tii lelo oyo, bakɛngɛli-batamboli oyo bazali na elimo ya komipimela mpe ya sembo basalisaka bandeko na bango báloba ete, “Tokoki kosakola ndako na ndako!”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 32]

Tozalaki na esengo mingi mokolo oyo tozalaki koyamba “pèlerin”!

[Elilingi na lokasa 31]

Mibembo ya Benjamin Barton na 1905 ememaki ye na bisika 170

[Elilingi na lokasa 32]

Walter Thorn azalaki pèlerin, mpe bazalaki kobenga ye Nkɔkɔ mpo azalaki na motema ya tata mpe na bizaleli lokola ya Kristo

[Elilingi na lokasa 32]

J. A. Browne atindamaki pèlerin na Jamaïque soki na 1902 mpo na kolendisa bituluku ya mikemike 14

[Elilingi na lokasa 32]

Mosala ya pèlerin elendisaki kondima, ebakisaki bomoko ya bakristo, mpe esalisaki bandeko bákangama na lisangá